Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/12 lok. 30
  • Okoki koyanola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki koyanola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Likanisi ya boklisto na ntina na bakonzi baleki liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Kumisá Yehova Nzambe kaka moko ya solo
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Bokonzi ya nani osengeli kotosa?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • ‘Pusaná penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na yo’
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/12 lok. 30

Okoki koyanola?

Otangaki na likebi nyonso banimero ya Mosenzeli oyo euti kobima? Na yango, tala soki okoki koyanola na mituna milandi.

◻ Baklisto bapakolami mosusu bakobika nde na “bolozi monene” mpo na kotikala na mabelé, na mokili ya sika liboso ete bakamatama na likoló?​—Emoniseli 7:14.

Biblia ezali koyanola sikisiki te na motuna oyo. Masolo mosusu ya Biblia mazali kopesa likanisi lokola ete baklisto bapakolami bakoki kotikala na mabelé na ntango mokili ya sika ekosalama. Kasi, bamilio na bato oyo bazali kolikya kozala na bomoi libela na libela na mabele basili kozwa formation esengeli ete babongisa mokili ya sika. Na yango, emonani ete ntina ezali te ete batikali moke na baklisto bapakolami bazala na mokumba wana, mpe ekoki kosalama ete Nzambe akamata nokinoki baklisto bapakolami na nsima na kobomama ya Babylone Monene mpo ete “libala ya Mwana-na-mpate” esalema. (Emoniseli 18:2, 10; 19:2, 7, 8)​—15/8 to No. 16, lokasa 31.

◻ Na mikano nini bandeko mibali basengeli koluka mokumba ya mokengeli? (1 Timoté 3:1)

Soko moto moko alingi kokokisa mokumba ya mokengeli na komikitisa nyonso mpamba te alingi kosalela bamosusu, azali kosala mosala na ye na mikano malamu mpe akoki kopesa matomba ya elimo epai na baninga mosusu.​—1/9 to No. 17, lokasa 18.

◻ Mpo na nini ntoma Paulo alembaki te atako makambo oyo ayikelaki yango mpiko?

Ntoma alimboli boye ete: Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13) Ye moko amekaki komema mikumba na ye te, kasi abongwanaki epai na Jéhovah mpo ete asunga ye (Nzembo 55:22)​—1/9 to No. 17, lokasa 30.

◻ Paulo alingaki koloba nini wana akomaki na Baefese 4:26 ete: ’’Boyoka nkanda, nde bosala lisumu te’’?

Maloba oyo mamonisi ete tokoki mbala mosusu kosilika wana ezali biso na elónga; soki ezali bongo, tokosenzela ete totikala na ezalela wana te liboso ete moi elimwa.’ (Baefese 4:26) Mpo na ntina nini? Mpamba te soki toumeli na nkanda tokoki kopesa nzela na Satan le Diable ete akoka kosalela ezalela na biso, mpe mbala mosusu akopusa biso na kosala mabe mpe na yango kozanga kondimama na Nzambe (Nzembo 37:8, 9).​—15/9 to No. 18, lokasa 21.

◻ Kokesena nini ezali kati na motindo na mateya ya Ba Témoins de Jéhovah mpe oyo ya bakonzi na mangomba ya boklisto ya lokuta?

Ba Témoins de Jéhovah bazali koloba na bokonzi ya Liloba na Nzambe, nzokande bakonzi na mangomba bazali kolakisa malako na bato ya kala masili kobebisama na mateya na Bapakano oyo mauti na Babilone mpe na Ezipito. 1/10 to No. 19, lokasa 25.

◻ Mpo na ntina nini monene Mwana na Nzambe ayaki na mabelé?

Yesu ayaki na mabelé liboso mpenza mpo na kosukisa makambo na lokuta oyo Satana abimisaki na ntina na boyangeli na Jéhovah.​—15/10 to No. 20, lokasa 13.

◻ Na kobengáká bakonzi ya Leta ete “bakonzi baleki liboso,” tozali bongo kozanga limemya epai na Jéhovah? (Baloma 13:1, MN)

Te, mpamba te Jéhovah azali na bokonzi boleki bokonzi nyonso. Azali “Nkolo moyangeli na molongo mobimba,”“Nzambe oyo aleki likoló.” (Nzembo 73:28; Danyele 7:18, 22) Bakonzi yango baleki liboso bobele epai na bato, mpe kati na ezingelo oyo bazali kokokisa mosala na bango. Bazali na mokumba ya koyangela mpe ya kobatela bato.1/1 1, lokasa 12.

◻ Mpo na nini bolingo eleki mbuma mosusu ya elimo oyo etangami na Bagalatia 5:22, 23?

Bambuma mosusu ya elimo ezali bilembo ya bolingo, oyo etangami na esika ya liboso. Bizaleli nyonso bizali na ntina, kasi ekozala na biso na litomba moko te soki bolingo ezali te (1 Bakolinti 13:3).15/1 1, lokasa 14.

◻ Matomba nini mazali kozwama na mabondeli oyo tozali kosala mpo na baninga na biso baklisto?

Wana tozali komonisa kati na mabondeli na biso ete tozali komibanzabanza na kolongono ya elimo na bato mosusu, tokomiyokaka pene na bango, na bomoko elongo na bango kati na bolingo ya bondeko. Tozali kookela bango mawa, na kokaboláká mitungisi mpe mpasi na bango. Mokakatano nyonso mokoya mokobunga, mpe ekotika esika na makanisi ya elimo na kolendisa. maye makopesaka biso esengo mpe makokólisaka bolingo kati na biso. 15/11 to No. 22. lokasa 21, 22.

◻ Wapi bantina minene tozali na yango mpo na kosambela Jéhovah Nzambe?

Tosengeli kosambela Jéhovah mpo ete azali Mozalisi na biso, mpe bizaleli na ye bizali kobenda biso na kobelema pene na ye. (Deteronome 32:3, 4; 1 Yoane 4:8; Emoniseli 10:6) Lisusu, Biblia elobi ete: “Ezaleli ya kobanga Nzambe ekopesaka litomba na nyonso, awa ezali yango na elaka mpo na bomoi ya lelo mpe mpo na bomoi na ntango ekoya” (1 Timote 4:8, MN) Nzambe moko te, bobele Jéhovah nde akoki kolaka likambo motindo oyo mpe kokokisa elaka na ye.​—1/12 to No. 23, lokasa 6, 7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto