Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/9 lok. 28
  • Ndimbola ya masese

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndimbola ya masese
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini bayengebeni bakofuluka ntango bato mabe bakufi?
  • Tambolá na ‘nzela ya sembo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • ‘Nzambe andimaka moto malamu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • ‘Mapamboli ezali na moyengebene’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Sepelá na boyengebene ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/9 lok. 28

Ndimbola ya masese

Mpo na nini kosenga lipwepwe na moyini na kobondela?

Na kopemama na Nzambe, moto na mayele mokomi na Masese amonaki likambo oyo ete: “Mpota azokisami na molingami ezali na bosembo, nde kopepwa, na moyini, esengeli kosenga yango na kobondela.” (Masese 27:6, MN). Ososoli nini na maloba oyo?

Na elobeli na elilingi, soki moninga azokisi yo mpota, asali yango na lolenge ya bosembo. Soki apesi yo toli, ezali mpo ete alingi yo mpenza mpe alingi bolamu na yo. Ozali na mposa te ya kosenga epai na moninga ya solo lisalisi yango, ezala ata mpamela, soko yango esengeli. Epai mosusu, okomonisa mayele mingi soki ondimi na motema malamu batoli na ye, makambo oyo ekolobela yo to mpamela oyo ebongi na yo.

Nzokande, soki olingi ete moto oyo ayini yo asala malamu mpo na yo, osengeli kosenga ye yango. Mpo na ntina nini? Mpamba te, mpo na koyina oyo azali na yango epai na yo, akoki te kozwa ntango ya kopwepwa yo, kasi na esika na yango akolinga asalela yo makambo mabe. Soki ekoki kozala ete asalela yo na bolamu, ekozala na mpasi mingi mpe nsima ya kasenga ye na kobondela.

Mpo na likambo yango, Yesu apesaki lisese moko na kosepelisa mingi. Mokolo moko, alobaki mpo na mwasi moko mokufeli​—mobali oyo alongisamaki na mosambisi oyo azalaki kobanga Nzambe te mpe azalaki kotosa moto te. Ndenge nini alongaki? Mosambisi alongisaki ye bobele mpo ete atikaki te kosenga ye na mawa. Yesu apesaki lisese yango mpo na komonisa epai na bayekoli na ye “ntina oyo esengeli na bango kobondela ntango nyonso mpe kolemba te.”​—Luka 18:1-8.

Ndenge nini bayengebeni bakofuluka ntango bato mabe bakufi?

Totangi na Masese 28:28 ete: “Ekotelema bato mabe, moto akomibomba; kasi ekokufa bango, bayengebeni bakofuluka.” Ndenge nini yango ezali komonana?

Ekomaka ete bato mabe “batelema”, na ndakisa ntango bakonzi mabe bazwi bokonzi. Na ntango yango, moyengebene akobombama, mbala mosusu mpo na kobanga konyokwama. Ezali kokamwisa te, mpamba te “moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi”.​—Mosakoli 8:9.

Na kokesana, ntango moto mabe akufi, bayengebeni “bakofuluka”. Ndenge nini yango? Na ndenge emonani, na ntango yango bayengebeni bakomibomba lisusu te mpe bakomonana na bato nyonso. Na bongo bakokola mpe bakomonana mingi mpo ete bazali lisusu komibomba te. Soko, bobele na ntango yango, bato malamu bazwi bokonzi, bazali kopesa etumba na bato mabe mpe bazali kopesa nzela na bosembo, yango nde ekoki kokitisa motuya na bato oyo bazangi sembo mpe kokolisa oyo ya bato na sembo.​—Tala Masese 28:12; 29:2.

Mosika te bayengebeni bakomona kolimwa ya bato mabe na mabelé, na “mokolo na nkanda na Jéhovah” oyo esili kobelema. Na yango, boluka boyengebene mpe komikitisa engebene mitinda ya Nzambe; soko nde bokobombama mpe bokomona mokili ya sika elakami na Nzambe, epai kuna bayengebene bakozala mingi mpenza.​—Sofoni 2:2, 3; 2 Petelo 3:11-13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto