Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/1 lok. 31
  • Totya mitema na bokasi oyo Nzambe akopesaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Totya mitema na bokasi oyo Nzambe akopesaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yikela mabe mpiko mpe lakisa na bopóló
  • Sakola liloba
  • Mokanda ya Biblia nimero 55—2 Timoté
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Nini ekoki kosalisa biso na kosembola liloba ya solo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Timote—“Mwana na solo kati na kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mokanda ya Biblia nimero 54—1 Timoté
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/1 lok. 31

Totya mitema na bokasi oyo Nzambe akopesaka

Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda ya mibale epai na Timoté

JÉHOVAH akopesaka nguya epai na basaleli na ye mpo na kopesa bango nzela na koyika mpiko liboso na mimekamo mpe minyoko. Nzokande, Timoté mpe baninga na ye baklisto bazalaki mpenza na mposa monene ya bokasi oyo Nzambe akopesaka. Na mobu 64 ya ntango na biso, Roma ezikisamaki na móto mpe nsango epalanganaki ete, mokonzi Néron nde asalaki likambo yango. Mpo na komibomba, mokonzi yango afundaki baklisto ete bango nde babimisaki móto yango. Na ntembe te, ezali mpo na ntina yango nde baklisto bazwaki monyoko makasi. Ezalaki pene na eleko yango (pene na mobu 65 ya ntango na biso) nde ntoma Paulo akangamaki lisusu na Roma. Atako azalaki pene na liwa, akomaki bongo mokanda na ye ya mibale epai na Timoté.

Mokanda ya Paulo mobongisaki Timoté ete atemela bapengwi mpe ayika mpiko na minyoko. Mokanda yango molendisaki ye na kolanda kokóla na elimo mpe moyebisaki ye ezalela nini Paulo azalaki na yango na bolóko. Mokanda yango mozali mpe kolendisa baoyo bakotangaka yango ete batya mitema na bokasi oyo Nzambe akopesaka.

Yikela mabe mpiko mpe lakisa na bopóló

Wana ezali biso konyokwama mpo ete tozali kosakola nsango malamu, Nzambe akopesaka bokasi. (2Tim 1:1-18) Paulo abosanaki Timoté kati na mabondeli na ye te, mpe azalaki ntango nyonso komikundola kondima na ye ezangi bokosi. Nzambe apesaki na Timoté “elimo na kobangabanga te, kasi elimo na nguya, na bolingo mpe na kokanga motema.” Asengelaki te kooka nsoni mpo na kotatola, kasi asengelaki koyikela mabe mpiko mpo na nsango malamu. Paulo asengi lisusu na Timoté ete ‘alanda kobatela motindo na maloba na sembo’ oyo ayokaki epai na ye. Biso mpe tosengeli kokangama na mateya na solo na boklisto, ata soko bamosusu bazali kopengwa longwa na yango.

Makambo oyo Paulo asilaki kolakisa masengelaki kopesama epai na bato na sembo baoyo basengelaki koteya yango epai na bamosusu. (2:1-26) Timoté alendisami na komitambwisa lokola soda na Klisto, na komimonisaka sembo wana ezali ye koyikela mabe mpiko. Paulo ye mpe anyokwamaki na minyololo ya bolóko mpo ete asakolaki nsango malamu. Alendisi Timoté na kosala nyonso ekoki na ye mpo na kondimama na Nzambe lokola mosali malamu, na kopengoláká maloba na mpamba maye makobebisa oyo na bulee. Amonisi ye ete moombo na Nkolo asengeli kolakisa bamosusu na bopóló.

Sakola liloba

Bokasi oyo bouti na Nzambe bozali na ntina monene mpo na kolónga na mikolo na nsuka mpe mpo na kolobela solo emonisami kati na Makomami. (3:1-17) Bato oyo ‘bandimi koyekola nde bakoki te na kokóma na boyebi ya solo,’ bakobima katina bato mabe. ‘Bato yango mabe mpe bakosi bakokóla ntango nyonso mpo na kosala mabe koleka, na kozimbisáka mpe na komizimbisáká.’ Kasi, Timoté asengelaki ‘koumela kati na makambo masili ye koyekola.’ Biso mpe tosengeli kosala lolenge moko, koyebáká ete “Makomami nyonso mapemami na elimo na Nzambe, makoki kopesa litomba na mateya, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobokola kati na boyengebene mpo ete moto na Nzambe azala mobongi oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.”

Timoté asengelaki kotemela bapengwi mpe kokokisa mosala na ye. (4:1-22) Mpo na kolónga na yango, asengelaki ‘kosakola liloba’ mpe kotikala sembo na yango. Wana ezalaki na ntina monene mpenza, mpamba te lisangá lizalaki kobika na “eloko na mpasi,” bamoko bazalaki kolakisa mateya na lokuta. Bobele bongo, ba Témoins de Jéhovah bakangami lelo na Liloba na Nzambe, mpe bazali kosakola yango na molende ata kati na mpasi, ezala kati na lisangá to na libanda ya lisangá. Paulo “abatelaki kondima” atako atikamaki na bamosusu. Kasi ‘Nkolo atondisaki ye na nguya mpo ete, na nzela na ye, nsango malamu esakolama bisika inso.’ Na ndakisa na ye, biso mpe tokoki kotya mitema na bokasi oyo Nzambe akopesaka mpe kolanda kosakola nsango malamu.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 31]

Soda aleki malamu: Paulo apesi elendiseli oyo elandi epai na Timoté, ete: “Ndimá koyikela mabe mpiko lokola soda na Klisto Yesu. Soda moko te akomikótisaka na makambo na bomoi ya mokolo na mokolo, mpo ete akoka kosepelisa ye oyo abyangi ye na mosala.” (2 Timoté 2:3, 4) Soda Moloma ‘azalaki koyikela mabe mpiko’ wana asengelaki kokumba bibundeli na ye ya kilo, epasola, motete, bilei mpo na mikolo misato mpe biloko mosusu. (La Guerre des Juifs de Josèphe, libongoli ya Andilly, mokanda ya misato mokapo 5) Alukaki te kosala mombongo, mpamba te akokaki kosepelisa bakonzi na ye te, lokola basila kobongisa lifuta na ye. Bobele bongo, moklisto azali kokutana na mimekamo mpo ete azali “soda malamu na Klisto.” Akosalaka mpo na kokokisa masengami mamonisami kati na Makomami, kasi akopesa nzela te ete makambo ya mosuni mazwa ntango na ye nyonso, kino kopekisa ye ete atika kobunda etumba ya elimo. (1 Batesaloniki 2:9) Na kosakoláká ndako na ndako, azali bongo kosalela “mopanga ya elimo, yango liloba na Nzambe,” mpe azali kopesa nzela na bato ete bamisikola longwa na bindimeli mabe. (Baefese 6:11-17; Yoane 8:31, 32) Tika basoda baklisto nyonso balanda bongo kosepelisa Yesu Klisto mpe Jéhovah mpamba te bomoi na bato ezali na likámá.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto