Makanisi na yo mpo na molimo mazali na bopusi likoló na bomoi na yo
“Moto akomaki molimo na bomoi.”—GENESE 2:7.
1, 2. Mangomba mingi bazali koteya nini mpo na oyo etali moto mpe molimo?
MANGOMBA nyonso to mingi na yango bazali koteya ete moto azali na molimo oyo ekufaka te. La Nouvelle Encyclopédie catholique (Angl.) ekomi ete molimo “ezalisami na Nzambe mpe ezali kotyama kati na nzoto na ebandeli na zemi”, mpe lisusu ete kozanga kokufa na molimo “ezali moko na mateya na ntina” na mangomba na boklisto. Bobele bongo, la Nouvelle Encyclopédie britannique elobi ete: “Epai na ba musulmans, molimo ezali kozalisama ntango moko na nzoto mpe, na nsima, ekozala na bomoi na yango moko, mpamba te kosangana na yango elongo na nzoto ezali mpo na ntango mokuse.”
2 Mangomba oyo bazali kondima ete molimo etikaka nzoto mbala moko ntango moto akufi mpe elandi kozala na bomoi seko, ekokenda ná likoló kati na esengo, to kolekisa mwa mikolo na epongelo to lisusu kozwa minyoko ya seko kati na lifelo ya móto. Bazali komona liwa lokola porte oyo ezali komema na bomoi ya seko kati na makoló. Elembeteli ezali maloba oyo matangami kati na mokanda Nous croyons à l’immortalité (Angl.): “Mpo na ngai, liwa ezali likambo kitoko mingi, koponama na Nzambe.”
3. Mangomba makeseni na mikili ya Asia mazali koteya nini?
3 Ba hindous, ba bouddhistes mpe bato mosusu bandimi ete molimo ekotaka na nzoto mosusu. Bazali kokanisa ete ntango moto akufi, molimo ezali kobongwana eloko mosusu ezali kobotama lokola moto to lokola ekelamu mosusu na bomoi. Soko mowei azalaki moto malamu, bakanisaka ete molimo na ye ekobotama lisusu lokola moto moko oyo azali na bozwi to na lokumu mingi. Kasi soki azalaki moto mabe, bazali kokanisa ete akobotama lisusu lokola moto mpamba, mbala mosusu mpe lokola nyama moko boye to mwa ekelamu lokola furmi.
4, 5. Mpo na nini ezali ntina na koyeba solo likolo na molimo?
4 Kasi tokoloba nini soki bato bazali na molimo ekufaka te, soki liwa ezali “koponama na Nzambe te” mpe ezali porte te oyo ezali komema mbala moko na bomoi ya seko kati na makoló to mpe soki ebongwanaka te mpo na kokota na nzoto mosusu? Na ntango yango, baoyo bazali kondima kozanga kokufa ya molimo babungi nzela. Engebene mokanda Enseignements catholiques officiels (Angl.), Lingomba ekangami na liteya ya kozanga kokufa na molimo mpamba te kowangana liteya yango “ekoyeisa mabondeli na bango, milulu na kokunda bibembe mpe milulu ya lingomba mpo na bakufi eloko mpamba mpe ezangi mayele.” Na yango makanisi na biso mpo na molimo mazali na bopusi likolo na bomoi na biso, likolo na losambo na biso mpe likolo na elikya na biso mpo na bomoi ya seko.—Masese 14:12; Matai 15:9.
5 Ezali likambo na ntina koyeba solo likolo na molimo, mpamba te Yesu alobaki ete: ‘Ekoki na basambeli na ye (Nzambe) ete basambela ye na elimo mpe na solo.’ (Yoane 4:24). Liloba na Nzambe, Biblia, nde ezali komonisa solo likolo na molimo na moto. Lokola Nzambe azali koyebisa mikano na ye kati na Makomami mapemami, tokoki kondima ete mazali solo. (1 Batesaloniki 2:13; 2 Timoté 3:16, 17). Yesu alobaki epai na Nzambe kati na libondeli ete: “Liloba na yo lizali solo.”—Yoane 17:17.
Moto ezalisamaki na molimo oyo ekokufaka te?
6. Engebene Genese ndenge nini lisolo ezali koloba polele mpo na kozalisama na moto?
6 Na Genese 2:7, tozali kotanga ete: “Jéhovah Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akomaki molimo na bomoi.” Lisolo elobi te ete Nzambe atiaki kati na moto molimo ezangi kokufa Elobi ete wana nguya na Nzambe epesaki bomoi na nzoto ya Adam, ye “akomaki molimo na bomoi”. Na yango tozali kokanga ntina ete moto azali molimo kasi azwaki molimo te.
7. Bato batyamaki awa na mabelé mpo na mokano nini?
7 Nzambe azalisaki Adam mpo azala na bomoi na mabelé, kasi na likoló te. Akanaki te ete mabelé ezala bobele esika na komekama mpo na komona soki Adam asengelaki kokende na likoló. Nzambe atongaki mabelé “ete bato bafanda wana”, mpe Adam azalaki moto ya liboso oyo afandaki na mabelé. (Yisaya 45:18; 1 Bakolinti 15:45). Na nsima, ntango azalisaki Eva mpo azala mwasi ya Adam, Nzambe atindaki bango batondisa mokili mpe bayeisa yango paradis epai kuna bato bakofanda seko.Genese 1:26-31; Nzembo 37:29.
8. (a) Mpo na kozala na bomoi, lisengami nini Adam asengelaki kokokisa? (b) Soki Adam asalaki lisumu te, mbele akokaki kozala na bomoi seko epai wapi?
8 Kati na Biblia ezali na esika moko te elobami ete eteni moko na Adam ezalaki ya kozanga kokufa. Kasi, mpo azala na bomoi asengelaki kokokisa lisengami moko: kotosa mobeko na Nzambe. Eloko nini ekokaki kokomela ye soko akobuka mobeko wana? Akokaki kokenda kozala na bomoi ya seko na esika moko na makoló? Te. Asengelaki ‘kokufa solo’. (Genese 2:17.) Asengelaki kozonga epai autaki. Nzambe ayebisaki ye ete: “Ozali mputulu mpe okozonga kati na mputulu.” (Genese 2:7; 3:19). Adam azalaki te liboso ya kozalisama na ye, mpe akokaki kozala lisusu te nsima na kufa na ye. Asengelaki bongo kopona: (1) kotosa mpe kotikala na bomoi, to (2) kozanga botosi mpe kokufa. Soki Adam asalaki lisumu te, alingaki kozala na bomoi libela na mabelé, kozanga kokende na likoló.
9. Biblia ezali koloba nini mpenza mpo na liwa, mpe mpo na nini?
9 Adam atosaki te, mpe akufaki (Genese 5:5) Etumbu na ye ezalaki liwa. Ezalaki mpo na ye porte oyo ezali komema na ’‘likambo kitoko” te, kasi nde na kozanga bomoi. Na yango liwa ezali moninga te, kasi, lokola Biblia elobi yango, ezali nde ‘monguna’. (1 Bakolinti 15:26.) Soki Adam azwaki molimo oyo ekufaka te oyo ekokaki kokende na likoló soko akokaki kotosa, na ntango yango liwa mbele elingaki kozala lifuti. Kasi ezalaki bongo te. Liwa ezalaki nde elakeli mabe. Mpe mpo na lisumu ya Adam elakeli mabe wana epalangani epai na bato nyonso, mpamba te bato nyonso babotami na ye.—Baloma 5:12.
10. Motuna nini monene motunami soki tondimi ete Adam azalaki na molimo ezangi kokufa?
10 Lisusu, soko na ntango Adam azalisamaki apesamaki molimo oyo ekufaka te oyo esengelaki konyokwama seko kati na lifelo na móto wana ekokaki ye kosala lisumu, mpo na nini bayebisaki ye yango te? Mpo na nini bayebisaki ye bobele ete akokufa mpe akozonga na mputulu? Oyo nde ekokaki kozala bokesene na kokweisa ye na minyoko ya seko nsima na botomboki, kozanga kokebisa ye liboso! Kasi Nzambe azali “sembo”. (Deteronome 32:4) Ntina na kosolola na Adam likoló na lifelo ya móto mpo na milimo oyo ekufaka te ya basali mabe ezalaki te, mpamba te esika motindo yango ezalaki te, milimo mizangi kokufa mizali mpe te. (Yilimia 19:5; 32:35) Moto azali te oyo azali konyokwama seko ntango azongi na mputulu.
Liloba “molimo” kati na Biblia
11. (a) Liloba nini na Liebele mpe liloba nini na Greke ebongolami na liloba “molimo” na kati ya Biblia? (b) Ndenge nini Biblia Liloba lya Nzambe ezali kobongola liloba oyo ezali kolimbola “molimo” na Liebele mpe na Greke?
11 Kati na Makomami na liebele, liloba “molimo” ebongoli nephes na liebele, oyo ezwami na kati koleka mbala 750. Kati na Makomami na greke, liloba oyo ekokani na yango ezali psukhe, oyo emonani koleka mbala 100. Les Saintes Ecritures—Traduction du monde nouveau ezali kosalela liloba “ame” (molimo) na bisika wana nyonso.” Mabongoli mosusu na Biblia mazali kobongola yango na maloba makeseni. Tala mosusu kati na yango, maloba oyo Biblia Liloba lya Nzambe ezali kosalela mpo na kobongola nephes: bomoi, mposa ya kolia, nyama, Ngai nalingi, libumu, moto akomi na bomoi, moto, mongongo, ebembe; ye moko, mpema, bomoi. Mpo na liloba psukhe, Biblia yango ebongoli yango boye ete molimo, motema, ezali-na-bomoi.
12. Ndenge nini Biblia ezali kosalela liloba oyo ezali kolimbola “molimo” na Liebele mpe na Greke?
12 Biblia ezali kobianga bikelamu nyonso na kati na mai ete nephesh. Ezali koloba mpenza mpo na “biloko (molimo, MN) na bomoi nyonso kati na mai” (Levitike 11:10.) Liloba yang ekoki mpe kosalelama mpo na banyama na mokili: “Tika mokili ebota nyama (milimo, MN) na bomoi na ndenge na yango: nyama minene mpe nyama na kolandaka mpe nyama na mokili na ndenge na yango.” (Genese 1:24) Mbala koleka nkama, liloba nèphèsh emonisi bato. “Bango (milimo, MN) nyonso babotamaka na Yakobo bazalaki bato (milimo, MN) ntuku nsambo.” (Exode 1:5). Na ndakisa kati na 1 Petelo 3:20 liloba psukhê ezwi ndimbola bobele moko. Verset yango elobi mpo na masuwa na Noa, “bato (milimo, MN) mingi te, bobele mwambe, babikaki na kati na yango na mai”.
13. Na makambo nini Biblia ezali kosalela liloba “molimo”?
13 Biblia esaleli liloba “molimo” kati na bisika mosusu mingi. Tozali kotanga na Genese 9:5 ete: “Mpe solo nakotuna mpo na makila na bomoi (milimo, MN) na bino.” Engebene verset oyo, molimo ezali na makila kati na yango. Na Exode 12:16, elobami ete: “Nde bokobongisa bobele kolia na moto (molimo, MN) na moto (molimo, MN).” Engebene maloba oyo, molimo eliaka. Na Deteronome 24:7, elobami mpo na moto oyo “azwami na kobotola (molimo, MN) moko na bandeko na ye”. Ezalaki te molimo oyo ekufaka te nde ebotolamaki. Nzembo 119:28 elobi: “Molimo na ngai ezwi mpongi te mpo na mawa.” Na yango, molimo ekoki kozanga mpongi. Biblia emonisi lisusu ete molimo ekoki kokufa. Ee, molimo ekufaka “Moto (molimo, MN) yango ekolongolama na kati na bato na ye.” (Levitike 7:20). “Akobelema na ebembe (molimo ekufi, MN) te.” (Mituya 6:6). “Bomoi na biso mpo na bomoi na bino (milimo na biso esengeli kokufa, MN).” (Yosua 2:14). “Soko moto (molimo, MN) nani akoyoka Mosakoli yango te, ekobomama nyee.” (Misala 3:23). “Biloko (milimo, MN) nyonso na bomoi kati na mai bikufi.”—Emoniseli 16:3.
14. Biblia ezali koyebisa polele ete molimo ezali nini?
14 Emonani polele ete, lolenge Biblia ezali kosalela maloba nephesh mpe psukhe emonisi ete molimo ezali moto, mpe soki esalelami mpo na banyama, ezali ekelamu. Ezali eteni moko ya moto ezangi kokufa te. Nkutu, liloba nephesh ezali kosalelama ata mpo na Nzambe ye moko: “Molimo na Ye (eyini) ye oyo alingi mobulu.”—Nzembo 11:5.
Makanisi mingi oyo mondimami mazali na boyokani
15. Mikanda mingi milobi nini na ntina na liteya na kozanga kokufa na molimo?
15 Balimboli mingi na Biblia bamonisi ete Biblia elobeli te mpo na molimo oyo ekufaka te. La Petite encyclopédie juive (Angl.) elobi ete: “Biblia ezali koteya kozanga kokufa na molimo te, mpe liteya yango ezali komonana te kati na makomi ya liboso na balimboli na Mibeko.” Tozali kotanga kati na Encyclopédie juive (Angl.): “Endimeli oyo ete molimo ezali kolanda kozala na bomoi nsima na kokufa na nzoto euti na makanisi ya filozofi to teoloji na esika ezala likanisi moko ya solo mpenza mpo na kondima; esika moko te. Makomami Mosantu mazali koteya polele kondima wana,” Dictionnaire interprétatif de la Bible (Angl.) epesi ndimbola oyo: “Nephesh . . . ezali kolanda kozala na bomoi libanda na nzoto te, kasi ezali kokufa na yango elongo. . . . Mokapo moko te na Biblia ezali kolongisa likanisi oyo ete ‘molimo’ ezali kokabwana na nzoto ntango moto akufi.”
16. Makanisi nini mandimami mapesamaki mpo na molimo?
16 Dictionnaire interprétatif des mots bibliques (Angl.) elobi ete: “Kati na Kondimana na Kala, liloba ‘molimo’ ezali kolimbola te eteni mosusu ezangi komonana kati na bato oyo mbele ekolanda kozala na bomoi nsima na kufa. (Nephesh) ekokani mpenza na bomoi oyo bobele ekelamu moko na moko azali na yango. . . . Ndimbola ya liboso ya (psukhê) emonisami na liloba oyo ekokani na yango kati na Kondimana na Kala kasi na ndimbola na yango na makanisi na Bagreke te.” Mpe Dictionnaire biblique Eerdmans (Angl.) elobi ete kati na Biblia liloba molimo “ezali komonisa eteni moko na moto te, kasi moto na mobimba na ye. . . . Na ndimbola ete bato bazali na molimo te ‘-bazali nde milimo”.Biso bato tosulinyé.
17. Mikanda mibale ya bakatolike elobi nini mpo na molimo?
17 Ata la Nouvelle Encyclopédie catholique endimi ete, “kati na Biblia, maloba oyo mabongolami na liloba molimo mingimingi mazali komonisa moto na mobimba na ye”. Mokanda yango ebakisi: “Kati na Kondimana na Kala“ bokabwani ezali kati na nzoto mpe molimo te, . . . Liloba (nephesh), atako ebongolami na liloba molimo, elimboli soko moke te molimo oyo ekabwani na nzoto to na moto ye moko. Liloba (psukhê) ezali liloba ya Kondimana na Sika oyo ekokani na (nephesh). . . . Likanisi oyo ete molimo ebikaka nsima na kufa ezali komonana polele te kati na Biblia.” Georges Auzou, profesere katolike Mofalansé na Makomami Mosantu, akomi kati na mokanda na ye La Parole de Dieu: “Likanisi ya ‘molimo’ na ndimbola ya eloko moko ya elimo to eloko ezangi komonana oyo ekeseni na ‘nzoto’, . . . ezali kati na Biblia te.”
18. (a) Encyclopédie moko elobi nini mpo na lolenge liloba “molimo” ezali kosalelama na kati na Biblia? (b) Epai na nani Bateolojié bazwaki likanisi oyo ete eloko moko ebikaka nsima na kokufa ya nzoto?
18 Encyclopédie américaine elobi: “Kondimana na Kala ezali komona moto ete azali eloko mobimba, ekoki te kokabola molimo na ye na nzoto na ye. Atako (nephésh) na liebele ezali kobongolama mbala mingi na liloba ‘molimo’, ekozala libunga kopesa na liloba yango ndimbola oyo ezalaki na yango epai na Bagreke. . . . (Nephesh) ezali komonisa eloko mosusu oyo ekabwani na nzoto te. Kati na Kondima na Sika, liloba na greke (psukhe) ezali mbala mingi kobongolama na liloba ‘molimo’, kasi, awa lisusu, esengeli kokanisa te ete ezali na ndimbola oyo filozofi ya Bagreke ezalaki kopesa yango. . . .Biblia ezali koteya te moto azali kobika nsima na kufa.” Encyclopédie yango ebakisi: “Bateolojié balandaki makanisi ya bafilozofe mpo na kokoma na maloba mabongi likoló na kobika na moto nsima na kufa.”
Euti na Biblia te, kasi na filozofi
19. Boyokani nini ezali kati na filozofi ya Bagreke mpe endimeli ya kozanga kokufa na molimo?
19 Ezali solo ete Bateolojié bazwaki makanisi ya Bafilozofe bapakano mpo na kobimisa liteya ya kozanga kokufa ya molimo. Dictionnaire Encyclopédique de la Bible endimi yango na maloba oyo: “Likanisi na kozanga kokufa (ya molimo) eutaki epai ya Bagreke.” Encyclopédie juive elobi: “Bayuda bayokaki likanisi oyo ete molimo ekufaka te ntango bayebaki makanisi ya Bagreke, mingimingi filozofi ya Platon, molakisi monene na likanisi yango.” Platon, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya minei liboso na Yesu Klisto, alobaki ete: “Molimo ekufaka te mpe ebebaka te, mpe milimo na biso mikozala na bomoi mpenza kati na mokili mosusu.”—Dialogues de Platon (Angl.).
20. Ntango nini mpe ndenge nini filozofi to makanisi ya bopakano ekotaki kati na lisangá ya boklisto?
20 Ntango nini filozofi oyo na bopakano ekotaki na lingomba ya boklisto? La Nouvelle Encyclopédie britannique epesi eyano: “Kobanda na katikati na ekeke ya mibale, baklisto oyo bazalaki na mwa boyebi ya filozofi ya Bagreke babandaki koyoka mposa ya koteya kondima na bango engebene maloba na filozofi wana, yango mpo na kokokisa mposa na mayele na bango mpe mpo na kobongola bapakano oyo bayekolá mingi. Filozofe to likanisi oyo ebongaki na bango mingimingi ezalaki oyo babiangi platonisme. Ezali bongo, lokola encyclopédie oyo elimboli yango, “bato na mayele to bafilozofe ya liboso baklisto balandaki likanisi ya Bagreke ya kozanga kokufa na molimo”. Pape Jean-Paul li ye moko andimaki ete likanisi ya kozanga kokufa na molimo euti na “mateya ya filozofi ya Bagreke”. NA kondimaka mateya yango, boklisto ya lokuta etikaki pembeni solo oyo elobelami polele na Genese 2:7, epai tozali kotanga “Moto akomaki molimo na bomoi.”
20 Kasi kozanga kokufa na molimo eteyamaki liboso na Platon. Kati na mokanda na ye La religion de Babylone et d’Assyrie (Angl.), Morris Jastrow akomi ete: “Likanisi ya kozanga kokufa . . . ebendaki mingi likebi ya Bateolojié ya Babilone. . . . Bazalaki komona liwa lokola nzela mpo na koingela na lolenge mosusu ya bomoi.” Siegfried Morenz alimboli kati na mokanda na ye La religion égyptienne (Angl.) ete “Bato na Ezipito na kalakala bazalaki kotalela mpenza liwa nsima na kufa lokola kolandana na bomoi awa na mabelé”. L’Encyclopédie juive emonisi ete boyokani ezali kati na mangomba oyo ya kalakala mpe Platon; ya solo, mokanda yango elobi ete filozofe wana akomaki kino kondima likanisi ya kozanga kokufa na molimo “na nzela na mabombami na lingomba ya orphiques mpe éleusiniens kati na yango makanisi ya Babilone mpe ya Ezipito esanganaki mingi”.
21. Endimeli oyo ete molimo ekufaka te ebandaki wapi?
21 Likanisi oyo ete molimo ekufaka te ezali bongo likanisi moko ya kala mingi. Ya solo, misisa na yango ezwami uta ebandeli na lisolo na moto. Nsima wana Adam akebisamaki ete akokufa soki akozanga botosi epai na Nzambe, Eva mwasi na ye, ayokaki likanisi mosusu ekeseni: “Bino bokokufa solo te.” Kobanda wana, nkona na liteya ya kozanga kokufa na molimo ekonamaki. Uta ntango yango, bonkoko na bato bipai nyonso ezwaki likanisi na bopakano oyo elobi ete ‘ya solo moto ozali kokufa te, kasi azali kolanda kozala na bomoi’. Ezali bongo mpo na boklisto ya lokuta, oyo atiaki bato na ye kati na lipengwi, na kotelemelaka bibongiseli mpe mokano na Nzambe.—Genese 3:1-5; Matai 7:15-23; 13:36-43; Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:3, 7.”
22. Mpo na nini tokoki koloba ete nkona na liteya na kozanga kokufa na molimo ekanamaki mpenza na ebandeli na lisolo na moto?
22 Nani abendaki bato mpo bandima lokuta wana? Yesu amonisaki ye wana elobaki ye epai na bakonzi na mangomba na ntango na ye ete: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bosala mposa na tata na bino. . . . Wana ekosololaka ye lokuta, azali kosolola makambo na ye moko, mpo ete azali mobuki na nkuta mpe tata na yango.” (Yoane 8:44). Ee, ezali Satana nde abimisaki likanisi oyo ene molimo ekufaka te mpo na kopengwisa bato na losambo ya solo. Na yango, baoyo bazali kondima mateya oyo mauti na lokuta ya liboso oyo ekomami na Biblia, bazali komikosa mpe bazali komisalela elikya ya lokuta atako, na eleko oyo ebimisamaki na Satana, lokuta yango kozanga ntembe ememaki Eva na kokanisa bobele ete akokufa na mosuni te.
23. Nani abimisaki likanisi oyo ete molimo ekufaka te, mpe mpo na nini?
23 Biblia ezali koteya te ete bato bazali na molimo ezangi kokufa. Kasi, mpo na nini Biblia ezali koloba mpo na elikya ya bomoi ya seko? Na 1 Bakolinti 15:53, ezali koloba te ete, ‘oyo na kokufa ekolata kozanga kokufa’? Lisusu, Yesu azongaki na likolo nsima na kosekwa na ye te? mpe alobaki te ete bato mosusu bakokaki kokende kuna lokola? Tokotalela mituna oyo mpe mituna misusu kati na lisolo elandi.
Bozongeli
◻ Mangomba mingi bazali kondima nini mpo na molimo?
◻ Ndenge nini Biblia emonisi ete moto azalisamaki na molimo ezangi kokufa te?
◻ Na kotalela lolenge Biblia ezali kosalela liloba “molimo”, liloba na Liebele mpe liloba na Greke oyo ezali kolimbola molimo emonisi mpenza nini?
◻ Engebene makanisi mingi oyo mandimami, nini emonani mpo na ndimbola oyo Biblia ezali kopesa na molimo?
◻ Liteya ya kozanga kokufa ya molimo ebandaki ntango nini?
24. Mituna nini tokoki komituna mpo na oyo etali bomoi ya seko mpe kozanga kokufa?
[Elilingi na lokasa 20]
Bango nyonso bazali molimo