Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/12 lok. 29
  • Makambo mazali koleka na mokill

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokill
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Basangani na mokili te”
  • Koyiba ezali lisumu te?
  • Mombongo ya bikeko
  • Mpo na nini koyiba ekómi mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mobola apesameli nzela ya koyiba?
    Lamuká!—1998
  • Basakoli ya lokutá ya lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Lingomba esengeli komikotisa na makambo ya politiki?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/12 lok. 29

Makambo mazali koleka na mokill

“Basangani na mokili te”

Na eteni na nsuka ya Likita monene ya Lingomba Evangelique ya Alemanye oyo bato soko koleka milió nkama basanganaki na Stade ya masano na Berlin-Ouest, Helmut Simon, oyo azalaki kokamba likita yango, alendisaki mpenza bayoki na ye ete, bamikotisa kati na politike.

Atangaki makambo minene minei, lokola, lolenge malamu na kosalela bozwi ya mboka, kobatela biloko bizalisami, kotyama na ebongiseli na sembo mpo na makambo na nkita, nsuka na kosala bibundeli ya sika mpe kosilisa makambo ya kozanga misala. Mpo na Helmut Simon, wana ezali nde moko na mikakatano oyo bato bazali kobunda na yango, mpe nkisi na yango ezali te. Engebene zulunalo ya Alemanye Frankfurter Allgemeine Zeitung, mpo na koluka ete bayoki na ye bandima makambo oyo wana ye azali kokotela, “alobaki ete makambo malamu makosalama na mboka ya Ouest mpe ya Est, bobele soko ba citoyens na yango bamikotisi kati na politike.” Helmut Simon alendisaki basangani nyonso na likita wana na “kotalela bokoti na politike lokola likambo basengeli kokokisa mpe likita ya lingomba lokola ebongiseli na babateli na lotomo ya bato.”

Kasi ezali mpenza malamu ete baklisto ya solo, bamikotisa na makambo na politike? Yesu alobaki te ete, bayekoli na ye ‘basangani na mokili te pelamoko ye asanganaki na mokili te’? (Yoane 17:16) Yesu alakisaki na bayekoli na ye ete, babondela mpo na Bokonzi na Nzambe, elikya bobele moko ya solo mpo na bato. Mpo na nini? Mpo ete, lokola mosakoli Danyele asakolaki yango, esili koleka bambula mingi, Bokonzi yango “ekobuka“ mpe “ekosilisa” biyangeli na mokili oyo bizangi makoki, mpe Bokonzi yango “ekotikala lobiko na lobiko”.​—Danyele 2:44.

Koyiba ezali lisumu te?

Koyiba ezali kosala lisumu? Ezali mpenza bongo te soko tokondimela Ivo Storniolo. Engebene maloba ya sango yango oyo mazwami na O Estado de S. Paulo zulunalo moko ya Brezile, “Nzambe azali kopambola mpe kondima moyibi oyo esalami na babola”. Na nsima moke ayebisaki ete alobaki yango bobele “na ntina na babola oyo bazali koyiba mpo na kobika.” Na likanisi na ye, bilenge na kilikili oyo bazali koyiba, basengelami na bitumbu te, mpamba te bango basili koyibama uta kala na bato minene”. Zulunalo O Estado ezali komonisa boye ete: “Engebene likanisi ya lvo Storniolo, babola nyonso [baoyo bazangi misala] bazali mpe kati na ‘motuya ya baponami na Nzambe’.”

Biblia ezali kondima lolenge wana ya kotalela makambo? Te. Ata soko Yesu alendisaki bayekoli na ye na ntina na kozala na mawa epai na babola, alobaki te ete mikakatano ya bato, lokola bobola, ekoki kolongisa moyibi. Kasi ntoma Paulo akomaki boye: “Moyibi ayiba lisusu te kasi tika ete asalaka mosala, asalisa maboko na ye misala ete akoka kokabela bango bazali kozanga.”​—Baefese 4:28.

Mombongo ya bikeko

Zando monene mpo na kolakisa biloko (to foire) oyo esalamaki na nord ya Italie mpo na biloko ya losambo mpe biloko mosusu, epesaki nzela na bakompanyi 97 ete, bakoka kolakisa biloko na bango ndenge na ndenge. Kati na biloko yango bilakisamaki, ezalaki na mwa ndako moke ya sango esika akotaka mpo na koyoka ntubela ya moto, akoyokaka mongongo mpamba kozanga komonana na moto yango, ezalaki na mwa mesa (to guichet) mpe kiti. Ezalaki mpe na ba buji oyo ezalaki na elilingi ya “pape Jean”, elongo na bamasini na kongengisa na boumeli ya ngonga 40; ezalaki na bangonga ya lingomba oyo ezali kotambwisama na ordinatere; ezalaki na basanduku ya mabonza oyo ezipamaki na libende mpo na kopekisa moyibi na mosolo; ezalaki na ba films video mpo na koteya bana (na ndakisa La Bible selon Jeannot), ezalaki mpe na ba pochettes esalami na elamba lokola cuir oyo ezalaki na biloko mosusu ya ntina na kati mpo na kosala misa na libanda.

Lolenge ndenge na ndenge na elateli ya bakonzi na mangomba emonisamaki. Kati na zulunalo La Stampa, oyo ya Italie, batongi bilamba mibale oyo babimisaka ba lolenge ya kolata oyo na bakonzi ya mangomba balimboli boye ete: ‘Basango mingi ya bilenge, balingi bitongeli na bilamba ya sika, oyo na petepete mpenza ya langilangi motindo ya Alemanye, etongeli oyo ebongi, oyo ezangi mindondo atako ezali nde bilamba na motuya. Mpe, na lisalisi na Nzambe, makambo mazali kotambola malamu.’

Bato na mangomba oyo bazali kosala mibembo mpo na koyeba mikili bazali kokolisa mombongo na bikeko. Na mbula moko, bato milió 15, bazali kosala mibembo na nkombo na lingomba, baoyo bazali kobongisa mibembo yango, ezala bandimi to te, bazali kowelana mpo na yango.” (La Repubblica, zulunalo ya Italie.) Engebene II Messaggero, zulunalo mosusu ya Italie, elembo ezali boye ete, na ndako monene ya losambo “Saint-Antoine na Padoue “bato bazali kobimisa bamilió na mbongo bobele mpo na ba hôtels te, kasi bazali kobimisa mingi nde mpo na kotya kati na basanduku ya mabonza oyo ezali kati na ndako monene na losambo, bazali kobimisa mbongo mpo na kosomba bikeko mpe ba suvenire”

Na yango, kokamwa ekozala te ntango boklisto na mokili oyo ekobomama, elongo na mangomba nyonso ya lokuta, na ntango yango ‘bato na mombongo na mokili oyo bakolela ye na bileli’. Mpe Emoniseli 18:11 elobi lisusu: “Mpo ete moto akosomba biloko na bango azali lisusu te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto