Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/11 lok. 3
  • Lilako lileki malamu yango wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lilako lileki malamu yango wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lilako oyo ezali kopusa na kosala malamu
  • Lilako lileki malamu​—Liteya oyo etali bato nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Lilako lileki malamu​—Ezali na ntina tii lelo oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Lilako lileki malamu​—ezali na ntina kino lelo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Monisáká bizaleli malamu ntango ozali kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/11 lok. 3

Lilako lileki malamu yango wapi?

OYEBI, nasalaka baninga na ngai mabe te. Mpo na ngai, bakoki kosala makambo oyo bango balingi. Ya solo, soki mpasi ezwi bango, nakosalisa bango.” Yo mpe ozali na likanisi motindo yango? Makama minene oyo mazali kobima na mokili mazali kopusa bato na bolingo malamu mpe na boboto ete bakokisa misala mingi ya malamu; mbala mingi, ezalela yango ezali kokamwisa bato. Kasi yango ekoki bongo?

Soki ozali na bana, na ntembe te osila koteya bango ete batumola te baninga oyo bazali kosakana na bango elongo: soko te bitumba ekoki kobima. Bato mingi, baoyo baboyaki kolanda likebisi oyo, bazali lelo na bilembo na nzoto. Ee, bayekolaki mayele ya liloba oyo ebimisamaki na filozofe na Orient, na nkombo Confucius: “Kosala te epai na bamosusu makambo oyo oboi ete basalela yo yango.” Kasi yango ezali se lolenge moko mpamba mpe ezangi kopusa liyoki na moto soki tokokisi yango na etinda oyo ebengami ete “Règle d’or” to lilako lileki malamu epai na baklisto.

Lilako oyo ezali kopusa na kosala malamu

“Règle d’or” to lilako lileki malamu elimbolami lokola “etinda na etamboli malamu oyo emonisami kati na Matai 7:12 mpe na Luka 6:31, oyo elobi ete tosengeli kosalela baninga makambo oyo tolingi ete basalela biso’. Mabongoli makeseni ya Matai 7:12, oyo ezali na tablo awa na nse epesi likanisi ya ntina ya etinda yango.

Tokomona ete atako maloba makeseni engebene libongoli mokomoko, lilako oyo ezali se kotinda na mosala. Liboso na kosala Lisolo likoló na ngomba, Yesu abimisaki likanisi oyo: “Bosengaka mpe bakopesa bino; bolukaka mpe bokozwa; bobetaka mpe bakozipwela bino. Mpamba te moto na moto oyo akosengaka akozwa; ye oyo akolukaka akomona; bakozipwela ye oyo akobetaka.” (Matai 7:7, 8) Senga, luka, beta: maloba oyo nyonso mazali bitinda mpo na misala. Yesu abakisi: “Salela baninga makambo oyo olingi ete basalela yo”.​—Matai 7:12.

Biblia emonisi ete bayekoli na Yesu bazalaki mpe kolakisa bato na kolanda etinda yango ya bomoi. (Baloma 15:2; 1 Petelo 3:11; 3 Yoane 11) Na mawa nyonso, makambo mazali koleka epai na bato mamonisi ete etinda yango ezali kolandama te, ata na baoyo bazali komibenga ete baklisto. Esengeli bongo koloba ete etinda yango ezali lisusu na ntina te na eleko na biso?

[Etanda na lokasa 3]

“Nyonso oyo olingi ete bato basalela yo, yo mpe sala yango epai na bango.”-Bible de Jérusalem, Traduction Œuménique de la Bible.

Sala epai na baninga mpenzampenza ndenge okolinga ete basala epai na yo.”-Nouveau Testament en anglais moderne, de J. Phillips.

“Nyonso oyo okosepela na yango ete baninga basala mpo na yo, yo mpe sala yango mpo na bango.”​—Parole vivante (transcription de Kuen).

“Sala epai na baninga makambo nyonso oyo olingi ete basala yango epai na yo.”-La Bible en français courant.

“Na makambo nyonso, sala epai na baninga ndenge okolinga ete bango basala epai na yo.”​—Les Quatre Evangiles, traduits par E. Rieu (angl.).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto