Makambo mazali koleka na mokili
Epekisami kobála
Mabe masalemaki na bakonzi ya mangomba mpo na likambo litali kosangisa nzoto, mayaki kobimisama na episkopo ya lingomba ya luthérien lokola “likambo oyo lisili kobombama uta bambula mingi.” Nzokande, totangi na zulunalo Los Angeles Times ete, yango ekobimisaka “mayebisi ya nsoni mpenza mpe ekomemaka na kofuta misolo mingi na bisambiselo, likambo oyo likweisi mangomba mingi.” Zulunalo yango ekobimaka mokolo na mokolo, ebakisi na kotangáká maloba ya basali na kompanyi ya assurances ete, na batribinale ezali na makambo 2 000 masambisami naino te likoló na mobulu mosalemi na bakonzi ya mangomba na ntina na kosangisa nzoto.
Epai mosusu, mwa makambo oyo malekaki mabe mpenza, masalemaki na bakonzi na mangomba ya katolike. Richard Sipe, monganga ekosalisaka maladi ya makanisi mpe sángó ya kala, atunaki basángó 1 000 mpe ba laike 500, mibali mpe basi, oyo mingi kati na bango bandimi ete basangisaki nzoto elongo na bakonzi ya mangomba. Engebene maloba ya Richard, maye mabisamaki kati na zulunalo Time, penepene na basángó 53 000 ya Amerike bazali sembola na ndai na bango ya kotikala monzemba. Mpo na Richard Sipe, pene na 28% ya basango basili kosangisa nzoto elongo na basi, kolongwa 10 kino 13% basili kosangisa nzoto mibali na mibali mpe 6% bazali kosangisa nzoto elongo na bana mike, mingi mpenza bilenge mibali. Na mibu motoba miuti kolaka. Lingomba ya katolike asilisaki na boninga nyonso, makambo koleka 100 na ntina na bizaleli kati na yango bakonzi ya mangomba batangamaki mpe, likambo oyo esengaki ete lingomba efuta kati na bamilió ya badolare 100 mpe 300.
Ebele na bato bakanisi ete bankaká wana ekoki kosila soki basángó bazalaki na lotomo ya kobála. Bamosusu bakokamwa na koyoka ete esika moko te kati na Biblia epekisi libala epai na ba ministres baklisto. Nzokande, uta ekeke ya zomi-na-mibale, Lingomba ya katolike azali kopekisa basango ete babala te. Totala ete wana alobelaki lipengwi koboyama ya losambo na peto oyo esengelaki kosalema nsima na liwa ya bantoma, Paulo alobi boye: ”Bamosusu bakopengwa longwa na kondima mpo na kotya likebi na maloba na kozimbisa mpe na mateya na bilimu mabe, mauti na bokosi ya bato na lokuta, . . . baoyo bakopekisaka libala.—1 Timote 4:1-3, MN.
Mpo na nini mobulu mingi boye?
Mboka Kanada ebangaki mingi na koyoka ete kobomama monene esalemaki na campus ya Université ya Montréal. Liboso na komiboma, mobomi na bato, mobali moko ya mibu 25 na nkombo Marc Lépine, abomaki mpenza bayekoli 14 baoyo bazalaki kotanga na Eteyelo mpo na kokóma ba ingénieurs mpe azokisaki basi mwambe mpe mibali minei, baoyo bazalaki mpe bayekoli. Ezali moko na koboma monene kati na lisolo ya mboka Kanada. Ministre-mokonzi abengaki koboma wana ete ’’mawa eleki mpenza monene oyo ekomelaki bato.’’
Engebene zulunalo Toronto Star, ’’uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, babomi motindo wana koleka 100 bazalaki (na Etats-Uni), mpe mingi mpenza na mibu ntuku mibale oyo miuti koleka.’’ Tata ya moko na bato oyo babomamaki na Marc Lépine, alobaki wana azalaki komilela ete: ’’Mpo na nini mobulu mingi boye kati na mokili? Mpo na nini bato bazali komisala makambo motindo oyo kati na bango na bango?’’
Biblia elimboli polele mpenza mpo na nini tozali komona bokóli ya mobulu na eleko na biso. Na yango, ntoma Paulo akomaki ete: “Mokili mobimba mozali na nsé na nguya na ye oyo mabe.” (1 Yoane 5:18, MN) Lolenge moko na mopepe oyo topemaka, elimo mabe euti na Satana, ye “oyo mabe,“ ezali koyangela makanisi bamposa mpe ata misala ya bato mingi. Elimo ya botomboki, ya moimi mpe ya lolendo “ezali kozimbisa mabelé mobimba.” (Emoniseli 12:9) Kasi, basambeli na Nzambe bazali komibondisa wana eyebi bango ete “mokili ezali kolongwa mpe mposa na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe ekoumela seko.”—1 Yoane 2:17.
“Mboka na Davidi” ezali epai wapi?
Soki okei na mboka Yelusaleme, mpe otuni epai wapi ngomba na siona ezali, na ntembe te bakomema yo mpenza na nkéka moko ezali na Sud ya engumba na kala. Na Est, esuki na lobwaku ya Tyropoeon mpe na Ouest, na lobwaku na Hinome, nkéka oyo eyebani mingi mpo azali na ndako-nzambe ya Dormition, mpe mpo ete nsongé na yango etombwani mingi.
Nzokande, bakarte mpe bililingi ebimisami na la Société Watch Tower, ezali komonisa ngomba ya siona ete etombwani mingi te, ezali na Est ya oyo ebengami lelo ngomba ya Siona. Nkéka yango ekabwani na mosusu na lobwaku ya Tyropoeon mpe esuki na Est na lobwaku ya Cédron.
Esika nini ngomba ya Siona na kala ezalaki kati na bisika wana mibale? Zulunalo (Biblical Archaeology Review ya Mai-Juin 1990) elobi ete “ngomba ya Siona ezali nkéka oyo ozali na ebimelo na moi . . . oyo mokonzi Davidi abotolaki na Bayebusi.” Ezali nsima wana Bayebusi balóngamaki na Bayisraele nde esika yango eyei kobengama “mboka na Davidi,” mpe lisusu “Siona.‘’ (2 Samwele 5:7) Totangi kati na zulunalo yango ete: “Ba arkeologe to bakundoli na biloko na kala bamonisaki polele ete, nkéka yango moke,” oyo ebengami mingimingi nkéka na ebimelo na moi, ezali ngomba Siona oyo engebene lisolo na Biblia, Davidi atongaki bandako mpo na mosala mpe mpo na losambo ya libota na Yisraele.—2 samwele 6:11, 12, 17.