Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/3 nk. 21-22
  • Bokundoli ya “diamants” oyo elekl motuya na sierra leone

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokundoli ya “diamants” oyo elekl motuya na sierra leone
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Bazalaki koluka solo na molende mpenza
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/3 nk. 21-22

Bokundoli ya “diamants” oyo elekl motuya na sierra leone

NA 1462, etuluku ya ba marins ya mpiko ya mboka Portugal balandaki mopanzi ya mai-monene bipai ya Occident ya Afrika kino na esika oyo etangwi na Nord ya Equateur na ntaka ya 900 kilometele. Babangaki te masapo oyo engebene yango, ezalaki na mai-monene moko ya molili mpe etondi na ba nyama minene-minene na Sud ya Maroc. Mpe na kokesena mpenza na bato ya ntango na bango, bazalaki te kokanisa ete moi ezalaki makasi mingi kino ete mai​—monene ezalaki kotóka.

Lokola oyo ba marins yango bazalaki kolikya, maswa na bango ya banzete ezikaki te, mpe bamonaki te banyama minene-minene oyo ezangi mitu, oyo bazalaki kolobela na masapo. Kokesene mpenza, bakutaki bitando kitoko bitondi na zelo ya mpembe na nse na ngomba oyo ezipamaki na zamba na nkasa ya mai na mpondu. Ntango bambula ezalaki konoka mpe mikalikali mizalaki kongala na likoló, nkake oyo ezalaki kosukuma mpe konguluma na bangomba yango, ekokanaki na konguluma ya nyama moko monene. Yango wana, ba marins yango babengaki esika wana, Sierra leone (“ngomba ya nkosi”).

Na boumeli ya bambula, bato basosolaki ete bozwi ya Sierra Leone esuki bobele na kitoko na yango te Ezalaki mpe kobomba mabanga ya ntalo: fer, bauxite, rutile, chromite, platine mpe wolo. Kasi bobele na 1930 nde bokundoli moko ememaki bato na mombongo na komipesa na mboka wana moke: bokundoli ya diamants. Mabanga ya ntalo oyo ebombami kuna esili komonana na motuya monene mpenza, yango nde ebendaki bankoto na baluki ya mabele epai kuna mabanga ya ntalo ezali.

Bamosusu bazalaki kolokota mpenza diamants ata na mabelé. Mokolo moko, mwasi moko alokotaki diamant monene wana ezalaki ye kosukola bilamba na ye na mai moko. Mobali moko akundolaki libanga ya ntalo ya 153 carats wana ezalaki ye kolona mabenge. Mbala mingi, bokundoli ya mabanga yango ya ntalo ekosengaka milende minene mpenza. Na solo, mingimingi mpenza ba diamants ekundamaka na bozindo mpenza mpe ekozindaka kati na libanga moko monene ebengami kimberlite. Mpo na kolongola yango kuna, esengeli kotimola, kopanza kotuta mpe kopona. Misala motindo oyo misengeli kozala na mayele, na koyeba kosala mpe kozala na motema molai.

Soko misala ya kotimola mabanga ya ntalo ezali se kokola mbango mpenza lelo oyo na Sierra Leone, bolukiluki ya mabanga mosusu ya motuya​—diamants ya elimo, oyo na motuya monene​—ezali sé kokoba na mboka yango uta 1915. Na mbula wana, moto moko na nkombo Alfred Joseph, autaki Barbade na maswa ya koni. Abandaki “mosala ya kolukaluka esika epai kuna mabanga ya ntalo makoki kozwama” na mboka yango, mpo na kokundola ba diamants te, kasi mpo na kokutana na bato oyo balingi kosalela Nzambe ya solo “na elimo mpe na solo”l (Yoane 4:24.) Amipesaki na bolukiluki yango na lolenge moko na baklisto na eleko ya liboso, elingi koloba ete azalaki koteya “na koyangana mpe na ndako na ndako”. (Misala 20:20.) Na nsima ya mbula sembo, William Brown alandaki, ye mpe lisusu moto ya Antilles.

Na nsuka ya mobu 1923, lisanga moko ya moke esalamaki na engumba monene, Freetown. Esalamaki na baklisto 14 baoyo bautaki kozwa batisimo sika. Lelo oyo, bato 632 baoyo bakabolami na masangá 30, bazali kosangana na molende mpenza na mosala ya kosakola na lolenge ya ba Témoins de Jéhovah. Milende na bango mpo na kozwa mpe kopona oyo tokoki kobenga diamants ya elimo oyo eleki na motuya na Sierra Leone, ezali sé kolanda kobota mbuma.

Bazalaki koluka solo na molende mpenza

Baklisto mosusu ya sika bazalaki bobele lokola diamants oyo bazalaki kolokota na mabelé. Bazalaki koluka ba Témoin de Jéhovah na molende mpenza. Tozwa ndakisa, likambo ya motongi suki mwasi moko na nkombo Joan. Atindaki maloba na téléphone na biro ya ba Témoins de Jéhovah ya mboka wana, na Freetown. mpo na kosenga ete basalisa ye na koyekola Biblia.

Nini epusaki Joan na kosala bongo? Alobi boye: “Soko nakanisi malamu, natikaki te koluka Nzambe na bomoi na ngai. Uta bomwana nazalaki kokende na bandako​—nzambe mingi mpe mangomba mingi, kasi nazalaki kaka te kozwa esengo na elimo.

“Uta nayoka nkombo ya ba Témoins de Jéhovah, eleki sika ata bambula zomi. Nzokande, na kozanga kososola, namilobaki ete esengeli koboya bango mpenza. Ntango moninga mwasi moko ya libota na ngai, oyo nazalaki kolinga mingi akomaki Temwe, nasɛngaki abonema ya La Tour de Garde mpe Réveillez-vous! bobele mpo na kosepelisa ye; nazalaki komimonisa mpasi ya kotanga bazulunalo yango te. Na solo, nazalaki kosalela yango nde mpo na kosukola bakaro ya ndako! Kasi nazwaki nimero moko ya Réveillez-vous! oyo ebendaki likebi na ngai. Lisolo ya ebandeli ezalaki kolobela mposa na biso ya bolingo (22 Septembre 1986.) Natangaki yango, mpe esimbaki mpenza motema na ngai. Ezali bongo zulunalo yango nde epusaki ngai na kosenga boyekoli ya Biblia.” Joan akolaki mbango mpenza na elimo mpe nsima mwa moke, azwaki batisimo mpo na kokóma Témoin de Jéhovah.

Elenge mobali moko na nkombo Manso, ye mpe alukaki solo. Wana elingaki ye kokóma sango, akotaki na seminere. Kasi na ntango amonaki bokosi ya balakisi na ye, alembaki mpe alongwaki kuna. Manso abandaki lisusu kosangana na makita ya mangomba mosusu. Mokolo moko, wana ezalaki ye kokende epai ya noko na ye, amonaki na nse, na mwa mai oyo ezalaki na potopoto, mokanda moko ya la Société Watch Tower, La Bible est-elle vraiment la parole de Dieu? Lokola titre wana elamusaki mposa na ye, alokotaki mokanda yango, akaukisaki mpe atangaki yango. Akutaki solo oyo azalaki koluka. Mokanda yango mozalaki kolendisa batangi na yango nyonso na kosangana na makita oyo ezali kosalema na Salle du Royaume. Bongo Manso akendeki, abandaki mpe koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah mpe na nsima mwa moke, azwaki batisimo. Manso azali sikawa pionnier, elingi koloba mosakoli ya nsango malamu na ntango nyonso. Esengelaki kozala na motema molai mpo na kosalisa bango

Emonanaki ete bayekoli mosusu ya sika bakokanaki na diamants oyo ekundami mpenza kati na libanga monene. Esengelaki kosala milende minene mpo na “kobimisa” yango. Donald, ye oyo azali nkulutu kati na lisangá ya boklisto, azali komikundola motema molai oyo asengelaki komonisa mpo na kosalisa mwasi moko na nkombo Martha. Alobi: “Azalaki mpenza koboya koyekola te, kasi azalaki kofandisa biso ntango molai liboso ete toyekola. Ntango mosusu azalaki kobomba misala oyo akokaki mpenza kosilisa yango liboso, nde ekomaki biso azalaki kosenga nzela ete tozela ye kino akosilisa. Ezalaki kokomela biso na kozela kino koleka ngonga moko. Ye azalaki kolikya ete tolemba mpe tokende, kasi na poso mokomoko tozalaki kosala milende ya kotalela ata mwa makanisi ya ntina elongo na ye. Epesi litomba nini? Mokemoke, Martha akomaki kosepela mpenza na boyekoli.

“Tozalaki lisusu na mpasi mpo na kosalisa Martha na kosangana na makita. Nazalaki komema batemwe mosusu wana ezalaki biso koyekola Biblia mpo ete amiyoka malamu na mokolo oyo akoya na Salle du Royaume. Kasi aumelaki mpenza mingi, kino ete ntango ayaki, ayebaki pene na bandeko na lisangá mobimba!” Motema molai oyo emonisamaki epai na Martha ezwaki mbano. Sikawa asili kozwa batisimo mpe lisanga ezali kosepela na ye mingi.

Pius, ye, atelemelaki solo na ebandeli. Ntango babalani bamisionere babandaki koyekola Biblia elongo na ye, azalaki na bambula koleka 70, azalaki kati na parti politike moko mpe azalaki mobombi na mosolo ya lingomba na ye. Bamisionere bamikundoli boye: “Azalaki kotelemela makasi mpenza makanisi nyonso oyo tozalaki kotalela elongo na ye.

Na poso nyonso, azalaki kolanda boyekoli malamu na ebandeli, kasi mokemoke azalaki sé kosilika. Ezalaki etumba monene mpenza na baposo nyonso. Mbala mingi, ezaleli na ye ezalaki kotungisa biso mingi, mpe tokanisaki ete totika ye. Atako ezaleli na ye wana, soko tozalaki kozongela ye, ezalaki mpo ete azalaki kobongisa boyekoli malamu mpenza.

“Pene na mbula moko na nsima, Pius alobaki na biso ete azwi ekateli ya kosala bolukiluki ya Biblia ye moko. Lokola azalaka molakisi, ayebaki lolenge nini ya kosala yango. Na boumeli ya poso mibale, azalaki sé kokende mokolo nyonso na biblioteke ya Université moko, oyo ezalaki na ngomba mpe akomaki kotanga bakomantere ya Biblia mpe mikanda mosusu oyo ezali kopesa ndimbola. Nsima na yango, alobaki na biso boye: ‘Sikawa, nandimi ete nyonso ezalaki bino koloba na ngai ezali solo. Nzambe azali Trinité te, lifelo ya moto ezali te mpe molimo ekufaka. Ata basangani mosusu ya lingomba na ngai bayebi yango.’ Na nsima Pius akolaki mbangu mpenza na elimo. Alongwaki na parti politike mpe na lingomba na ye. Nsima ya batisimo na ye, akutaki na mosala ya pionnier auxiliaire, elingi koloba ete azalaki kosala ngonga ntuku motoba na sanza moko kati na mosala ya kosakola, azalaki kosala yango mbala mingi kino liwa eyelaki ye na 1987.

Bamisionere oyo bateyaki Pius babakisi boye: “Tobosani mpenza likambo moko, ezali oyo ete mama na ye azalaka kosangana elongo na ba Témoins de Jéhovah. Pius azalaki komikundola ntango asanganaki na makita elongo na ba Témoins de Jéhovah na bomwana na ye. Kasi ntango mama yango akufaki, Pius alandaki nzela na ye moko. Nsima ya batisimo na ye, Pius alobaki: “Nazali na mawa bobele ete, sikawa mama na ngai azali komona ngai te’. Na nsima asosolaki, mpe abakisi boye: ‘Kasi akomona ngai na mokili ya sika!’”

Bolukiluki ya diamants mpe oyo ya bayekoli ezali kokoba na mboka yango. Mayebisi makasi ezali kokumisa ete “diamants ezali koumela seko”. Kasi moto oyo azali na moko na yango, akoki te kosepela na yango libela, mpamba te kozanga bibongiseli oyo ezwami na Nzambe mpo na lobiko, liwa ekozala sé likabo ya bato nyonso ya masumu. (Yoane 3:16, 17.) Mosala oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kosala na Sierra Leone ezali bongo kobimisa eloko oyo eleki diamants na motuya: basaleli ya Nzambe, ee, bayekoli na Yesu Klisto! Mpo Liloba na Jehovah epesi elaka oyo: “Oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko.”​—1 Yoane 2:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto