Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/2 nk. 3-4
  • Ntembe na ntina na kufa na Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntembe na ntina na kufa na Yesu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Lisiko: liteya oyo mangomba na boklisto ya lokuta basili kobosana yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Trinité elimbolami ndenge nini?
    Osengeli kondima Trinité?
  • Mpo na nini Yesu akufaki?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mokakatano ya bato ya Teoloji
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/2 nk. 3-4

Ntembe na ntina na kufa na Yesu

NA MOBU 33, mokolo ya Pasiká, bato misato babomamaki. Bakangami misato oyo bakweisamaki, bamemamaki na libandá ya lopango na Yelusaleme mpe babomamaki na lolenge ya mpasi mpenza mpe na nsoni: bakakisamaki na nzete. Lolenge na koboma wana ezalaki kosalelama mingi na eleko ya Baloma. Tokokaki bongo komizela ete bato babosana mpenza makambo oyo malekaki na mokolo na Pasiká yango. Nzokande, Yesu Klisto azalaki moko na bato yango. Liwa na ye lisili kobimisa mbongwana mpe ntembe monene kati na mangomba.

Uta ntango wana, esili koleka pene na mibu nkóto mibale, mpe mbala mosusu ozali na likanisi ete makambo yango mataleli bobele eleko na kala. Kasi, oyebi ete ntembe oyo ebimisamaki ekoumela mpo na kosilisama?

Mbala mosusu obosani naino likambo yango te, bamilio na bato bazali kondima ete Yesu akufaki mpo na bango. Bazali kondima mpenza ete liwa na Klisto ezali moboko ya lisiko mpe lilimbisi ya masumu, mpe ete lobiko lokozwama na kondima kati na liwa yango. Kasi, lokola yango ekoki mpenza kokamwisa, tokoki kotanga kati na zulunalo ya teoloji (Anglican Theological Review) ete endimeli ya ntina mingi epai na bandimi, ezali “na mokakatano.” Mpe “mokakatano” yango mobimisami na bakonzi ya mangomba.

Mokanda oyo totangi mozali kopesa ndimbola oyo: “Kati na likanisi na boklisto, liteya ya lisiko ezali na mokakatano mpo ete moboko na yango na Biblia mobetelami ntembe, mpo ete yango etondi na mateya mazangi ntina . . . , mpe mpo ete ndimbola na yango kati na elimo ya bato mingi emonisami na maloba na kobulunganisa mpe na lolenge mabe ya kosenga lilimbisi epai na moto mosusu.” Ya solo, ezala bateolojié katolike to bateolojié protestá bayokani naino te likoló na ndimbola ya liwa na Yesu Klisto, oyo mpo na bango, bakanisi ete ndimbola moko ezali.

Okoki mbala mosusu kokanisa ete ezali wana bobele koswana ya bato na mayele, ete bantembe oyo esalemi na mwa ndambo na bateolojié ekoki kozala na bopusi kati na bomoi na yo te. Kasi kanisa na likambo oyo: soki liwa na Yesu ezali na boyokani elongo na etelemelo na yo liboso na Nzambe mpe lobiko na yo ya seko (na likoló to na epai mosusu), ezali bongo na ntina ete oluka koyeba ntembe yango.

Mpo na nini bateolojié bazali lisusu kotyana ntembe likoló na lisiko? Tozwa ndakisa ya Lingomba na katolike. Ezali na mateya na yango ya sikisiki, lokola molimo ekufaka te mpe oyo ya Trinité. Nzokande, ezali kozwa ekateli te na ntina na likambo litali lisiko na nzela na liwa ya Klisto. Mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.) elobi ete: “Basili kosala myango mingi mikeseni mpo na kolimbola lolenge oyo moto asikolami na mabe oyo mazali bongo lisumu mpe azwi lisusu ngolu . . . Kasi moko te kati na myango yango esili kosepelisa bato. . . . Teoloji ya Lisiko ekoki naino te, mpe lelo oyo ezali komonana lisusu lokola nkaka mpo na bato na mayele.”

Ezali bongo likambo na kokamwa te na komona ete, kati na bamilió na bato oyo bakolobaka na molende mpenza ete ‘Yesu akufelaki bango,’ bobele bato moke nde bazali na mwa likanisi mpo na ndimbola na yango. Lokola tokoki kotanga yango kati na mokanda ya teoloji oyo elobelami na mwa liboso, “wana bakosengaka ye ete alimbola yango, . . . mbala mingi moklisto azalaka na makoki te mpo na kopesa mikapo ya Biblia na ntina na liteya yango to na kolimbola lolenge oyo yango ekolobamaka.” Komemáká likoló na mapeka na bango liteya oyo bazali kokanga ntina na yango te mpe bakoki te kolimbola yango, bandimi ya Mangomba bakozala na nkaka mpenza ete baloba na likambo nini liwa na Klisto etaleli bomoi na bango.

Lisusu, kozanga makoki oyo boklisto ya lokuta emonisi na kozanga kolimbola malamu mpenza liteya ya lisiko, esili kolɛmbisa milende misengeli kosalema mpo na koyebisa nsango ya Klisto epai na Bayuda, epai na Bahindu, epai na Babuda mpe epai na bato mingi mosusu. Atako ndambo monene na bato yango bazali kosepela na Yesu mpe bazali kotósa mwa ndambo mingi na mateya na ye, mobulungano oyo mozali mpo na liwa na ye mpe ndimbola na yango, ezali nkaka kati na nzela ya kondima.

Ndimbola ya liwa na Klisto ezali nde libombami oyo bato bakoki kososola te? To, mpe lisusu, Biblia ezali mpenza kopesa biso ndimbola malamu? Ebongi ete totalela mituna oyo, mpamba te Biblia epesi maloba oyo na kokamwa na ntina na Yesu: ‘Moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.’​—Yoane 3:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto