Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/11 nk. 10-20
  • Tosala nyonso mpo na nsango malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosala nyonso mpo na nsango malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Asalisi Bayuda basokemi
  • Aluki kozwa Bapakano
  • Tobongisa lolenge na biso ya kosakola
  • Ndakisa mpo na bamisionere
  • Baklisto mpe Mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Basakoli oyo bazali kobongola mayele na bango mpe komesana na makambo ya sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mokanda ya Biblia nimero 46—1 Bakolinti
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mokanda ya Biblia nimero 47—2 Bakolinti
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/11 nk. 10-20

Tosala nyonso mpo na nsango malamu

“Nazali kosala nyonso mpo na nsango malamu, ete nakoma mokabani na yango (na bamosusu).”​—1 BAKOLINTI 9:23.

1. Nini ezali epai na bato nyonso, kasi Nzambe atiaki moboko nini?

ATA soki bato bakeseni na makambo mingi, bango nyonso bazali na bokokani na likambo moko. Na libula oyo bazwaki na Adam, bango nyonso babotami basumuki mpe bakabwani na Nzambe Oyo Aleki-Likoló, Jéhovah. (Baloma 5:12; Bakolose 1:21) Ntoma Paulo akomaki: “Bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo na Nzambe.” (Baloma 3:23) Mpo na kobikisama, bato na mposo nyonso mpe mabota nyonso basengeli bongo koyokanisama elongo na Nzambe. Tokoki kozala na botondi mingi epai na Jéhovah mpo ete na bolingo na ye mpe mawa na ye oyo eleki nyonso, atiaki moboko mpo na boyokanisi oyo.

2. (a) Baklisto bapakolami na elimo bapesamelaki mosala nini? (b) Ndakisa na nani ekoki kozala litomba mpo na biso, mpe mpo na nini? (1 Bakolinti 11:1)

2 Esili koleka bikeke 19, ba Témoins de Jéhovah bapakolami na elimo bapesamelaki “mosala na boyokanisi”. Ntoma Paulo alobaki: ‘Na esika na Klisto, tobondeli bino ete: ‘Bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe.’ (2 Bakolinti 5:18-20, MN) Na elimo ya lolenge nini ntoma Paulo akokisaki mosala oyo? Alobaki: “Mpo ete ata nazali moombo na moto moko te, nasili komiyeisa moombo na bato banso ete nazwa bato mingi koleka.” (1 Bakolinti 9:19) Ntembe ezali te, ntoma Paulo asalaki milende makasi mpo na kosakola nsango malamu na lolenge oyo ekobimisaka matomba. Ezali mpo na yango alobaki: “Nazali kosala nyonso mpo na nsango malamu, ete nakoma mokabani na yango [na bamosusu]. (1 Bakolinti 9:23, MN) Na yango, tokoki koyekola nini na ndakisa oyo na ntoma Paulo?

Asalisi Bayuda basokemi

3. Ndenge nini, kati na likambo litalali Timoté mpe Bayuda, ntoma Paulo amonisaki ete azalaki na mposa makasi na kosala nyonso mpo na nsango malamu?

3 Lokola ye azalaki Moyuda mpe na mposa oyo azalaki na yango ya kosala nyonso mpo na nsango malamu, ntoma Paulo azalaki na likoki ya kosalisa Bayuda oyo bamimonisaki basokemi bakoka kondima Yesu lokola Masiya. Na ndakisa, totala, oyo asalaki ntango aponaki Timoté lokola moninga na ye na mobembo. Timoté, oyo tata na ye azalaki Mogreke, akatamaki ngenga te, lokola ezalaki mpo na mwana nyonso mobali epai na Bayuda. (Levitike 12:2, 3) Paulo ayebaki ete Bayuda bakokaki kobeta libaku soki elenge mobali oyo na kokatama ngenga te akomeka kosalisa bango ete bayokana elongo na Nzambe. Na yango, asalaki nini mpo ete Bayuda oyo na mitema malamu bakoka te, liboso na likambo oyo, koboya kondima Yesu? Ata soki kokatama ngenga esengamaki epai na baklisto te, “akamati ye [Timoté] mpe akateli ye ngenga, na ntina na Bayuda”.​—Misala 16:1-3.

4. Engebene 1 Bakolinti 9:20, mokano na ntoma Paulo ezalaki nini?

4 Komibanzabanza na bolingo mingi oyo ntoma Paulo amonisaki epai na bato na ekolo na ye emonisaki ete azalaki kosala mpo na nsango malamu. Akomaki: “Epai na Bayuda, nayei lokola Moyuda ete nazwa Bayuda; epai na bango na nse na Mibeko, nayei lokola moto na nse na Mibeko, ata nazali ngai moko na nse na Mibeko te, ete nazwa bango na nse na Mibeko.” (1 Bakolinti 9:20) Ee, lokola emonisami na lisolo ya kokatama ngenga na Timoté, ntoma Paulo asalaki nyonso mpo na “kozwa” Bayuda, elingi koloba kosalisa bango mpo bakoma baklisto. Kasi, asalaki bobele bongo epai na Bapakano?

Aluki kozwa Bapakano

5. Na mboka Kolinti, epai na banani ntoma Paulo asakolaki, mpe litomba nini ezwamaki?

5 Na mboka Kolinti, epai akomaki na mobu 50, poso na poso ntoma Paulo azalaki kopesa diskur kati na eyanganelo. Kati na bayoki na ye Bayuda bazalaki, mpe Bagreke oyo babongwanaki na lingomba ya Bayuda. Kosakola na ye na molende ebimisaki ntembe kino alobaki epai na batemeli na ye ete: “Makila na bino mazala na mito na bino! Ngai, nazali mpeto! Sikawa, nakei na ngai epai na bapakano.” Jéhovah apambolaki likatami oyo, mpo ete “bato mingi na Kolinti oyo bazalaki koyoka bandimaki mpe babatisamaki”, kokomaka bongo baklisto. Kati na emononeli, Nkolo alendisaki ntoma Paulo kolandela mokumba na ye. Alobaki na ye ete: “Bato na ngai bazali mingi na mboka oyo.”​—Misala 18:1-10.

6. Nini ezalaki kopusa ntoma Paulo ete amibanzabanza mpo na bato ya ekolo mosusu?

6 Ntoma Paulo azalaki na mposa makasi ya kozwa Bapakano bakoma baklisto, yango nde ezalaki kopusa ye asepela na bato na bikolo mosusu. Akomaki: “Epai na bango [Bapakano] bazangi Mibeko, nayei lokola moto oyo azangi Mibeko, ata nazangi Mibeko na Nzambe te kasi nakangami na mibeko na Klisto, ete nazwa bango bazangi Mibeko.” (1 Bakolinti 9:21) Ndenge nini ntoma Paulo amekaki “kozwa” Bapakano?

7. Na likambo litali kokatama ngenga, mpo na nini ezalela na Tito ekesenaki na oyo ya Timoté?

7 Pene na mobu 49, ntango ntoma Paulo akendaki na Yelusaleme mpo na kosangana na likita monene ya collège central na lisangá ya boklisto, akendaki elongo na moyekoli Tito oyo azalaki Mogreke. Liboso na baklisto oyo bayanganaki, ntoma Paulo apesaki rapport ya mosala na ye kati na bato na mabota. Nsima akomaki boye: “Kasi Tito oyo azalaki na ngai, ye [Mogreke], apusamaki te ete akatama ngenga.” (Bagalatia 2:1-3) Na bokeseni na Timoté, ezali mingimingi kati na bato bakatami ngenga te, bato na mabota, nde epai kuna Tito azalaki kokokisa mosala na Nzambe. Na yango, kokatama ngenga esengamaki te mpo na ye.​—2 Bakolinti 8:6, 16-18, 23; 12:18; Tito 1:4, 5.

8. Ndenge nini ntoma Paulo apesaki litatoli na mboka Athènes?

8 Wana ezalaki ye kopesa litatoli na Athènes, ntoma Paulo amonisaki lisusu ete azalaki kosala nyonso mpo na nsango malamu. Na kotalela lolenge na kokanisa na bafandi na engumba monene oyo na Bagreke, asolisaki bango mpo na Nzambe oyo bayebaki te mpe, atangaki bakomi na bango Aratos mpe Cléanthe, oyo balobaki ete: “Tozali mpe libota na ye.” Na maloba oyo, ntoma Paulo amekaki kosalisa bayoki na ye bakanga ntina na likambo oyo: basengelaki “kokanisa te ete Nzambe akokani na ekeko (. . .) oyo esalami na mayele mpe makanisi na bato”. Nsima Paulo ayebisi bango ete: “Na ntina na ntango na kozanga boyebi, Nzambe akanisi yango te, nde sikawa azali kosakola na bato nyonso na bisika nyonso ete babongola mitema.” Na yango alobaki na lolenge malamu mpenza mpo na “Nkolo na Likolo mpe na nse”, Jéhovah. Matomba nini mazwamaki? “Bato mosusu balandaki ye mpe bandimaki.” (Misala 17:22-34) Ee, bametode na ntoma Paulo elongaki.

9. Na ndimbola nini ntoma Paulo akomaki ‘moto na bolembu epai na bato na bolembu’, mpe mpo na nini?

9 “Epai na bato na bolembu nayei lokola moto na bolembu ete nazwa bato na bolembu”, elobaki Paulo. (1 Bakolinti 9:22a) Ata soki azalaki koloba na nguya, ntoma Paulo azalaki komonisa limemya mpo na bamosusu Bayuda mpe Bato na Mabota kati na lisangá, baoyo lisosoli na bango ezalaki na bolembu. Apesaki elendiseli oyo epai na Baklisto ya Rome: “Boyamba moto oyo azali na kondima ya petepete, nde bowelana mpo na makambo na ntembe te.” Na esika ya kozala mosambisi, Paulo alobaki: “Bongo, tolanda makambo makoyeisa kimya mpe makolendisa bomoi na biso nyonso.” (Baloma 14:1, 18, 19) Apesaki toli oyo: “Ekoki na biso bato na nguya ete toyika mpiko na bolembu na bato bazangi nguya, ekoki te ete tomisepelisa biso moko.” (Baloma 15:1) Mpo na kosalisa mozalani, ntoma Paulo asengelaki kokokanisa lolenge na ye na koloba mpe kosala engebene bato to makambo akutani na yango; na koyebaka mokumba yango, akomaki: “Nayei ndenge nyonso epai na bato nyonso.”​—1 Bakolinti 9:22b; Bagalatia 3:28.

Tobongisa lolenge na biso ya kosakola

10. Ndenge nini tokoki komekola Paulo?

10 Lelo, ba Témoins de Jéhovah basengeli komekola ntoma Paulo lokola ye moko amekolaki Klisto. (1 Bakolinti 11:1) Ntoma Paulo azalaki mosakoli moko ya makoki mpe azalaki na elimo ya misionere. Ekoki kozala mpe bongo mpo na biso, ata soki ezalela na biso ezali kopesa biso nzela te ya kokokisa mosala na biso na mboka mopaya. Lokola Paulo, tosengeli ‘kosala nyonso mpo na nsango malamu, mpo tokabana yango elongo na bamosusu’. (1 Bakolinti 9:23) Ndenge nini, kati na ezalela yango, tokoki kosakola Bokonzi mpe kozalisa bayekoli na lolenge malamu koleka?​—Matai 28:19, 20.

11. Mpo na nini, kati na mosala na kosakola, tosengeli kokolisa ezaleli na biso ya komona makambo nokinoki?

11 Kolisa ezaleli na yo ya komona makambo nokinoki. Na kozala moto oyo ayebi kotala malamu, okoki koyekola makambo mingi oyo makosalisa yo ete okokisa kosakola na yo na molobani na yo. Na ndakisa, soki ozali kosakola na ville, tia likebi na makambo lokola ba antivols, bafungola na porte, biloko na losambo mpe makomi oyo mazali komonana. Makambo oyo makoki kosalisa yo ete opesa litatoli oyo ekosimba motema na bafandi na ndako. Ntembe ezali te ete ntoma Paulo azalaki moto oyo ayebaki kotala malamu. Na Athènes, asalelaki etumbelo oyo batongaki mpo na “Nzambe oyo ayebani te” mpo na kopesa litatoli ya malamu mpo na “Nzambe oyo asalaki mokili na biloko nyonso na kati na yango”. (Misala 17: 22-25) Okoki kosala mpe bongo kati na mosala ya kosakola.

12. Bososoli ezali kosalisa na nini kati na mosala na biso ya kosakola?

12 Zala na bososoli kati na mosala ya kosakola. Kolemba te mpo ete moto azali komonana lokola alingi kofongola porte te mpe kosolola na yo te. Na esika ya kolemba mpo na ezaleli moko ya mabe, zala na boboto mpe bososoli. Sala makasi ya kokokanisa litatoli na yo na makambo oyo okutani na yango. Mwa ntango moke mpo na libondeli ya nse ya motema ekoki kosalisa yo ete ozwa liloba oyo ekosimba motema na moyoki na yo.​—Tala Nehemia 2:4-6.

13. Ndenge nini tokoki kozala na boboto mpo na bato oyo epai na bango tozali kosakola?

13 Zala na ezaleli na komitya esika na bamosusu. Mpo na yango, makambo makeseni makoki kosalema mpo na nsango malamu. Na ndakisa, zala na boboto mpo na mobangé to moto azali na maladi, koumelisa lisolo na yo ntango molai te na porte. Okoki kosenga ye ete bosolola na kati ya ndako, likambo yango ekoki kozala malamu mingi mpo na ye na esika ya kotelema. Mbala mosusu, engebene ezalela, okomona malamu ete oyeisa lisolo mokuse. Kati na makambo nyonso, zala moto oyo ayebi kososola mpe moto na boboto.-Matai 9:35, 36.

14. Ntango tozali kosakola, ndenge nini tokoki kosala ete bayoki na biso bazala na motema na kokita?

14 Solola na lolenge ete moyoki na yo akitisa motema. Liboso pesa ye mbote na esengo engebene bizaleli malamu na mboka. (Matai 10:12) Kanisela mpo na kobanga to makanisi mabe oyo bato bakoki kozala na yango. Yebisa ntina ya boyei na yo na limemya mpe na ezaleli ya boninga. Na kosala bongo moto akoyeba ete oyei mpo na kosalisa ye mpe ozali na makanisi mabe te.

15. Ntango tozali kosakola, mpo na nini ezali malamu toyebisa soko tozali banani mpe ntina na vizite na biso?

15 Bato bazali na mposa na koyeba nani moto oyo ayei kotala bango mpe mpo na nini. Na yango esengeli oyebisa bango soki yo ozali nani. Na mikili mosusu, mingimingi na Afrike mpe na Asie, bato bazali kosepela na bapaya oyo bazali koya kotala bango mpe balingi koyeba soki bazali banani, bafandaka wapi, soki babala to soki bazali na libota. Mpo ete lisolo esimba, lolenge na bango na bomoi ezali kosenga ete okokisa mposa na bango likoló na makambo oyo liboso ya koyebisa ntina na vizite na yo. Komona te ete ebandeli oyo na lisolo ezali mpamba; salela yango mpo na koyeba moto oyo azali liboso na yo: loba na ye wana ezali yo kotala ye na elongi, kasi na limemya.

16. Mpo na nini tokoki koloba ete mituna malamu mizali kopesa nzela na kosolola?

16 Mituna malamu mizali kopesa nzela na kosolola. Ya solo, ata soki elongi ya moto ekoki komonisa lolenge nini ya moto ye azali, nzokande, ozali na mposa na koyeba makanisi na ye mpe mayoki na ye. Mpo na kosalisa ye ete aloba, salela mituna ya mayele. Topesa ndakisa na likambo oyo. Ndeko moko ya mwasi, akendaki kotala mwasi moko oyo azalaki na bana te, nde azalaki kosepela mingi na banyama. Mwasi yango alobi boye: “Nazali komikundola elongi na ye oyo ezalaki na esengo, oyo ezalaki kolakisa kimya. Nakamwaki mingi. Na kolobela makambo mazali koleka kati na mokili, mwasi oyo atunaki ngai eloko nini ezali kotungisa ngai mingi. Nayebisaki ye ete nazalaki kotungisama mingi na lolenge oyo moto azali konyokola banyama, mpe amonisaki ngai mokapo ya Yisaya 11:6-9, epai elobelami lolenge banyama bakofanda na kimya ya solo. Nazalaki na mposa ya koyeba makambo mingi mpo na yango.”

17. Mpo na nini tosengeli kozala na likebi na makambo oyo moyoki na biso akoki koyebisa biso mpo na bomoi na ye?

17 Tia likebi na makambo oyo molobani na yo akoki koyebisa yo mpo na bomoi na ye, mingimingi kati na bateritware oyo ezali kosalama mingi. Na yango, ata soki lisolo ezali mokuse, okoyeba mbala mosusu likambo moko ya ntina mpo na moto yango. Nsima na kokabwana, koma na mokuse makambo matali ye likoló na fiche de maison en maison. Soki atunaki yo motuna oyo opesaki eyano te, sala bolukiluki kati na mikanda ya la Société Watch Tower, mpo na koyeba wapi lolenge eleki malamu ya koyebisa ye nsango malamu mbala ekoya oyo bokokutana na ye.

Ndakisa mpo na bamisionere

18. Na likambo nini ntoma Paulo azali ndakisa mpo na basakoli nyonso, ezala bamisionere to te?

18 Bamisionere diplômés ya Galaad, Eteyelo na Biblia oyo ebongisami na la Société Watchtower bazali kati na baoyo bazali kosala nyonso mpo na nsango malamu. Ntoma Paulo oyo azalaki na elimo malamu na misionere azali ndakisa mpo na bango. Ya solo, alingaki kotia ata libaku moko te oyo ekokaki kopekisa Bayuda to Bapakano kondima solo. Azalaki kokeba na oyo ye azalaki kolya, mpe lisusu, akebisaki baklisto ya Kolinti batala malamu lolenge oyo bazali kosalela lotomo na bango na kolya bilei mosusu, mpo ete bakoka kobetisa moto mosusu libaku te. (1 Bakolinti 8:8, 9) Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda Biblia na ekeke ya sika (na Anglais), ekomami na profesere F. Bruce: “Kati na makambo nyonso na bokeseni (lokola bilei oyo bilobelami na mokapo 8 [na mokanda na liboso epai na Bakolinti]), [Paulo] azalaki kolanda bonkoko na bato esika afandaki, mpo ete akoka kotia libaku moko te liboso na bango kasi akoka ‘kozwa’ bango ete bandima evanzile.” (Baloma 14:21) Bobele bongo, ata bazali kosalisa bato ya sika na kosala mbongwana oyo ekosalisa bango kondimama na Nzambe, bamisionere Témoins de Jéhovah bazali komeka te kobongola bonkoko na bato oyo epai na bango bazali kosakola.​—Baloma 12:1, 2.

19. Na oyo etali mosala na kosakola, mbongwana nini moklisto akoki kosala soki azali (a) misionere? (b) mosakoli na Bokonzi?

19 Bamisionere oyo bakomi na mokili moko basengeli koyekola bizaleli mpe bonkoko na bafandi na yango. Bazali kokutana na makambo mingi, oyo makoki kosalisa bango na kopesa litatoli ya matomba kati na mosala na bango ya kosakola. Mpo na kobetisa mozalani libaku te, ezali kosenga epai na bango bakoka mbala mosusu kobongola lolenge na bango ya kolata to makambo mosusu. Ntango akomaki na Afrike ya ouest, ndeko mwasi moko misionere amonaki ete lolenge na ye ya kopakola biloko ya bonzenga ekokaki kosala ete bazwa ye lokola mwasi ya ndumba. Na yango, mpo ete bakoka kokanisela ye mabe te, abandaki kopakola na lolenge mosusu. Na solo, ba Témoins de Jéhovah nyonso basengeli komonisa makanisi malamu mpo na molato oyo baponi, ete bakoka kosunga bazalani na bango na elimo. Ya solo, baklisto oyo basengi bango ete “batia libaku liboso na ndeko te” mpe balanda makambo makolendisa bomoi na biso nyonso, bakolinga kobetisa libaku epai na moto moko te.​—Baloma 14:13, 19.

20. (a) Na mokuse, nini ekosalisa biso kosala “nyonso mpo na nsango malamu”? (b) Motuna nini motikali?

20 Bolongi na mosala na kosakola Bokonzi etali libosoliboso lipamboli na Jéhovah. (1 Bakolinti 3:6, 7) Kasi, biso moko mpe tosengeli kotya milende. Tozala bato bayebi kotala malamu makambo, lokola ntoma Paulo kati na mosala na ye. Tosengeli lisusu kozala na bososoli mpe na boboto, kosala ete bayoki na biso bamitungisa te mpe kotuna bango mituna malamu oyo mizali kopesa nzela na kosolola malamu. Tomesana na mitindo oyo, mizali kotemela Makomami te, ata mizali kokamwisa biso. Ee, ‘tosala nyonso mpo na nsango malamu, mpo tokoka kokabana yango elongo na bamosusu’. (1 Bakolinti 9:23) Kasi, ndenge nini tozali kosala epai na baoyo basili kokoma bandeko na biso baklisto?

Bozongeli

◻ Ntoma Paulo asalaki nini mpo na kosalisa Bayuda ete bakoma baklisto?

◻ Ndenge nini ntoma Paulo asalaki mpo na kozwa Bapakano?

◻ Ndenge nini tokoki kokoma basakoli malamu mingi?

◻ Ndakisa nini ntoma Paulo atikaki mpo na bamisionere mpe mpo na basakoli mosusu na Bokonzi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto