Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/8 lok. 32
  • Osengeli kondima Trinité?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli kondima Trinité?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/8 lok. 32

Osengeli kondima Trinité?

Kati na titre moko elobeli mangomba na Sunday Gleaner, zulunalo oyo ebimisami na Jamaike (Antilles), lan Boyne akomaki boye na ntina na brochure moko ebimisamaki na ba Témoins de Jéhovah na mbula oyo euti koleka:

’Mpo na mokanda wana, tosengeli koloba ete ba Témoins basali ’malamu mpenza’. Atako ekomamaki na maloba na petee mpenza oyo ata elenge akoki kotanga kasi tokoki koloba kozanga kolekisa ndelo ete mokanda yango etondi na maloba na bato oyo bayekoli mingi Biblia mpe maloba ya mikanda mingi ya lokumu. . . . Brochure Doit-on croire à la Trinite? ezali mokanda ya ba Témoins oyo eleki kitoko. Kobanda sikawa, bakoteli ya Trinité, to ya banzambe na Yesu, basengeli bobele kosalela yango. Kati na brochure yango, tozali kokuta maloba mingi oyo mazwami na mikanda ya histware mpe ya teoloji oyo ezali komonisa ete liteya ya Trinité euti na Biblia te. Kati na yango, tozali kokuta maloba na mokanda oyo kitoko Encyclopédie des religions: ‘Bato na teoloji nyonso bandimi ete kondimana na sika ezali ata na liteya moko te ya polele na ntina na Trinité.”’

lan Boyne abakisi boye: ‘Ezali mpenza mpasi mpo na mokomi ya mokanda wana (encyclopédie) ete alakisa lolenge nini moto moko ya lingomba oyo azali bobele na boyebi moke, ata nkutu oyo azali na boyebi mingi koleka bamosusu, akoki kotemela makanisi oyo mazali kondimisa mpe mabongi na koboya te, oyo mapesami na ba Témoins mpo na kokweisa likanisi oyo engebene yango Yesu azali Nzambe. Soki olingi kozwa brochure yango, tuna ba Témoins ya mboka na bino.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto