Bazali koyika mpiko na esengo na Moyen-Orient
Ba Témoins de Jéhovah ya Liban batindeli biso nsango kitoko
MBULA na biso ya mosala 1990 ebandaki wana etumba makasi ezalaki na engumba Beyrouth. Nsima tozwaki mwa kimya moke, kobanda na sanza ya Septembre 1989 kino Janvier 1990.
Na boumeli ya basanza yango, (na Novembre) tozwaki motuya ya sika ya basakoli 2 659, nzokande na boumeli ya mbula ya mosala 1989, tozalaki na motuya ya basakoli 2 467. Bato ntuku minei na minei bazwaki batisimo mpe totangaki 65 pionniers auxiliaires na moyenne ya sanza nyonso. Mbala ya liboso tozwaki motuya ya boyekoli na Biblia 2 000, oyo epesaki nzela na kokokisa mosala oyo mozalaki kozela biso.
Kasi, etumba ezongaki lisusu na Beyrouth Est, epai kuna masangá mingi mazali, oyo esalaki ete ebele na bandeko na biso bakima na mikili misusu. Mikolo mingi tozalaki kozwa lisusu te bansango ya masangá oyo mazali bipai etumba ezalaki kosalema, mpe ba rapports ya mosala ekokaki te. Bandeko bapalanganaki na bamboka ekeseni, kasi basanganaki na masangá epai bazalaki, mpe kosakola na ndako na ndako ekobaki kosalema na mboka mobimba, kobimisáká matomba malamu. Na boumeli ya eleko yango, bandako ya bandeko mingi ezikaki to mpe epanzanaki na ba bombes. Nkutu ndeko mwasi moko akufaki.
Na elikya nyonso, tomibalolaki epai na Jéhovah mpo na kozwa lisungi mpe litambwisi na ye. Ba pionniers ya molende bamipesaki na bolingo na bango ete bamema mikanda, bilei mpe mai, epai na bandeko oyo bazali na bamboka bitumba bizali kosalema. Kopusamáká na bolingo na bango mpo na Jéhovah mpe mpo na bandeko na bango, bazalaki na makama na kokatisa banzela oyo ezalaki na mines. Bato bamonaki lisalisi oyo lipesamaki na mabota ya bandeko, mpe bongo litatoli malamu lipesamaki. Bamonaki nguya ya bolingo ya solo oyo eboti bomoko kati na losambo na Jéhovah, Nzambe bobele moko ya solo.—Yoane 13:34, 35; 15:13.
Na boumeli ya mbula ya mosala, basakoli bazangaki kozwa ata moko na bazulunalo na biso te. Kobanda nimero ya 8 Janvier 1990, Réveillez-vous! na Lingelesi mpe na Arabe ezali kobima nzela moko, lokola oyo ekosalamaka mpo na Mosenzeli. Ezalaki mpenza liziba ya elendiseli mpo na bandeko mpe bato mosusu oyo bakosepelaka na solo. Bazalaki lisusu na esengo ya kozwa mikanda mibimi sika na monoko ya Arabe, lokola brochure Osengeli kondima Trinité?, mokanda La Bible: Parole de Dieu ou des Hommes? mpe Mokanda mpo na masolo ya Biblia.
Makabo oyo ya elimo mapesamaki wana baizini mpe bakompanyi ya Beyrouth ekangamaki. Makambo ya nkita mabebaki na mboka mobimba. Na bisika mingi, kurá, mai, mpe telefone ezalaki te. Totika sikawa ete bamoko na bandeko yango balimbwela biso ndenge nini babatelaki esengo na koyikáká mpiko na matata oyo masili koumela mibu 15.
“Makambo malamu basalaki”
Ndeko mobali moko ya Beyrouth akomaki makambo oyo malandi: “Nalingi liboso kotondo Jéhovah na motema mobimba na lolenge oyo abateli biso kati na lisangá na ye kolanda losambo na ye ya peto, atako mikakatano mingi oyo tosili kokutana na yango. Na boumeli na makambo manso oyo mauti koleka, nakutanaki na makambo oyo mapesaki ngai esengo, mpe ezali mpo na ngai, makambo malamu oyo mabimisami na etumba.
“Na boumeli na etumba makasi, tofandaki elongo na baninga na biso na baeskalié, mpo ezalaki wana esika malamu na ntango ba bombes ezalaki kobeta. Tozalaki ntango nyonso koloba na bango na ntina na Bokonzi na Nzambe, oyo ezali mwango bobele moko ya malamu mpo na makambo ya bato. Mbala mingi tobondelaki Jéhovah, Nzambe na biso. Yango esukaki na komonana polele mpenza.
“Ezalaki mbala mosusu kosalema ete mindoki mibetama na boumeli ya mikolo mingi, mpe na yango tokokaki kosangana na makita te. Nazalaki bongo kozwa Mosenzeli na ngai mpe koyekola yango, wana efandaki ngai likoló na eskalié. Yango elamusaki mposa ya baninga na biso ya penepene. Bamoko kati na bango bazalaki kolobisa biso te mpo ete tozalaki ba Témoins de Jéhovah. Kasi, lokola ndako na biso epanzanaki na bombe, bakamwaki na komona bolingo oyo bandeko bamonisaki mpo na biso. Na ntango wana, bakómaki kolobana elongo na biso. Mabaku wana mapesaki biso nzela ya kokabola ba abonema mingi ya Réveillez-vous!
“Makambo wana malendisaki ekateli na ngai ya kolobela solo. Jéhovah abongi na kozwa nkembo nsuka te; ebongi ete tomemya ye mpe tosambela ye.”
“Nkombo na Jéhovah ebikisaki bomoi na ngai”
Ndeko mobali moko na lisangá ya Ras Beyrouth ayebisi likambo lilandi: “Na ntongo, mwasi na ngai mpe ngai, mpe bana na biso mibale ya mibali, tobandaki kosakola na kartye ya Beyrouth oyo ezali na Ouest. Nsima na midi likita moko lisalamaki kati na ndako na ngai na monoko ya Lingelesi. Na 18h30, molili mokotaki. Baoyo bazalaki na balabala bobele bato oyo bazalaki na mindoki. Ba bombes ebwakamaki. Bafuteli mingi ya ndako na biso bakimaki. Kurá ezalaki te mpe mai mazalaki te. Na mbala moko toyoki moto kobeta na ekuke.
“Tokanisaki mbala mosusu ete moko na baninga na biso nde azalaki na mposa na mai to mwa limpa, bongo mwasi na ngai afungoli ekuke. Akutanaki na mibali minei balakisaki ye mindoki na bango mpe basengaki ete bakutana na ngai. Na poso wana, bato libwa bakamatamaki na makasi longwa epai na bango, mpe babomamaki mpenza. Ntango bamonaki ngai, mbala moko batalisaki mindoki epai na motó na ngai mpe balobaki na ngai ete nalanda bango. Nazongisaki bango ete: ‘Nandimi kokende elongo na bino, botika ngai ete nalata naino bilamba.’ Nabondelaki Jéhovah na motema na ngai mobimba ete asalisa ngai. Nsima na kobondela, motema mokitaki, mpe nakómaki komona bato yango oyo bozalaki na mindoki mpe kobangisa lokola bato banso. Ezalaki na ngai mpasi te ete nalobela bango kozanga kobanga.
“Natunaki bango ete: ‘Nasali likambo nini? Toloba naino mwa moke kati na ndako liboso ete tokende.’ Mokonzi na bango atunaki ngai mbala moko kati na ndako ete: ‘Nani apesi yo lotomo ya kokóta na bandako na bato mpo na koteya?’ Nayanolaki ete: ‘Bino bozali komema mindoki mpo ete bato basala mokano na bino, mpe moto nyonso asengeli kolanda yango. Kasi ngai nazali komema nsango malamu ya kimya oyo Yesu atindaki biso ete tosakola yango.’ Bongo napesaki bango ndimbola likoló na bindimeli mpe mosala ya ba Témoins de Jéhovah. Ntango natangaki nkombo ya Jéhovah, balobaki ete: ‘Ntina ya komema yo ezali te. Tokotuna yo mituna bobele awa.’ Namoni lokola ete moko na bango ayebaki ndeko moko. Alobaki boye ete: ‘Azali lokola Jarjoura.’
“Topesaki litatoli epai na bato yango bamemaki bibundeli mpe toyanolaki na mituna na bango na boumeli ya ngonga moko na ndambo. Na esika ete bamema ngai kati na nkobé ya vuatire na bango, lokola basalaki yango epai na bato mosusu, bayambaki ngai mpe basengaki bolimbisi, mpe balobaki na ngai ete nabengaka bango ntango nyonso oyo nakozala na mposa ya lisalisi, mpe bakendeki. Mosala ya ndako na ndako oyo nasalaki na ntongo mpe likita ya nsima na midi, elendisaki ngai na kotikala ngwi. Solo mpenza, nkombo na Jéhovah ebikisaki bomoi na ngai.”—Masese 18:10.
“Jéhovah abatelaki biso”
Longwa Beyrouth, ndeko mobali moko akomaki ete: “Ezalaki mercredi le 31 Janvier 1990. Wana ngai mpe ndeko na ngai ya mobali tozalaki kosala na ndako ya ndeko mwasi moko, bitumba bibandaki lisusu. Ba bombes ezalaki kobete bipai binso. Lokola bato bazalaki kokima, mobulu mozalaki na motindo boye ete, tokokaki lisusu kozonga epai na biso te. Ndeko mwasi amimonisaki na boyambi atako azalaki bobele na mwa ndambo moke ya mampa.
“Namitungisaki mingi mpo na mwasi na ngai, mpo ete azali Mofilipine mpe ameseni na mobulu ya bitumba te. Mokolo ya mibale, nazwaki nkutu likoki ya kozonga na ndako na ngai. Biloko ya ndako bipanzanaki na balabala, kasi, tika Jéhovah azwa botondi, mpamba te libota na ngai lizwaki likámá te. Nsima ya mwa kimya moke, kobetama na mindoki ebandaki lisusu. Tokendeki kobombama epai na Témoin oyo ndako na ye ezalaki pene. Tozalaki bato mitano—mwasi na ngai, mwana na ngai ya mobali ya mbula mibale, ndeko na ngai ya mobali, mwasi na ye, mpe ngai. Ba bombes, mindoki makasi ezalaki kobetama na zingazinga, kasi Jéhovah abatelaki biso. Na boumeli ya mikolo mibale oyo mobulu ya kobeta mindoki mosalemaki, tolalaki na mabelé mpe kopemaka milinga ya ba bombes.
“Wana toyokaki lokito ya ba bombes, tozalaki kokanisa maloba na Davidi oyo makomami na Nzembo 18:1-9, 16-22, 29, 30. Na mabaku wana ya mpasi, mpe atako nyonso oyo ezalaki koleka, tozalaki na esengo, mpe tozalaki koseka. Tobondelaki Jéhovah ete, soki tokobika te, apesa nzela ete tobomama nokinoki ete tomona mpasi te. Tozalaki mpenza na elikya makasi ya lisekwa.
“Mokolo molandaki ezalaki likámá monene mpenza. Ba bombes soko 25 ekweaki zingazinga na ndako epai kuna tobómbamaki, kasi ata moto moko te azokaki kati na biso. Bokanisa naino nini ezalaki mayoki na biso wana tososolaki libateli na Jéhovah! Na ntongo ya mokolo molandaki, tozwaki nokinoki ekateli ya kokima. Balabala mobimba bobele vuatire na ngai nde ezikaki te. Nalekaki katikati na bisika oyo batyaki mines mpe ba bombes, mpe, na lisalisi ya Jéhovah, tokómaki na mboka oyo ezalaki na mwa kimya koleka oyo ya biso. Kuna, na bolingo mpenza, bandeko bapesaki biso bilamba, bilei mpe mbongo.
“Atako mikakatano nyonso wana, tomiyokaki bobele na esengo mpo ete Jéhovah azalaki elongo na biso. Ezalaki lokola ete atindaki baanzelu na ye mpo na kolongola ba bombes mosika na biso. (Nzembo 34:7) Ee, esengo na biso ezalaki mpenza monene. Kasi ekozala mingi lisusu soki tobiki na Armagedon.”
Lisalisi ya nokinoki lipesami
Bisika mosusu ya Beyrouth emonanaki lokola ete azwaki likámá ya koningana na mabelé. Ebele na bandako ya bandeko na biso ebukanaki to mpe ebebaki. Na ntina na mobulu oyo moutaki kosalema, Comité de la filiale ebongisaki comité ya lisalisi ya nokinoki mpo na kokokisa bamposa ya basakoli. Yango ebandaki mosala na le 16 Février 1990, na ntango likoki lizwamaki lisusu mpo na kokóta na bamboka epai etumba esalamaki. Comité yango ezalaki na mikano misato: kopesa bilendiseli ya elimo epai na bandeko; kosalisa bango na mosolo, na bilei mpe mai; mpe kosalisa bango na kobongisa to na kotonga bandako na bango.
Ntina ya kosenga bavolontere ezalaki te. Na ntongontongo, mingi bazalaki koya mokolo na mokolo mpo na kopesa lisalisi na misala mikeseni. Tolanda mwa bakomantere ya baoyo bazwaki lisalisi yango:
Ndeko mwasi oyo ndako na ye eutaki kopetolama mpe ebongisamaki malamu, alobaki ete: “Nasili bobele koyoka nsango ya lisalisi lipesami na bandeko epai likámá lisalemi. Sikawa namoni yango mpe nasimbi yango.” Mwasi moko musulmane oyo afandi pene na ye, alobaki na ye ete: “Bino mpenza bozali na bolingo bamoko na bamosusu. Lingomba ya solo ezali oyo na bino. Ngai nakokende sikawa kofanda na mboka na ngai, kasi nakolobela manso oyo bozali kosala awa.” Mwasi wana apesaki mpe bilei epai na bavolontere.
Ndeko mwasi moko oyo azalaki mobange, alobaki ete: “Nazalaki kolikya ete bokoya kotala ngai, kasi namizelaki te ete la Société akokaki kotinda moto moko ete amemela ngai mai.” Ayambaki ndeko oyo amemelaki ye lisalisi yango na koleláká.
Tokendeki kotala libota moko ya bato misato—mobali moko mpe mwasi, baoyo bazalaki basakoli oyo bazwi naino batisimo te, mpe mwana na bango ya mobali—mpo na kotikela bango karto monene ya miliki, mwa mampa, mai kitoko mpo na komela mpe mbongo. Na koyokáká ete bibongiseli wana bisalemaki na ba Témoins de Jéhovah, mobali alobaki boye ete: “Nazalaki mosangani ya molende na Lingomba ya protesta uta mibu 11. Kasi kino mbula 15 ya bitumba na Liban, bazwi naino te likanisi ya kosala likambo motindo oyo epai na basangani ya Lingomba na bango.” Mpe abakisaki ete: “Lingomba na bino ezali lisangá bobele moko oyo na Nzambe.” Mobali yango azwaki batisimo elongo na mwasi na ye na assemblée moko oyo esalamaki na Mai1990.
Nkulutu moko amonisaki mayoki na ye na maloba oyo ete: “Tozangi maloba ya komonisa botondi na biso mpo na bolingo oyo bomonisi epai na bandeko bazwaki makámá. Natungisamaki mingi wana namonaki etuluku moko ya bilenge bavolontere kotonga ndako ya baboti na ngai, likambo oyo libimisaki mpisoli na miso na ngai. Ata baninga na biso oyo bazali ba Témoins de Jéhovah te basepelaki mingi na oyo bazalaki komona. Tozali mpenza kotondo Jéhovah mpe lisangá na ye mpo na lisalisi oyo lipesameli biso. Maloba ya mokomi na nzembo oyo mazali na Nzembo 144:15 mazali solo: ‘Esengo na bato oyo Jéhovah azali Nzambe na bango.’”
“Bongo, bino bozali bato ya lolenge nini”
Ndeko mwasi moko, mama ya libota, akomaki ete: “Nalingi komonisa botondi ya bozindo mpo na bolingo oyo bomonisami na Jéhovah mpe lisangá na ye. Ba bombes ekwelaki ndako na ngai mpe ezikisaki yango. Bato mingi balobaki ete ekokaki kobongisama lisusu te. Kasi, tala yango oyo ezongi lisusu ya sika lokola soko nde ezwaki likámá te kati na bankama na bandako oyo ezikaki na móto to ebebaki na balabala na biso.
“Ata baninga na biso baoyo bazali ba Témoins de Jéhovah te, bazali kotuna biso ete: ‘Bolingo oyo euti wapi? Bongo, bino bozali bato ya lolenge nini? Bato nini oyo bakosalaka mosala na molende boye, bazali na kimya mpenza mpe bazali na etamboli malamu boye? Mapamboli epai na Nzambe oyo alonaki bolingo mpe elimo ya molende oyo kati na bino.’ Maloba na Nzembo 84:11, 12 makokanaki na libaku oyo: ‘Jéhovah Nzambe azali moi mpe nguba, Jéhovah akopesaka ngolu mpe nkembo; akoboya kopesa eloko malamu soko moko te epai na baoyo bazali kotambola alima.’”
Mobali moko oyo mwasi mpe bana na ye bazali ba Témoins de Jéhovah akomaki ete: “Natondi bino mpo na lisalisi oyo bopesi biso ete tokoka kotonga lisusu ndako na biso. Mosala na bino emonisaki mpenza bolingo ya boklisto, bolingo oyo bokomonanaka mingi te na mikolo na biso. Tika ete Nzambe apambola milende na bino.”
Nkulutu moko oyo ndako na ye ebongisamaki, alobaki ete: “Tozali na makoki te ya komonisa oyo ezali kati na mitema na biso. Tozangi maloba mpo na koyebisa bino boni tozali na botondi epai na Jéhovah mpe lisangá na ye. Na boumeli ya bosenga na biso, tomonaki ete Jéhovah azalaki pene na biso. Bolingo na bino epusaki basangani ya libota na ngai mobimba na kopesa mpe lisalisi na baoyo bazali na bosengá.”
Na Avril, ba Libanais 194 bazalaki na esengo ya kosala mosala ya pionnier auxiliaire. Butu ya Ekaniseli ezalaki na mwa kimya, oyo epesaki nzela na kotanga assistance ya bato 5 034. Ba assemblées nyonso oyo ebongisamaki esalamaki mpe, atako mobulu oyo mozalaki na mboka, bato 212 bazwaki batisimo na boumeli ya mobu wana. Mabota mingi kati na masangá, bakendeki bipai mosusu mpo na libela. Kasi bato oyo bauti kosepela kala mingi te na solo, bazali kokóla mpo na kozwa batisimo, mpe motuya ya basakoli na Bokonzi, oyo ezali lelo 2 726, ezali sé kobakisama. Na boumeli ya mbula ya mosala 1990, libota ya Jéhovah na Liban emonaki bosembo ya Jéhovah wana azalaki kobatela biso mpe kotamwisa biso na eleko oyo na yikiyiki.—Nzembo 33:4, 5; 34:1-5.