Likita ya nsuka mbula—7 octobre 1989
LIKITA YA NSUKA YA MBULA mpo na basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania ekosalema na le 7 octobre 1989, kati na Salle d’assemblées des Témoins de Jéhovah, 2932 boulevard Kennedy na Jersey City, kati na engumba ya New Jersey. Likita moko ekozala na ebandeli bobele mpo na basangani ya la Société ekosalema na 9h30, oyo ekolandana na likita ya nsuka ya mbula na 10 heures.
Tokotonda basangani ya la Société baoyo adresse na bango ebongwana na boumeli na mbula eleki mpo bayebisa uta sikawa Biro ya Sekretere mpo ete ba invitations mpe lotomo ya kokota oyo ekotindama nsima moke na le 15 août 1989 ekoka kokomela bango.
Mikanda oyo elakisi lotomo na bango oyo ekotindama epai na basangani ya la Société mpe ba invitations na bango, esengeli kozongisama na Biro ya Sekretere nsuka le 1er septembre. Mosangani moko moko asengeli kotondisa mokanda na ye oyo elakisi lotomo mpe kozongisa yango nokinoki na koyebisa polele soki akozala na assemblée yango to te. Makambo oyo makokomama masengeli kobongolama te, mpo makosalisa koyeba motuya na basangani baoyo bakozala.
Programme nyonso, kotia na likita ya ebandeli mpe ba rapports oyo ekopesama, nyonso esengeli kosila na 13 heures to nsima moke. Programme mosusu ekozala te na nsima ya midi. Na kotalela motuya mpo na bisika ya kofanda, bokoti ekosalema bobele na invitation. Ebongiseli moko ezwami te mpo ete programme ya likita oyo ya mbula na mbula ekoka koleka na nzela ya téléphone.