Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/9 nk. 3-4
  • Bakonzi na mangomba bango nde babongi koyangela mokili?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakonzi na mangomba bango nde babongi koyangela mokili?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango bakonzi na mangomba bayangelaki mokili ya Mpoto
  • Ekateli na Nzambe mpo na “motioli na mibeko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mbula 500 ya mateya ya Calvin ebimisi mbuma nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bikateli ya Yehova likoló na balakisi ya lokuta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bakonzi ya mangomba basengeli nde koteya makambo ya politiki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/9 nk. 3-4

Bakonzi na mangomba bango nde babongi koyangela mokili?

NA mokili mobimba, bato balembi na makambo lokola kozanga bosembo, konyokwama mpe kobeba ya bizaleli kati ya politike. Milende oyo bazali kosala mpo na kolongola mpe kotia bakonzi mosusu milakisi mposa na bango ete makambo mabonga. Nzokande bakonzi ya sika oyo bazali kotia bazali kokokisa bobele moke, to mbala mosusu bazali kokokisa ata moke te bamposa na bango. Bamosusu bazali na makanisi ete soki bakonzi na mangomba bayangeli mokili, makambo na politike makobonga. Engebene bato yango, bakonzi na mangomba bakokotisa bizaleli malamu na etuluku oyo ezali koyangela. Mbala mosusu ezali yango Marion (Pat) Robertson, akanisaki, mokonzi na lingomba oyo azalaki candidat mpo na kozala président ya Etats-Unis na 1988, ntango abondelaki mpo ete “bato na sembo” bazwa bokonzi. Kasi yango nde ekokaki kopesa na mokili bakonzi oyo babongi?

Ntango bakonzi na mangomba bayangelaki mokili ya Mpoto

Na eleko oyo babengi Moyen Age, bakonzi na mangomba bazalaki na nguya mingi likoló na bato. Bapape bakokaki kotia to kolongola bakonzi! Na yango, na mobu 800, pape Léon III atiaki Charlemagne, mokonzi ya ba francs, lokola moyangeli monene ya Bokonzi Bosantu ya Rome. Na boumeli ya mbula nkoto, bokonzi yango emonisaki kosangana ya Lingomba na Leta, mpe bakonzi ya mangomba bazalaki na nguya monene likoló na bakonzi ya mokili.

Uta ekeke ya 11, Pape azalaki na nguya likoló ya mokili ya Mpoto. Mpo na yango, John Carraty mpe Peter Gay bakomi (kati na mokanda na bango The Columbia History of the World) ete “Lingomba ezalaki boyangeli monene na Mpoto”. Bamonisi lisusu ete lingomba ekokaki “kozala na bopusi monene na nguya ya politike koleka boyangeli nyonso na Mpoto”. Nzokande, bomoi ya bato ezalaki ndenge nini na nse na boyangeli ya bakonzi na mangomba?

Moto moko te azalaki na bonsomi ya kolanda losambo oyo esepelisaki ye to kobimisa makanisi oyo makeseni na oyo ya bakonzi na mangomba. Lokola bato bazalaki na bonsomi te, yango ebimisaki ezaleli ya kobanga na Mpoto mobimba. Lingomba ezalaki koluka makasi mpo na kosilisa baoyo nyonso bamekaki kosala to koloba makambo makeseni na yango. Bato yango, baoyo babengamaki bapengwi, bamemamaki liboso ya basambisi, baoyo bazalaki konyokola bango mpo baloba makambo oyo babombaki. Mingimingi, baoyo bakweisamaki bazalaki kotumbama na nkoni.

Mpo na nguya oyo bakonzi na mangomba bazalaki na yango na mokili ya Espagne, mokanda oyo etangami likoló elobi: “Bitumba mpe elimo ya bitumba ya lingomba esangisaki boyangeli bobele ya bato moke mpe ya lolendo na bakonzi na mangomba, baoyo bazalaki na nguya nyonso ya Leta, Bato ya mayele basukaki mpo elukamaki koyeba mpe koboma moto nyonso oyo azalaki kotia ntembe na téoloji oyo ezalaki koteyama to bikateli ya politike.”

Will Durant kati na mokanda na ye L’Age de la Foi akomi: “Na koloba polele lokola esengeli na mokomi na lisolo na bato mpe lokola epesami nzela na moklisto, tosengeli ata bongo kotia ezaleli oyo na lingomba ya konyokola mpe koboma bato oyo bandimaki mateya na yango te, bakisa lisusu bitumba mpe minyokoli na ntango na biso, kati na mbindo koleka oyo etiaki elembo na lisolo na bato mpe oyo ezali komonisa mabe oyo eleki ya banyama nyonso.” Na eleko oyo babengi Moyen Age, boyangeli ya bakonzi na mangomba elimbolaki kobungisa bonsomi nyonso ya moto.

Tokoloba nini mpo na Jean Calvin, protestant oyo akotisaki mbongwana? Ezalela na ye ekesenaki na oyo ya bakonzi ya lingomba ya katolike? Totala oyo elekaki ntango Michel Servet akimaki monyokoli oyo etambwisamaki na bakonzi na mangomba ya Espagne mpe akangamaki na Suisse, na mboka Genève. Kati na ville oyo Calvin asalaki etuluku likoló na yango ye mpe bapastere na ye nde bazalaki mikonzi. Lokola Servet aboyaki Trinité, Calvin asalaki oyo bakatolike basalaki naino te. Akweisaki ye na etumbu ya liwa mpo ete azali mopengwi mpe atumbisaki ye na móto likoló na nkoni komonisaka bongo motema mabe ndenge moko na bakonzi ya lingomba ya katolike.

Boyangeli ya bakonzi na mangomba likoló na mikonzi ya mokili epesaki kimya na bato na mokili na Mpoto? Soko moke te! Na esika ya kimya, ezalaki nde bambula ya bitumba oyo bibimisamaki na bakonzi ya mangomba. Pape Urbain II abimisaki etumba ya liboso oyo babengi croisade, yango ezalaki ebandeli ya bitumba oyo bilandanaki na boumeli ya mibu 200. Lisusu, bitumba oyo bakonzi na mangomba basalaki mpo na baoyo bazalaki komona lokola bapengwi ebomaki bato mingi, mibali, basi na bana.

Boyangeli ya bakonzi na mangomba esilisaki bizaleli mabe? Te. Kati na mokanda Lisolo ya mokili ya lelo (Angl.) R. Palmer mpe J. Colton balobi: “Lingomba ebebisamaki mpenzampenza na mbongo. Moto moko te andimaki kanyaka; kasi bato nyonso bayebaki ete mingi na bato minene kati na Lingomba (bakisa bakonzi mosusu basivile na ntango wana) bakokaki kozwa kanyaka.” Bato mingi bazalaki komilela mpo na bizaleli mabe ya bakonzi na mangomba.

Boyangeli ya bakonzi na mangomba esalaki ete bakoka kosalela bato na boboto? Te. Totala na ndakisa makambo malekaki na France ntango cardinal de Richelieu atambwisaki makambo ya Leta na nse ya boyangeli ya Louis 13. Henry Cabot Lodge kati na mokanda na ye Lisolo na mabota (Angl.) alobi ete “politike [ya Richelieu] etongamaki likoló na kobungisa bonsomi nyonso ya ba Français”.

Na Mexique, ba villes oyo ba indiens bazalaki kofanda, mingimingi etambwisamaki na bakonzi ya mangomba na ekeke ya 17. Lesley Simpson kati na mokanda na ye Plusieurs Mexiques (Angl.) alobi ete mpo na bakonzi na mangomba etumbu ya fimbo ezalaki “lisalisi ya ntina mpo na koteya mpe kobatela bizaleli malamu ya boklisto, mpe mpo na kopesa etumbu epai na babuki mibeko.”

Mikanda ya lisolo ya mokili misalisi biso mpo na kotala malamu bambuma ya boyangeli oyo etambwisamaki na bakonzi ya mangomba na boumeli ya bikeke. Bambuma yango ezali nini? Kobebisa matomba, bolamu, mpe bonsomi na bato. Ya solo, boyangeli ya bakonzi na mangomba ezalaki bokonzi moko ya mabe ya konyokola bato. Lokola Daniel Defoe akomaki yango kati na mokanda na ye L’Anglais bien né (Angl.) “kati na bolozi nyonso oyo ezali konyokola bato, mpasi oyo bakonzi na mangomba bapesi bato eleki.”

Emonani polele ete boyangeli ya bakonzi na mangomba ezali yango te oyo bato bazali na yango mposa. Na yango, tokoki kokende epai na nani? Biso nyonso tokoki kozwa eyano na motuna oyo, ndenge tokomona yango.

[Elilingi na lokasa 4]

Calvin protestant oyo akotisaki mbongwana amonisaki ezaleli motindo moko na bakonzi na lingomba ya katolike.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya ba administrateurs ya British Museum

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto