Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/5 nk. 20-21
  • Boklisto ya solo ebongoli bomoi ya bato na Suéde

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boklisto ya solo ebongoli bomoi ya bato na Suéde
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Boyebi na Biblia ezali lisalisi monene
  • Solo epalangani lokola mbonge na mai
  • Kopesa litatoli na eteyelo
  • Etumba mpo na bonsomi ya kosambela
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/5 nk. 20-21

Boklisto ya solo ebongoli bomoi ya bato na Suéde

SUEDE ezali kopesa bomoi moko oyo ezali na nivo etombwani mingi koleka na mokili. longola biloko mingi na kolya, bandako minene, bavwature, masuwa na kotambola mpo na bosepeli , ba télévizió mpe ordinatere mpo na moto ye moko, Baswedwa bazali kozwa nkisi ya monganga mpamba, mibangé bazali kofutama mpe baoyo bazali na bokono na nzoto, mbongo ya bana mpe makambo mosusu mingi oyo Leta azali kokokisa.

Tokoki kokanisa ete moto azali te oyo akoki lisusu koluka kobongisa lolenge na bomoi kati na mboka yango. Nzokande, atako matomba ebele oyo na mosuni, mokili ya Suede ezali na mikakatano na yango: koboma ya mabala (divorce), komela masanga mingi, komela drogue, kobomana mpe komiboma. Lingomba, oyo engebene elikya na bato esengelaki kozala na bopusi makasi likoló na bizaleli malamu, ekomi lokola pene na kufa kati na mboka wana. Baswedwa koleka 90 % bazali na Lingomba ya ba Luther, kasi bobele 2,1 % na basangani na yango nde bazali koyangana mbala na mbala na milulu. Pastere moko alobaki ete: “Lingomba ezali kobenda nzoto na mokili. . . . Ebungisaki nguya na yango mpe yango moko emikaboli na bamposa ya bato.”

Nzokande, atako Lingomba ekokaki te kobongisa to kobongola lolenge na bomoi na bato na suéde, yango elimboli te ete boklisto ya solo elongaki te. Mwa Ba Témoins de Jéhovah 22 000 oyo bakabolami kati na masangá 331 bazali kozwa matomba malamu na kosalisáká bato ete basalela kati na bomoi na bango mitinda na Biblia, mpo na bolamu na bango oyo leki malamu. Nkutu mosala yango eyebani.

Kati na zulunalo moko ya Bapantekotiste national Dagen (Mokolo), molakisi moko ya makambo ya lingomba alobaki ete: “Tosengeli bobele kokumisa Ba Témoins de Jéhovah mpo na molende ya kopalanganisa nsango na bango” Lisolo yango ebakisi: “Ba Témoins de Jéhovah ezali etuluku na lingomba oyo ezali koyamba basangani ya sika mingi mbula na mbula mpe bilenge mingi. . . . Tosengelaki koyekola na oyo tozali komona epai na Ba Témoins de Jéhovah!”

Ya solo, baoyo balingi mpenza koyekola na oyo bazali komona epai na Ba Témoins de Jéhovah bakoyeba likambo moko. Likambo yango nini? Bakomona kino wapi solo na Biblia ekoki kobongola bomoi na bango.

Boyebi na Biblia ezali lisalisi monene

Totalela mokanda oyo elenge mwasi monzemba oyo asili kobota atindaki na filiale ya la Société Watch Tower na mboka yango. Akomaki boye ete: “Nalingaki koyebisa bino ndenge nazali na bomoi ya esengo uta ntango nabandaki koyekola elongo na Ba Témoins de Jéhovah. Ndako na ngai ezali kobebisama lisusu na milinga ya likaya te. Nakanisaki mpo na ntina ya kolekisa ntango mingi elongo na mwana na ngai ya mwasi. Atako nazali kozwa lifuti moke, makambo na ngai mpo na mbongo masili kobonga mpe nazali na mikakatano moke wana ezali ngai kolala. Nazali mpe na esengo ya kozala na baninga ya solo. Nakopesa bomoi na ngai ya sika na eloko moko te ete nazongela bomoi oyo nazalaki na yango liboso.”

Tala ndakisa mosusu: Ata soki koboma libala to divorce epalangani mingi na mokili ya Suéde, Biblia esalisaki babalani mibale, Arne na Ketie. Babalanaki uta mibu 13 mpe bazalaki na bana mibale ntango matata na ntina etali bizaleli na moto na moto mabimaki mpe mapusaki bango na koboma libala. Bayinanaki makasi.

Arne, oyo akendaki kozala na bomoi ye moko, azwaki vizite ya ba Témoins de Jéhovah mpe abandaki koyekola Biblia. Asepelaki mingi na oyo azalaki koyekola kino mokolo moko akendaki epai na Ketie mpe amekaki kotinda ye na makasi, elongo na bana ete bayekola Biblia! Ntango aboyaki, atindikaki ye na mur mpe alobaki na ye ete: ’’Okoyekola soki te nakoboma yo! Ketie abengisaki ba Témoins de Jéhovah mpe afundaki, na kotunaka ete: “Motindo nini na Nzambe mobomi lokola Jéhovah?”

Na motema molai balimbolaki epai na Ketie ete Jéhovah azali Nzambe atondi na bolingo oyo azali kosenga te ete moto asalela ye na makasi Likambo yango epesaki ye mposa ya kolinga koyeba mingi koleka. Mpo na Arne, na kozwaka mayele mingi koleka na mitinda ya Nzambe, atikaki matata mpe azongisaki boyokani na ye elongo na Ketie. Mbala na mbala bazalaki komonana na makita na Salle du Royaume. Matomba ezalaki nini? Nsima ete bango mibale bazwa batisimo, babalanaki lisusu! Uta mbula mwambe bafandi lisusu na libala mpe Arne azali nkulutu kati na lisangá Balobi ete: “Libala na biso ezali sikawa na esengo mingi koleka, mpe tozali kotonda mingi Jéhovah.”

Solo na Biblia ezali mpe kosalisa bilenge babongola bomoi na bango. Elenge mobali moko na nkombo David azali komikundwela boye: “Baboti na ngai babomaki libala, mpe na kati na bomoi na ngai makambo nyonso mazalaki kotambola mabe. Nazalaki kosala eloko moko te. Nazalaki mbala mingi kokende na eteyelo te mpe nasalaki mosala moko te na boumeli na mbula misato ya nsuka. Mbala mosusu, nazalaki komona ete ntina ezali te ya kosala makasi mpo na bomoi. Nazalaki kolata jeans epasukapasuka mpe basapato ya kala. Nazalaki na nsuki milai kino katikati na mokongo. Namekaki lolenge nyonso na bomoi: na ndakisa, punk-rocker mpe hard-rocker. Nazalaki komela likaya, nazalaki komela masanga mpe namikotisaki kati na mobulu.

“Na 1986, Témoin de Jéhovah moko ayaki kotala ngai. Nalobaki na motema ete: “Tala lisusu moko na baoyo bazali kokosa bato. Nakotuna ye mituna oyo mpe akokoka kopesa eyano te.’ Nakamwaki mingi ntango azongisaki biyano. Nakendaki kotika ye na boyekoli na Biblia moko; mpo na koloba malamu namonaki ete azali kopesa biyano ya mayele na mituna nyonso mpe kokosa ezalaki te kati na solo. Nayanganaki na assemblée moko mpe nakamwaki na komona bato yango nyonso na molato malamu mpe bamonisaki boninga. Nabandaki koyangana na makita ya ba Temoins de Jéhovah epai nakamwaki na komona bato nyonso koya epai na ngai mpo na kopesa ngai mbote. Oyo nde bomoko kati na bato yango!”

Nsima na mbula moko na ndambo, David azwaki batisimo mpo na kokóma bongo Témoin de Jéhovah. Baboti na ye, baninga na ye ya kala, balakisi na ye mpe bato nyonso oyo bayebaki ye bakamwaki na komona ete elenge mobali oyo alataki malamu mpe abongisaki nzoto, ezalaki nde David oyo bayebaki kala.

Solo epalangani lokola mbonge na mai

Na Suéde, kosakola nsango malamu ndako na ndako ekoki mbala mosusu kolembisa Moswedwa azali kobatela bomoi na ye makasi. Ntango ngonga ya porte ezali kobeta, mokoló ndako akotala na lidusu, mpe na kosalaka bongo bazali kopesa nzela na ba Témoins de Jéhovah te ete bakota. Kasi bango bazali kolemba te. Batemwe bayebi ete baanzelu bakoki kokamba bango epai na bato oyo bazali na motema malamu. (Emoniseli 14:16; tala Matai 13:41) Soko solo ekoti na bomoi ya moto motindo wana, mbala mingi ekopalanganaka epai na bandeko to baboti na ye mpe baninga, lokola mbonge na mai.

Mwasi moko na mboka Stockholm azali komikundola ete afandaki na mesa na kuku wana ezalaki ye kolela mpo na makambo mabe ya bomoi. Alobi ete: “Nazalaki na elikya te, mbala moko nabandaki kobondela ete: ‘Nzambe, nalingi koloba na yo mpo na ntina na bomoi.’ Ngonga ebetaki. Nakotáláká na lidusu, namonaki mobali moko oyo alataki malamu. Na yango nafungolaki porte. Alobaki na ngai ete alingaki koyebisa ngai makanisi na kolendisa oyo mazwami na Liloba na Nzambe. Natunaki ye soki abetaki ngonga epai na bato mosusu na étage. Azongisaki ete: ‘Te, nauti na boyekoli na Biblia mpe nazali kozonga epai na ngai, na bongo namonaki malamu kobeta na mwa ba portes. Emonani solo ete awa nde ebandeli.’ Nakamwaki, mpamba te nazalaki kofanda na ndako ya nse te. Oyo alimbolelaki ngai esepelisaki ngai mingi.”

Mosika te, mwasi yango abandaki koyekola Biblia. Na esengo nyonso, abandaki koyebisa oyo ezalaki ye koyekola epai na baboti to bandeko mpe baninga na ye. Akabolaki 28 Biblia mpe mikanda 96. Matomba ezalaki nini? Mobali na ye, bandeko na ye mibale ya basi, bana mibale ya ndeko na ye ya mobali, semeki na ye, tata mpe mama na ye, mwana ya mobali na ye oyo abotaki na mwasi ya liboso, moninga na ye ya mosala mpe moninga ya mobali na ye ya mosala mpe mwasi na ye babandaki koyekola Biblia, bango mpe bazali komibongisa na batisimo Kino sikawa, bato 13 bazwaki bongo likoki ya kobongola bomoi na bango mpamba te Témoin de Jéhovah moko abetaki na porte. Mwasi yango alobaki: “Tosengeli kotonda Jéhovah na kokumbama na mabolongo mokolo na mokolo mpo na bolamu nyonso oyo tozwi mpo na koyokanisa bomoi na biso na mokano na ye!”

Kopesa litatoli na eteyelo

Na mokili ya Suede, mikakatano minene mizali mpo na oyo etali disipline ya bana kati na biteyelo mingi. Nzokande, bilenge Batemwe bazali na bopusi malamu na koyebisaka solo ya Biblia epai na balakisi na bango mpe baninga na bango ya eteyelo. Na ndakisa, elenge Jorgen ayebisaki polele epai na balakisi na ye mpe baninga na ye ya kelasi ete azali Témoin de Jéhovah. Bazalaki komemya ye mpo na koloba na ye ya bosembo mpe etamboli na ye. Ntango nyonso Jorgen azalaki bobele kozongisa monoko na limemya mpe na kotangaka makanisi mauti na Biblia, ata ntango bazalaki kotuna mituna mpo na kotumola ye. Ezalela na ye ekamwisaki mpenza baninga na ye ya kelasi. Jorgen alobi:

“Mbula moko nsima na kotika eteyelo, nakutanaki na Peter, moninga na ngai ya kelasi ya kala. Nsima na masolo mingi, nabandaki boyekoli ya Biblia elongo na ye. Lokola mama na ye aboyaki, tozalaki koyekola na plage. Peter azwaki batisimo na Mars 1988. Mama na ye amonaki ete abongwanaki, ye mpe abandaki koyekola. Nsima na mwa ntango moke, azwaki batisimo.

“Moninga na ngai mosusu ya kala ya eteyelo, Torbjorn, abandaki koyekola Biblia, mpe mama na ye. Bango nyonso mibale sikawa bazwi batisimo.” Na nyonso, baninga ya kelasi minei ya Jorgen basili kobanda koyekola Biblia mpe mosusu ya mitano azali komonisa bosepeli. Jorgen asukisi: “Nazali na elikya ete bandakisa oyo ekolendisa bilenge Batemwe oyo bazali naino kokende na eteyelo mpo ete batika te kopesa litatoli. Etamboli na bango ya boklisto mpe bokangami na bango ya makasi na solo ekoki kokona nkona oyo ekobota bambuma kitoko nsima.”

Etumba mpo na bonsomi ya kosambela

Ba Témoins de Jéhovah bazalaki mpe na mokumba monene mpo na oyo etali kozongisama ya bonsomi ya losambo na mokili ya Suéde, yango nde epesaki matomba mingi epai na bato nyonso.

Na ndakisa, lokola yango ezali kati na mikili nyonso, Ba Témoins de Jéhovah na mokili ya Suéde bazwaki ekateli ya kobatela ezaleli na bango ya boklisto ya kozanga komikotisa na makambo ya mokili. (Yoane 17:16) Na yango, mingi na bango bakangamaki mikolo mingi na boloko. Kasi na 1966, litambe monene esalamaki mpo na bonsomi ya kosambela ntango bakonzi bazwaki ekateli ete na kotalela ankete, Batemwe bakobengisema lisusu te mpo na mosala ya soda. (Yisaya 2:2-4) Kopesa nzela na losambo na mokili ye Suéde ezalaki ndakisa mpo na mikili mosusu.

Likambo mosusu etalaki lotomo ya bato bazali kobela maladi. Ba Témoins de Jéhovah bazali kotosa makasi etinda ya Biblia oyo elobi ‘koboya makila’ mpe mpo na yango bazali koboya kotya makila na nzoto. (Misala 15:28, 29). Atako minganga mpe basali mosusu na lopitalo bazali ntango nyonso te kotosa etelemelo oyo ezali na moboko likoló na Makomami, zulunalo moko ya minganga na Suede na mikolo mileki ebimisaki lisolo oyo elobaki ete: ’’Ekateli ya koboya kotya makila na nzoto esengeli kotosama soki moto oyo azali maladi andimi makama oyo ekoki kobima na ntina na ekateli na ye.’’

Maloba oyo mazalaki na ebandeli ya rapport ya likita moko oyo eyanganisaki comité national ya santé mpe ya bolamu na bato mpe Délégation ya société suédoise de médecine pour l’éthique. Nsima na kosolola mpo na etelemelo ya Ba Témoins de Jéhovah, bakonzi yango bazwaki ekateli ya kolendisa minganga nyonso ete bakoka komemya likanisi ya moto oyo azali maladi, oyo azali na mokumba liboso ya mobeko, elingi koloba kobanda mibu 15, mpo na moto oyo azali koboya kotyama makila na nzoto. Bandimaki ete sikawa esengeli kozala na likebi mingi liboso ya kotya makila na nzoto na ntina na makama oyo mazali kozwama na bamaladi ndenge na ndenge. Oyo ezali lisusu na ntina mingi koleka, ezali nde ekateli na bango ya mayele oyo ezali kosimba lotomo na moto nyonso na maladi ete aboya nkisi oyo alingi te.

Ya solo, Baswedwa mingi bazali na biloko mingi ya mosuni. Kasi mingi bazali na mposa ye kolendisama mpo na bizaleli malamu mpe na elimo. Ntembe ezali te, baklisto ya solo ya mboka yango bazali kosalisa baoyo balingi koyeba mpe kosalela Liloba na Nzambe mpo na kobongola bomoi na bango. Bato oyo na motema malamu bazali kosepela na elikya ya kozala na bomoi ye seko kati na mokili ya sika oyo Nzambe akosala mosika te.​—Yoane 17:3; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto