“Etinda mpo na kobokola mwana oyo akozala na esengo mpe na makoki”
Ezali na titre oyo nde zulunalo Aspects médicaux de la sexualité humaine (angl. ebimisaki lisolo moko oyo kati na yango lrene Jakab, oyo azali molakisi ya psychiatrie na université moko, amonisi engebene ye, nini esengeli kosala mpo na kobokola mwana ete akoka kozala na bomoi malamu ntango akokóma mokoló. Kati na ‘etinda’ na ye, alobeli ntina oyo baboti basengeli kolinga mwana na bango, kolakisa ye na kokesenisa malamu ná mabe mpe na komonisa ye lolenge nini kozwa makatami.
Na likanisi na ye, “etinda” oyo epesamaki epai na baboti esengelaki mpenza te kosalema na lombango, na kosenga mingi te mpo ezala na lolenge ya kokoka, na kotika mpe te ete azala mpenza mabe to kopesa nzela na mabe.
’Etinda’ ya docteur Jakab ezali na makambo mabongi mpenza. Kasi esili koleka mibu mingi oyo Biblia ezali kopesa batoli motindo moko epai na baboti. (Na ndakisa, tala Masese 4:1; 13:24; 22:6; Bakolose 3:21.) Nzokande, Biblia ezali kolobela likambo oyo profesere wana alobelaki yango te: ntina monene oyo ya koyekolisa bana ete balinga Mozalisi mpe bayeba Liloba na ye malamu. Ntoma Paulo akomaki boye: ’Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobokola bango na mateya mpe na toli na Jéhovah.”—Baefese 6:4, MN; Deteronome 6:4-7.
Kozanga kozwa mateya bana bakoki mpenza kokóla kozanga eloko moko oyo ekoki kopekisa bango mpo na etamboli mabe, likambo oyo likoki kozala likamá kati na mokili oyo ya bizaleli mabe mpe oyo esili kobeba.