Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/7 nk. 24-26
  • Na esanga ya melita koyamba bapaya epesi bolamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na esanga ya melita koyamba bapaya epesi bolamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bapaya bamemi na nsango malamu
  • Kobondisama oyo ezali kouta na Makomami
  • Elendiseli mpo na kozala na molende
  • Ndakisa malamu mpo na komekola
  • Kolendisana
  • Eloko ya motuya monene oyo tosengeli kokabola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Sepeláká na elikya
    Lamuká!—2006
  • Elikya mpo na baoyo bazangá ndako mpe babola
    Lamuká!—2015
  • Paulo akei Roma na masuwa
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/7 nk. 24-26

Na esanga ya melita koyamba bapaya epesi bolamu

NTOMA Paulo azalaki na esengo mpo na konyata lokolo na ye na esanga ya Melita na ntango azindaki na masuwa na ekeke ya liboso ya ntango na biso. Bafandi ya esanga yango bayambaki bango na ‘etingya’, ye mpe baninga na ye ya mobembo. Ya solo, bafandi ya Melita to Malte bamonisaki epai na batamboli “motema boboto mpenza”.​—Misala 28:1, 2.

Na nsima, Publius, moto monene ya esanga, ayambaki Paulo mpe baninga na ye na boyambi kitoko mpe ‘apesaki bango esika malamu ya kolala na boumeli ya mikolo misato’. Ntango nsango epalanganaki ete Paulo abikisaki tata na Publius oyo azalaki na fiévre mpe pulupulu ya makila, “ baoyo mosusu babelaki na esanga bayei epai na ye mpe babikisami”. (Misala 28:7-9) Kasi Paulo asalaki makambo mingi koleka. Alonaki milona na solo kati na mitema ya bafandi wana na esanga oyo na boyambi, likambo oyo epesaki bango bolamu mingi. Na mikolo na biso, na esanga ya Melita likambo motindo moko ezali mpe kosalema bongo. Totala ndenge nini yango ezali koleka.

Bapaya bamemi na nsango malamu

Soki otali yango longwa na likoló, esanga ya Melita ntango engengisami na moi ezali komonana lokola diamant kati na ebombelo ya langi ya mai ya mpondu ya Méditerranée. Wana mopaya azali kobelema na libanda na mpepo ya Luga, azali komona esobe oyo engengisami makasi na moi epai kuna, mpenzampenza matiti mazali komonana mingi te. Nsima na kokita, akoyebisama ete esanga yango ya bakilometele 16 na bolai mpe kilometele 11 na bokuse ezali, penepene na bafandi 347 000, Bandako nzambe mpe ba cathédrales na esanga ya Melita oyo etongami lokola litimbo mpe mosusu etelemi lokola mbanzi emonisi ete bazalaki kosepela na losambo. Kasi na ekeke ya ntuku mibale, ndenge nini bafandi ya Melita bazwaki litomba na botamboli ya ba Témoins de Jéhovah na esanga na bango?

David, mokengeli ya zongazonga, abetaki na ekuke ya Juliana, ye oyo andimaki nsango ya Bokonzi. Juliana alobi ete: “Lokola nazalaki na bosepeli te mpo na lolenge Mangomba emikotisi na politike, namekaki komona kati na Biblia solo etali guvernema na Nzambe. Kasi, na boumeli ya botangi na ngai, nazalaki kokutana na makambo mingi ya mpasi mpo na kokanga ndimbola na yango. Kanisa naino ndenge mposa na ngai elamusamaki ntango mobali oyo abetaki ekuke epai na ngai atunaki ngai soki nayebaki oyo Bokonzi na Nzambe elimboli. Nasengaki ye mbala moko alakisa ngai eyano kati na Biblia na ngai ya katolike. Ezali yango nde asalaki Mokolo wana, nayebaki ete nazwaki solo.”

Temwe moko ya esanga yango azwaki bibongiseli mpo na koyekola Biblia elongo na Juliana. Ntango David azongaki lisusu na Melita sanza motoba na nsima, akamwaki na esengo na komona ete ezalaki Juliana moto ayambaki ye na Salle du Royaume! Aumelaki te mpo na kokoma mosakoli ya nsango malamu na Bokonzi.

Mobali ya Juliana, Francis, ye mpe atungisamaki na mateya ya Lingomba. Mokolo moko wana ekendaki ye kotala mwasi na ye na lopitalo, akutaki ye azali koyoka babande kasete ya badiskur piblike oyo epesamaki na Salle du Royaume. Na koyokaka lisolo moko oyo elobelaki mpo na libota, Francis amonaki ete batoli ya Biblia ezalaki na litomba mingi, yango epusaki ye na kozwa ekateli ya kobanda koyangana na makita ya boklisto. Aumelaki te kokanga ntina ete esengelaki na ye kosilisa likambo moko. Ezalaki likambo nini?

Uta mibu ntuku mibale,Francis azalaki mosali kati na casino moko (esika babetaka masano ya mbongo). Ayebaki sikawa ete mosala na ye, ezalaki na boyokani te na mitinda ya Biblia oyo mizali kokweisa lokoso mpe bilulela (Baloma 13:9, 10; 1 Bakolinti 6:9-10) Francis andimi ete: “Atako na ebandeli nazangaki kondima ya solo mpo na koluka mosala mosusu, nabondelaki mpo na kosenga Jéhovah asalisa ngai. Nsuka na yango, nazwaki mosala mosusu oyo epesaki ngai nzela na kobokola mwasi na ngai mpe mwana na ngai ya mobali, Sandro.” Sikawa, Francis azali nkulutu kati na lisangá ya ba Témoins de Jéhovah ya esika oyo ye afandi.

Kobondisama oyo ezali kouta na Makomami

Rose afandaki malamu elongo na George, oyo ye azalaki mwasi na ye uta mibu motoba, wana ekufaki ye na lolenge mabe kati na aksidá. Abondisamaki te na koyokaka sángo koloba na ye ete Nzambe abengi George mpamba te azalaki na zuwa mpo na bolingo oyo ye azalaki na yango mpo na mobali na ye. Rose anyokwamaki makasi na makanisi kino nkutu azwaki likanisi ya koboma bana na ye mpe komiboma ye moko na nsima.

Kasi mbongwana monene esalamaki mpo na ye ntango Helen, moninga na ye moko ya penepene ya Témoin de Jéhovah, abandaki koyekola Biblia elongo na ye! Rose aumelaki te na kobondisama na liteya na Biblia oyo etali lisekwa. (Yoane 5:28, 29) Bobele na ntango yango, Peter, mokengeli mosusu ya zongazonga alendisaki ye mingi. Rose azwaki matomba mingi na ba diskur na ye oyo ezalaki kolobela lisekwa. Lokola alendisamaki na elikya wana, asanganaki na Helen mpo na kopesa litatoli epai na bato nyonso, mpe, sikawa, bango mibale bazali ba pionniers permanents, elingi koloba basakoli ya Bokonzi, ya ntango nyonso.

Elendiseli mpo na kozala na molende

Joe abotamaki kati na libota monene, mpamba te azali na bandeko mibali mpe basi zomi na mibale. Nakolendisama na mokengeli ya zongazonga, apesaki litatoli na molende nyonso epai na basangani mingi ya libota na ye. Alobi: “Na ebandeli bazalaki komona ete makambo oyo nazalaki kolimbola bango na lisalisi ya Biblia ezalaki na ndimbola. Kasi ntango bamonaki ete mposa na ngai ya kokoma Témoin de Jéhovah ekolaki, babongolaki makanisi na bango mpe bango nyonso batemelaki ngai, mingi mpenza tata na ngai.” Ezalela na bango ekitisaki molende ya Joe?

Mpenza te! Na ndakisa, Joe apesaki litatoli na moko ya bandeko na ye ya basi oyo bébé na ye azalaki na maladi pene mpo na kokufa. Alobelaki ye na molende nyonso elikya ya lisekwa.

Sikawa, azali Témoin de Jéhovah. Mpe moko ya bandeko mibali ya Joe oyo aleki na mbula mpe libota na ye bamonisaki bosepeli. Nsuka na yango, bazwaki ekateli mpo na Bokonzi na Nzambe. Tata na Joe asilikaki makasi koleka. Mpe abenganaki Joe na ndako na ntango oyo leki na ye ya mwasi ya moke mpenza abandaki mpe koyekola Biblia. Kozanga kolemba, Joe asalelaki libaku ya vizite nyonso oyo azalaki kosala epai na baboti na ye mpo na kolobela bango solo ya Biblia. Mokolo moko, tata na ye atombokaki lisusu mpe alobaki na ye ete: “Mpo na nini okoki kokende koloba na sángo te? Ye, ayebi Biblia, malamu!” Joe ayanolaki ete akozala na esengo ya kosala yango soki tata na ye akei kotika ye. Ndenge nini vizite na bango elekaki?

Joe ayebisi ete: “Toyokanaki mpo na mokolo mpe ngonga, kasi sángo alingaki koyeba motó ya lisolo mpo na komibongisa, mpamba te, engebene elobeli na ye, abimaki na séminaire esili koleka mibu nsambo, mpe azalaki bongo na mposa ya kosala mwa bolukiluki. . . . Kasi na nsuka ya poso moko, ya sanza moko, mpe nkutu ata basanza mibale, sango atosaki te rendez-vous. Ntango tata na ngai amonaki likambo yango, abongolaki likanisi na ye mpo na Lingomba, mpe, moke moke, ayaki komona ete makambo oyo nayekolaki kati na Biblia ezalaki solo.” Nsuka na yango, tata na Joe andimaki solo, likambo oyo ekotisaki basangani 29 ya libota na ye kati na mosala ya Jéhovah.

Ndakisa malamu mpo na komekola

Kolobaka na molende mpo na mokengeli mosusu ya zongazonga tala likambo oyo lgnatio, pionnier moko oyo abala, azali koyebisa “Paulo mpe mwasi na ye balalaki epai na biso. Basalisaki biso mingi kati na boyokani na biso na libala mpe kati na mosala ya kosakola. Paulo azelaki kolobela mingi ntina ya mosala na kosakola.’’

lgnatio azali koyeba lisusu likambo oyo elekaki ntango Paulo asangisaki basaleli na misala mpe bankulutu na ntango ya vizite na ye ya nsima kati na lisangá lgnatio alobi ete: “Ntango nayebisaki ye ete nakanaki kobima na mosala ya kosakola te na ntongo mpo na kobongisa lisolo na ngai mpo na likita, Paulo ayanolaki ete akokende kosakola lokola yango ebongisamaki, ata soki nakokaki kobima na ye elongo te. Nazwaki bongo ekateli ya kokende mpe. Mpe ndenge nini Jéhovah apambolaki ngai! Na ntongo wana, nabandaki boyekoli moko ya Biblia, likambo oyo epesaki nzela na bato motoba ete bandima solo.”Tala 3 Yoane 4.

Kolendisana

Ntango nyonso oyo mokengeli ya zongazonga azali koya kotala baninga na ye ba Témoins de Jéhovah na Melita, bazali koyamba ye malamu mpe bazali na esengo mingi ya kozwa litomba na bilendiseli na ye mpe na batoli na ye. (Tala 3 Yoane 5-8) Na bongo, ebele na bafandi ya Melita bazali mbala na mbala kozwa ekateli mpo na Jéhovah Nzambe mpe Bokonzi na ye. Na nsuka ya mobu na mosala 1989, ezali yango nde bafandi 389 ya esanga na bayambi na bapaya basalaki. Sikawa bakabwani na masangá mitano oyo mazali kobota mbuma (minei kati na esanga ya Melita, mpe moko kati na Gozo, esanga ya penepene), mpe bazali kosakola nsango malamu na molende.

Bakengeli nyonso ya zongazonga oyo baponamaki mpo na kokende kotala esanga ya Melita na mibu oyo miuti koleka bazali na mayoki motindo moko lokola ntoma Paulo, oyo alobaki na baklisto ya Loma: “Mpo nayoki mposa monene mpo na komona bino, ete nakabela bino likabo na elimo mpo na kolendisa bino.” Vizite na bango ebotaki mpenza “kolendisana” malamu. (Baloma 1:11, 12.) Lisusu, mosala na kosakola nsango malamu ya Bokonzi oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa ezali kopesa ebele na bolamu kati na elimo epai na bafandi ya Melita, libota na bayambi bapaya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto