Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/2 lok. 32
  • “Nazalaki na nkanda makasi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nazalaki na nkanda makasi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/2 lok. 32

“Nazalaki na nkanda makasi”

Elenge mwasi moko ya mibu 15 oyo afandi na mboka Knoxville, na mokili ya Tennessee (États-Unis), akomaki ete: “Nalingi kotondo bino mpo na mokanda na bino ya sika, Les jeunes s’interrogent​—Réponses pratiques. Nasepelaki mingi na botangi na yango.”

Na nsima alimboli likambo oyo lipusaki ye na kokoma mokanda: “Nazalaki na nkanda makasi epai na ndeko na ngai mpo ayebisaki ete nasalaki te mosala oyo bapesaki ngai na ndako. Ntango toswanaki na ye, namiyokaki ete nasalaki mabe Namataki likoló kuna na chambre na ngai mpo na kotanga [mokapo 6] ya mokanda yango, oyo ete ‘Mpo na nini nazali na bandeko ya matata boye?’, mpe mpo na kokomela bino mokanda. Nayebaki ete yango ekosalisa ngai na kosilisa mikakatano oyo nakokutana na yango na ntango ekoya.”

Bilenge bakomitunaka mituna mingi oyo mizali kosenga biyano ya mayele mpe ya bososoli: Nakoki kobanda kokende ntango nyonso epai na moto mosusu mpo na libala? Ndenge nini nakoki kobosana bolingo ya elulela? Mabe ezali na kosangisa nzoto liboso na libala? Ndenge nini koyeba soki ezali mpenza bolingo ya solo? Oponi mosala nini mpo na bomoi na yo mobimba? Ndenge nini nakoki kotemela bopusi ya baninga na ngai? Mituna oyo elongo na misusu, mizali kosenga biyano malamu.

Tondimisami ete okozwa matomba na botangi ya mokanda Les jeunes s’interrogent​—Réponses pratiques, mokanda oyo mokapo moko na moko mozali kolimbola likambo moko na moko kati na oyo touti kolobela. Okoki kozwa mokanda yango mosalemi kitoko mpenza, epai na ba Témoins de Jéhovah ya mboka oyo yo ofandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto