Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/5 lok. 30
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Esila ngala?
  • Libateli malamu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/5 lok. 30

Makambo mazali koleka na mokili

Esila ngala?

Engebene sango moko ya lingomba anglican ya Adélaïde, na Australie, bipekiseli na ntina etali kolamusa mposa ya nzoto oyo ekoki komema moto kino na pite mpe ekobo esila ngala mpe euti na Biblia te. Kati na boyekoli na ye ya sika likoló na makambo matali kosangisa nzoto. azali koloba ete bato mibale oyo bayokani mpo na kobalana bazali mpenza kosala lisumu te soki basangisi nzoto liboso ya libala na bango. Boyekoli yango ezali koloba lisusu ete kati na makambo mosusu. kosangisa nzoto ya mobali na mobali to homosexualité endimami Engebene zulunalo le courier Mail ya Brisbane, molobeli moko ya Lingomba lisangani ya Australie alobaki ete “andimi makanisi ya moboko ya boyekoli yango”.

Nzokande, Biblia amonisi ete mokano ya Nzambe ezali ete bato banso ‘batika makambo na pite’ mpe ete “moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsoni mpe mibali bamibebisi na mibali . . . bakosangola bokonzi na Nzambe te”. (1 Batesalonike 4:3, 4: 1 Bakolinti 6:9, 10.) Baoyo bazali kondima Biblia lokola Liloba lipemami na Nzambe bazali koyeba mpe ete mitinda yango oyo mizali koyebisa na ntina etali kosangisa nzoto miuti epai na Mozalisi oyo atondi na mayele. Bomoi na bato oyo bazali kosalela yango ezali komonisa ete mitinda wana ya etamboli malamu. oyo mitalelami lokola ete esila ngala. ezali naino kopesa nzela na bolamu ya mabota mpe ezali libateli liboso na mpasi nyonso oyo ezali kouta na nzela na etamboli mabe mpe liboso na maladi mabe oyo ezali kozwama na nzela na etamboli ya mbindo.

Libateli malamu

Bomeli drogue ezali ntango nyonso likambo monene. Na ntina yango, nini ezali lolenge malamu ya kobatela bilenge? Na ntango ya interview (koyanola na mituna) moko oyo ekomamaki kati na zulunalo ya Brésil O Estado de S. Paulo, profesere moko claude Olievenstein ye mofalansé, monganga oyo asalisaka maladi ya konyokwama na makanisi, alobelaki makasi na ntina etali mitinda mpe bolingo. Alobaki ete: “Ntango bazali lelo koloba mpo na drogue. bazali kolobela mingi mokumba ya la police, ya bazuzi mpe ya eteyelo. Nzokande, likambo lileki monene ezali oyo ya libateli kati na libota . . . Bana mingi bayebi te eloko nini babengi bokonzi ya tata. Tala azalaka na ndako te; alemba mokumba na ye.”

Kolimbolaka mpo na nini libateli kati na libota ezali na ntina, claude Olievenstein abakisaki: “Tozali kobika kati na mokili moko oyo bato balingi bobele bozwi ya mosuni epai kuna bato bazali kooka nsoni mpo na kozala na etamboli malamu. Soko bana na biso babandi komekola etamboli moko likoló na drogue, ezali mpo ete tozali koteya bango te mitinda ya bizaleli malamu. Mokili na biso akomi mabe koleka, ezali koyoka lisusu eloko moko te, ekomi bobele ya bakompanyi ebele. Likanisi ezali bobele ya koboma nzoto mpo na kobika.“

Engebene zulunalo Superinteressante, boyekoli moko na ntina etali ezalela na Etats​—Unis emonisi ntina ya bokonzi na tata, Zulunalo yango elobi ete: “Bilenge oyo bazali kozwa bapwé malamu na eteyelo mpe oyo bazali na makanisi malamu koleka ezali baoyo bauti na mabota epai kuna baboti bazali kosalela bokonzi na bango mpo na kotia mitinda ya polele na ntina etali etamboli mpe bazali kotika mwa bonsomi na kati na bandelo oyo etiami malamu. Ndenge moko, motuya na bilenge oyo bazali komela drogue to masanga ezali mpenza mingi te kati na mabota yango.”

Ezali mpenza na ntina malamu ete Biblia epesa etinda oyo: “Pamela mwana na yo mpe akopesa yo kimya; ɛɛ ekosepelisa mpe molimo na yo.” (Masese 29:17) Ya solo, mpamela oyo etongami likoló na Biblia ekoki kosalisa baboti na kobatela bana na bango na drogue mpe masanga mpe na kobongola lolenge ya bomoi ya libota mobimba.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto