Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/4 nk. 22-25
  • ‘Balóbi na bato’ na mboka Belize

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Balóbi na bato’ na mboka Belize
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • ‘Kolóba’ ebandi
  • ’Babwaki minyama na bango’ na teritware mobimba
  • Kolóba oyo ebimisi mbuma
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/4 nk. 22-25

‘Balóbi na bato’ na mboka Belize

BÉLIZE ezali mboka moke efinani kati na Mexique mpe Guatemala, na nse epai moi ekobetaka makasi. Na pembenipembeni na mboka yango, mai na bulé ya la mer des Antilles etondi na mabanga minene oyo ekokangaka mai mazali kouta na Mpoto. Moi makasi ebimaka na bitanda mingi bizali pene na ebale. Kasi na kati na mboka, epai na sud, bangomba Mayas ezali molai kino 1120 métres. Etando yango etondi na bangomba oyo na kala ezalaki na zamba monene, etondi mpe na mabulu minene, na bibale efinanafinana kati na bangomba mpe na bisika oyo mai ekosopanaka makasi mpenza likoló na mabanga.

Biloko bikundolamaki wana bimonisi ete ba Mayas bazalaki kofanda na mboka yango na ebandeli. Na ekeke na 17, bakati nzete na ntango na kala, babandaki kofanda wana mpo na kokata nzete oyo babengi campêche mpe acajou. Na nsima, ba Anglais babandaki koyangela mboka yango mpe babengaki yango Honduras britannique, oyo eyaki kozwa lipanda na 1981.

Lelo oyo, Bélize ezali na bafandi 175 000. Bafandi na mposo ekeseni na mboka wana, bango ba Antillais oyo bauti na Afrika (créoles), ba métis, ba Mayas, ba Garinagus (bato na lnde na cararaibes), bato na Asie, Mindele mpe bato mosusu. Lokola Bélize eyangelamaki na ba Anglais, monoko ya liboso eyebani kuna ezali Anglais, kasi espagnol ezali mpe kolobama lokola monoko na mibale. créole mpe elobamaka mingi, na maya, na garifuna mpe minoko mosusu.

Mabanga oyo ezali na mai mpe ekokangela mai makoutaka na Mpoto ezali na bolai ya 280 kilometres, etondi na langi kitoko ya ndenge na ndenge, ezali na bansonge emata likoló lokola ya ndako oyo babengi chateau mpe na mabulu oyo na mazali kati na mabanga yango, okokuta bikelamu mingi bikobikaka na mai oyo bikosepeliseke mpenza miso mpe bizali kitoko mpo na kolya. Bobele bongo, bafandi mpe bizaleli ndenge na ndenge na Bélize esili kokoma esika malamu ya ‘kolóba’ mpo na baoyo bazali koyanola na libyangami oyo na Yesu: “Boya nsima na ngai mpe nakozalisa bino balóbi na bato.”​—Matai 4:19.

‘Kolóba’ ebandi

Na 1923, James Gordon, Temwe moko oyo azwaki batisimo na 1918 na Jamaïque, akendaki kofanda na Bélize. Abandaki bongo kobwaka monyama na ye kati na bato oyo bafandaki na ye mboka moko na Bomba, mpe na zongazonga, na distrike ya Belize city. Mpo na kolóba, azalaki se na sakosi monene oyo esalamaki na acajou na loboko moko, kati na yango atyaki mikanda mpe na loboko mosusu azalaki na fono na ye.

Pene na 1931, Freida Johnson, mosakoli na ntango nyonso, ye moto na Texas, ayaki na Bélize na mobembo moko asalaki mpo na kopalanganisa nsango malamu na bamboka ya Amérique centrale. Na sanza motoba oyo asalaki kuna, akutanaki na mosali mampa moko na nkombo Thaddius Hodgeson, ye oyo ayebisaki lisusu solo epai na mosali mampa mosusu, Arthur Randall. Ndeko Hodgeson atambwisaki mosala ya kosakola kino ntango ba diplomés ya liboso ya Eteyelo na Galaad bayaki na 1945. Ezalaki bongo charles Heyen mpe Elmer lhring.

Mbula elandaki, ntango ndeko N. Knorr ye oyo azalaki président mpe ndeko F. Franz, vice-président ya la Société Watch Tower na eleko wana, bayaki kosala vizite, filiale moko efungwamaki na Bélize. Uta ntango wana, ‘monyama’ ebwakamaki na biteni bínso ya mboka mpe mosala ezalaki se kokóla. Motuya na ‘balobi na bato’ oyo bazalaki kosangana na mosala yango ekomaki 844 na 1989.

’Babwaki minyama na bango’ na teritware mobimba

Lelo oyo, nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama ntango nyonso na bingumba lokola Belize city mpe bingumba mosusu, kasi ezali bongo te mpo na bamboka mingi oyo ezali mosika mpe kati na bisanga. Ezalaki bongo mpo na San Pedro, na esanga na Ambergris, esili koleka sikawa mwa bambula.

Uta bambula mingi, bafandi na esanga wana bazalaki koyoka solo se ntango Batemwe bazalaki kouta na bamboka mosusu mpo na koya kosala mwa vizite mikuse. Bazalaki kotika mikanda mikolimbolaka Biblia epai na baoyo bazalaki kosepela, kasi bakokaki kosala bozongeli na sika te, mpamba te basengelaki kozonga epai na bango. Na nsima, libota moko ya bato minei eyaki na Bélize mpo na kosala epai kuna mposa na basakoli ezali makasi.Basangani na libota yango bandimaki kofanda na esanga atako yango esengaki bango ete bafanda naino na motuka monene na kozelaka ete batonga ndako. Kasi ‘bolóbi’ ezalaki malonga.Babandaki boyekoli mingi ya sika mpe lelo oyo ‘balóbi na bato bazali koleka 20’ kati na esanga yango. Na Septembre 1986, Batemwe bautaki na mboka mobimba, bayaki kosalisa bango na kotonga Salle du Royaume na bango na week-end (mokolo ya Poso mpe Lomingo) moko mpamba.

Kati na teritware ya filiale, ezali mpe na bamboka mingi ya ba Mayas oyo etongami mosika na zamba, na sud ya distrike ya Toledo epai kuna bakolobaka monoko ebengami kechi mpe maya mopan. Mbala moko na mbula, ntango elanga epesaka nzela ete bakatisa bibale mpe bangomba, etuluku moko na Batemwe bazalaki kokenda na makolo na bamboka yango, mpe bazalaki komema na mokongo, biloko nyonso oyo bazalaki na yango; bazalaki kopesa litatoli epai na bafandi na mboka mpe bazalaki kozongela baoyo bazali kosepela na nsango malamu.

Mbala moko na mibembo yango kati na esobe, Batemwe bakendaki kotala mboka moko ebengami crique Sarco na 1928. Elenge mwasi moko alokotaki mokanda Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, oyo Temwe moko ekweisaki kozanga ete ayeba. Alobi boye:

“Nazalaki kobatela mokanda yango malamu mpenza, kasi nazalaki kotanga yango te; Nazalaki se kotala bililingi na yango. Bavizite oyo bandeko bazalaki koya kosala epai na tata na ngai mbula na mbula, ekotisaki nkombo ya Jéhovah na motó na ngai, mpe nayebaki ete Nzambe azali na lisangá. Ntango nabandaki kokenda na lycée na Punta Gorda, mokolo mosusu motuna molandi motunamaki: Nkombo ya Nzambe ezali nani? Ntango nayanolaki ete ‘Jéhovah’, mbala moko nazwaki etumbu (mpamela mitano mpe mosala makasi lokola kosukola kabiné). Bongo sangó abengaki ngai, mpe alobaki na ngai ete natanga lisusu nkombo wana te soki te bakolongola ngai na kelasi. Na yango, nalongwaki libela na kelasi.

“Ezali se nsima na bambula mingi nde nayaki lisusu koyoka nsango malamu, nsima na libala na ngai, ntango nazalaki kofanda na nord ya mboka, na corozal. Namonaki eteni na papier ekumbamaki na mopepe, nalokotaki yango mpe nayaki koyeba ete ezalaki lokasa ya ezipeli ya brochure Les Témoins de jehovah et la question du sang. Nalobaki epai na moninga moko ete nazalaki kokabola likanisi ya Batemwe te. Alobaki na ngai ete mokolo mosusu nakobongola likanisi yango. Mokolo elandaki, Temwe moko alekaki epai na ngai mpe alobaki na ngai ete bayebisaki ye ete ngai nalingaki koyekola Biblia elongo na Batemwe de Jéhovah. Nalobaki na ye ete ezalaki ndenge yango te, kasi alimbwelaki ngai ete ekozwa se ntango moke; na bongo nandimaki Mokanda Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, oyo nazalaki kobatela malamu uta mibu mwambe ekomaki sikawa na ntina.

“Liboso na yango, libota ya mobali na ngai epusaki ye ete apekisa ngai koyekola. Na yango, tokendaki kofanda na mboka mosusu mosika, mpe nazalaki lisusu kokutana na Batemwe te. Na nsima, mwasi moko Temwe azalaki kosakola ndako na ndako ayaki kotala ngai, mpe nazongelaki lisusu boyekoli Mobali na ngai asalaki nyonso mpo na kopekisa ye. Azalaki kolangwa masanga, kotya makelele, kobengana ngai na ndako to azalaki koloba ete akobala mwasi mosusu. Kasi nakangamaki makasi, namipesaki mobimba na Jéhovah kati na libondeli. Eleki mbula mibale, Jéhovah ayanolaki na libondeli na ngai na ndenge nakokaki kokanisela te.

“Mokolo mosusu, mobali na ngai azongaki na ndako na elongi etondi na matutu, mpe akendaki mbala moko kolala. Lobi na yango, na moi alobaki na ngai ete ye mpe azalaki na mposa ya koyekola Biblia. Kobongwana wana esepelisaki ngai makasi, kasi ebimisaki lisusu nkanda ya libota na ye. Baboti na ye balobaki na ye ete: ‘Soko osanzé lingomba, sanzé mpe baboti; ozali lisusu mwana na biso te.’ Uta ntango yango, mobali na ngai mpe ngai tokomaki na bomoko; mpe tokolaki nokinoki. Le 5 Décembre 1987, tozwaki batisimo na mokolo ya liboso ya Assemblée spécíale oyo toyanganaki na yango.”

Na ndenge yango, ata na barégio mosika na Bélize, ‘bolóbi’ ezali kobimisa litomba. Brochure Vivez éternellement heureux sur la terre! (Sepela na bomoi ya seko na mabelé!) ebongolamaki na kechi mpo ete bato mingi oyo bafandi na bamboka mosika basalisama mpe bandima nsango malamu. Baoyo babendamaki longwa na mai mabe na biloko mabe na Satana bazali na esengo ya komona mai na peto na solo kati na paradis ya elimo oyo ezalisami na Jéhovah.

Na ndakisa, elenge mobali moko oyo afandi na Belize city ayekolaki kati na Biblia mitinda na peto oyo mityami na Jéhovah. Atikaki komela marijuana mpe ba drogues mosusu, mpe azwaki batisimo. Nsima mwa moke, akomaki ‘molóbi na bato’ ya ntango nyonso. Azali mpe na libaku malamu ya kozala mosaleli na misala kati na lisangá na ye. Bato mingi basalisamaki ete bapetola bomoi na bango na kokomisaka mabala na bango epai na bakonzi na leta. Bayekolisaki kotanga mpe kokóma epai na bato mingi, mpo ete bazala na likoki ya koyekola Biblia bango moko. Mosala ya ba Témoins de Jéhovah na Bélize ezali bobele te kokokisa bamposa na elimo na bafandi, kasi na oyo etali koteya, ezali lisusu na ntina epai na bafandi na mboka.

Kolóba oyo ebimisi mbuma

Mokolo mosusu, na kolandaka maloba na Yesu, bayekoli na ye babwakaki monyama na ngambo mosusu na masuwa. Litomba ezalaki nini? “Bayebaki kobenda yango te mpo na ebele na mbisí.” (Yoane 21:6) Bobele bongo, nsango malamu ezali kondimama mpenza na boye ete Batemwe na Bélize bazali na mpasi mpo na kokokisa bamposa ya bato nyonso oyo bazali kokota na lisangá.

Mposa ya bandeko bateli oyo bakoki kotambwisa masangá ezali makasi, mpamba te na mwayene bankulutu bazali se moko to mibale na lisangá mokomoko. Mpe ezali mpasi mpo na kosakola mbala na mbala na biteni binso ya mboka. Atako banzela ezali mpo na kokóma na biteni mingi ya mboka yango, kozanga bus ezali kopesa mpasi na Batemwe mpo na kokolisa litomba oyo bazali kokutana na yango, mpe ezali mwa mpasi mpo na bato oyo basepeli na solo ete bayangana ntango nyonso na makita. Bobele kotambola na makolo to na bwatu nde ezali myango malamu oyo ezali kopesa nzela na kokóma na bamboka mosika.

Batemwe ya Bélize basengeli mpe kokutana na mikakatano mpo na kozwa ndako kati na yango bakoki kosala makita ya poso na poso, kosala ba Assemblées ya circonscription mpe ya distrike. Na 1987, ba Assemblées ya distrike “Bozala na elikya epai na Jéhovah”, eyanganisaki bato koleka 2 200, elingi koloba pene na mbala misato motuya ya basakoli na bokonzi. Mpo na makita yango, bandeko babongisaki mwa esika moko mpo na ntango moke, pene na Ladyville. Sikawa bazali kokana kotonga Salle d’assemblées na bitongeli makasi na esika yango.

Batemwe bazali na mokumba monene ya kokokisa kasi bazali kokokisa yango na esengo. Bamonisaki yango na kosanganaka lisusu makasi koleka na mosala ya kosakola. Na 1979, basakoli balekisaki na mwayene ngonga 8,3 na sanza mokomoko na mosala ya kosakola. Mwayene na bango ya sanza mokomoko ezali sikawa ngonga 11,3. Motuya na ba pionniers mpe esili kokola makasi. Na 1979, mwayene na ba pionniers auxiliaires ezalaki 10 na sanza mokomoko mpe ba pionniers permanents bazalaki 12. Lelo oyo ba pionniers auxiliaires bazali 51 na sanza mokomoko mpe ba pionniers permanents bazali 42. Mbula na bango ezali longwa na 14 kino 74.

Motuya na bato bayanganaki na Ekaniseli na liwa na Klisto, oyo esalamaki na 22 Mars 1989, epesi elikya ete bokoli bokozala makasi. Batemwe bamonisaki molende mpo na kobyanga baoyo bazalaki kosepela Mpo na yango, bato banso bayanganaki bazalaki 3 884, elingi koloba mbala minei koleka motuya nyonso ya basakoli. Ezalaki esengo na komona bikólo nyonso créoles, ba métis, ba Mayas, Mindele, ba chinois, ba Libanais mpe basusu koyangana esika moko.

Basakoli 844 ya mboka yango batambwisaka mpe boyekoli ya Biblia koleka nkoto moko na bandako na bato. Lokola bazali se kotya motema na litambwisi na Yesu Klisto, Mokonzi na lingomba, na ntembe te bafandi na Bélize oyo bazali se koya mingi bakoyanola na libyangami oyo epesameli bango mpo ete bakoma ‘balóbi na bato’.

[Bakarte na lokasa 22]

GOLFE DU MEXIQUE

MEXIQUE

BELIZE

Belize city

Punta Gorda

GUATEMALA,

GOLFE DU HONDURAS

[Bililingi na lokasa 24, 25]

Bazali kotonga Salle du Royaume na San Pedro, na esanga na Ambergris.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto