Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/11 lok. 7
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Drogue mpe kozanga kotosa mibeko
  • Yesu mpe politike
  • Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kopɛtola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/11 lok. 7

Makambo mazali koleka na mokili

Na mikolo miuti koleka, ankete moko emonisaki ete ndambo na bato oyo bazali na Biblia bandimi ete naino batangi yango te. Na ndambo yango, mingi na bango, bazali bato oyo bazali komiloba ete bazwi mbotama na sika. Engebene The Detroit News, pene na 30% na bato oyo batunamaki, baoyo bazali komiloba ete bango nyonso bazali baklisto, bayebi te ete Yesu abotamaki na Bethléhem. Na motuna oyo, “18% bayanolaki ete abotamaki na Yelusaleme, mpe 8% balobaki na Nazereth.” George Barna, mokambi na ankete yango, apesaki likanisi oyo: “Soki bato bayebi eloko te mpo na makambo mikemike lokola oyo wana, ndenge nini tokoki komizela ete basolola na lolenge ya mayele mpo na makambo mazali kati na Makomami epai na moto oyo azali mondimi te, to kozala na bomoi engebene mitinda na Biblia?”

Ntoma Paulo amonaki ezalela motindo moko epai na bato mosusu oyo bazalaki na ‘molende mpo na Nzambe, kasi na lolenge na boyebi na solosolo te.’ Ntoma yango alobaki mpo na baoyo bazalaki ‘kosambela na ndenge balingi’ mpe na ‘komikitisa na lokuta’, mpe asakolaki ete na “mikolo na nsuka” mikotyama elembo na kozala na bato oyo “bazali na lolenge na kobanga Nzambe, nde bazali kowangana nguya na ye”. (Baloma 10:2; Bakolose 2:23; 2 Timoté 3:1-5) Kasi, baklisto ya solo, bazali kokumisa Liloba na Nzambe. Bayebi likambo oyo ete kozala bobele na Biblia ekoki te, mpe na motema mobimba bazali kolanda etinda oyo na “koyoka mposa na mabelé malamu oyo mazali bongo Liloba na Nzambe”.​—1 Petelo 2:2.

Drogue mpe kozanga kotosa mibeko

Kati na makambo oyo Yesu apesaki lokola “elembo” ekosakolaka mikolo na nsuka na biloko na ntango na biso, ‘kobakisama na kozanga kotosa mibeko’ etyami na kati. (Matai 24:3, 12) Na bambula oyo euti koleka, komela bangi ezalaki ntina monene na kobakama na kozanga kotosa mibeko. Na ndakisa, zulunalo oyo ebimaka mokolo na mokolo na mokili ya Australie The Sydney Morning Herald elimbolaki ete 70% na makambo mabe koleka masalami na Nouvelle-Galles ya Sud ezalaki mpo na drogue, mpe soko 85% na miyibi oyo bazali kosalela mindoki kati na engumba bobele wana, ezali mpo na bomeli bangi. Mpe likambo na drogue ezali kobakama.

Zulunalo U.S.News & World Report endimisi ete “ezali na esika moko te na Mpoto oyo ebatelami na mabe wana.” Ezali kokanisama ete motuya na bameli bangi na Union soviétike ezali kotangama bamilió. Kati na komeka oyo ezangi elikya mpo na kopekisa drogue oyo esili kopalangana, boyangeli ya sovietike esalaki boyokani na masanga oyo mazali kobunda mpo na kopekisa drogue na mikili 25. Lokola yango elobami, ezali komonana ete moto akoki kolikya te ete mikano na biyangeli mikolonga, wana ba rapport ezali komonisa biso ete mbongo oyo ezali kozwama na drogue nde yango ezali kosalelama mpo na kopesa kanyaka epai na bapolisye, ba avocats mpe ata basambisi. Mokonzi moko ya leta oyo alembaki mpo na likambo yango alobaki: “Ezali na etuluku moko te ya bapolise na mokili mobimba oyo ekosala eloko moko mpo na kopekisa ete drogue ezala mingi te na balabala.” Mpe abakisaki: “Ezali kolembisa, mpo ete likanisi mpo na kosilisa likambo oyo ezali kopesama te.”

Maloba oyo mazali kokundola esakoli na Yesu likoló na mikolo na nsuka. Esakolaki ete ntango ekoya oyo ‘bato bakosenzwa na nsomo, mpe mitema mikozala likoló.’​—Luka 21:25, 26.

Yesu mpe politike

Esili koleka mwa ntango, zulunalo oyo ebimaka mokolo na mokolo ya Afrike du Sud The Star de Johannesburg ezalaki na titre oyo: “Lingomba katolike epesi plan na yango mpo na Afrike du Sud.” Lisolo oyo elandaki elimbolaki ete mokano na plan ezalaki ya “koyeisa bokonzi na Nzambe” na Afrike du Sud na nzela na “milende makasi na Lingomba mpo na kosilisa bokabwani na mposo”. Jude Pieterse, sekretere général na Lisangá ya ba évêques ya katolike na Afrike du Sud alobi ete, mpo na kokokisa mokano yango Lingomba ya katolike ezali koluka ete mangomba mosusu mapesa maboko, mpe “bituluku nyonso na bato na Afrike du Sud lokola”. Kasi, plan oyo endimami te na bakatolike nyonso. Lokola alimboli yango Reginald Orsmond, évêque ya Johannesburg, ezali komonana na bamosusu ete, ezali “mwango na ba évêques mpo na kokomisa bakatolike bazala bato na politike”. Wana Jude Pieterse andimaki ete plan ezalaki na komikotisa na makambo na politike, Reginald Orsmond azalaki koloba ete plan yango ezalaki “likambo na sika te”, kasi ebandaki na “ntango na Yesu.

Na yango, Yesu akokaki kopesa nzela soko moke te na bayekoli na ye ete bakota na makambo ya politike. Ntango Ponce Pilate atunaki ye, Yesu azongisa eyano na kozanga kokakatana ete: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Na ntina yango, ba Témoins de Jéhovah koleka milió misato bazali na bokabwani na mposo te, ezali bobele na Afrike du Sud te, kasi na mokili mobimba, mpamba te, bazali kobika na boyokani na “mobeko na sika” oyo na Yesu: ‘Bolinganaka, lokola ngai nalingaki bino.’​—Yoane 13:34.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto