Liteya euti na Makomami: Obadia 1-21
Makebisi na Nzambe oyo matali yo
“YE OYO asimbi bino azali kosimba kati na liso na ngai.” (Zakaria 2:8) Maloba wana na kongala mazali nsango ya likebisi mpo na moko na moko na biso: Jéhovah azali komona lolenge oyo mabota bazali konyokola libota na ye. Nzokande ntango libota moko eboyi kondima likebisi ya Nzambe mpe epesi mpasi epai na libota ya Nzambe likambo nini esengeli kokomela libota yango. Obadia, mokanda moke ya Makomami na liebele, ezali koyanola na motuna yango.
Mpasi elakami mpo na Edome
Moko te akoki kokima lisambisi ya Jéhovah. Esakweli na Obadia, oyo esakolamaki penepene na mobu 607 liboso ya ntango na biso, ezali koyebisa ete Baedomite basengeli kobimisama na mboka na bango, ata soki, bazali kofanda likoló na bangomba “katikati na myoto”, bakanisi ete bazali na libateli. Ndimbola moko te epesami na ntina na bomoi na Obadia. Ntango nyonso emonani lokola ete mokomi wana na Biblia azali kosala na boyokani na ndimbola ya nkombo na ye, elingi koloba “mosaleli na Jéhovah”. Ndenge nini? Na kosakolaka lisambisi ya mpasi. Na ntango ya bokwei na yango. Edome ekobebisama mpenza mobimba epai na baninga na yango oyo esalaki na yango boyokani. Ata bato na mayele na yango mpe mibali na nguya na yango bakobika te.—1-9.
Nzambe azali koyeisa mpasi likoló na baoyo bazali kokúmba ngambo ya koboma libota na ye. Mpo na nini mpasi elakami epai na Baedomite? Mpo ete bamipesaki mbala mingi na misala mabe ya koboma bana na Yakobo, bandeko na bango. Lokola bazalaki bakitani na Esaü, Baedomite bazali bandeko ya Bayisraele. Nzokande bapamelamaki mpo ete babebisaki biloko na Bayisraele mpe basepelaki na motema mabe mpo na kokwea ya Yelusaleme, komonisaka mabe na bango kino kokaba babiki epai na banguna. Na yango, Edome emibendelaki ekweli.—10-16.
Ndako na Yakobo etelemisami
Bilaka nyonso ya Jéhovah bizali solo. Na mikolo ya Obadia, Jéhovah alakaki ete Libota na ye ekozwa lisusu, bobele mboka na bango te, kasi mpe oyo ya mabota ya zongazonga. Yisraele ekokabwana lisusu te. Ndako na Yakobo (mabota mibale ya bokonzi na Yuda) mpe ndako na Yosefe (mabota zomi ya Nord) makosangisama mpe bakopanza Edome lokola móto ezikisaka matiti. Bakozwa elongo teritware ya libota yango. Obadia asukisi na liloba moko ya kolendisa na kolobaka ete Bayisraele oyo bazongisami na mboka na bango bakosambela Nzambe na bango na bomoko mpe bakozala basembwi na ye. Na yango, bokonzi ezali ya Jéhovah.—17-21.
Liteya oyo tosengeli kozwa: Tozali komibendela mpasi ntango tozali koboya kondima makebisi. Na yango, na eleko na biso, nsango na nguya ya Obadia epai na Edome esengeli kolela kati na matoi ya banguna na Nzambe: baoyo bazali kobundisa Jéhovah mpe libota na ye bakobomama libela.
Liteya euti na Makomami: Yona 1:1 kino 4:11
NDENGE nini tokoki kobikisama na mpasi mpe bayokela biso mawa? Na kotyaka likebi na liteya oyo ezali kobima kati na mokanda na Yona, lisolo ya solo ya makambo oyo masalemaki esili koleka mibu 2 800. Ekomamaki penepene na 844 liboso ya ntango na biso na mosakoli moko ya Galiléa Yona, ezali na ebele na mateya ya elimo.
Yona akimi
Tosengeli kozala na elikya ete Jéhovah akosimba biso kati na mosala na ye. Yona ameki kokima mokumba oyo Nzambe apesaki ye na esika ete atalela lisalisi ya Jéhovah. Ezali solo ete, mokumba na ye, ezali ya petee te. Asengeli kokebisa na molende nyonso engumba ya Ninive oyo emibebisi mingi ete Nzambe akoyeisa mpasi likoló na yango. Kasi Yona akei nzela mosusu, kobengaka mboka Tarsis, oyo lelo ekoma Espanye. Na ntango ya mobembo na ye, mopepe makasi mobimi. Mokomi mpenza makasi kino masuwa mpe bato na yango nyonso bamimoni ete bakozinda. Yona andimi libunga na ye, batambwisi masuwa babwaki ye na mai, mpe mai mafandi nyee. Mbisi moko monene emeli mosakoli.—1:1-17.
Basaleli na Nzambe bakoki kondimisama ete akoyoka mabondeli na bango. Kati na libumu na mbisi, Yona asengi lisalisi epai na Jéhovah. Kati na libondeli oyo asali epai na ye, azali kotondo Nzambe mpo ete abikisi ye kati na mai mpe alaki kokokisa ndai na ye. Na nsuka, mbisi esanzi Yona likoló na mabelé makaoki.—2:1-10.
Yona akei na Ninive
Tokima te mikumba oyo Jéhovah azali kopesa biso. Lokola autaki mpenza kozwa mwa liteya wana, mosakoli azeli lisusu te ete babondela ye. Tala ye wana azali kosakola kati na “engumba monene”. Yona azali koyebisa likebisi ya petepete kasi ezali na ndimbola monene: “Naino mikolo ntuku minei mpe Ninive ekobomama.” Nzokande, likambo ya kokamwa Bato na Ninive babongoli motema mpe babiki na bolozi.—3:1-10.
Moto akoki kotya ndelo te na motema mawa ya Nzambe. Yona asiliki mpo ete Ninive ekobomama lisusu te. Nzokande, na kosalelaka nzete moko, Jéhovah amonisi ye ete akani komonisa motema mawa ndenge motema na ye molingi.—4:1-11.
Liteya tosengeli kozwa: Tokopengola mpasi soki tozali kotya likebi na bisakweli ya Nzambe. Tomekola bato na Ninive. Tomikitisa mpo na koyoka Yesu, mosakoli monene oyo aleki Yona.—Luka 11:32.
[Etanda na lokasa 30]
KOTALELAMA YA MWA MIKAPO NA BIBLIA
○ Obadia Verse—Na eleko oyo bazalaki kokoma Biblia, liloba “kolya biloko” elongo na moto elimbolaki mpenzampenza kozala na boyokani ya kondimana elongo na moninga moko. Lokola etondaki na botyoli, libota na Edome esengelaki kobomama na “mibali oyo bazalaki na kondimana” elongo na yango, elingi koloba Babilone. Ezali solo ete na eleko ya Nebukadanezare bapesaki epai na Baedomite eteni moko ya biloko oyo bazwaki na Yuda nsima na kobomama ya Yelusaleme. Kasi na nsima ya mikolo, mokonzi na Babilone Nabonide atiaki nsuka mpo na libela na lolendo ya mimbongo na Edome.
○ 10—Edome ekweisamaki mpo ete “ebomama libela na libela” na ntina na koyina na yango ya nsomo mpe mpo na ezaleli na yango ya kozanga bolingo ya solo epai na “bana na Yuda”, bandeko na bango. (Verset 12) Libota yango ekobomama na boye ete, awa na mabelé ekozala te na esika moko ya sikisiki, Mboka ya Edome oyo ezali na boyangeli mpe na libota. Lelo, libota moko te ekoki kobengama ete bazali bakitani na Baedomite; Edome ‘ekomi lokola soki ezalaki liboso te’.—Verset 16.
[Etanda na lokasa 28]
KOTALELAMA YA MWA MIKAPO NA BIBLIA
○ Yona 1:17—Mbisi na nkombo cachalo azali na motó mpe na mongongo monene mpo ete akoka komela moto. Atako mbisi na nkombo baleine bazali mingi te kati na mer Méditerranée, masuwa ya baluki baleines ezalaki kala kotelema na Joppé. Mpo na oyo etali mbisi monene na nkombo requin blanc ye ayebani mingi ete alandaka masuwa nyonso kati na mai monene Méditerranée mpe kolya biloko nyonso oyo bazali kobwaka kati na mai. Ye mpe akoki komela moto mobimba. Nzokande, kati na likambo ya Yona, Nzambe asalelaki mbisi moko monene”, mbala mosusu ekelamo moko oyo sianse esosoli yango naino te.
○ o 2:1, 2—“Kati na libumu na mbisi”. Yona azalaki mpenza na motindo ya bomoi esengeli te mpo ete akoka kosala loyembo na maloba kitoko. Nzokande akomaki na nsima makambo oyo ye amonaki na ntango yango. Maloba mosusu adefaki na oyo, kati na Nzembo, makokanaki na mayoki na ye oyo mautaki mpenza kati na nse ya motema na ye. Kokanisa Yona 2:2 elongo na Nzembo 120:1 mpe Nzembo 130:1 ; Yona 2:5 elongo na Nzembo 69:1.
○ o 3:3—Likambo ya kolekisa ndelo ezali te mpo na oyo etali bonene ya engumba Ninive. Engebene lolenge na yango, atako mapango na yango masangisaki nyonso bobele bakilometele 13, nkombo ya engumba yango ezalaki mpe kosalelama mpo na bamboka na yango ya zongazonga oyo mbala mosusu epalanganaki kino bakilometele 42.
○ o 3:10—Liloba na liebele oyo ebongolami na “ayokaki mawa” elimboli “kobongola likanisi mpo na likambo moko eleká (to ekanamaki)”. Na yango, Jéhovah akoki ‘kozala na mawa’ to kobongola likanisi mpe kobikisaka bato na masumu oyo bazali mpenza kobongola motema na bango mobimba.