Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/7 nk. 29-31
  • Kumisa Jéhovah na biloko na yo ya motuya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kumisa Jéhovah na biloko na yo ya motuya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bonzenga ya bolenge: Nguya mpe molende
  • Molakisi na biso monene azali koteya biso
  • Andikapé, kasi mozwi kati na kondima mpe na misala malamu
  • Moto na moto akoki “kopesa” likabo
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/7 nk. 29-31

Kumisa Jéhovah na biloko na yo ya motuya

NAZALI na bozwi te; nazali elenge mpe nazali na eloko ya motuya te.’ ‘Natangi mingi te; eloko nini nakoki kopesa na Jéhovah?’ ‘Nazali na kolongono na nzoto te; Jéhovah akoki kolikya kozwa eloko epai na ngai te.’ ‘Nazali mobangé; ntango esili koleka mpo na ngai ete nakóma mozwi.’

Makanisi motindo oyo masili koyela yo bobele ntango otangi titre ya lisolo oyo? Kasi, mbala mosusu ozali mpenza na bozwi koleka lolenge oyo ozali kokanisa. Kanisa naino maloba oyo Nkolo Yesu alobaki epai na lisangá ya Sumuluna: “Nayebi monyoko na yo, mpe bobola na yo, kasi ozali mozwi.” (Emoniseli 2:9). Liboso, kati na lisolo na ye likoló na ngomba, Yesu alobaki ete: “Bomibombela biloko ya motuya na nse te . . . Bomibombela biloko ya motuya kuna na likoló . . . Mpamba te na esika ezali biloko na yo ya motuya, motema na yo ekozala wana lokola.” (Matai 6:19-21.) Maloba oyo na Nkolo na biso ezali nde kosunga yo? Na ntembe te, eloko moko ezali kati na yo, oyo Jéhovah Tata na biso azali na likoló, mpe Mwana na ye bazali kotalela yango lokola eloko ya motuya mingi koleka. Totala eloko yango soko ezali nini.

Bonzenga ya bolenge: Nguya mpe molende

Lolenge nini elenge moko akoki kosala mosala ya motuya mpo na Jéhovah? Masese 20:29 eyebisi ete bilenge bazali na bozwi moko kitoko: nguya ya nzoto. Ezali likambo na kolendisa mpenza na komona elenge moko kosalela makasi na ye mpe bolenge na ye kati na mosala ya Nzambe na biso. Tozonga naino na ntango na kala kino na ebandeli ya ba 1930, mibu oyo ebele na bilenge bayokaki nsango ya solo na Biblia. Elenge moko ya mibu 16 adefaki mokanda création epai na moninga na ye, mokanda mokolimbolaka Biblia oyo mobimisamaki na la Société Watch Tower. Na ntango akómaki na mokapo oyo na motó na likambo “La Nouvelle Création” mpe ntango atangaki makambo oyo matali komipesa na Nzambe, amonaki bongo nini asengelaki kosala na bomoi na ye. Amipesaki na mbala moko epai na Mozalisi Mozwi​—na-Nguya-Nyonso. Na mobu molandaki, atangaki mokanda mosusu, mokanda Justification (tome 1), mpe ayekolaki lolenge nini ya kosala mpo na kokumisa nkombo na Nzambe mpe bokonzi na ye. Boyebi wana bopesaki epai na ye mposa makasi ya kobunda mosala ya kosakola ntango nyonso. Bobele na mbula wana, akomaki pionnier, mpe kino lelo oyo azali bobele kati na mosala ya pionnier. Wana ebele na bato ya ntango na ye basili kokufa, ebele na baoyo bazali lisusu na bomoi bazali ntango nyonso komonisa ezalela na bango ya elimo ete basili kokangama na molimo na bango mobimba epai na Tata na biso ya Likoló.

Lelo oyo bilenge baklisto bazali mpe komonisa motindo na bizaleli wana ya motuya? Ezali bongo mpenza! Ba rapport ya Annuaire ezali komonisa ete ebele na bilenge, mingi lokola mamwe ya ntongontongo, bazali lelo kobakisama na molongo ya ba pionniers. (Nzembo 110:3.) Na Filipine, 13 ya ba pionniers permanents bazali na nse ya mibu 20. Ezali bobele bongo na bisika mosusu? Ee. Ankete moko esalamaki na bisanga mike ya Trinité mpe ya Tobago, emonisi ete ba pionniers ya sika 282 baponamaki katikati ya le ler Septembre 1986 mpe le 30 Septembre 1988. Na motuya wana, 48 bazalaki na nse na mibu 20. Okolinga nde koyoka matatoli na bamoko kati na bango?

Yoka charmaine Francis. Alobi boye: “Uta bomwana na ngai, baboti na ngai bazalaki kolendisa ngai na kosalela Jéhovah mpe na kotikala sembo epai na ye. Ntango batunaki ngai nini nakosala soko bakangi bango na boloko mpo bazali kosakola nsango malamu, nayanolaki boye: ‘Nakolanda kosalela Jéhovah.’ Namipesaki epai na ye wana ezalaki ngai na mibu 13 mpe nazwaki batisimo na mibu 14. Na ntango ya bopemi nyonso ya bana kelasi, nokinoki nazalaki kobanda mosala ya pionnier auxiliaire. Na 1983, nakomaki pionnier permanent. Na boumeli ya mbula na ngai ya liboso kati na mosala, nazwaki esengo ya kosalisa mama ya libota moko na kokóma mosambeli na Jéhovah. Sikawa nazali kotambwisa boyekoli ya Biblia libwa. Moko na bato oyo nazali koyekola elongo na bango azali komibongisa mpo na kozwa batisimo, mpe misato bazali koyangana na makita.”

Bongo yo elenge, ozali kondima te ete ozali na eloko moko ya motuya mingi oyo okoki kokumisa na yango Jéhovah? Solo mpenza, ozali na yango! Ata soko okoki te kobanda mosala ya pionnier sikawa, okoki kokumisa Jéhovah na lolenge oyo yo ozali. Ekoki kozala mbala mosusu ete otikali na bambula mingi lisusu mpo na kosilisa kelasi. Kasi, ozali mpenza na mabaku kitoko ya kosanzola Jéhovah epai na balakisi na yo mpe baninga na yo ya kelasi, christian Kalloo, oyo azali na mibu zomi, amemaki mokanda na ye moko, La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou création? Ebimisaki matomba nini? Akabolaki mikanda nsambo epai na baoyo titre na yango esepelisaki bango. Atikaki lisusu mokanda moko wana ezalaki ye kosakola na ndako na ndako. Yo mpe okoki kosala yango.​—Tala Matai 21:15, 16.

Molakisi na biso monene azali koteya biso

Mosakoli Yisaya alobaki boye: “Nkolo Jéhovah apesi ngai lolemo ya baoyo balakisami”. Azalaki koyeba ete bobele na ngolu ya Jéhovah nde akokaki koloba. Akundolaki lisusu elaka oyo ya Jéhovah: “Elimo na ngai oyo ezali likoló na yo, mpe maloba na ngai oyo natii yango kati na monoko na yo ekolongwa na monoko na yo te, to na monoko na bana na yo te, ata mpe na monoko ya bana na bana na yo te.” (Yisaya 50:4; 59:21, MN) Lolenge moko lokola Jéhovah apesaki mayele mingi kati na elimo epai na bato oyo bamesani na mikanda te mpe bato mpamba, baoyo bakomaki bantoma na Yesu, bobele bongo nde azali lelo kopesa mayele epai na bato mpamba.

Annuaire 1986 ezali na bansango ya kolendisa mpo na baoyo batangaki bobele moke na kelasi to mpe baoyo batangaki te. Na mikili mingi, ba Témoins de Jéhovah bazali kobongisa bakelasi ya koyekola kotanga mpe kokoma mpo na koyekolisa mikolo kotanga Jéhovah azali mpenza kopambola bibongiseli yango. Na Nigéria, kobanda na mobu 1962 kino 1984, mwa bato 19238 basalaki bokoli kitoko mpenza na likambo etali koyekola kotanga mpe kokoma, mpe lelo oyo bazali na makoki ya kotanga Biblia mpo na bango moko mpe mpo na bato oyo bango bazali kopesa litatoli Basili mpenza kozwa mapamboli mingi! Temwe moko ayekolaki malamu na kelasi yango kino ete ye moko asili kokoma sikawa molakisi ya kelasi ya koyekola kotanga mpe kokoma ya lisangá na bango.

Totalela likambo ya Ezekiele Ovbiagele. Na ntango azwaki batisimo na 1940, azalaki koyeba kotanga te. Nsima na koyekola kotanga, akolaki kino akomaki pionnier, mpe na nsima na mwa mibu, na 1953, aponamaki lokola mokengeli ya zongazonga.

Mbula moko etyameli ndelo te mpo na koyekola. Bamoko bakoloba mbala mosusu ete: “Bakolakisaka mbwa bokila te na ntango akomi mobangé.” Ekoki kozala solo mpo na bambwa, kasi mpo na bato te! Ata mibange mpe bakoki koyekola, mpe bakosala yango soki balingi mpenza koyeba mpe kosalela Jéhovah. Mbala mosusu oyebi mibange mosusu oyo basili kosala bongo. Na ndakisa na Nigeria, Alice Okon alendisamaki na kotanga Biblia mpe na koyekola elikya oyo yango ezali kopesa; andimaki mpe azali kosepela sikawa mpo na elikya oyo azali na yango. Wana ezalaki ye na mibu 80, ntango ya koyekola mpo na ye elekaki mpenza te. Okanisi te ete yango ezali mpenza kosepelisa motema ya Jéhovah? Mwasi yango azali mozwi kati na kondima. Masese 3:14 ezali kondimisa biso ete, kozala na bwanya “eleki palata (mosolo) mpe kozwa yango eleki wolo na kitoko”. Na ntango moto azali kolobela solo na boyebi ya sikisiki, maloba na ye ezali “lokola wolo etyami kati na palata”.​—Masese 25:11; Bakolose 3:16.

Andikapé, kasi mozwi kati na kondima mpe na misala malamu

Moto oyo abotami na mbeba moko na nzoto akoki mbala mosusu kolemba mpenza wana ezali ye kokola mpe kokanisa mpo na mpasi na ye wana. Ezali mpe mpasi mingi mpo na moto oyo abotami malamu soko akomi andikapé na ntango asili kokola. Likambo yango lizangi elikya? Te, nkutu ekoki mpenza nde kofungola nzela na bomoi ya seko.

Na boumeli na Etumba ya liboso ya mokili mobimba, na Arvada, engumba moko moke kati na mboka Wyoming (Etats-Unis), Edward Stead azalaki na bibwele na ye, mpe mwasi na ye azalaki na hôtel moko moke. Bokono makasi bobengami grippe espagnole bolembisaki ye, pe azwaki rimatizme oyo esilaka te na nzoto mobimba, oyo ezwaki matonga ya nzoto na ye kino ete asengelaki kotambola na vélo ya ba dikapé. Atako azangaki makasi, akokaki koloba naino mpe koningisa mwa moke maboko. Na boumeli ya ntango moko, azalaki kokanisa mpo na komiboma. Mpe ayaki koyeba solo mpe ayambaki yango na móto mpenza.

Na ebandeli, azalaki kofanda na liboso ya hotel mpo na kolobela kondima na ye epai na bakilyá. Akomaki koningisa maboko malamu mpenza mpo na kofungola mokanda oyo mozali kolimbola Biblia mpe kolakisa yango epai na baoyo bazalaki kotelema mpo na koyoka. Ntango bamonaki milende na ye wana, bamosusu babengaki ye, pastere ebosono. Mpe azwaki ekateli ete akokaki kopesa litatoli na bingumba mosusu soki basalelaki ye mwa mbeto kati na motuka moke oyo mozipami te. Ezali yango asalaki, mpe na boumeli ya bambula mingi, salaki mosala ya pionnier na motindo wana oyo bato bameseni na yango te, kosala ebele ya bakilometele katikati na Wyoming mpe Texas longo na bilenge ba pionniers mibale to misato baoyo bazalaki kosalisa ye. Na boumeli ya bomoi na ye, Edward azalaki liziba monene ya elendiseli mpo na bato nyonso oyo bayebaki ye.

Soko osili kolemba na ntina na mbeba moko na nzoto, tanga lisolo oyo ya La Tour de Garde ya 15 Novembre 1986, na lokasa 22 kino 25. Bato nyonso oyo balobelami kati na lisolo wana azali bankulutu, bapesi toli na elimo baoyo abongi mpo na kolendisa bandeko na bango, baoyo bazali mbala mosusu na nzoto makasi, kasi bazali na mposa ya kolendisama na elimo. Bato yango bazali bazwi na miso na Nzambe.​—1 Timoté 6:18.

Esterleta Dick, oyo azali sikawa na mibu 63, azali temwe oyo azwaki batisimo na ntango azalaki na mibu 16. Na 1978, akufaki miso, kasi akomaki pionnier permanent esili koleka mbula mibale. Lolenge nini ekoki kosalema? Totika ye moko ayanola.

Alobi ete: “Mokolo moko, elenge ndeko mwasi moko oyo azali pionnier atunaki ngai ete: Ndeko mwasi Dick ozali bobele kokokisa bagonga na yo na mosala ya pionnier auxiliaire po na nini te komeka kosala lokola pionnier permanent?’”

Esterleta azalaki kobanga kobetisa bandeko libaku, kasi amikundolaki ete mokengeli ya zongazonga alendisaki moto na moto na kosala lokola pionnier permanent. Alobi ete: “Namikotisaki na mosala yango, mpe mbula mibale esili kokoka sikawa uta nazali kosala lokola pionnier permanent. Nazali kopesa litatoli na balabala mpe nazali na bavizite mingi ya sika. Nazali lisusu kotambwisa boyekoli ya Biblia motoba na bandako ya bato. Nasalaka ndenge nini? Liboso na kokende epai na moto oyo tokoyekola na ye, moto moko akotangela ngai makambo oyo tokoyekola mpe ba versets oyo ezali kati na yango; na motindo wana, nakoki kopesa bakomantere na boyekoli. Bato misato kati na bango bazali koyekola Biblia elongo na ngai, bazali kosangana na makita mpe moko asili kozwa batisimo.”

Moto na moto akoki “kopesa” likabo

Makabo masuki bobele na nzela ya elimo? Te. Na ntango abongisaki kotongama ya temple na mikolo ya bobange na ye, mokonzi Davidi atunaki boye: “Nani azali lelo na mposa ya kopesa likabo mpo na Jéhovah?” (1 Ntango 29:5, -MN.)Moto na moto akoki kopesa yango. Bobele motindo yango lelo oyo, bilenge to mikolo, bato na nzoto kolongono to te, bato mingi bazali na mposa ya kopesa makabo na bango na mosuni mpo na kokolisa matomba ya Bokonzi. Okoki kotinda yango ata na nzela ya filiale ya mboka oyo epai kuna ozali kofanda, ata na nzela ya lisangá. Na yango, moto na moto akoki kosangana mpo na kopesa mosolo mozali kosunga mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba na kotaleláká makoki na ye. Ezali libaku malamu.​—2 Bakolinti 9:8-12.

Likambo eleki ntina ezali boye, ozali na bozwi na elimo oyo okoki kokumisa na yango Jéhovah. Bilenge bazali na nguya mpe na bonzenga. Baoyo bakotaki kelasi te bazali na makoki ya koyekola mpe kokabela Jéhovah mbuma ya bibebu na bango. Ba andikapé bakoki kokola na boyebi, na bwanya mpe na mayele, na boye ete mingi bazali bobele ba pionniers te, kasi bazali lisusu bapesi na toli mpe babateli na mpate kati na lisangá ya boklisto. Ozali mpenza na bozwi koleka lolenge oyo ozali kokanisa. Na bongo, kumisa Jéhovah na bozwi na yo.​—Baebele 13:15, 16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto