Ndenge nini okoyoka esengo ya miziki?
MOKILI ya kala etondaki na misala oyo mizalaki mabe mpenza mpe na losambo ya bikeko. Yango wana ntoma Paulo amonaki ntina ya kopesa toli makasi epai na baklisto. Akomaki epai na lisangá ya Efese: “Bongo, nazali koloba mpe kotatola kati na Nkolo ete ebongi na bino lisusu te ete botambolaka pelamoko ekotambolaka bapakano na makanisi na bango na mpamba. Ekaniseli na bango ezali na molili, batangolami mosika na bomoi na Nzambe mpo na kozanga boyebi kati na bango, na ntina na makasi na mitema na bango.”—Baefese 4:17, 18.
Yango emonisi malamu mpenza ezalela oyo ezali komonana lelo. Boye te? Ya solo, ezali komonana ata na banzembo. Banzembo mingi ya lelo ezali komonisa ezalela moko ‘etangolami mosika na Nzambe’. Maloba na yango mazali komonisa mingimingi ‘motema makasi’, oyo ezangi boboto mpe mawa.
Kasi Paulo alobaki lisusu: “Bazali koyoka mawa te, bamipesi na makambo na nsoni ete basala makambo na bosoto na bilulela.”—Baefese 4:19.
‘Komipesa na bango na makambo ya nsoni’ ezali komonana kati na banzembo mingi ya ntango na biso. Miziki mpe maloba na yango ezali kobenda bato balingi makambo ya mpambampamba mpe bamipesi na pite, na mobulu, na komela bangi mpe na bisengo. Ndenge nini baklisto basengeli kotalela bizaleli oyo? Toyoka maloba oyo ya Paulo: “Bino boyekolaki Klisto bongo te, soko bosili koyoka mpo na ye mpe bosili kolakisama kati na ye pelamoko ezali makambo na solo na kati na Yesu.”—Baefese 4:20, 21.
“Mbongwana ya elimo” ezali na ntina
Ndenge nini tokoki kolanda elendiseli yango kati na ezalela na biso mpo na miziki oyo ezali komonisa elimo ya mokili? Na likambo yango, soki tozali na “likanisi na Klisto”, elingi koloba ndenge na ye ya kokanisa, tokoboya koyoka miziki “ya mokili, ya bonyama, ya bilimu mabe”.—1 Bakolinti 2:16; Yakobo 3:15.
Kasi, okoki mbala mosusu komituna boye, ‘ndenge nini nakoki kosala mbongwana mpo na oyo etali miziki’? Paulo apesi biso lisusu eyano. Alobi: “Bolongola motindo na bino oyo ekangami na ezaleli na bino na liboso, oyo mpe esili kopola mpo na mposa mabe, mpe bosikolama na elimo na bikaniseli na bino.”—Baefese 4:22, 23.
Tala esika sekele ezali: Kobongola makanisi na mbongwana ya elimo. Mbongwana yango etali bobele te miziki oyo tozali kolinga. Ezali kosenga mateya ya sika, mitinda ya sika mpe kobongola lolenge na biso ya kokanisa, koyeba esika tokoki kopesa na makambo ya ntina. Mbongwana yango ekopusa biso na komonela makambo ndenge Nzambe mpe Klisto bazali komonela yango. Ezali yango Paulo amonisaki malamumalamu na maloba oyo: “Boye, soko bokolyaka soko bokomelaka, isoko bokosala nini, bosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe.”—1 Bakolinti 10:31.
Miziki mingi mpe banzembo ya ntango na biso ezali kokumisa Nzambe te. Ezali nde kotyola makambo ya ntina oyo baklisto bazali koteya mpe oyo mingi na bango bakufelaki kati na boloko to na ba camps de concentration. Soko tosengeli kobongola miziki oyo tolingaka mpo ete ‘tolinga mokili te mpe makambo mazali kati na yango’, tosengeli kokanisa ete yango ezali mpenza likambo monene?—1 Yoane 2:15-17.
Miziki ya malamu ezalaka ndenge nini
Mpo na limemya na biso na mitinda ya Biblia, soko toboi koyoka miziki mabe, tokotya miziki nini na esika yango? Kasi mpo na nini te kobanda kosepela na miziki ya lolenge mosusu? Yango ekoki kozala malamu koleka oyo tozalaki kolinga na kala. Tala na ndakisa maloba oyo moyembi moko ya kala ya rock alobaki mpo na mbongwana oyo asalaki:
“Ezalaki na ngai mpasi mpo na kotika miziki rock oyo namesanaki na yango mpe koyemba miziki oyo endimamaki na bato banso, mpe na nsima miziki ebongisami malamu ebengami ete klasike. Kasi ntango nayaki koyeba ete ezalaki na motuya mingi mpe ete nakokaki te kosangana na elimo oyo ezali komonana mingimingi na miziki ya ntango na biso, mbongwana yango ezalaki lisusu mpasi te mpo na ngai mpe esepelisaki ngai. Mbala moko, namonaki ete miziki ya lolenge yango ezalaki malamu. Namonaki ete makanisi mabe oyo nazalaki na yango mpo na miziki wana ya lolenge mosusu ezangisaki ngai mwa makambo.”
Nzembo mingi ya klasike to ya bonkoko, mpe banzembo mosusu ya ntango na biso ezali na miziki malamu, na maloba ya peto mpe ezali kolobela te filozofi oyo ekeseni na mitinda ya Biblia. Likambo tosengeli kosala, ezali ya koluka mpe kosepela na miziki oyo ezali na bopusi mabe te likoló na elimo na biso, miziki oyo ezali ‘sembo, peto, na lokumu malamu, mpe oyo ekoki kokumisama’.—Bafilipi 4:8.
Esika ya miziki kati na bomoi ya moklisto
Bamoko bazali koyoka esengo ya miziki malamu na koyembaka to koyekolaka kobeta lindanda. Okoki koyoka esengo mingi na kobeta lindanda yo moko to kati na etuluku, elongo na libota na yo mpe baninga na yo. Kasi, lokola na makambo nyonso, osengeli kozala na bokatikati. Kominanola ekoki kozwa esika monene te kati na bomoi ya moklisto. Soko yango ekomi bongo, ata miziki ya peto ekoki kobimisa mbuma mabe. Moklisto akoki kokoma ‘moninga ya bisengo na esika ete azala moninga na Nzambe.’—2 Timote 3:4.
Miziki ezali mpe eteni ya losambo oyo tozali kopesa epai na Jéhovah. Kati na Yisraele ya kala, Azafe mpe bandeko na ye mibali balobaki kati na loyembo: “Botonda Jéhovah, bobyanga nkombo na ye! Bosakwela bato mpo na misala na ye. Boyembela ye, boyembela ye nzembo; bosololana mpo na misala na ye na kokamwa nyonso.—1 Ntango 16:8, 9.
Nzembo ya Bokonzi oyo ba Témoins de Jéhovah bayembaka kati na ba Salles du Royaume na bango ebongisami likoló na ba versets ya Makomami, na nzembo (psaumes), na mabondeli, mpe na mateya ya Biblia. Tosepelaka mpe mingi te na miziki yango? Tokoki te komonisa esengo na biso na koyembaka banzembo yango na esengo? Ata na mabaku mosusu, longola makita ya boklisto, mpo na nini te tokominanola na koyokaka Mélodies du Royaume, oyo ezali ebongiseli malamu ya banzembo yango?
Orchestre oyo eyembaka banzembo yango esangisi sé ba Témoins de Jéhovah. Bamoko basalaka se mosala ya kobeta miziki na ba orchestres ebengami symphoniques. Bamosusu, lokola moyembi na rock oyo toutaki kolobela, bazali bilenge bayebi mpenza miziki mpe bazali kosepela na lolenge ya miziki oyo ezali malamu. Bazali koyoka te ete bazangi eloko moko na koboyoka miziki oyo ezali na elimo ya mokili mpe ya badémo. Ndakisa na bango ya malamu emonisi ete soki topesi nzela na mitinda ya Biblia ete ekamba biso na kopona banzembo na biso, miziki, ezala ya mokili to ya bulee, ekoki kopesa biso esengo mozindo mpe ya peto.—Baefese 5:18-20.
[Etanda na lokasa 16]
“Miziki rock ezali se kolamusa mposa ya nzoto na ndenge ya bonyama-ezangi bolingo, éros, etondi nde na mposa makasi ya nzoto. . . . Bilenge bayebi ete rock etondi na mposa ya nzoto.”—La fermeture de l’esprit américain (Angl.), ekomami na Allan Blomm.