Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/6 nk. 12-19
  • Tosenzela bopeto na biso ya makanisi mpe ya nzoto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosenzela bopeto na biso ya makanisi mpe ya nzoto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bopeto ya makanisi
  • Bopeto ya nzoto
  • Bandako mpe mituka ya peto
  • Bopeto ezali na ntina wana tozali kopesa mbeka ya elimo
  • Tozala peto mpe tolata malamu kati na mosala ya kosakola mpe na makita
  • Nzambe alingaka bopɛto
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Bapɛtolami mpo na misala ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Yehova alingi basaleli na ye bázala pɛto
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Basaleli ya Nzambe basengeli kozala pɛto
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/6 nk. 12-19

Tosenzela bopeto na biso ya makanisi mpe ya nzoto

’Bokaba nzoto na bino lokola mbeka na bomoi oyo na bulee mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango.’​—BALOMA 12:1.

1. Engebene Paulo, mpo na nini bopeto ya makanisi mpe ya nzoto ezali na ntina?

YE OYO alingi kosalela Nzambe mosantu, Jéhovah, asengeli kozala peto na elimo mpe na etamboli. Yango elingi koloba ete asengeli mpe kozala peto na makanisi mpe na nzoto. Lokola biloko na ntango oyo bitondi na mbindo, baoyo bazali kobima na yango basengeli kosala mabongwani, bobele na lolenge na bango ya kokanisa te, kasi lisusu na bizaleli na bango mpenza. Ntoma Paulo akomaki epai na baklisto na Rome ete: “Bandeko, nazali kobondela bino mpo na mawa na Nzambe ete bokaba nzoto na bino lokola mbeka na bomoi oyo na bulee mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango. Bongo bokosambela ye na ntina. Bolandaka makambo na ntango oyo te kasi bobongwana mpo na kozwa makanisi na sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.” (Baloma 12:1, 2) Bopeto na makanisi mpe na nzoto elimboli nini?

Bopeto ya makanisi

2. Ndenge nini miso na biso mpe motema na biso ekoki komema biso na kokwea na masumu, mpe tosengeli kosala nini mpo ete likambo yango ekomela biso te?

2 Liboso ete Mibeko mibimisama, mosembwi Yobo amonisaki ete miso na biso mpe motema na biso ekoki komema biso na komipesa na etamboli mabe soko tozangi ezaleli ya komikanga motema. Alobaki: “Nakati kondimana na miso na ngai elongo, nzela nini koto nakoki kotalaka epai na moseka? Soko motema na ngai ebendami na mwasi . . . ezali lisumu monene mpenza, ezali mabe makoki kopesamela etumbu epai na basambisi.” (Yobo 31:1, 9-11) Soko miso na biso ezali wayawaya mpe soko motema na biso ezangi ekateli, tosengeli kodisipliné elimo na biso, na nzela na “disipline oyo ekoyeisa mayele”.​—Masese 1:3.

3, 4. (a) Likambo ya David mpe ya Bataseba emonisi nini, tosengeli kosala nini mpo na kotika bizaleli ya mabe kati na makanisi na biso? (b) Mpo na nini bankulutu basengeli kokeba mpenza na likambo yango?

3 Mokonzi Davidi atikaki miso na ye komema ye na kosala ekobo elongo na Bataseba. (2 Samwele 11:2, 4) Likambo na ye emonisi ete ata mibali oyo Jéhovah azali kopesa mikumba minene bakoki kokwea na lisumu soko basemboli elimo na bango te. Esengeli mbala mosusu kosala makasi mpenza mpo na kobongola makanisi na biso. Ezali mpe na ntina kobondela Jéhovah na molende nyonso mpo ete apesa biso lisalisi na ye. Nsima na kobongwana na lisumu na ye oyo asalaki elongo na Bataseba, David asalaki libondeli oyo: “E Nzambe, zalisela ngai motema na mpeto mpe pesa ngai elimo na sika, na boyengebene kati na ngai.”​—Nzembo 51:10.

4 Bankulutu kati na lisangá ya boklisto basengeli kosenzela mpenzampenza ete bakolisa bamposa mabe te, oyo ekoki komema bango na kosala lisumu ya monene. (Yakobo 1:14, 15) Paulo akomaki na Timote, oyo azalaki nkulutu: “Nsuka na toli nyonso ezali bolingo uta na mitema na mpeto mpe na lisosoli malamu mpe kondima ezangi bokosi.” (1 Timote 1:5) Ekozala mpenza bokosi mpo na nkulutu oyo azali kokokisa mikumba na ye ya elimo kasi azali kotika ete miso na ye ebota kati na motema na ye mposa ya kosala lisumu.

5. Tosengeli kotika kotala biloko nini mpo ete tobatela bopeto na biso ya makanisi?

5 Biso baoyo tozali baklisto, tosengeli kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kobatela bopeto na biso ya makanisi. Yango elingi koloba ete tosengeli koboya kotala bafilme, ba émissions ya télévizio mpe koboya kotanga mikanda oyo ekoki kobebisa elimo na biso. Bopeto ekoki na makanisi esengi ete tosala milende mpo na kotya makanisi na biso likoló na oyo ezali “solo, . . . sembo, . . . peto”. Paulo alobi ete: “Soko malamu ezali mpe soko lisanzoli ezali, bokanisa makambo yango.”​—Bafilipi 4:8.

Bopeto ya nzoto

6. (a)Pesa bandakisa oyo ezwami na mokanda na Levitike oyo emonisi ete bopeto ya moto na moto mpe ya bato banso ezalaki lisengi kati na Yisraele. (b) Ntina ya mibeko motindo oyo ezalaki nini?

6 Balobaka ete “bopeto ekokani na ezaleli ya kobanga Nzambe”. Ya solo, elingi koloba te ete moto oyo azali peto na ezaleli mpe na nzoto azali mpe oyo akobangaka Nzambe. Kasi, moto na ezaleli na kobanga Nzambe asengeli kozala peto na bizaleli mpe na nzoto. Mibeko na Moïse ezalaki na mitinda ya sikisiki mpo ete bandako oyo ezali na maladi mabe epetolama mpe Bayisraele basukola nzoto mbala nyonso oyo bazwamaki na mbindo. (Tala Levitike mikapo 14 mpe 15) Bango nyonso basengelaki komimonisa basantu. (Levitike 19:2) Mpo na yango, tala oyo tokoki kotanga kati na Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible: “Mitinda ya Nzambe mitali kolya, bopeto mpe bizaleli malamu ezalaki kokundola bango ntango nyonso ete babongisamaki mpe bazalisamaki bulee mpo na Nzambe.​—Lokasa 1343.

7. Tokoki koloba nini mpo na ba Témoins de Jéhovah, kasi bakengeli ya zongazonga bazali koloba nini?

7 Atako na etuluku, ba Témoins de Jéhovah bazali peto na mbindo nyonso ya lingomba ya lokuta oyo euti na Babilone mpe bazali koboya mbindo nyonso na bizaleli kati na bango, bakengeli ya zongazonga bazali koloba ete bamoko bazali na bopotu mpo na oyo etali bopeto na bango ya nzoto mpe na ordre. Ndenge nini tokoki kondimisama ete tozali peto kati na likambo yango lisusu? Mpo na yango, Béthel, liloba oyo elimboli “Ndako ya Nzambe”, ekoki kozala ndakisa mpo na mabota nyonso ya baklisto.

8, 9. (a)Batoli nini epesami na basangani nyonso ya sika oyo bakoti na libota ya Béthel? (b) Mitinda nini mizali kotambwisa ba Béthels misengeli mpe kolandama na bandako nyonso ya baklisto?

8 Wana mosangani moko ya sika akomi na libota ya Béthel, bakopesa ye brochure moko ebongisami na Collège central. Mwa mokanda yango ezali kolimbola makambo oyo esengami epai na ye mpo na oyo etali mosala na ye mpe bizaleli na ye mpenza. Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda yango na nse na motó na likambo “Chambre mpe bopeto”: “Bomoi na Béthel esengi ete omibatela peto na nivo etombwami mpenza ezala na nzoto, na bizaleli mpe na elimo. Mokomoko asengeli komibanzabanza mpo na bopeto na ye mpe oyo ya chambre na ye. Yango ekobatela kolongono ya nzoto. Ntina ya kozala na bosoto ezali te. Ezali malamu kosukola nzoto mikolo nyonso . . . Esengeli kosukola maboko liboso ya kolya; tokanisi ete mokomoko akosala ndenge yango. Opetola lavabo nsima na kosukola maboko, mpo na limemya epai na basangani mosusu ya libota mpe ndeko mwasi to ndeko mobali oyo akobongisaka ndako.”

9 Kati na ba Béthel, twalete to w.c. ebatelami na bopeto nyonso mpe bibongiseli nyonso bizali mpo ete baoyo bazali kosalela yango basukola maboko soki balingi kobima. Basangani ya Béthel bakotala ete w.c. etikali peto nsima wana babendi mai. Yango ezali lolenge mosusu ya komonisa limemya epai na ndeko mosusu oyo akokota kuna mpe epai na ndeko mobali to mwasi oyo akosukolaka w.c. Mitinda malamu oyo etondi na bolingo esengeli kolandama na mabota nyonso ya baklisto. Boye te?

10. (a) Mpo na nini esengeli te bobele kozala na douche kitoko mpo na kosenzela na bopeto ya nzoto na biso mpe oyo ya bana na biso? (b) Mibeko nini mizalaki kosalisa Bayisraele ete bazala na nzoto kolongono, mpe toli nini basaleli na Jéhovah ya ntango na biso basengeli kozwa na likambo yango?

10 Ya solo, makambo makeseni kati na mboka mokomoko. Na bisika mosusu, bandako ezali na douche te. Kasi, na bisika mingi baklisto bakoki kozwa mwa mai makoki mpe savon mpo na kosenzela na bopeto ya nzoto na bango mpe ya bana na bangoa. Na bisika mingi, bandako ezangi banzela oyo ekomemaka salite na nse ya mabelé. Nzokande, tokoki kokunda salite, kozanga ete yango ezala likama, ndenge Bayisraele basengelaki kosala yango, ata na ba camp ya basoda. (Deteronome 23:12, 13) Epai mosusu, mibeko ya Jéhovah na ntina na ba camps ezalaki kosenga ete bato basukola nzoto mbala na mbala mpe basukola ntango nyonso bilamba na bango, baluka mpe basalisa nokinoki bamaladi. Ezalaki komonisa likambo basengelaki kosala na nzoto ya bawei mpe lolenge ya kobatela bopeto ya mai mpe ya bilei. Mibeko yango nyonso mizalaki kobatela libota ete ezala na nzoto kolongono. Na mikolo na biso, basaleli ya Jéhovah basengeli mpe kotosa mitinda mitali bopeto kati na bomoi na bango.​—Baloma 15:4.

Bandako mpe mituka ya peto

11. (a) Ata ndako ya moklisto ezali mpenza moke, kasi esengeli kobatelama ndenge nini? (b) Likambo nini esengami na mosangani mokomoko ya libota ya Béthel?

11 Ndako na biso, ata ezali moke, ekoki kozala peto mpe ebongisami Kasi yango ezali kosenga boyokani kati na libota. Mama ya libota oyo azali moklisto akozala na mposa ya kolekisa ntango mingi na misala ya elimo, mingimingi na mosala ya kosakola. Esengeli te ete mikolo nyonso abongisa bilamba, mikanda, ba papiers, bazulunalo, mpe biloko mosusu, oyo epelangani bipai binso. Na Béthel, atako bandeko basi bazali kobongisa ndako, esengami na mosangani mokomoko ya libota ete abongisa mbeto na ye mpe abongisa chambre na ye na ntongo liboso ete abima. Tosepelaka biso banso ete Salle du Royaume na biso mpe Salle d’assemblée na biso ezala peto mpe ebongisama malamu. Tika ete ndako na biso mpe emonisa ete tozali basangani ya libota ya Jéhovah oyo ezali peto mpe bulee.

12, 13. (a) Mituka oyo mizali kosalelama mpo na mosala ya Jéhovah misengeli kozala ndenge nini, mpe esengeli kolekisa ntango mingi mpo na kosukola yango? (b) Ntina nini ya elimo tozali na yango mpo na kosenzela na bopeto na biso ya nzoto, bopeto ya ndako na biso mpe bopeto ya motuka na biso?

12 Basaleli mingi ya Jéhovah bazali kosalela motuka mpo na kokenda na makita ,mpe kosangana na mosala ya kosakola. Na mikili misusu, motuka esili kokoma eloko ya ntina mpo na kosalela Jéhovah. Yango esengeli kozala peto na libanda mpe na kati, lokola ndako na biso. Ya solo, baklisto bakoki te kolekisa ntango na bango nyonso mpo na kobongisa mituka na bango ndenge ekosalaka yango bato mosusu ya mokili, kasi, bakoki mpe kotika yango salite te. Na bongo, mosaleli ya Jéhovah asengeli kosala makasi mpo na kobatela motuka na ye ete ezala peto mpe ebongisama malamu. Na bamboka mosusu, okoki kosukolisa motuka na yo epai ya bato bakosalaka mosala yango na boumeli ya mwa ntango moke mpe na motuya ya malamu. Mpo na kosukola mpe kobongisa na kati ya motuka, okoki ko- sala minite zomi mpe yango ekozala na matomba malamu. Bankulutu mpe basaleli na misala basengeli mpenzampenza kosenzela ete bapesa ndakisa malamu na likambo yango, mpamba te bazali kosalela mbala mingi mituka na bango mpo na komema bituluku ya basakoli na mosala ya kosakola. Temwe akopesa litatoli malamu te soki azali komema na makita, bato oyo bazali kosepela na solo kati na motuka oyo ezali salite na libanda mpe na kati.

13 Soko tozali kosenzela na bopeto ya nzoto na biso, na bopeto ya ndako na biso mpe na oyo ya motuka na biso, tokokumisa bongo Jéhovah lokola tozali basangani ya lisangá na ye ya peto.

Bopeto ezali na ntina wana tozali kopesa mbeka ya elimo

14. Mibeko nini mizalaki kolimbola milulu mitali bopeto oyo esengamaki na Bayisraele, mpe mibeko yango emonisi nini?

14 Na Yisraele, milulu mitali bopeto misengamaki kati na losambo, mpe kozanga botosi na yango ekokaki komema na liwa. Jéhovah alobaki na Moïse mpe na Aaron: “Bokokabola bato na Yisraele na mbindo na bango, ete bakufa na mbindo na bango te wana ebebisi bango mongombo na ngai oyo na kati na bango.” (Levitike 15:31) Mokolo na Mbondi, nganga monene na Nzambe asengelaki komisukola nzoto na mai mbala mibale. (Levitike 16:4, 23, 24) Saani ya kwivre oyo ezalaki kati na tabernakle, mpe na nsima esimbelo na mai oyo esalamaki na kwivre kati na temple, ezalaki na mai mpo ete banganga-nzambe basukola maboko liboso ya kotumba mbeka epai na Jéhovah. (Exode 30:17-21; 2 Ntango 4:6) Tokoloba nini mpo na Bayisraele? Soko likambo moko ekomisaki bango mbindo, bazalaki kokoma mbindo na likambo etali milulu, epekisamelaki bango ete basangana na losambo liboso ete bakokisa milulu ya bopetoli. (Mituya 19:11-22) Bibongiseli yango nyonso bizali komonisa polele ete bopeto ya nzoto esengami epai na basambeli na Jéhovah Nzambe na bulee.

15. Mpo na nini ezali lisusu na ntina te ya kotumba mbeka, kasi mituna nini mitunami?

15 Ya solo, basaleli ya Jéhovah basengisami te na kotumba mbeka kati na temple ya nse. Na esika ya mbeka oyo ezalaki kopesama na nse na Mibeko, “nzoto na Yesu Klisto epesamaki lokola mbeka mbala moko mpo na libela”. (Baebele 10:8-10) ‘Tozali kosambela Tata na elimo mpe na solo’. (Yoane 4:23, 24) Kasi yango elingi koloba ete tozali lisusu na mbeka te oyo tokopesa epai na Jéhovah, Nzambe na biso ya bulee? Bongo bopeto esengami lisusu te epai na biso ndenge ezalaki epai na Bayisraele?

16. Ndenge nini esakweli ya Malaki 3:3, 4 ekokanaki epai na baklisto bapakolami uta 1918, mpe mbeka nini ya malamu bakoki kopesa epai na Jéhovah?

16 Engebene esakweli ya Malaki, baklisto bapakolami oyo bakozala na bomoi na mabelé na ntango na nsuka bakoyungolama to bakopetolama, mpo na mosala kati na temple. Makambo mamonisi ete koyungolama yango ebandaki na 1918. Na 1919, batikali bapakolami ‘basili mpe kokoma mpo na Jéhovah bato oyo bazali kopesa mbeka na boyengebene’, mpe mbeka na bango ezali “kondimama na Jéhovah”. (Malaki 3:3, 4) Na bongo, babongi mpo na “kopesa mbeka ya elimo oyo ekondimama na Nzambe na nzela na Yesu Klisto”. (1 Petelo 2:5) Ntoma Paulo akomaki: “Bongo mpo na ye, totombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye.”​—Baebele 13:15.

17. Atako “ebele monene” na bampate mosusu bazali kati na kelasi na bonganga te, mpo na nini basengeli kozala peto na nzoto, na makanisi, na etamboli mpe na elimo?

17 Atako “ebele monene” babengami te na kokokisa mosala ya bonganga kati na temple lokola batikali bapakolami, ata bongo bazali “kosalela [Jéhovah] mosala ya bulee, butu mpe moi”, kati na temple ya elimo awa na nse. (Emoniseli 7:9, 10, 15) Bayisraele oyo bazalaki na kelasi ya bonganga te basengelaki kozala peto mpo na makambo matali milulu mpo na kosangana na losambo kati na tabernakle mpe na nsima kati na temple. Bobele bongo, ebele monene na bampate mosusu basengeli kozala peto na nzoto, na makanisi, na etamboli mpe na elimo soki balingi kosala kati na temple mpe kosangana na batikali mpo na ‘kopesa epai na Nzambe mbeka na masanzoli’ na kopesaka “litatoli mpo na nkombo na ye”.

Tozala peto mpe tolata malamu kati na mosala ya kosakola mpe na makita

18. Tosengeli kosenzela na likambo nini na ntina etali bopeto na biso ya nzoto, bilamba na biso mpe sapato na biso na ntango tozali kosangana na mosala ya kosakola to tozali koyangana na makita?

18 Yango elingi koloba mpenza nini? Elingi koloba ete tokozanga limemya epai na Jéhovah mpe tokomonisa ete tobongi te na komonisa ye kati na mosala ya ndako na ndako, kati na balabala to na bandako na bato soko tozali salite mpe tolati se bongo na bongo. Tosengeli te kotalela likambo yango na bopotu, kasi tosengeli kosenzela na yango malamumalamu, mpo ete tosala na lolenge oyo ekoki na ba ministres oyo bazali komema nkombo ya Jéhovah. Ntina ezali te ya kolata bilamba ya motuya mingi, kasi ata bongo molato na biso esengeli kozala peto, ebongisami malamu mpe ya bopolo. Sapato na biso esengeli kozala ya kotobokatoboka te kasi ya malamu. Ndenge moko, tosengeli kozala peto mpe kolata bilamba ya peto mpe bibongisami malamu na likita nyonso, ata na boyekoli ya mokanda.

19. Bopeto na biso mpe molato na biso oyo ebongisami malamu ezali kobimisa mbuma nini kati na mosala ya kosakola?

19 Bopeto na biso mpe molato na biso oyo ebongisami malamu kati na mosala ya kosakola mpe na makita “ekokembisa mateya na Nzambe Mobikisi na biso, kati na makambo nyonso”. (Tito 2:10) Makambo yango mazali mpe litatoli. Bato mingi bakamwaka na bopeto na biso mpe na molato na biso ya malamu, mpe yango ezali kopusa bango na koyoka biso soko tozali kosolola na bango na ntina na mikano kitoko ya Jéhovah oyo etali kozalisama ya makoló ya sika ya sembo mpe ya mabelé na sika oyo ekopetolama.​—2 Petelo 3:13.

20. Bopeto na biso ya nzoto mpe ya makanisi ekoki lisusu kobimisa mbuma nini?

20 Lokola ebongiseli ya sika mpe ya peto oyo elakami na Jéhovah esili kobelama, tosengeli biso banso komitalela mpo na koyeba soki tosengeli kosala mbongwana kati na lolenge na biso ya kokanisa to na bizaleli na biso mpenza. Paulo akomaki: “Nazali koloba na motindo na bato mpo na bolembu na nzoto na bino. Mpamba te bopesaki bilembo na nzoto na bino lokola baombo na bosoto mpe na mobulu ndenge na ndenge. Boye sasaipi bopesa bilembo na nzoto na bino lokola baombo na boyengebene mpo na kozala bapetwi.” (Baloma 6:19) Bopeto ya nzoto mpe ya elimo ezali kobimisa mbuma malamu uta sikawa, “mbuma mpo na kopetwa, mpe nsuka na yango bomoi na seko.” (Baloma 6:22) Tosenzela bongo na bopeto na biso ya elimo mpe ya nzoto wana tozali ‘kopesa nzoto na biso lokola mbeka na bomoi, na bulee, oyo endimami na Nzambe’.​—Baloma 12:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mwa makanisi na ntina etali bopeto na bamboka, epesami na lisolo “Un défi à relever: la propreté”, oyo ebimisamaki kati na Réveillez-vous! ya le 22 Septembre 1988, nkasa 8 kino 11.

Bozongeli

◻ Ndenge nini miso na biso mpe motema na biso ekoki komema biso na kokwea na masumu?

◻ Bolamu nini Bayisraele bazalaki kozwa wana ezalaki bango kotosa mibeko ya Jéhovah oyo mitali bopeto ya libota mobimba mpe bopeto ya moto na moto?

◻ Mitinda nini mizali kotambwisa ba Béthels misengeli mpe kolandama na mabota nyonso ya baklisto?

◻ Ntango nini mpenzampenza tosengeli kozala na molato ya peto?

◻ Bantina nini ya elimo ekopusa basaleli na Jéhovah basenzela ete ndako na bango mpe mituka na bango ebatelama peto?

[Elilingi na lokasa 17]

“Bomoi na Béthel esengi ete omibatela peto mpenza na nzoto, na bizaleli mpe na elimo.

[Elilingi na lokasa 18]

“Ekozala mpenza likambo malamu ete mokolo na mokolo mama alekisa ntango na ye na kobongisa biloko oyo basangani ya libota na ye bapanzipanzi kati na ndako?

[Elilingi na lokasa 19]

Na minite zomi okoki kosukola mpe kobongisa motuka na yo. Yango ekozala esengo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto