Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/3 nk. 26-29
  • Kokwea ya Babilone esakolami na Japon

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kokwea ya Babilone esakolami na Japon
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Japon emibongisi
  • Mosala ya pionnier auxiliaire
  • Mokolo ya mosala ya sipesiale
  • Litatoli na balabala
  • Kokabolama na bazulunalo
  • Nguya eleki oyo ya bato
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/3 nk. 26-29

Kokwea ya Babilone esakolami na Japon

“EKWEI! Babilone Monene ekwei, oyo asili komelisa mabota nyonso vinyo na kongala na na ye!” Nsango kitoko oyo esakolamaki na anzelu eyokamaki mpo na mbala ya liboso na ntoma Yoane, na nsuka na ekeke na liboso ya ntango na biso. Nzokande, na ntango na biso, na boumeli na “mokolo na Nkolo”, baklisto ba Témoins de Jéhovah bazali kozongela lisusu nsango malamu wana epai na bato nyonso.​—Emoniseli 1:10; 14:8.

Babilone Monene elimboli lisanga ya mangomba na lokuta na mokili mobimba oyo boklisto na mokili ezali eteni na yango eleki na mabe. Na boumeli ya “ntango na nsuka”, ba Témoins de Jéhovah basili kosakola mingi mpenza bikateli na Jéhovah kotemela Babilone Monene kati na mokili mobimba (Danyele 12:4). Na ndakisa, ba numéro ya Mosenzeli ya Avril mpe ya Mai ya mobu moleki, ezalaki na masolo oyo emonisaki polele mabe ya mangomba ya lokuta mpe esakolaki kobebisama na yango oyo esili kobelema. Ba exemplaires koleka 50 millions ya ba numéro yango ekabolamaki kati na mokili mobimba. Oyo nde kosakolama na nguya ya kokwea na Babilone Monene!

Japon emibongisi

Japon, efandelo ya mangomba mabengami bouddhisme mpe shintoïsme, biteni mosusu ya Babilone Monene, epesaki ndakisa malamu ya esengo na ndenge ba Témoins de Jéhovah bayambaki ba numéro yango ya sipesiale, Mosala na biso ya Bokonzi ya Décembre 1988 (oyo ya Japon) esakolaki epai na masangá ete kampanye moko ya sipesiale mpo na mosala ya kosakola ebongisamaki mpo na sanza ya Avril mpe ya Mai. Mosala na biso ya Bokonzi ya basanza elandaki, mpe mikanda mitindamaki na masangá mpe na masangani ya bankulutu, mikundolaki ntina ya kosangana na kampanye yango ya kokabola ba périodiques. Litomba ezalaki monene; na lisalisi na Jéhovah, na boumeli ya basanza yango mibale ya mobu moleki, litatoli monene esalama naino te, epesamaki na Japon.

Mosala ya pionnier auxiliaire

Liyebisi oyo epesamaki na Décembre 1988 elobaki boye: “Tolendisi bino ete bomityela mokano ya kosala mosala ya pionnier auxiliaire na sanza ya Avril mpe ya Mai, mpe mingimingi mpenza na sanza ya Avril. Mosala na biso ya Bokonzi ya Février 1989 ezongelaki likanisi yango mpe elendisaki Batemwe na “kobongisa programme na bango ya mokolo na mokolo mpo ete ba ministres mingi oyo basili komipesa na Nzambe basala mosala ya pionnier auxiliaire na Avril”.

Batemwe bakangaki ntina ya mayebisi yango nyonso. Yango ebimisaki mbuma nini? Ntalo eleki monene ya ba pionniers auxiliaires. Na Mars 1989, motuya yango ekomaki 24 115, kasi na Avril ebakisamaki pene na mbala mibale mpe ekomaki 410 554. Ezali elembeteli ete mosala makasi esalamaki!

Na boumeli na basanza mibale oyo ya sipeiale, kati na masangá mingi, basakoli mingi pe mbala mosusu basakoli nyonso basalaki mosala ya pionnier. Yango ezalaki kosenga mingimingi ebongiseli malamu. Mama moko ndimaki te ete akokoka kosala bongo, mpamba te afandaka na ntaka na ba métres 900 na ngomba mpenza, esika bus ezalaka mingi te. Kasi, lokola azalaki na mposa ya kosala mosala na pionnier, bankulutu bazwaki bibongiseli mpo na kokenda kozwaka ye, mpe na denge yango akokaki kosangana na esengo a mosala ya pionnier mpo na sanza mobimba elongo na basakoli nyonso ya lisangá.

Na lisangá ya Takatsuki-Otsuka (préfecure ya Osaka), oyo ezali na basakoli 77, bankulutu bapesaki ndakisa malamu. Na bongo, bankulutu nyonso mpe basaleli na misala bazalaki kati na basakoli 73 oyo basalaki mosala ya pionnier. Bilenge basakoli nyonso yo basila kozwa batisimo mpe bazali naino na kelasi basalaki mpe mosala ya pionnier. Elimo ya pionnier oyo emonisamaki na bilenge Batemwe wana ezali ndakisa na elimo yo emonanaki na masanga mingi. Na ndakisa, kati na bilenge 23 ya lisangá na Heiwadai (préfecture ya Tokyo), 11 bazali ba pionniers permanents mpe 11 basalaki mosala ya pionnier auxiliaire na Avril. Na lisangá yango, ba pionniers nyonso bazalaki 93 na sanza wana.

Mokolo ya mosala ya sipesiale

Mosala na biso ya Bokonzi, na ebimeli na yango ya sanza ya Mars, elendisaki bandeko na maloba malandi: “Mingi basanganaka na mosala ya kokabola bazulunalo bobele samedi ya mibale mpe ya minei ya sanza te, kasi na ba samedi nyonso. Tokumisi bandeko mpo na molende na bango! Na sanza ya Avril lisusu ebongisami mpo na kokabola bazulunalo mokolo ya poso, kasi bosala molende ya sipesiale mpo ete le 8 Avril ezala mokolo ya kokabola bazulunalo, mpo ete bato nyonso basangana na mosala yango mokolo wana. Mpo ete likebisi epesama epai na baoyo nyonso bazali koyoka, ezali na ntina ete tokabola mingi mpenza ba numéros ya sika.”​—Yisaya 61:2: Emoniseli 18:4, 5.

Na ebimeli na yango na sanza-ya Février, Mosala na biso ya Bokonzi emonisaki ntina ya mosala yango ya ntina. Elobaki: “Tika ete ba Témoins de Jéhovah nyonso. ya Japon baoyo bazali sikawa koleka 130 000, basangana na mosala ya kokabola bazulunalo mokolo ya poso le‘8 Avril!” Bankulutu balendisamaki na kobongisa myango ndenge na ndenge mpo na kokabola bazulunalo na mokolo yango mpo ete basakoli mingi koleka basangana na yango. Na lisalisi ya elimo malamu ya bankulutu mpe ndenge basakoli basanganaki na mosala yango na esengo nyonso, mosala ya mokolo yango elongaki mpenza. Tokoki koloba ete na Japon mokolo wana, bikateli na Jéhovah likoló na Babilone Monene esakolamaki lokola esakolama naino liboso te.

Na ndakisa, bankulutu na lisangá ya Yokohama​—Ushioda bazwaki bibongiseli mpo ete mosala ya kosakola esalama ngonga 13, longwa na 7 heures ya ntongo kino 8 heures ya mpokwa Babongisaki bileko mibale ya litatoli na balabala, mpe mosala ya ndako na ndako mpe ntango ya kozongela bato oyo bazalaki epai na bango te na vizite ya liboso.

Basakoli mingi basanganaki ata na lolenge moko ya mosala yango ya kosakola oyo ebongisamaki mpe mingi kati na bango basanganaki na lolenge nyonso ya mosala na kosakola oyo ebongisamaki.

Mosala ya kosakola kobanda ntongo kino mpokwa ebongisamaki na lisangá ya Fukuoka-Jonan. Bibongiseli bizwamaki mpo na kosakola longwa 8 heures ya ntongo kino 9 heures ya mpokwa, na mwa bopemi moke na midi. Ebongiseli esalamaki mpo ete mosala ya ndako na ndako esalama, mpo ete bakenda kosakola na ba kartyé ya mimbongo, mpe kokenda kotala baoyo bazalaki na bandako na bango te na vizite ya liboso. Batemwe mosusu ya lisangá yango basalaki kino ngonga mwambe ya mosala ya kosakola na mokolo wana.

Lisangá ya Kainan na préfecture ya Wakayama, eyambaki liyebisi yango na esengo. Basakoli 55 ya lisangá yango basanganaki na mosala ya sipesiale. Moklisto mwasi moko oyo azali pionnier permanent, abotaki le 7 Avril. Yango epekisaki ye mpo na kosakola le 8 Avril? Te. Akabolaki bazulunalo na kati ya hopital! Temwe moko ya préfecture ya Osaka amonisaki elimo ndenge moko. Asengelaki kokenda na mosala na ye ya mosuni le 8 Avril. Ndenge nini alingaki kosangana na mosala yango ya sipesiale? Atalelaki esika na ye ya mosala lokola teritware mpe asalisaki abonema mitano.

Mosakoli moko ya mwasi ya préfecture ya Saitama azalaki na mposa makasi ya kosangana na mosala yango ya sipesiale, kasi asengelaki kosala mobembo ya bakilométres pene 1 300 kino na Asahikawa elongo na mobali na ye oyo azali mondimi te. Kasi, alɛmbaki te. Na Asahikawa, akendaki na gare elongo na bana na ye mibale ya mike, mpe kuna amonaki likambo oyo azalaki kolikya: etuluku na basakoli ya lisangá ya mboka yango bazalaki kosakola. Akokaki bongo kosangana elongo na bango na mosala ya mokolo yango.

Litatoli na balabala

Mosala na biso ya Bokonzi elendisaki mpenzampenza bankulutu ete babongisa litatoli na balabala na mokolo ya le 8 Avril, mpe yango ekomaki mosala eleki monene na mokolo yango ya sipesiale. Mokolo wana, mbula makasi ebɛtaki na mboka mobimba, kasi yango elembisaki esengo ya bandeko te. Mingi bamonisaki elimo motindo moko na oyo emonisamaki na basakoli misato ya Minamata (préfecture de Kumamoto) baoyo bazali bibosono. Atako basili kopusana na mbula, (65, 80 mpe 85), babimaki na kati na mbula; na ndenge yango balendisaki bobele basangani mosusu ya lisangá te kasi babendaki likebi ya baleki-nzela.

Wana ezalaki ye kosakola na balabala, mosakoli mwasi moko ya lisangá na Kashiwaouest atunaki mobali moko: “Osila koyoka lisolo ya Babilone Monene?” Mpe alakisaki ye bazulunalo mibale (La Tour de Garde) ya Avril. Mobali yango ayanolaki boye: “Ezali kosepelisa ngai te” mpe alekaki na ye. Kasi, wana ekomaki ye na nsuka ya balabala atelamaki mpe alobaki: “Babilone Monene, elimboli nini?” Mosakoli moko azalaki kosakola pembeni wana ayokaki ye mpe alandaki ye, nzelanzela, ayebisaki ye ndimbola ya Babilone Monene. Na nsuka, mobali yango andimaki bazulunalo.

Masangá mosusu mapesaki naino litatoli na balabala te, kasi uta le 8 Avril bazali kosangana mbala na mbala na mosala yango. Yango ekoki kokamwisa te. Na bamboka epai kuna mosala yango ekoki kosalama, litatoli na balabala ezali mwango moko makasi mpo na kozwa bato oyo bakoki komonana te epai na bango. Mosakoli mwasi moko ya engumba Naha (Okinawa) abandaki kopesa litatoli na balabala liboso na babiro ezalaki na ndako moko monene kati na yango ba Témoin de Jéhovah bazalaki na lotomo ya kokota te. Akabolaki bazulunalo 12 na ngonga moko bobele na kosololaka na bato oyo bazalaki kokota mpe kobima na ndako yango.

Mosakoli mwasi moko ya mboka Muroran (Hokkaido) apesaki litatoli na balabala liboso na ba magasins minene, kati na centre ya ville. Alobaki boye epai na mobali moko oyo andimaki kozwa bazulunalo: “Soko olingi koyeba makambo mingi, tokoki koya epai na yo.” Mobali yango apesaki ye adresse, numéro ya téléfone, akomelaki ye na papier ndenge akoki kokenda epai na ye mpe ayebisaki ngonga oyo akoki kokuta ye na ndako! Na poso elandaki, ndeko mwasi akendaki kotala ye elongo na moklisto mosusu mpe ayaki komona ete mobali yango azalaki kofanda na ndako moko oyo ezalaki ntango nyonso ya kokangama wana ba Témoins de Jéhovah bazalaki koleka. Elenge mobali yango ayaki koyeba na kotangaka Biblia ete mangomba ya boklisto ya mokili endimami na Nzambe te. Azalaki koluka boklisto ya solo mpe azalaki na esengo mingi mpo na kobanda boyekoli ya Liloba na Nzambe.

Mosakoli mwasi moko ya lisangá ya Kawasaki azalaki kosakola na balabala na nsima ya midi ya le 8 Avril. Ntango alingaki kosilisa mosala yango, asololaki na moto ya nsuka, elenge mwasi oyo ayebisaki ye ete asilaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Kasi baboti na ye batemelaki boyekoli yango; na nsima, akotaki na université mpe akomaki kofanda kuna. Atikaki bongo koyekola. Nzokande, na nzela na litatoli na balabala, azongelaki lisusu na esengo nyonso boyekoli ya Biblia mpe azali sikawa koyangana na makita.

Kokabolama na bazulunalo

Basakoli basanganaki malamu mpenza na mosala yango na boye ete ntalo monene na bazulunalo ekabolamaki, mingimingi oyo ezali kolobela bikateli bikweisami likoló na Babilone Monene. Na ndakisa, mosakoli ya lisangá moko na préfecture ya Osaka akabolaki bazulunalo 205 na sanza ya Avril. Na lisangá ya Kagoshima-Est, basakoli 14 bakabolaki moto na moto koleka bazulunalo 100, mpe na préfecture ya lbaraki, na Ogawa, etuluku na basakoli 12 ekabolaki bazulunalo 1 388 na sanza ya Avril.

Bazulunalo nyonso oyo ekabolamaki na Japon na sanza ya Avril ya mbula eleki ezalaki 3 293 266, elingi koloba kobakama ya 92% likoló na oyo ya sanza ya Avril 1988! Bikateli na Jéhovah likoló na Babilone monene esakolamaki mpenza na nguya monene!

Nguya eleki oyo ya bato

Solo mpenza, lokola na mokili mobimba, ba Témoins de Jéhovah ya Japon bamonisaki elimo ya kokenda liboso mpe molende na sanza ya Avril mpe Mai 1989. Mosala oyo basalaki emonisaki polele ete Jéhovah azalaki kopambola molende na bango mpe makasi na bango mpo na kosakola bikateli na ye likoló na mangomba ya lokuta. Mpo na bamoko, yango ezalaki mpasi, kasi bazwaki ekateli mpe Jéhovah abenisaki bango. Mingi kati na bango bafandaka na bateritware epai kuna mosala ya kosakola esalamaka mbala mingi, kasi bamonisaki esengo mpe móto motindo moko na bandeko ya ba regions mosusu. Na bisika nyonso, maloba malandi ya mosakoli Yisaya makokanaki: “Akopesa nguya epai na ye oyo alembi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya.”​—Yisaya 40:29.

Na ntembe te, makambo oyo masalamaki kuna makundolaki bango maloba malandi ya ntoma Paulo: “Kasi tozali na eloko oyo na motuya kati na mbeki eyemami na mabelé ete nguya na yango mingi mpenza euta na biso te kasi na Nzambe.” (2 Bakolinti 4:7) Ee, ntango moto atye mosala ya boklisto, “eloko oyo ya motuya”, na esika ya liboso kati na bomoi na ye, akozwa “nguya longwa na Nzambe”. Tika ete Jéhovah asalela ntango nyonso basaleli na ye na Japon mpe na mokili mobimba mpo na kopesa litatoli mobimba epai na mabota liboso ete nsuka eya!​—Matai 24:14.

Na mbula oyo, ba numéro ya La Tour de Garde ya Avril mpe Mai ekolobela masolo malandi: “Nani akomema mokili na kimya?”; “Kimya kati na mokili mobimba​—Ekolimbola nini mpenza?”; “Bamilió na bakufi bakosekwa” mpe “Armagedon​—ekoya ntango nini?”. Mpo na nini te komibongisa mpo na koyebisa nsango oyo epai na bazalani na yo? Sala na motindo boye ete bato mingi koleka bayoka nsango ya kitoko oyo Jéhovah akomisaki mpo na eleko na biso kati na Liloba na ye, Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto