Lolenge nini koyanola na bolingo na Nzambe na motema mobimba?
“Balingami, soko Nzambe alingaki biso motindo boye, ekoki na biso ete tolingana bamoko na bamosusu.”—1 YOANE 4:11.
1, 2. Lolenge nini tokoki koyamba na motema mobimba na bilembo ya bolingo na Nzambe?
JEHOVAH azali mpenza bolingo. Lisolo ya liboso esili kopesa biso likanisi na mitindo ndenge na ndenge ya bolingo wana. Bobele lisolo yango limonisaki lisusu ete Moize, Davidi mpe Yesu Klisto bayanolaki mpenza na bolingo yango. Ba Témoins de Jéhovah nyonso basengeli te kozala na mposa ya komekola bato yango? Na ntembe te.
2 Lolenge nini tokoki mpenza koyanola na bolingo na Nzambe? Yambo mpenza, na kotyáká Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso mpe na kolingáká ye na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na elimo na biso mobimba mpe na makasi na biso mobimba. (Malako 12:29, 30) Na maloba mosusu, tosengeli komipesa epai na Nzambe, mpe kozala na boyokani malamu mpe ya makasi elongo na ye. Tozalaka na mposa ya koloba epai na Tata na biso ya likoló na kobondeláká ye? Tobondelaka ntango nyonso na kolendendela, to mpe tosalaka mabondeli na biso mbangombango mpo na kosilisa noki? Ekomelaka biso mbala mosusu ete tozanga ntango ya kobondela? (Baloma 12:12; 1 Batesalonike 5:17) Tomikitisaka nde liboso na Jéhovah na kokumisaka ye mpe lisangá na ye mpo na mosala oyo tozali kokokisa? (1 Bakolinti 3:7; 4:7) Mpo na kosukisa, tozali nde na ezalela na elimo motindo moko na mokomi na nzembo oyo alobaki na Nzambe ete: “Mbala nsambo na mokolo moko, nazali kosanzola yo?”—Nzembo 119:164.
3. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali mpenza koyanola na bolingo na Nzambe, na bantango ya kominanola oyo tokolekisaka elongo na baklisto mosusu?
3 Bantango ya kominanola oyo tokolekisaka elongo na baninga na biso ezali kopesa biso nzela ya koyeba soko tozali mpenza koyanola na bolingo na Nzambe. Tolobelaka makambo na elimo to mpe ya mosuni? Mpo na yango, elimboli mpenza te ete tobongola bantango nyonso oyo tokokutana elongo na baklisto mosusu, na boyekoli na Biblia ya mozindo; kasi tokoki mpenza kokótisa makanisi ya elimo kati na masolo na biso. Na ndakisa, mpo na nini te : kolobela makambo tokutanaki na yango kati na mosala ya kosakola, kolimbola mokapo moko ya Biblia oyo tolingaka mingi, koyebisa lolenge oyo tokómaki ba Témoins de Jéhovah, to mpe kolobela likebi ya bolingo mpe mapamboli oyo Jéhovah azali kopesa biso?
4. Na likambo nini tosengeli kotya makanisi na biso wana tolembi mpo ete mokumba moko mopesameli biso te kati na lisangá na Nzambe?
4 libaku mosusu ya bomoi ekoki mpe kosalisa biso na koyeba soki tozali mpenza kososola bolingo na Nzambe, ezali na ntango oyo tozangi kopesamela mokumba moko kati na lisangá na Jéhovah. Tokómaka na ezaleli nini? Soko mposa na biso ya liboso ezali ya kokumisa Jéhovah, tokondimisama ete, Jéhovah akokumisama mpenza ata na nzela na moto nani aponami mpo na kokokisa mokumba yango. (Luka 9:48) Nzokande, soki tozali komibanzabanza mingi mpenza mpo na matomba na biso moko to mpo na oyo bato mosusu bazali kokanisa na ntina na biso, tokozala na mawa na kokanisaka ete totalelami lokola bato bazangi ntina. Kobosana te ete Jéhovah alingi biso. Amoni mbala mosusu ete na ntango oyo, kozwa mokumba boye to oyo kuna kati na lisangá, ekozala bozito mingi mpo na biso. Azali mbala mosusu kopambola biso mingi mpenza na makambo mosusu, mpe bilembo ya bolingo na ye bisengeli kosalisa biso na kobatela bokatikati na biso kati na elimo.—Masese 10:22.
Tolinga boyengebene mpe toyina ezaleli ya kobuka mibeko
5. Bopusi nini bolingo na Nzambe esengeli kozala na yango likoló na etamboli na biso?
5 Bolingo oyo Nzambe azali komonisa epai na biso esengeli kopusa biso na komekola Klisto, ye oyo alingaki boyengebene mpe ayinaki ezaleli ya kobuka mibeko. (Baebele 1:9) Ya solo, Yesu akolisaki bizaleli na ye kino na ezalela ya kokoka, likambo oyo lileki makoki na biso. Kasi, biso mpe tokoki komityela mokano ya kozala bulee, sembo mpe kotosa mibeko lokola ekoki na ezalela na biso ya bato bazangi kokoka. Mpo na kosala yango, tosengeli te bobele koyekola makambo na sembo mpe ya malamu, kasi, tosengeli lisusu kolona ezalela ya koyina, ya kotangwa mpe ya kooka mpii mpo na mabe. Ntoma Paulo akomaki ete: “Boyinaka oyo mabe, mpe bosimbaka oyo malamu.” (Baloma 12:9) “Koyina” ezali liloba moko makasi; likolobamaka mpo na eloko oyo ’’ekopesaka . . . mposa ya kosánza.”
6. Libateli nini tozali na yango mpo na komekama etyami liboso na biso, oyo euti na mokili, na nzoto na biso ezangi kokoka mpe na Diable?
6 Libateli nini tozali na yango mpo na komekama etyami liboso na biso oyo euti na mokili, na nzoto na biso ezangi kokoka mpe na Diable? Bosembo na biso epai na Jéhovah Nzambe, ye oyo apesi biso toli oyo ete: “Mwana na ngai, zala na mayele mpe,sepelisa motema na ngai, ete nazongisa monoko na ye oyo akopamela ngai.” (Masese 27:11) Ya solo, bosembo na biso epai na Jéhovah ezali kopusa biso na kozala na mayele na koyinaká makambo oyo ye ayini. Lisusu, ata soko likanisi ya kobuka mobeko moko na Nzambe emonani na biso elengi mpe esepelisi biso, tosengeli komilobela biso moko mpe komikundola lisusu ete, likambo motindo wana lizali na ntina te. (Bagalatia 6:7, 8) Lokola Yilimia 17:9 ekundweli biso yango, motema na moto ezali na bokosi, na mabe mingi mpe na lokuta. Ya solo, motema ya moklisto ekolingaka makambo kitoko, ya malamu mpe ya peto; kasi, mbala mosusu, makanisi mabe na masumu ekoki komema ye na kolinga lisusu mabe. Lokola mitema na Bayisraele, baoyo bazalaki kosambela Jéhovah, nde balingaki te kolongola “bisika na likoló” epai kuna bazalaki kopesa mbeka na bikeko, bobele bongo motema na biso mokoki mpe kozala na moimi mpe na bokosi. (1 Mikonzi 22:43; Deteronome 12:2) Na yango, ekoki kokóma ete motema na biso mozangi kokoka, eluki kolongisa makanisi na biso mpo na kotya biso na nzela na komekama; to mpe motema na biso mokolembisa bonene ya mabe oyo tomekami na kosala; to lisusu komeka kondimisa biso ete ata soko etumbu ekozala motindo nini, yango ekoumela te.
7. Mpo na nini tosengeli komibatela ete tolinga mabe te?
7 Mpo na botondi na ntina na bolingo na Nzambe, tosengeli komibatela ete tolinga makambo mabe te; na ndakisa, bozala minzemba to babalani, tosengeli kosenzela ete tomikotisa na nzela na pité te. Mbala mingi kozanga koyeba yango, oyo ekobandaka bobele na bokutani mpamba kati na baklisto mibale, mwasi mpe mobali ete bazalaka ntango nyonso elongo kozanga kolona likanisi mabe, ekobongwanaka na mposa makasi oyo ekomemaka baklisto yango na kosala lisumu mpe na kobimisama na lisangá. Ekómaka nkutu ete bankulutu bato basengeli kozala na efundeli te, bandakisa mpo na etonga, bazali komizimbisa na banzela motindo wana!—Tala 1 Mikonzi 15:4, 5.
8. Ndakisa nini epesami na ntoma Paulo, oyo ezali likebisi mpo na biso; ezalela na biso ekokani na elakiseli nini?
8 Totalela ndakisa ya ntoma Paulo, ye oyo, kati na mapamboli azwaki, amonaki bimonaneli mpe azwaki nguya eleki oyo na bato, mpe akomaki mikanda mingi na kopemama na Nzambe. Mpo alonga kobundisa makanisi na ye mabe, asengelaki kobeta nzoto na ye bibotu, kobeta yango makasi mpenza. Okanisi ete esengami na biso bobele moke? (Baloma 7:15-25; 1 Bakolinti 9:27) Ezali lokola soko nde tomati na bwato mpe mopepe makasi mpenza molingi kobwaka biso na boéta (chute). Mpo ete tozinda te, tosengeli koluka na makasi mpenza mpo na konana bipai mopepe mozali kouta. Mbala mosusu tozali komimona te ete tokóli mingi na elimo, kasi, wana tozali kosala milende makasi, tokopengola kokwea oyo ekomema na liwa. Na ntembe te, bolingo oyo Jéhovah azali komonisa epai na biso esengeli kopusa biso na kosala milende makasi mpo na koyina ezaleli ya kobuka mibeko, kasi kolinga boyengebene, mpo totikala sembo epai na ye.
Tomonisa bolingo epai na bondeko
9. Toli nini ntoma Yoane apesi biso na ntina na bolingo oyo tosengeli komonisa epai na bandeko na biso?
9 Bolingo oyo Nzambe azali komonisa epai na biso esengeli lisusu kopusa biso na kolinga bandeko na biso, lokola Klisto azali kolinga bayekoli na ye. (Yoane 13:1) Na ntina yango ntoma Yoane akomaki ete: “Bolingo ezali boye te ete biso tolingaki Nzambe, kasi ezali boye ete, ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbondi mpo na masumu na biso. Balingami, soki Nzambe alingaki biso motindo boye, ekoki mpe na biso ete tolingana bamoko na bamosusu.” (1 Yoane 4:10, 11) Yesu alobaki ete bakoyeba bayekoli ya solo na bolingo oyo bakozala na yango kati na bango. Boye te?—Yoane 13:34, 35.
10, 11. Wapi bamoko na mitindo oyo tokoki komonisa bolingo epai na bandeko na biso?
10 Tobosani te ete baklisto basengeli kozala na bolingo epai na bandeko; kasi ezali na ntina ete tomikundwela lisusu mitindo ndenge na ndenge oyo tokoki komonisa bolingo yango bamoko epai na bamosusu, mpo na kolanda ndakisa na Klisto. Tokeseni mpenza na mposo na biso, na bikólo na biso, na bizaleli na biso, na kelasi tosalaki mpe na etelemelo na biso na mokili; bolingo ezali kosalisa biso na kosilisa mikakatano. Epai mosusu, bolingo na biso epai na bandeko ezali kopusa biso na kozala na bomoko. Mpo ete tolingi bandeko na biso mingi, liloba moko mabe to mpe mwa nkaka moke ekoki te kolongola esengo na biso ya kokutana na bandeko na biso, baoyo tokoyikisanaka mpiko elongo na bango. (Baloma 1:11, 12) Likambo lileki mpenza ezali oyo ete, bolingo epai na bandeko ezali kopusa biso na komibongisa malamu mpo na makita mpe na kosangana mpenza na yango, mpo topesana simbisi na bolingo mpe na misala malamu.—Baebele 10:23-25.
11 Tokoki nde kosalisa bandeko na biso kati na mosala ya kosakola? Mpo na yango, esili komonana ete bamoko kati na bankulutu mpe basaleli na misala, bazali mbala mingi kobima na mosala ya kosakola bobele bango na bango to mpe bango moko, nzokande bakokaki kosenga mwa liboso, basakoli mosusu ya Bokonzi baoyo bazali na mposa ya lisalisi ete babima na bango elongo kati na mosala ya kosakola. Bankulutu mpe basaleli na misala oyo bazali komonisa bolingo na bango na motindo oyo, bakozwaka esengo mbala mibale na mosala na bango ya kosakola. Epai mosusu, mpo nini te komema elongo na biso mosakoli moko ya sika wana ezali biso kokende kotambwisa boyekoli ya Biblia na epai na moto moko?—Baloma 15:1, 2.
12. Lolenge nini tosengeli kolimbola 1 Yoane 3:16-18?
12 Bolingo ezali kopusa biso lisusu na kosalisa bandeko na biso oyo bazali kokelela. Ntoma Yoane akomaki ete: “Tosili koyeba bolingo mpo na oyo ete, ye wana asopaki bomoi na ye mpo na biso; ekoki mpe na biso ete tosopa bomoi na biso mpo na bandeko. Soko moto nani azali na bozwi ya mokili, mpe amoni ndeko na ye azali kokelela, mpe akangeli ye motema na ye, bolingo na Nzambe eumeli kati na ye boni? Bana, tolingana na bolingo ya maloba te to mpe ya monoko te, kasi na bolingo ya misala mpe na solo.” (1 Yoane 3:16-18) lelo, bazali mbala mosusu kosenga biso te ete tokufa mpo na bandeko na biso, kasi tozalaka mbala mosusu na mabaku ya komonisa bolingo na biso mpo na bango na mitindo mingi, bobele na maloba mpamba te, elingi koloba na monoko mpamba te, kasi lisusu na misala. mabe moko ezali te na“kolinga bandeko na biso na maloba, kasi, ntango bakómi kokelela, bolingo na biso bosengeli komonisama mingi mpenza Maloba oyo na Yesu ete, “esengo na kopesa eleki esengo na kozwa” etali mpe lisalisi na mosuni.—Misala 20:35.
13. (a) Tanga mwa bamoko na makambo na solo ya moboko oyo toyekoli na lisalisi ya lisangá na Jéhovah oyo lizali komonana (b) charles Taze Russell abimisaki maloba nini na sembo?
13 Tokoki lisusu komonisa bolingo na biso epai na bandeko na biso oyo bazali na mikumba kati na lisangá na Jéhovah oyo lizali komonana na mokili mobimba. Na ndakisa, tosengeli kokangana elongo na “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Ezala ata bambula boni tokokaki kolekisa na kotanga Biblia, soki ye te, biso moko tokokaki te koyeba solo na ntina na Jéhovah, na ntina na mikano na ye, na bizaleli na ye, mpo na ndimbola mpe ntina ya nkombo na ye, na Bokonzi, mpo na lisiko lisopamaki na Yesu, na ntina na likeseni kati na lisangá na Nzambe mpe oyo na Satana, tokokaki mpe te kokanga ntina oyo Nzambe apesaki nzela na mabe. Ezali na likanisi yango nde charles Taze Russell, prézida wa yambo na la Société Watch Tower, akomaki na 1914, ete: “Tozali libota oyo lipambolami mpe na esengo. Boye te? Nzambe azali sembo. Boye te? Soki bozali na boyebi malamu, boyoka nsoni te. Kasi, soko moko na bino amoni boyebi boleki oyo, tozali kolikya ete akolobela biso yango. Biso mpenza, toyebi eloko te koleka oyo-tobelemi soko pene te-bobele oyo tokutaki kati na Liloba na Nzambe. . . . Maloba na biso mazangi nguya mpo na kolobela kimya, esengo mpe bolamu, oyo boyebi malamu na Nzambe na solo esili kotya kati na mitema na biso mpe kati na bomoi na biso. Lisolo ya Mayele, ya Boyengebene, ya Nguya mpe ya Bolingo na Nzambe ekokokisaka mpenza bamposa ya elimo mpe ya mitema na biso. Tokoluka yango mosika te. Tokozala bobele na mposa ya kobakisa lisusu bososoli malamu koleka ya Lisolo oyo.” (La Tour de Garde, ya 15 décembre 1914, pages 377-378, na Lingelesi) Oyo nde solo kitoko ekomamaki kati na zulunalo yango!
Mosala na biso epai na baoyo bazali libanda na lisangá
14. Lokola Nzambe azali ntango nyonso komonisa biso bolingo, ezaleli nini tosengeli kozala na yango epai na baoyo bazali libandá ya lisangá?
14 Bolingo oyo Nzambe azali komonisa epai na biso ntango nyonso esengeli kopusa biso na kosalela bolingo na bazalani, epai na baoyo bazali libanda ya lisanga. Lolenge nini? Na kosalisáká bango na mosuni, engebene mabaku mamonani. Nzokande, likambo lileki ntina mingi ezali boye ete, tokoki komonisa bolingo ya bazalani na kosakoláká nsango malamu na Bokonzi na Nzambe mpe na kosalisáká baoyo balingi boyengebene ete bakóma bayekoli na Yesu Klisto. Tobimaka mbala na mbala na mosala ya kosakola, to mpe tozwaka yango na bopotu? Mosala yango ekóma bobele momeseno mpe elembo mpamba epai na biso? To mpe topusami mpenza na bolingo mpo na bazalani? Tomityaka na esika na bato mosusu? Tozalaka na motema molai epai na bato: totikelaka bango ntango ya koloba? Tolendisaka bango na koloba? Na yango, na esika ete tolobaka biso moko, mpo na bolingo na bazalani, toyokamelaka bato oyo tozali kokutana na bango kati na mosala ya kosakola mpe tokosala masolo malamu elongo na bango, likambo oyo likobimisa matomba.
15. (a) Mpo na nini ebongi malamu kosalela liloba“litatoli na libaku malamu” na esika na “litatoli na mbálákáká”? (b) Mpo na nini tosengeli kosimba mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli?
15 Tosimbaka nokinoki mabaku malamu oyo tozalaka na yango mpo na kopesa litatoli? Toyeba boye ete, ezali te mosala oyo mokosalemaka kozanga komibongisa, to mosala oyo mozali na ntina mingi te,oyo tokokokisa na ‘mbálákaká.’ Ezali bongo te. Litatoli na libaku malamu ezali na ntina mingi; mpe na bolingo mpo na bazalani, tosengeli kozala na mposa makasi ya kosangana na yango, mpe boye na kobimisáká masolo elongo na bato mosusu. Epai mosusu, mbala mingi mosala yango mokobotaka mbuma mpenza. Wana ezalaki ye na nord ya ltalie epai assemblée ya ba Témoins de Jéhovah ezalaki kosalema, moklisto moko akendeki na esika bakobongisaka mituka mpo na kotyeisa mwinda ya sika na vuatire na ye. Wana azalaki kozela, apesaki litatoli epai na bato oyo bazalaki wana mpe apesaki bango lokasa ya libengami mpo na diskur piblike ya mokolo na lomingo. Na assemblée moko esalemaki na Rome, na mobu molandaki, moklisto moko oyo ye ayebaki te, ayaki kopesa ye mbote na móto nyonso. Ezalaki nani? Ezalaki bongo moko na bato oyo ye apesaki lokasa ya libengami na esika oyo bakobongisaka mituka, na mobu moleki! Moto yango akendeki kolanda diskur piblike mpe asengaki boyekoli na Biblia. Sikawa, ye mpe mwasi na ye bazali ba Témoins de Jéhovah. na ntembe te, litatoli na libaku malamu ekoki kopesa esengo mingi.
Tokóba koyanola na bolingo na Nzambe
16. Mituna nini oyo mbula mosusu mikozala malamu ete tomituna yango?
16 Na ntembe te, Jéhovah asili komonisa bilembo mingi ya bolingo epai na bikelamu na ye. Lokola tomonaki yango, Makomami mazali kopesa biso bandakisa kitoko ya bato oyo bayanolaki na motema moko mpenza na bilembo ya bolingo na Nzambe. Tala mpo na nini mokomi na nzembo alobaki wana apemamaki na Nzambe, ete: “Tika ete basanzola Jéhovah mpo na boboto na ye; mpo na misala na ye na kokamwa epai na bana na bato.” (Nzembo 107:8, 15, 21, 31) Toyambi nde ngolu na Nzambe mpo na mpamba? Soko moke te. (2 Bakolinti 6:1) Na yango, tika ete moto na moto amituna mituna oyo ete: ‘Nazali mpenza na botondi epai na Nzambe mpo na bolingo oyo asili komonisa, mpe nazali na elikya makasi ete akomonisela ngai lisusu bilembo ya bolingo na ye? Mapamboli nyonso oyo, mazali nde kopusa ngai ete nalinga Jéhovah na motema na ngai mobimba, na molimo na ngai mobimba, na elimo na ngai mobimba mpe na makasi na ngai mobimba? Nazali kotya mpenza motema na ngai epai na Nzambe? Nalingi mpenza boyengebene, mpe nayini ezaleli ya kobuka mibeko? Namonisaka bolingo epai na bandeko? Namekaka kolanda matambe nyonso na Yesu kati na mosala na ngai ya kosakola?’
17. Nini ekokóma soki tolandi koyanola na molende mpenza na bolingo na Nzambe?
17 Ya solo, ezali na mitindo mingi na komonisa botondi na biso epai na Nzambe, mpo na bolingo monene oyo asili komonisa yango epai na biso. Soki tokosimba mabaku nyonso mpo na komonisa botondi na biso epai na Tata na biso ya likoló, bokosepelisa motema na ye, tokozala lipamboli mpo na bato mosusu mpe tokozwa esengo, kimya mpe kosepela. Tokoki bongo kolanda koyanola na molende mpenza na bolingo na Nzambe.
Bozongeli?
◻ Ndenge nini tokoki koyanola na motema moko na bolingo na Nzambe?
◻ Ndenge nini tokoki komibatela na komekama?
◻ Tanga mwa mitindo oyo tokoki komonisa bolingo epai na bandeko?
◻ Bolingo oyo Jéhovah azali komonisa epai na biso esengeli kopusa biso na kosala nini epai na bazalani na biso?
[Elilingi na lokasa 17]
Mpo ete topengola kokwea, tosengeli kobundisa bopusi na masumu
[Elilingi na lokasa 18]
Bankulutu bazali komonisa bolingo epai na bandeko na kobimáká elongo na basangani mosusu ya lisangá kati na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 19]
Charles Taze Russell, prézida wa yambo na la Société Watch Tower, alobelaki kimya, esengo mpe bolamu oyo bobele Nzambe akoki kopesa