Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/12 nk. 25-26
  • “Ndako na miyibi” na ntango na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ndako na miyibi” na ntango na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/12 nk. 25-26

“Ndako na miyibi” na ntango na biso

KATI na zulunalo Natural History professeur colin Turnbull, ye oyo ayekoli sianse ya koyeba ezalela ya bato, ayebisaki likambo oyo amonaki wana akendeki na mboka Yelusaleme. Alobaki ete “esengo ya Noél” oyo abandaki kooka yango, “ebebaki nokinoki” wana amonaki babutiki ya engumba “kotonda na biloko bizangi ntina, bitekisami na ntalo makasi epai na bakiliya ya Noél (bato bayei na esika wana) baoyo bamonanaki lokola ete bakoboya kosomba yango te.”

Turnbull abakisaki na ntina na “esengo ya Noél” ete: “(Esengo yango) esilaki kolimwa na esika oyo nakanisaki mpenza ete esengelaki kolendisama—nkunda ya Saint-Sépulcre” (oyo photo ya katikati na yango emonani awa likoló). Kuna, Turnbull alembaki mpenza na ezaleli ya bato oyo bakendeki na esika wana, “baoyo bamonisaki polele mpenza kozanga limemya mpo na biloko na bulee;” “bazalaki kotindikana mpe kotutana na motindo na boklisto te, kotutáká bato na mabolongo ya maboko na bango mpo na kozwa nzela ya kokóta na ekotela ya nkunda oyo ezali nkaka mingi. Ntango nyonso, bato bazalaki koswana, kofingana mpe kosala makambo oyo mazalaki bulee te.”

Turnbull alobi ete, na esika ya “komonisa ezalela ya bosantu,” basángó “balongolaki makanisi nyonso mpo na oyo etali bosantu na komonisáká bango moko ezaleli mabe mpenza.” Alobaki na ntina na “moto moko alataki nzambala na langi ya chocolá, oyo elongi na ye ezipamaki na ekoti mpe azalaki lokola Raspoutine (sángó moko na mobulu mingi),” oyo azalaki “ntango nyonso kotindika bato oyo bamemaki eloko te kino pene na ekotelo ya nkunda, wana amonaki etuluku monene ya bato oyo bamemi ba buji minene to cierges (bato oyo bayaki mpo na kopesa lokumu na esika yango), baoyo bakambamaki na Raspoutine mosusu.” Yango wana, “koyinana makasi ezalaki kati na bato oyo bamemaki ba buji mpe baoyo bazalaki na yango te, mpe kati na bakonzi ya mangomba na koyinana, baoyo bazalaki kowelana mpo na ntango mpe esika.”

Moninga ya professeur Turnbull “azalaki nsima na nkunda wana, mosika te na esika yango, abombanaki na lidusu ya efelo.” Tala oyo professeur Turnbull alobaki: “Wana nazalaki kotala moninga na ngai, namonaki ye kotya loboko na ye ya mobali na libenga na ye, kolukáká soko akokaki kokuta mwa mosolo, wana loboko na ye mosusu etikalaki na ngambo mosusu lokola soko nde basimbaki yango. Ntango apesaki mosolo na lidusu, abimisaki loboko na ye ya mwasi, nsima nde moninga na ngai ayei kotelema ngwi . . . Asimbaki ekulusu moke ya libaya na loboko na ye ya mwasi, ekulusu oyo epelisamaki na esika oyo yango ebwakelamaki mai oyo babengi ete mai-mosantu, na sángó oyo azalaki na mokumba yango, ye oyo afukamaki mpe abómbánaki na lilusu yango, kozeláká bongo lifuta na ye.”

Yesu amonaki etamboli motindo moko epai na Bayuda na bopusi mingi baoyo bazalaki na temple, mpe alobaki na bango ete bakómisaki yango “ndako na miyibi.” (Luka 19:45, 46) Lelo oyo, ezali solo ete ‘bandako na miyibi’ motindo wana ezali bobele na Yelusaleme te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto