Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/4 nk. 26-28
  • ‘Napumbwaki na mapapu, lokola mpongo’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Napumbwaki na mapapu, lokola mpongo’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kimya elimwe
  • Nazwi kondima epai na Nzambe
  • Koboma mbisi na kokamwisa mpe batisimo
  • Ntango na koyungolama
  • Toyiki mpiko na mimekamo mosusu
  • Etumba ya Mibale ya Mokili Mobimba mpe nsima ya etumba
  • 1923​—⁠Eleki sikoyo mbula nkama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Napesaki mabɔkɔ na bokoli oyo esalemi nsima ya etumba ya mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Yehova ateyaki ngai banda bomwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Nazali kopesa Yehova eloko oyo ebongi na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/4 nk. 26-28

‘Napumbwaki na mapapu, lokola mpongo’

Lisolo ya Ingeborg Berg

NABOTAMAKI esili koleka ekeke moko, le 5 Juin 1889, penepene ya château (ndako monene ya mokonzi) ya Fredensborg, na nord ya mokili ya copenhague. Ntango libota ya bokonzi ya mokili ya Danemark bazalaki koyamba babyangami, kati na bango ezalaki mbala mosusu na bakonzi (rois) mpe ba empereurs na mikili ya Mpoto, bazalaki kosenga na basi na mabota na bozwi na mboka Fredensborg bakoka kopesa maboko mpo na kolamba bilei mpe kosunga babyangami. Ezali na motindo yango, wana ezalaki ngai mwana moke, mbala mingi bamemaki ngai na ndako monene ya mokonzi, epai kuna napesamaki lotomo ya kosakana mpe kokimakima na kati.

Likambo nazali kobosana te ezali oyo ya tsar (mokonzi) ya mokili ya Russie Nicolas ll mpe libota na ye. Soda oyo akengelaka ye (babengaka bango ba cosaque), asimbaki mopanga na loboko, atelemaki liboso na chambre na ye. Ba cosaque balingaka mingi bana; mokolo moko, moko na bango amekaki koyamba ngai. Nabangaki makasi, mingimingi mpo na mandefu na ye na kobangisa nakimaki kati na ba couloirs ya ndako.

Na libaku mosusu, tsar ya mokili ya Russie Nicolas ll, empereur ya Alemanye Wilhelm ll mpe mwana ya mokonzi mwasi Victoria, oyo, nsima, akomaki mokonzi Edouard VII na mokili ya Angleterre, bayaki kotala mokonzi ya mokili ya Danemark christian lx. Ntango bazalaki kozwa mopepe kati na balabala na mboka Fredensborg, esika bazalaki kosolola elongo na bato lokola baninga tsar Nicolas asimbaki moto na ngai wana ezalaki ngai kokumbamela ye. Ezalaki eleko moko ya kimya, eleko oyo bakonzi na mabota bazalaki kobanga te mpo na bomoi na bango, lokola ezali komonana lelo.

Kimya elimwe

Na 1912, nabandaki kosala lokola mosungi na libota, epai na ba prodanoise, na mokili ya Jutland du Sud, na ngambo ya ba allemand oyo bafandaki na ndelo ya mboka. Mokili wana eyangelamaki na ba allemand uta etumba ye 1864 kati ya mokili ya Danemark mpe mokili ya Pruse. Nazalaki kosalisa bamama na kobokola bana na bango oyo babotami sika mpe na lolenge yango namesanaki mingi na mabota yango ya sika.

Na 1914, nabalaki mokengeli na ndelo ya mokili ya Danemark mpe nazongaki lisusu kofanda na teritware ya Danemark Mwa ntango moke, etumba ebandaki. Nsima babengaki yango Etumba Monene, na nsuka, ezwaki nkombo ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba. Na ntongo moko, bakangaki baninga na nzubenzube pembenipembeni na ndelo ya mboka, mpo na kopekisa ete bato baleka te. Kimya oyo tozalaki na yango kino ntango wana elimwaki.

Nsomo mpe kozanga mayele na ntina na etumba ezwaki biso ntango toyokaki ete batata nyonso na mabota oyo babalaki sika oyo nazalaki kosunga lokola mosalisi bakotisaki bango na mosala ya soda na makasi. Longola bobele moko, bango nyonso bakufaki na etumba na Marne, epai na ouest. Epesaki mawa mingi na kokanisa mpo na bilenge basi-bakufeli mibali mpe bana na bango baoyo banyokwamaki mpo na kobungisa mibali na bango to batata na bango. Ndenge nini bilenge basi oyo bakokaki kosimba ndako na bango? Nazalaki komituna “Nzambe azali wapi?”

Na boumeli na etumba, mobulu ezalaki mbala mingi na ndelo ya mokili mpamba te bato bazalaki kokima etumba, bazalaki komeka kokatisa na ngambo mosusu. Naponamaki mpo na koluka nini ebombamaki kati na biloko na basi oyo bamonanaki lokola ete bazalaki kolekisa biloko mabe, lokola mingimingi ezalaki bilei, nazalaki kolukaluka mingi te mpe nazalaki kotika bango baleka. Etumba esilaki na 1918, mpe na 1920 mokili ya Jutland du Sud ekomaki lisusu eteni ya mokili ya Danemark.

Nazwi kondima epai na Nzambe

Atako kondima na ngai epai na Nzambe elembaki mpo na makambo nyonso na bokesene oyo namonaki, nalukaki koyeba ntina na bomoi. Mobali na ngai Alfred, mpe ngai moko tozalaki kokende mbala na mbala na ndako nzambe, kasi mituna na biso mizwaki eyano te.

Na 1923, tokendeki kofanda na mboka moke ya babomi mbisi, na esika oyo mai ekoti na mokili na mboka Flensburg, epai kuna Alfred abandaki kosala lokola mobomi ya mbisi. Nokinoki toyebanaki na libota moko oyo basangani na yango bazalaki na lingomba baptiste. Atako biso tozalaki ba luthériens, mokolo moko tondimaki libyangami na bango mpo na diskur moko ya biblia kati na salle moko ya hotel ya Ferry, na Egernsund. Liboso na kokende kuna, nakumbamaki na mabolongo mpe nabondelaki boye: “Nzambe. soki ozali, yoka libondeli na ngai!”

Diskur ezalaki koloba mpo na mwasi oyo Yesu akutanaki na ye na liziba na mai na Sychar mpe yango epesaki ngai mposa ya kotanga Biblia. Na elobeli mosusu likambo yango esalaki ngai nazala moto na sika. Nakomelaki mama na ngai ete: “Olobaka na ngai ntango nyonso ete nasengeli kobongwana mpe kozala na kondima epai na Nzambe. Nakanisi ete likambo yango esalami sikawa; nalingaki koyebisa yo te liboso, mpamba te nazalaki kobanga ete mbala mosusu esengo oyo nazwaki ekokaki kosila. Kasi esili te!”

Mwa ntango moke nsima, na 1927, nakutaki kati na ebombelo na biso ya bilei brochure Liberté pour les peuples. Ebendaki likebi na ngai, mpe makambo oyo mazalaki na kati masepelisaki ngai mingi kino nayebaki lisusu te epai wapi nazalaki mpe ngonga nini tokomaki. Ezali bobele wana bana bazongaki na kelasi mpe basengaki eloko ya kolya nde natikaki kotanga yango.

Ntango Alfred azongaki na ndako na mpokwa yango, nayebisaki ye na esengo nyonso makambo oyo natangaki. Nalobaki na ye ete soki brochure oyo elobi solo, ete Eglise ezali ndako na Nzambe te, tosengeli nokinoki kobomisa nkombo na biso na liste. Alfred azongiselaki ngai ete, mpo na ye, esengelaki naino kozela. Kasi toyokanaki mpo na kokoma mokanda na biro ya filiale ya la Société Watch Tower na copenhague mpo na kosenga mikanda mosusu.

Mpo na eyano na mokanda na biso, mokengeli moko ya zongazonga christian Romer, ayaki epai na biso. Totiaki bambeto ya bana na ebombelo na bilei mpo ete alala na chambre na bango. Na ntango mpe na nsima ya midi, ndeko Romer azalaki kosakola ndako na ndako, mpe na mpokwa nyonso azalaki koyekola na biso. Afandaki na biso mikolo minei, oyo epesaki biso esengo mingi. Nsima na kokende na ye, nasololaki lisusu na Alfred mpo na kobima kati na Lingomba. Na mbala oyo andimaki na esengo nyonso.

Akendaki na mokanda na biso mpo na likambo yango epai na pasteur. Pasteur yango akanisaki ete Alfred ayaki mpo na kosenga batisimo ya mwana oyo abotami sika. Kasi ntango ayokaki ntina na koya na ye, andimaki te. Atunaki “Eloko nini omoni mabe na Eglise?” Alfred atangaki mateya ya Trinité, kozanga kokufa ya molimo mpe minyoko na seko. Ayebisaki ye ete “Biblia ezali koteya makambo yango te”. Ntango pasteur ayanolaki ye na lolenge moko ezalaki malamu te ete akosolola lisusu te makambo yango na bato oyo bakoki kososola bango moko, Alfred alobaki polele ete: “Tolingi kolongwa na Eglise”.

Koboma mbisi na kokamwisa mpe batisimo

Assemblée moko esengelaki kosalema na copenhague, kasi tozalaki na mbongo ya kokoka te mpo na kofuta tiké. Nabondelaki Nzambe mpo alakisa biso oyo tokoki kosala mpo na kokende na assemblée yango: tolingaki mpenza kozwa batisimo. Mwa moke liboso na assemblée, Alfred akendeki koboma mbisi na esika oyo mai ekoti na mokili. Abomaki mbisi mingi kino bwato etondaki; yango epesaki biso nzela ya kofuta tiká na biso. Babomi mbisi na esika yango bakamwaki mingi, mpamba te na mbula wana babomaki mbisi moke na esika yango. Ya solo, nsima na mibu 50 koleka, bazalaki kolobela lisusu mpo na “ekamwiseli” yango. Tobiangaki yango koboma mbisi na Petelo. Ezali na ndenge yango nde tobatisamaki na le 28 Aout 1928.

Lolenge bazalaki kobatisa ezali lokola lelo te. Esika na mai na batisimo ezalaki nsima na ezipeli. Ntango balongolaki yango, nde christian Jensen amonanaki, pene mpo na kobatisa biso na kozindisa na mai. Alataki elamba molai mpe atelemaki katikati na mai, oyo ekomaki kino na loketo. Bato oyo basengelaki kozwa batisimo balataki banzambala ya mpembe. Bazalaki kobatisa liboso mibali, nsima na yango basi.

Na boumeli ya assemblée na Copenhague, tozalaki kolala epai na baboti na ngai. Ntango nazongaki na ndako na mpokwa yango tozwaki batisimo, tata na ngai atunaki ngai esika toutaki.

Nalobaki: “Tokendaki na Assemblée” Atunaki lisusu, “Nini elekaki kuna?’‘ azongisaki: “Tozwaki batisimo” Atombokaki makasi na koloba ete: “Ozwaki batisimo? Oyo ezwaki na bomwana ekokaki te?” Nazongisaki: “Te, papa”. Na ntango yango abetaki ngai mbata makasi na kolobaka na nkanda makasi ete: “Ezali ngai moto nakobatisa yo!”

Tala ndenge nini, wana ezalaki ngai na mibu 39 mpe mama ya bana mitano, nazwaki mbata ya nsuka ya tata na ngai, oyo, na kokesena, azalaki na boboto mpe moto malamu mpenza. Azongelaki lisusu te likambo yango. Malamu mingi, mpo ete Alfred azongaki naino na ndako te, mpe ezali nsima na bambula nde nayebisaki ye makambo malekaki.

Ntango na koyungolama

Wana ezongaki biso na ndako, nakendaki kotala mwasi moko, oyo nakanisaki azalaki soeur, mpe nayebisaki ye na esengo nyonso na ntina etali assemblée mpe kobatisama na biso. Na malembe nyonso, afandaki mpe alobaki na ngai ete: “Mawa mingi soeur Berg. Kondima nyonso wana te. Frere moko ya Flensburg akoya na mikolo mikoya mpe akolimbolela biso vérité.”

Nazangaki maloba. Mbala moko nazwaki makasi ya komata na vélo mpo na kozonga na ndako. Ngonga na ndako-nzambe moko oyo ezalaki pembeni ezalaki kobeta, mpe ntango nyonso ezalaki kobeta, ezalaki lokola nazalaki koyoka liloba “liwa, liwa” na matoi na ngai. Kati na motema na ngai, nazalaki kosenga makasi lisalisi epai na Jéhovah, mpe maloba oyo mazwami na Nzembo 32:8, 9 mayaki na móto na ngai ete: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo kolanda; nakopesa yo toli wana ezali ngai kotala yo. Kozala lokola mbalata to mpunda oyo azali na mayele te; oyo ekangami na ebende na monoko mpe na nkamba, soko te ekobelema epai na yo te.’’

Ekomaki ngai na ndako, nafungolaki Biblia na ngai mpe natangaki Libondeli na Nkolo. Nakomaki na kimya. Nakanisaki lisusu lisese na mabanga na motuya monene. (Matayo 13:45, 46) Bokonzi ezalaki mpo na ngai lokola libanga wana na motuya. Nalingaki kopesa oyo nyonso nazalaki na yango mpo na kozwa libanga yango. Makanisi oyo mazalaki kolendisa ngai. Kasi mapamboli mosusu mazelaki biso.

Na 1980, zulunalo L’Age d’Or (lelo ebiangami Réveillez-vous!) ebandaki kobima na monoko ya danois na titre Mokili ya sika. Mbula oyo elandaki, tozalaki na esengo ya kozwa nkombo Témoins de Jéhovah, oyo ezwaki esika ya nkombo ayekoli na Biblia. Tozalaki bobele moke na sika oyo tofandaki na eleko yango, lisusu makita ezalaki kosalema mbala mingi epai na biso. Lokola tozalaki kofanda na balabala oyo babiagaki Escalier, lisangá na biso ezwaki nkombo a Escalier.

Toyiki mpiko na mimekamo mosusu

Na 1934, basalaki ngai opération monene na monganga mpe mpo na yango nakomaki paralizé. Natikalaki na mbeto na boumeli ya mbula mibale na ndambo, mpe minganga bakanisaki te nakotikala paralizé kino liwa na ngai. Ezalaki ntango moko ya mpasi mpo na ngai, kasi libota na ngai basalisaki ngai mingi.

Alfred asombelaki ngai Biblia oyo ezali na makomi minene mpe mwana na biso ya moke asalelaki ngai mesa likoló na yango nakokaki kotya Biblia mpo na kotanga wana ezali ngai kolala na mbeto. Nzokande, nazalaki mpe na mposa ya kosakola; na yango Alfred atyaki tablo pembeni na nzela likolo na yango akomaki mpo na koyebisa bapériodike ya sika tozwaki. Baoyo bazalaki kosepela bayaki kokutana na ngai na ndako, na libaku yango nakokaki kosolola na bango. Tablo wana na mayebisi epesaki nzela epai na bato na esika tofandaki bakoka kobyanga libota na biso ‘Le monde nouveau’ (mokili ya sika).

Bakengeli ya zongazonga bazalaki kosala nyonso mpo na koya kotala ngai. Likambo yango epesaki ngai nzela ya koyebana na bandeko oyo bateli mpe baoyo bamonaki makambo mingi, baoyo balendisaki ngai mingi. Nazwaki mpe ntango mingi mpo na koyekola, mpe boyebi ezalaki eloko esimbaki ngai. Ezali lokola ‘napumbwaki na mapapu lokola mpongo’.​—Yisaya 40:31.

Na 1935, ntango “ebele monene” eyebanaki polele, bandeko mingi ya mibali mpe bandeko mingi ya basi na mboka oyo tofandaki, mpe mwana na biso ya mobali na mwana na biso ya liboso ya mwasi, batikaki kolya limpa mpe komela vinyo na ntango ya Ekaniseli. Nzokande, bamosusu kati na biso tozalaki na ntembe ata moke te mpo na libyangami na biso ya kokende na likolo. Tosepelaki mingi mpo na ndimbola ya sika oyo tozwaki mpo na mikano kitoko na Jéhovah mpo na ebele monene, bato oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé.​—Emoniseli 7:9; Nzembo 37:29.

Kolongono na ngai ya nzoto ebandaki kobonga mokemoke, na bokeseni na oyo minganga basakolaki, mpe nakokaki lisusu kosangana mingi na mosala ya kobikisa bomoi ya kosakola mpe kozalisa bayekoli.

Etumba ya Mibale ya Mokili Mobimba mpe nsima ya etumba

Tozalaki komona Alemanye na ngambo mosusu ya mai (esika mai ekoti na mokili), mpe tobandaki komona bopusi ya ba nazis. Bamosusu kati na bazalani na biso bakomaki ba nazis mpe babandaki kobangisa biso ete: “Bozela ete Hitler aya. Bokosuka bongo na camp de concentration (boloko na minyoko makasi) to esanga moko oyo ezali na bato te!”

Tomonaki malamu ete tolongwa na esika yango. Bato na boboto basalisaki biso kozwa ndako na Sonderborg, engumba monene oyo ezalaki pembeni na esika tozalaki. Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba ebandaki na Septembre 1939; tolongwaki na Mars 1940; le 9 Avril, basoda ya Alemanye bazwaki Danemark. Nzokande, likambo na kokamwisa ezali ete, ba Témoins de Jéhovah ya Danemark batungisamaki na ba Allemands te.

Ntango ndoto ya Hitler ya koyangela mokili elimwaki, nazalaki koyekola Biblia elongo na ba Allemands mingi baoyo bakosamaki bafandaki na mokili Sonderborg. Oyo nde ezalaki esengo, ya komona mingi na bayekoli na Biblia yango komipesa epai na Jéhovah, kasi lisusu ya komona bana na ngai mpe bankoko na ngai kosangana na mosala ya boklisto.

Mobali na ngai akufaki na 1962, nkoko na ngai moko akufaki na 1981 mpe mwana mwasi na ngai ya liboso akufaki na 1984. Kotikala na molende kati na mosala na Jéhovah nde likambo esalisaki ngai kolonga bampasi wana.

Ezali likambo ya kokamwa na komona bokoli ya mosala ya Bokonzi na mokili ya Danemark uta ntango nabandaki kosangana na yango na 1928. Na ntango yango, tozalaki soko basakoli 300, nzokande lelo tozali basakoli koleka 16 000! Nazali kotonda ete awa nazali na mibu nkama nazali makasi kati na mosala. Ya solo mpenza namonaki kokokisama ya maloba oyo mazwami na Yisaya 40:31: “Baoyo bakozelaka Jéhovah bakozwa nguya na sika, bakopombwa likolo na mapapu lokola mpongo, bakopota mbangu nde bakolemba te, bakotambola nde bakosenzwa te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto