Nzela ya bozongi na paradis efungwami
“[Yesu] alobi na ye: ‘Nalobi na yo solo lelo ete: Okozala na ngai elongo kati na Paradis.’”—LUKA 23:43.
1, 2. (a) Liloba “paradis” elimboli nini, mpe elanga na Edene ezalaki bongo esika ya ndenge nini? (b) Ndenge nini
Libota na bato ebandaki kati na Paradis. Mokanda ya liboso ya Makomami Mosantu ezali koyebisa kozalisama ya moto na maloba oyo: “Jéhovah Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akomaki molimo na bomoi. Jéhovah Nzambe akonaki elanga epai na ebimelo na ntango, kati na Edene, mpe kuna atiaki moto oyo ye asalaki.” (Genese 2:7, 8) Nkombo “Edene” elimboli “Esengo”. Elanga na Edene ezalaki bongo parc moko monene, parc moko ya esengo, oyo kitoko na yango mpe biloko na yango ndenge na ndenge ekokani na esika mosusu te.
2 Liloba “paradis” euti na greke, lokota oyo kati na yango elakisi elanga, to parc. Liloba na greke oyo esalelami mpo na kobongola liloba na hébreu gan, oyo elimboli “elanga”, ezali paradéïsos. Kobanda na Evanzile ya Matai kino na mokanda ya Emoniseli, Biblia ekomamaki na greke, mpe ezali liloba na greke nde esalelamaki mpo na koyebisa maloba oyo Nkolo Yesu Klisto alobaki wana ezalaki ye na esika ebengami Kalvere, likoló na nzete ya mpasi epai kuna abomamaki na le 14 Nisan ya mobu 33.
Elaka na Yesu epai na mosali mabe
3. (a) Mosali mabe oyo azalaki na motema mawa asengaki nini epai na Yesu? (b) Na kotalela lisengi na ye, likambo nini mosali mabe azalaki kondima na ntina na Yesu?
3 Basali mabe mibale batiamaki na nzete penepene na Yesu. Moko na bango atikaki kofinga ye, nzokande oyo abakisamaki likoló na nzete na ngambo mosusu ya Yesu alandaki kofinga ye. Kotalaka epai na Yesu, mosali mabe oyo azalaki na motema mawa alobaki na ye: “Wana ekokoma yo na bokonzi na yo, kanisa ngai.” Na maloba wana, amonisaki kondima na ye ete Yesu, atako atiamaki likoló na nzete penepene na ye, ata ndele akozwa bokonzi. (Luka 23:42; Malako 15:32) Na ntembe te maloba yango masimbaki mpenza motema ya Nkolo Yesu. Mobomi wana na bato oyo azalaki na motema mawa ayebaki malamu ete Yesu Klisto asalaki likambo moko ya mabe te mpe ete abongaki te kozwa etumbu ya makasi koleka lokola oyo ya kotiama likoló na nzete mpo na kosambwisa ye liboso na bato nyonso. (Luka 23:41) Lisengi na ye emonisaki ete Yesu akosekwisama kati na bakufi mpe akozwa bokonzi. Ezalaki komonisa lisusu ete azalaki kondima ete ye moko akoki kosekwisama mpe ezali Yesu nde moto akosekwisa ye kati na bakufi mpe akopesa ye bomoi awa na mabelé.
4. Ndenge nini Yesu ayanolaki na lisengi ya mosali mabe, mpe yango ezalaki komonisa nini?
4 Ntango Yesu ayebisaki epai na mosali mabe oyo azalaki na motema ya mawa: “Solosolo nalobi na yo lelo: Okozala na ngai elongo kati na Paradis”, amonisaki epai na moto yango ete akosekwisama. Ezalaki mpenza kobondisama ya solo mpo na mobomi na bato wana oyo amonisaki kondima. Mpo ete moto yango akoka kosekwisama, esengelaki ete Yesu asekwisama liboso. Na nsima, na kosalelaka nguya to likoki na kosekwisa oyo Nzambe akopesa ye, akosekwisa mosali mabe wana kati na bakufi na mokolo ya lisekwa ya bato.—Luka 23:43; Yoane 5:28, 29; 1 Bakolinti 15:20, 23; Baebele 9:15.
5, 6. (a) Likomi nini guvernere Ponce Pilate akomisaki na nzete, likoló ya motó na Yesu? (b) Boye Yesu asololaki na lokota nini na mosali mabe?
5 Na lokota nini Yesu alobaki elaka yango? Nkota ezalaki mingi na eleko wana na Palestine. Ezali yango nde emonisi likomi oyo guvernere Ponce Pilate akomisaki likoló na motó na Yesu Klisto, mpo na baleki nzela nyonso ete bakoka koyeba soki ye azali nani. Ezali kotangama boye kati na Yoane 19:19, 20: “Pilata akomisi eyebiseli mpe atii yango likoló na nzete. Likomi ezalaki ete, ‘Yesu moto na Nazalete, mokonzi na Bayuda.’ Na bongo Bayuda mingi batangaki likomi yango, mpamba te esika oyo Yesu atiamaki na nzete ezalaki penepene na ville; mpe likomi ekomamaki na hébreu, na latin, na greke.”
6 Lokola Yesu abotamaki na Beteleme epai na moseka, Marie, azalaki Moyuda, to Moebele. Na boumeli ya mosala na ye ya mibu misato na ndambo kati na mokili na ye epai abotamaki, na ntembe te asakolaki bongo na kosalelaka lokota oyo ezalaki kolobama mingimingi epai na Bayuda: lokota na hébreu. Na likambo yango, mpo na koloba na ye na ntina na Paradis, asengelaki kosalela liloba ya hébreu gan-liloba oyo tozali kokuta na Genese 2:8. Kati na verset yango, libongoli na greke ya Septante ezali kosalela liloba paradéïsos mpo na kobongola liloba ya hébreu gan.
7. Ndenge nini Yesu akembisamaki nsima na lisekwa na ye?
7 Yesu asekwisamaki kati na bakufi mokolo ya misato oyo elandaki kobomama na ye likoló na nzete, le 16 Nisan engebene manaka ya Baebele. Mikolo ntuku minei na nsima, abutaki lisusu na likoló, efandelo na ye ya liboso, mpo na kozwa esika etombwami koleka oyo azalaki na yango liboso. (Misala 5:30, 31; Bafilipi 2:9) Na bongo azwaki bomoi oyo ekoki kokufa lisusu te, lokola Tata na ye na likoló azali na yango. Kino na ntango ya lisekwa na Yesu mokolo na eyanga le 16 Nisan Jéhovah Nzambe azalaki moto bobele moko oyo azalaki na bomoi bokoki kobomama te.—Baloma 6:9; 1 Timote 6:15, 16.
Lisiko efungoli nzela ya Paradis
8. Mokano na Nzambe na ebandeli na ntina na mabelé ezalaki nini, mpe nini emonisi ete Nzambe atikaki yango te?
8 Ezalaki wana ebele na makambo oyo masengelaki kokokisama kati na mokano na Nzambe, mokano oyo etali kokomisa mabelé mobimba na bonzenga ya paradis, ee, kokomisa yango paradis ya molongo mobimba. (Genese 1:28; Yisaya 55:10, 11) Na 1 Bakolinti 15:45, ntoma Paulo azali koloba mpo na Yesu ete azali “Adam na nsuka”. Yango emonisi ete Nzambe atikaki te mokano na ye ya ebandeli mpo na mabelé, mpe ete moto moko akokokisa mokano yango oyo Adam ya liboso akokisaki te.
9. Yesu apesaki nini mpo na kofungola nzela ya bozongi na Paradis?
9 Engebene Paulo, Yesu apesaki “lisiko likokani”. (1 Timote 2:6) Yesu Klisto ye moko alobaki ete: “Lokola Mwana na moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” Na lisalisi ya lisiko yango, baoyo bakondima Yesu Klisto bakozala na likoki ya kozwa bomoi na seko.-Matai 20:28; Yoane 3:16.
10. (a) Likambo nini Nzambe akani kosala epai na motuya moke ya bato oyo bazali na libaku malamu mpenza? (b) Ntango nini koponama ya basangani ya “etonga moke” ebandaki, mpe banani baponamaki liboso?
10 Ntango abutaki na likoló nsima na lisekwa na ye kati na bakufi, Yesu apesaki epai na Jéhovah motuya ya mbeka na lisiko na ye na ntina na libota na bato. Nzokande, mokano na Jéhovah Nzambe, Tata na ye ya likoló, ezalaki ya kobimisa kati na mabota ya mabelé “libota moko mpo na nkombo na ye”. (Misala 15:14, M.N) Na kotalela Emoniseli 7:4 mpe 14:4, libota yango esengeli kosalama na motuya ya bato 144 000, “etonga moke”, oyo babengami na kosala Bokonzi na Nzambe na likoló. (Luka 12:32) Koponama ya bato yango oyo bazwi libaku malamu mpenza na miso na Jéhovah Nzambe ebandaki na oyo ya bantoma 12 ya Yesu Klisto. (Matai 10:2-4; Misala 1:23-26) Yesu alobaki epai na basangani ya liboso ya lisangá na ye: “Bino boponi ngai te, kasi ngai naponi bino.” (Yoane 15:16) Basengelaki kozala na molongo ya liboso kati na mosala etali kosakola Paradis ya molongo mobimba oyo ekoya, paradis oyo ekotambwisama na Bokonzi na Nzambe.
Koya na Bokonzi: likambo ya solo
11. Ntango nini Bokonzi na Masiya esengelaki kotiama?
11 Na mikolo na biso, na nkombo ya Nkolo Yesu Klisto, tozali kokoba kosambela Jéhovah mpo ete Bokonzi na ye eya. (Matai 6:9, 10; Yoane 14:13, 14) Bokonzi na Masiya esengelaki kotiama na nsuka ya “ntango na bapakano”. (Luka 21:24) Nzokande, ntango yango ya Bapakano esukaki na 1914a.
12. Na boyokani na esakweli na Yesu oyo ezali koyebisa makambo minene oyo makomonisa bozongi na ye oyo ezangi komonana na bato, likambo nini esalemaki na 1914?
12 Mobu yango etiamaki elembo mpo na etumba ya liboso ya mokili mobimba ya lisolo na bato, likambo oyo ekokanaki na esakweli na Yesu oyo kati na yango azalaki koyebisa makambo minene oyo makomonisa bozongi na ye ezangi komonana kati na nguya ya Bokonzi mpo na koyangela mabelé. Bayekoli na ye batunaki ye motuna oyo: “Yebisa biso: Nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na komonana na yo mpe na nsuka na ekeke ekozala nini?” Yesu azongiselaki bango liloba ete, “Libota moko ekotelemela libota mosusu mpe bokonzi moko ekotelemela bokonzi mosusu; nzala mpe koningana na mokili ekozala na esika na esika. Makambo oyo nyonso ezali bobele ebandeli na bolozi. Mpe nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:3, 7, 8, 14; Malako 13:10.
13. (a) Na nini nsango ya Bokonzi na Nzambe ezali bongo nsango malamu? (b) Uta ntango nini bato bazali kosambela mpo na koya na Bokonzi na Nzambe, mpe batemwe na Nzambe basili kolemba mpo na kopesa ye mabondeli yango?
13 Nsango malamu ya Bokonzi na Jéhovah esakolami sikawa kati na mikili koleka 200, mpe tozali kosala milende mpo na komeka kosakola yango kati na bateritware misusu. Nsango yango ezali kosakolama ya boyangeli moko ya mokili mobimba oyo ezali naino koya te, kasi ezali nde kosakolama ya bokonzi moko oyo esili kotiama, oyo esili kobanda koyangela. Bokonzi yango etiamaki na 1914, kopesaka bongo nzela na kokokisama ya libondeli oyo Yesu alakisaki makambo minene na yango esili koleka mibu 1 900. Libondeli yango epesami epai na Mobandisi ya Bokonzi yango kobanda ntango ye oyo asengelaki kozala Mokonzi kati na yango alakisaki epai na bayekoli na ye ete babondelaka mpo na koya ya boyangeli yango. Mobandisi ya Bokonzi yango azali bongo koyoka libondeli oyo uta kala mingi mpenza. Ezalaki mpo na ye esengo na koyoka batemwe na ye awa na mabelé kopesa ye libondeli yango na boumeli ya ntango nyonso wana, mpamba te yango emonisaki ete bazalaki kobatela kondima na bango kati na boyei ya Bokonzi yango. Balembaki te mpo na kopesa libondeli yango epai na ‘Tata oyo azali na makóló’, lokola soki yango ezalaki lisusu na litomba te mpo na bango.—Matai 6:9, 10.
14. Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bazali ntango nyonso kokoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe?
14 Ba Témoins de Jéhovah, oyo bazali kondima mpe kosakola ete Bokonzi esilaki kotiama na makóló na 1914, bazali ntango nyonso kosakola nsango malamu wana ya Bokonzi. Soki bazali kosala yango, ezali mpo ete Bokonzi yango oyo etiami ebandi naino te kosalela boyangeli na yango mobimba likoló na mabelé, kasi endimaki ete bikonzi ya mokili na lelo bikoba kosalela nguya na yango mpe bokonzi na yango likoló na bato ya bikolo nyonso mpe ya mposo nyonso. (Baloma 13:1) Bokonzi yango esengeli bongo koya lisusu na kokoka na yango nyonso, elingi koloba kokoma boyangeli bobele moko oyo ekoyangela mabelé mobimba.—Danyele 2:44.
15. Jéhovah asalaki nini kobanda Pantekote ya mobu 33 koleka kopakolama ya bakonzi ya Yisraele ya kala.
15 Atako asilaki koponama Mokonzi ya Bokonzi yango, Yesu azali koyangela ye moko te. Na yango, Jéhovah Nzambe aponaki bayekoli 144 000 ya Mwana na ye oyo akomi mokonzi mpo na kozala batuki na libula elongo na ye kati na Bokonzi ya Masiya na Nzambe. (Danyele 7:27) Lokola bakonzi ya Yisraele ya kala bazalaki kopakolama na mafuta ya bulee epai na nganga monene, bobele bongo, uta mokolo na Pantekote ya mobu 38, Jéhovah apakolaki na elimo santu na ye batuki na libula elongo na Yesu, 144 000, kobotaka bango mpo na bomoi ya elimo kati na makóló elongo na ‘Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo’.—Emoniseli 19:16; tala 1 Mikonzi 1:39.
Paradis esengeli kozongisama na “Adam ya nsuka”
16. Ntango Yesu abomamaki likoló na nzete, likambo nini emonanaki lokola ete ekoki kosalema te, kasi mpo na nini asakolaki nsango ya lokuta te?
16 Ntango Yesu abomamaki likoló na nzete na mobu 33, emonanaki lokola ete esili, akokoka lisusu kozala na bokonzi te. Nzokande ayebisaki nsango ya lokuta te na kosakolaka Bokonzi na Nzambe. Mokolo ya misato oyo elandaki kobomama na ye likoló na nzete, Jéhovah, Mobandisi ya Bokonzi, asalaki likambo moko oyo epesaki elikya ete bayekoli na Yesu bakosambela te na ntina na boyangeli moko oyo ekokoka kosalema te. Asekwisaki Ye oyo asengelaki komonisa ye kati na Bokonzi oyo mpo na yango baklisto bazalaki kosambela, mpe apesaki ye bomoi bokoki lisusu kobomama te.
17, 18. (a) Na ndimbola nini Yesu abengami “Adam ya nsuka”? (b) Uta 1914, makambo mazali kobima na mokili mamonisi nini?
17 Yesu ayebaki ete Mozalisi ya paradis ya liboso akopesa ye mokumba ya kozongisa Paradis mpe ya kosenzela ete elanga yango ya molongo mobimba etonda na bato. Na 1 Bakolinti 15:45, 47, tozali kotanga: “Pelamoko ekomami ete, ‘Adam moto na liboso ayaki na nzoto na bomoi; Adam na nsuka ayei elimo oyo ekopesaka bomoi. Moto na liboso auti na mokili, moto na mabelé mpenza. Ye moto na mibale auti na likoló.” Adam na nsuka autaki na likoló. Ezali ye nde Jéhovah azali kosalela mpo na kozongisa Paradis awa na mabelé. Yango wana Nkolo Yesu akokaki koloba epai na mosali mabe oyo azalaki na motema mawa: “Okozala na ngai elongo kati na Paradis. (Luka 23:43) Ezali mpe komonana na nzela na lisolo oyo asololaki elongo na mosali mabe ete Paradis ekozongisama na mabelé na nse na boyangeli ya Bokonzi na likoló oyo epesami na Yesu Klisto oyo akembisami, ye “Adam na nsuka”.
18 Kobanda 1914, makambo mazali kobima kati na mokili mobimba mazali kokokisa bisakweli na Yesu Klisto mpe mazali bongo komonisa ete ye afandisamaki na kiti ya bokonzi na mobu yango. Ekoki sika mibu koleka 70 uta bato na libota ya ekeke na ntuku mibale oyo bazali na bomoi kobanda 1914 bazali batemwe ya makambo oyo mayebisami kati na esakweli na Yesu oyo ekomami na Matai mokapo 24. Na yango, eleko oyo ekomi na nsuka na yango, mpe kozongisama ya Paradis awa na mabelé ekomi penepene.—Matai 24:32-35; tala Nzembo 90:10.
Mosika mingi te: mokili ya sika mpe ya bonzenga
19, 20. (a) Nsima na Armagedon, esika nini Jéhovah akotia baoyo nyonso bazali kolinga ye? (b) Mosala nini ekosalama nokinoki nsima na Armagedon?
19 Nsima na kosilisa kolongisa bokonzi na ye ya molongo mobimba na motindo ya kokoka na etumba ya Armagedon, Jéhovah akofandisa te bato oyo bazali kolinga ye kati na ebongiseli moko ya biloko oyo etondi na mitungisi. Eleko oyo ekofungwama bongo mpo na libota ya bato na nse ya boyangeli kitoko ya Mokonzi Masiya, Yesu, Mwana na Nzambe, ekoleka mpenza na bonzenga. Mosala monene mpe ya ntina ekokokisama Bilembo nyonso oyo bikotikala likoló na mabelé na nzela na etumba ya molongo mobimba oyo ekosalama kati na mampinga na Jéhovah na likoló elongo na banguya nyonso ya mabe ekolimwisama. Elembo ata moko te ekotikala.
20 Kasi nini ekokomela bibundeli nyonso oyo mabota bakotika? Soki totaleli liyebisi na elilingi ya ntango oyo ekosengela mpo na kozikisa biteni nyonso ya bibundeli yango oyo bipelaka móto, elimboli ete bibundeli yango bikotikala mingi. (Ezekiele 39:8-10) Babiki na Armagedon bakokoka mbala mosusu kobongola biloko oyo bikotikala kati na bisaleli ya basoda ete bikoma bisaleli ya ntina mpo na kosala na yango misala.—Yisaya 2:2-4.
21. Kati na ezalela nini ekokani na oyo babiki na mpela bazalaki na yango babiki na Armagedon bakomimona mpe kati na yango, nzokande likeseni nini monene ekozala kati na makambo mibale oyo?
21 Na bongo, babiki, oyo bakopambwama epai na Nzambe, bakomimona kati na ezalela motindo moko na oyo Noa mpe libota na ye bazalaki na yango nsima na kobika na lolenge ya kokamwisa na mpela ya molongo mobimba. Nzokande, Satan le Diable mpe bilimu mabe na ye bakozala lisusu wana te mpo na kobebisa makoló mazangi komonana oyo mazingi mabelé. Bakotiama mpenza kati na boloko mpo na boumeli ya bikeke zomi. (Emoniseli 20:1-3) Babiki na Armagedon bakosengela kokokisa mosala moko monene: kotya na nse na bango mabelé oyo ekokatisa “mokolo monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso”, ata ezala nini makambo oyo mokolo yango ekobimisa likoló na etando.—Emoniseli 16:14.
22. Ezalela na babiki ya Armagedon ekozala nini liboso na mosala monene oyo ya kobongola mabelé mobimba Paradis?
22 Tokoki kokanisa ete babiki wana na etumba ya Armagedon, oyo bakozala moke na kotalela bonene ya mabelé, bakobanga mpenza liboso na mosala monene oyo ekozala bongo ya kopalanganisa Paradis na mabelé mobimba. Nzokande, bakozala mpenza na esengo ya koyamba mosala yango mpe komikotisa kati na yango na nguya nyonso mpe na botosi nyonso. Lokola bayebi mpenza ete mabelé ezali etielo na elilingi ya makolo na Nzambe, bakolinga mpenzampenza kokomisa etando oyo kitoko mpe bonzenga oyo ebongi na esika oyo makolo na Jéhovah mazali kofanda.
23. Lisungi ya nani ekopesa epai na babiki ya Armagedon elikya ete bakolonga kozongisa Paradis?
23 Ezali likambo na esengo mpe ya kolendisa na koyeba ete bakozala bango moko te mpe kozanga lisalisi nsima na kobanda na esengo nyonso mokumba oyo Nzambe akopesa bango na ntina na mabelé. (Tala Yisaya 65:17, 21-24) Bakozwa lisalisi nyonso mpe ezangi ndelo uta na Ye oyo alakaki kozongisama ya Paradis mpe alobaki, mokolo ya kobuta na ye na likolo: “Bokonzi nyonso esili kopesama na ngai na likoló mpe na nse.” (Matai 28:18) Azali ntango nyonso na bokonzi yango, mpe azali na likoki ya kokokisa elaka monene oyo apesaki epai na mosali mabe na motema mawa, lokola lisolo oyo elandi ekomonisa biso yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bandimbola mosusu ya sikisiki, tala mokanda ‘’Que ton Royaume vienne!”, ebimisamaki na la Société Watch Tower, pages 135 kino 138. Tala mpe Ezekiele 21:27.
Bozongeli
◻ Elaka oyo Yesu asalaki, wana ezalaki ye likolo na nzete epesi elikya nini epai na mosali moko na mabe mpe epai na bato nyonso?
◻ Ndenge nini nzela ya bozongi na Paradis ekokaki kofungwama?
◻ Mokumba nini, ezangaki kokokisama na Adam ya liboso, nzokande “Adam na nsuka” akolonga kokokisa yango?
◻ Nsima na Armagedon, kati na ebongiseli ya biloko motindo nini Jéhovah akokolisa baoyo bazali kolinga ye?
liloba na hébreu oyo elimboli “elanga” ebongolamaki kati na Makomami na greke ya boklisto?
[Elilingi na lokasa 13]
Lisolo “Nsuka ya bikonzi nyonso na 1914”, ebimisamaki kati na “World Magazine” ya 30 Octobre 1914.