Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/10 lok. 21
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bato oyo bazali kosangisa nzoto mibali na mibali​—Bazali ndenge moko na bato mosusu liboso na Nzambe?
  • Kozongisa makila ezalaka ntango nyonso na makama
  • Pape mpe mosala ya soda
  • Makila ekobikisa bomoi: ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ekoki kondimama?
    Lamuká!—2012
  • Totambola engebene malako na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/10 lok. 21

Makambo mazali koleka na mokili

Bato oyo bazali kosangisa nzoto mibali na mibali​—Bazali ndenge moko na bato mosusu liboso na Nzambe?

Kati na mboka Queensland(Australie), bosangisi nzoto mibali na mibali atako yango esalemi na kobombama epai na bato oyo bayokani, ekweisami na mobeko. Kala mingi te, kati na mboka yango, etuluku moko ya basambeli ya ntina mingi elobaki polele mpo na kotemela mobeko wana mpe elobaki ete kosangisa nzoto mibali na mibali etalelami te lokola lisumu.

Engebene zulunalo courier-Mail, etuluku wana esalemi na ba anglicans, bakatolike, ba luthériens, babatiste, basangani ya Lingomba na bomoko mpe ba Quakers (Société des Amis). Komonisaka ete mobeko wana na ntina na bato oyo bazali kosangisa nzoto mibali na mibali alongami likoló na kozanga boyebi mpe na makanisi mabe, balobaki ete: “Soki tozwaki etelemelo oyo. ezali mpo ete tozali kondima ete bato nyonso bazali ndenge moko liboso na Nzambe mpo na yango basengeli mpe kozala motindo moko liboso na mobeko. Tokanisi ete moto oyo azali kosangisa nzoto na moninga na ye mobali azali mpenza moto lokola motó nyonso, azali ndenge moko na moto oyo azali koyoka mposa ya kosangisa nzoto na mwasi.”

Ezali solo ete bato nyonso bazali kobotama ndenge moko, kasi nini ezali likanisi na Nzambe na ntina etali kosangisa nzoto mibali na mibali? Biblia ezali kokweisa misala nyonso ya bosangisi nzoto mibali na mibali, eyebisi ete ekanamaki bongo te, elobi ete ezali koyeisa koyinama na Nzambe, mpe ete ezali komema na kufa. Ezalaki bobele likambo na Yisraele ya kala te, kasi lisusu na eleko na boklisto (Levitike 18:22; Baloma 1:26, 27) Ntina moko ezali te na koluka kopesa ndimbola ya Makomami mpo na koyeba ete misala yango mikweisami: “Moto na pite. . . . mpe bakembi na nsoni mpe mibali bamibebisi na mibali . . . bakosangola Bokonzi na Nzambe te.”​—1 Bakolinti 6:9, 10.

Na esika ya koloba ete, kosangisa nzoto kati na mibali na mibali etalelama lokola lisumu te, baklisto ya solo bazali kolendisa baoyo bazali baombo ya misala wana mizali koyokisa Nzambe nsoni, ete batika yango na Kobongwanáká epai na Liloba na solo.

Kozongisa makila ezalaka ntango nyonso na makama

Bolukiluki moko ya sikawa emonisaki ete croix-Rouge ya amerike esalaki ebele na mabunga mataleli bosaleli na makila oyo ezalaki na bokono. Ezali nkutu kopesa katikati ya 12 kino 15 milió ya boike na makila oyo masalelami mbula nyonso kati na Etats-Unis. Ntango makila oyo mazali na mikrobe mamonani, esengeli koyebisama nokinoki na FDA (Lisangá etalaka bilei mpe nkisi), lisangá ya gouvernement fédérale. Nzokande, engebene New York Times, inspecteur fédéral moko ayebisaki ete mbala mingi croix-Rouge ya amerike ezalaki koboya kosala likambo yango inspecteur yango alobi ete botaleli ya badosye epesaki nzela na komona makambo 380 ya bosaleli na lolenge mabe ya makila oyo esili kozwa mikrobe, oyo eyebisamaki te epai na bakonzi. Lisusu, lnspecteur yango amonisaki ete kati na bato 228 oyo bazwaki SIDA mbala mosusu mpo na bozongisi makila, croix-Rouge ya amerike eyebisaki na FDA bobele mpo na bato 4.

Atako ezali kotalelama naino lokola nkisi oyo ezali kobikisa bomoi, kozongisa makila na nzoto ezali kobenda liwa ya bankoto na bato mbula nyonso. Na yango, mpo ete bazali kotosa na mobeko na Nzambe na ntina na makila, basambeli ya solo na Nzambe babatelami na makambo oyo mazali kouta na bozongisi makila. Nzambe apesaki mobeko ete: “Okolia yango te (makila): Okosopa yango na nse lokola mai. . . . Okolia yango te ete makambo na yo nyonso mazala malamu, mpe oyo na bana na yo na nsima na yo, wana ekosala yo yango ezali sembo.”​—Deteronome 12:23-25.

Pape mpe mosala ya soda

Mbula eleki, pape alobaki liboso na basoda 7 000 oyo bazalaki na kelasi ya ba officiérs ya limpinga ya cecchignola, na Rome. Na libaku wana, bilenge officiérs minei oyo bazalaki komonisa limpinga batunaki pape soki mosala na soda ezali na boyokani elongo na lisosoli ya moklisto. Mpo na koloba sikisiki, engebene Osservatore Romano, zulunalo ya etuka ya Vatican, batunaki ete: “Moto akoki na mbala moko kozala moklisto ya sembo mpe soda ya sembo?” Pape ayanolaki ete: “Ezali mpasi te to mpe nkaka te mpo na koyokanisa babiangami ya moklisto elongo na mosala ya soda. Soki moto akani kosala mosala ya soda na lolenge malamu, yango ekoki kotalelama lokola mosala ya kosepelisa ya kitoko mpe ya lokumu.”

Kasi, likanisi wana ezali mpenza na boyokani na ezalela ya koboya komikotisa na makambo ya mokili oyo baklisto ya liboso bazalaki na yango? Kati na mokanda na ye La religion vue par un historien (angl.). Arnold Toynbee atangi likambo ya Maximillianus. martyr ya ekeke na misato, ye oyo bakatelaki etumbu ya liwa na tribinale moko ya baromé mpo aboyaki kosala mosala ya soda. alobaki ete: “Nakosala mosala te. Bokoki kokata ngai nkingo, kasi nakosalela mikonzi ya mokili oyo te; ezali Nzambe na ngai nde nalingi kosalela.” Mpo na nini, liboso na liwa ya solo mpenza, aboyaki kosala mosala ya soda? Mpo ayebaki ete bayekoli na solo ya Klisto basengeli ‘kozala bato ya mokili te,’ lokola Yesu azalaki moto ya mokili te. Lisusu, azalaki kotalela ete etumba ya moklisto ezalaki ya elimo, na boyokani na maloba oyo ya ntoma Paulo ete: “Kobunda na biso ezali na nzoto te, mpo ete bibundeli na etumba na biso bizali na nzoto te.”​—Yoane 17:16; 2 Bakolinti 10:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto