Mpo na nini kobanga Nzambe, kasi bato te?
“KOBANGA bato, ezali motambo, kasi ye oyo akomipesa epai na Jéhovah akobatelama.” (Masese 29:25) Lisese oyo ya Kalakala ekebisi biso na lolenge na nsomo oyo ezali mpenza pwazo mpo na makanisi: kobanga bato. Mpo na nini yango ekokisami na motambo? Mpamba te nyama moke lokola lapin, akoki kosala eloko te soki akangami na motambo. Azali na mposa ya kokima, kasi motambo ekangi ye makasi. Mpe akosala eloko te.
Ye oyo azwami na motambo ya kobanga bato akokani mpenza na lapin wana. Mbala mosusu ayebi likambo asengeli kosala mpe mbala mosusu azali na mposa ya kosala yango malamu, kasi kobanga elongi ye. Mpo na yango akozanga makoki ya kosala likambo ya malonga.
Kobanga bato-ezali motambo
Tokoki komikundola ndakisa ya bato mosusu oyo, na ntango na kala, bazwamaki na motambo ya kobanga. Na mikolo na Yosua, bato zomi na mibale batindamaki na mboka Kanana liboso ete Bayisraele bakota na mboka yango ndenge ekanamaki. Wana ezongaki bango, banongi balobaki ete mboka etondaki na bozwi mpe ezali kobota mbuma, mpenzampenza ndenge Nzambe alobaki yango. Kasi zomi kati na bango babangaki mpo na makasi ya bafandi na mboka yango. Elongamaki bango na elimo ya kobanga bato, banongi yango balekisaki liyoki motindo yango epai na libota mobimba ya Yisraele na kolobelaka bango mpo na makasi na bato ya mboka yango. Kasi balekisaki ndelo na maloba na bango. Bayisraele baboyaki kotosa etinda ya Nzambe oyo esengaki bango na kokota na Kanana mpo na kobunda etumba mpe kobotola mboka. Likambo nini esalemaki? Mibali nyonso oyo bazalaki bakolo na ntango yango, longola bobele mwa ndambo, bakufaki kati na esobe na boumeli ya mibu 40 oyo elandaki.—Mituya 13:21 kino 14:38.
Yona ye mpe akangamaki na motambo ya kobanga bato. Wana ezwaki ye etinda ya kokenda kosakola kati na engumba monene ya Ninive, “atelemaki mpo na kokima na Tarsis.” (Yona 1:3) Mpo na nini? Bato na Ninive bayebanaki ete bazalaki bato na mobulu mpe babomi na bato. Na ntembe te Yona mpe ayebaki likambo yango. Kobanga bato epusaki ye na kokima mosika na Ninive. Ya solo, na nsima ayaki kondima etinda yango, kasi ezalaki nde nsima na kozwa disipline oyo esengeli longwa na Jéhovah.—Yona 1:4, 17.
Ata bakonzi bakoki mpe kokwea na motambo ya kobanga bato. Mokolo mosusu, mokonzi Saül abukaki na lolenge ya polele mpenza mobeko ya Nzambe. Alobaki nini mpo na komilongisa? “Nasali mabe mpo ete nasopaki mobeko na Jéhovah mpe liloba na yo; nabangaki bato mpe natosaki mongongo na bango.” (1 Samwele 15:24) Mwa bikeke na nsima, wana bato na Babilone bakotaki na Yelusaleme, mosakoli moko ya sembo na nkombo Jérémie apesaki toli epai na mokonzi Sedekiase ete amikaba epai na monguna mpo na kopekisa ete engumba mobimba ebomama te. Kasi Sedekiase aboyaki. Mpo na nini? Alobaki boye epai na Jérémie: “Nabangi Bayuda baoyo basili kokima epai na Bakaladi ete bakaba ngai na maboko na bango mpe batyola ngai.”—Yilimia 38:19.
Bantoma, bango mpe bazalaki kobanga. Mokolo na kufa na ye, Yesu alakaki bayekoli na ye ete bango banso bakokima ye. Kasi, Petelo alobaki na lolendo nyonso: “Nkolo, naselingiwi kokenda na yo nzela moko kati na boloko mpe na kufa.” (Luka 22:33; Matai 26:31, 33) Azalaki mpenza komikosa! Bobele mwa ngonga moke na nsima, Petelo abangaki mpe awanganaki ete azalaki moninga na Yesu te mpe aboyaki kondima ete ayebaki ye. Kobanga moto elongaki ye! Na ntembe te, liyoki yango ezali mpenza pwazó mpo na makanisi.
Tosengeli kobanga nani?
Ndenge nini tokoki kolonga elimo ya kobanga bato? Na kotyaka na esika na yango kobanga oyo ezali malamu, kobanga oyo ntoma Petelo ye moko alobelaki na boye ete: “Banga Nzambe.” (1 Petelo 2:17) Anzelu oyo Yoane amonaki na emonaneli ya Emoniseli apesaki toli oyo epai na mokili mobimba: “Banga Nzambe mpe pesa ye nkembo.” (Emoniseli 14:7) Mokonzi Salomo alendisaki mpe lisusu kobanga motindo yango, na kolobaka: “Toyoka nsuka na likambo mobimba: Tosa [banga] Nzambe mpe batela mibeko na ye; yango ezali mosala na bato nyonso.” (Mosakoli 12:13) Kobanga Nzambe ezali bongo mokumba.
Kobanga Nzambe ezali liziba na bolamu, lokola emonisi yango maloba ya mokomi na nzembo na kala: “Ee, kobika na ye ezali penepene na baoyo bakobangaka ye.” (Nzembo 85:9) Lisese moko ezwami na Biblia epesi elikya oyo: “Kotosa [kobanga] Jéhovah ekoyeisa mikolo milai.” (Masese 10:27) Ya solo, kobanga Jéhovah ezali na litomba mpe na lobiko. ‘Kasi mbala mosusu tokoki koloba ete, Jéhovah azali Nzambe na bolingo. Mpo na nini tosengeli kobanga Nzambe ya bolingo?’
Mpo na nini kobanga Nzambe ya bolingo?
Mpamba te kobanga Nzambe ezali nsomo mabe te oyo ekopekisa moto na kosala likambo wana ekomi ye liboso na mokakatano. Ezali nsomo oyo ekokani na kobanga oyo mwana azali na yango epai na tata na ye, ata azali kolinga ye mpe ayebi ete liyoki yango ezali mpe epai na tata na ye.
Kobanga Nzambe, ezali bongo komonisa limemya mozindo epai na Mozalisi, na koyebaka ete azali moto oyo atondi na sembo, na boyengebene, na mayele mpe na bolingo. Yango ezali kobimisa kobanga oyo esengeli, oyo ya kosepelisa ye, na koyebaka ete azali Mosambisi monene mpe azali na nguya ya kopesa mbano to kopesa etumbu. Na yango, ntoma Paulo akomaki: “Ezali likambo na nsomo kokwea na maboko na Nzambe na bomoi.” (Baebele 10:31) Bolingo ya Nzambe ekoki kotalelama lokola nyongo te. Ekozala mpe malamu te na komona mpamba ntina ya bikateli na ye. Tala mpo na nini Biblia ekundoli likambo oyo: “Kotosa [kobanga] Jéhovah ezali ebandeli na mayele.”—Masese 9:10.
Esengeli mpe komikundola ete soki Jéhovah azali na lotomo ya kopesa etumbu epai na baoyo bazali koboya kotosa ye, ndenge asalaka yango mbala mingi, ata bongo azali na motema molai mpe azali na mposa ya koboma bato te. Azali mpenza Nzambe ya bolingo, ata soki na ndakisa ya baboti oyo batondi na bolingo, azali mbala mosusu kosilika mpo ezali lotomo na ye. (1 Yoane 4:8) Tosengeli bongo kobanga ye: yango ekotinda biso na komikitisa na mibeko na ye oyo ebimisamaki mpo na bolamu na biso. Botosi na mibeko ya Nzambe ezali kopesa bolamu; kozanga botosi, yango ezali kobimisa ntango nyonso mbuma mabe. (Bagalatia 6:7, 8) Mokomi na nzembo alobaki na kopemama na Nzambe: “Bino bayengebene na ye, banga Jéhovah. Mpamba te baoyo bakotosa ye bakozanga eloko te.”—Nzembo 34:9.
Tobangaka nani?
Ndenge nini nsomo ya Nzambe ezali kosalisa biso na kolonga elimo ya kobanga bato? Ekoki kozala ete bato bazali koseka to konyokola moto moko mpo na bosembo na ye, mpe kopusaka ye na kobebisa bosembo na ye. Nzokande, kobanga oyo etondi na limemya, oyo azali na yango mpo na Nzambe ekozala mpo na ye lipusi makasi mpo na kozanga kopengwa na makambo oyo mazali sembo, komibatela bongo na kozanga kosepelisa ye. Lisusu, bolingo na ye mpo na Nzambe ekopusa moto yango na kosepelisa motema na Ye. Akomikundola ete epai mosusu Nzambe akokanisela na ndenge esengeli baoyo bazali kosala makambo ya sembo; yango ekotinda ye na kolinga lisusu Nzambe mingi mpe na kolinga kosala mokano na ye. Na ndenge yango, tokoki kolonga liyoki nyonso ya kobanga oyo ebimisami na bato na kozalaka na makanisi mabongi mpo na Nzambe.
Na ndakisa, bato mingi bamekamaka na kosala mabe mpo bazali kobanga makambo oyo baninga na bango bakoki koloba. Ekoki kozala ete na eteyelo bilenge bazali komela likaya, bazali na maloba mabe, bazali komikumisa mpo basangisaki nzoto (ekoki kozala solo to lokuta) mpe bazali komela masanga mpe bangi. Mpo na nini bazali na etamboli motindo boye? Misala yango mizali mpenzampenza kosepelisa bango te, kasi bazali kobanga makambo oyo baninga na bango bakoloba soki etamboli na bango ekeseni. Epai na elenge, kotyola mpe koseka ekozala mpasi mpo na koyikela yango mpiko lokola monyokoli ya nzoto.
Bobele bongo, moto oyo azali mokolo akoki kopusama na kosala mabe. Ekoki kozala ete patron moko asengi na mosali na ye ete abakisa ntalo ya facture ya kiliya moko to akoma mitango ya lokuta na lokasa ya mpako ya kompanyi mpo ete mbongo oyo ekofutama na Leta ezala moke. Moklisto akoki kokanisa mbala mosusu ete soki aboi kosala bongo, akolongwa na mosala. Na yango, kobanga bato ekoki kopusa ye na kosala mabe.
Na makambo oyo mibale totangi, nsomo ya lobiko mpo na Nzambe mpe limemya na mibeko na ye ekopekisa moklisto alongama na elimo ya kobanga bato. Bolingo na ye mpo na Nzambe ekobatela ye na kosala misala oyo Ye azali koboya. (Masese 8:13) Mpe lisusu, kondima na ye epai na Nzambe ekopesa ye endimiseli ete, ata likambo yango ekosuka ndenge nini, Nzambe akosunga ye soko asali malamu na kolandaka lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia. Ntoma Paulo amonisaki kondima na ye na kolobaka boye: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.”—Bafilipi 4:13.
Biblia etondi na bandakisa mingi ya mibali mpe basi oyo batikalaki sembo epai na Jéhovah wana bakutanaki na mikakatano ya minene. “Bamosusu batukami mpe babetami na mfimbo, . . . Bakangami mpe batyami na boloko. Babwakelami mabanga, bazengami ndambo mibale na mosuni, babomami na mopanga.” (Baebele 11:36, 37) Ata bongo, bapesaki nzela te ete kobanga bato elonga elimo na bango. Balandaki nde nzela ya mayele oyo Yesu alakisaki na nsima epai na bayekoli na ye: “Bobanga bango te baoyo bayebi koboma nzoto nde bayebi koboma bomoi te. Bobanga nde ye oyo azali na nguya na kobebisa na bomoi na nzoto kati na Geena.”—Matai 10:28.
Na kolandaka toli oyo ya Yesu ya kobanga Nzambe na esika ya kobanga bato, baklisto ya liboso bakokaki koyika mpiko na mikakatano ya ndenge na ndenge, na mimekamo mpe na minyokoli “mpo na nsango malamu”. (Filemo 13) Ntoma Paulo azali ndakisa malamu na likambo yango. Na mokanda na ye ya mibale epai na Bakolinti, alimboli ndenge nini nsomo ya Jéhovah epesaki ye makasi ya koyika mpiko kati na boloko, na kobeta, na kobwakela mabanga, na kozinda na mai, na makama ekeseni na nzela, na butu kozanga kolala, na nzala, na mposa ya mai, na malili mpe na kozanga bilamba.—2 Bakolinti 11:23-27.
Nsomo ya Nzambe epesaki mpe epai na baklisto ya liboso makasi ya koyika mpiko liboso na minyokoli minene oyo bazwaki na boyangeli na Rome. Na eleko yango, bamoko babwakamaki ata epai na banyama na yauli na bisika ya masano (arêne). Na Moyen Age, bandimi na mpiko babomamaki liboso na bato nyonso na kotumbamaka mpo na ekateli na bango ya koboya kobebisa kondima na bango. Na etumba ya mibale ya mokili mobimba, baklisto bandimaki konyokwama mpe kokufa na ba camps ya concentration na esika ete bayinama na Nzambe. Kobanga Nzambe ezali mpenza nguya monene! Na ntembe te, soki eyikisaki baklisto mpiko baoyo balongaki elimo ya kobanga bato kati na makambo ya mpasi, ekoyikisa biso mpe mpiko ata tokutani na likambo motindo nini.
Na mikolo na biso, Satan le Diable azali kosala nyonso mpo na kopusa biso ete toyinama na Nzambe. Ekateli ya baklisto esengeli bongo kozala oyo Paulo alobaki na maloba oyo: “Biso tozali kati na bango te baoyo bakozongaka nsima mpe bakobebisama; kasi tozali kati na bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.” (Baebele 10:39) Tokoki solo kozwa nguya kati na nsomo na Jéhovah. Tika ete na nzela na yango “Tozala na molende mpe koloba ete: ‘Jéhovah azali mosungi na ngai, nakobanga te. Moto akosalela ngai nini?’”—Baebele 13:6.
[Elilingi na lokasa 5]
Nsomo ya Nzambe epesaki na Paulo makasi ya koyika mpiko na makambo nyonso, ata kobeta, boloko mpe ata likama ya mai.—2 Bakolinti 11:23-27.