Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/4 nk. 22-26
  • “Oyo ezali mokolo moleki monene mpenza”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Oyo ezali mokolo moleki monene mpenza”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bafandi-na-mpunda minei
  • Yoane ameki bonene na tempelo
  • Mokanda moke
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Ezekiele—II
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Tyá motema na yo na” Tempelo ya Nzambe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Yehova asalisaka biso tókokisa mosala na biso ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mokolo na Nkolo: Ekolimbola nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/4 nk. 22-26

“Oyo ezali mokolo moleki monene mpenza”

“Na nzela na elimo nazalaki na mokolo na Nkolo.”​—Emoniseli 1:10, M.N.

1. Tozali kobika lelo na “mokolo” nini, mpe mpo na nini ezali likambo na esengo?

OYO ezali mokolo moleki monene mpenza. Tala Mokonzi azali koyangela!” Lelo lisusu maloba yango ya móto, oyo malobamaki na 1922 na mokambi ya mibale ya la Société Watch Tower, mazali kosepelisa biso. Maloba yango mazali kokundolela biso ntango nyonso ete tozali kobika na eleko oyo eleki kitoko kati na Lisolo ya bomoi, oyo Biblia ebengi “mokolo na Nkolo”. (Emoniseli 1:10) Tozali solo kobika na “mokolo moleki monene mpenza”, oyo Jéhovah, na nzela ya Bokonzi na Klisto, akokokisa mikano na ye ya lokumu mpe akobulisa nkombo na ye ya mosanto liboso na bikelamu nyonso.

2, 3. (a) Boumeli ya mokolo na Nkolo ezali boni? (b) Epai wapi tokoki kozwa bandimbola ya sikisiki na ntina na mokolo yango?

2 Mokolo yango ebandaki na 1914 ntango Yesu atyamaki Mokonzi ya Bokonzi na Nzambe, mpe ekoumela kino na nsuka ya Bokonzi ya mbula nkoto, ntango Klisto “akozongisa bokonzi epai na Nzambe mpe Tata na ye”. (1 Bakolinti 15:24, M.N.) Baklisto ya sembo bazalaki kozela mokolo na Nkolo na motema likoló uta bikeke mingi. Sikawa esili kokoma! Kasi “mokolo eleki monene mpenza” elimboli nini mpo na libota na Nzambe mpe na mokili mobimba?

3 Kati na mikanda nyonso ya Biblia, ezali oyo ya Emoniseli nde elobeli mingi mokolo na Nkolo. Ebele na bisakweli ya mokanda yango bizali kokokisama na boumeli ya mokolo yango. Nzokande, Emoniseli ezali bobele mokanda na nsuka na molongo ya mikanda na bisakweli oyo bilobeli mokolo yango, lokola oyo ya Yisaya, ya Yilimia, ya Ezekiele mpe ya Danyele. Mikanda yango mizali kosalisa biso mingi na kokanga malamu ntina na bisakweli ya Emoniseli. Totala mpenzampenza ndenge nini mokanda na Ezekiele emonisi polele lolenge oyo Emoniseli ezali kokokisama na boumeli ya mokolo na Nkolo.

Bafandi-na-mpunda minei

4. Engebene Emoniseli mokapo 6, likambo nini esalemaki na ebandeli ya mokolo na Nkolo?

4 Na ndakisa, na mokapo ya motoba ya Emoniseli, ntoma Yoane alobeli emonaneli ya kokamwa! “Natali, mpe namoni mpunda mpembe, mpe mofandi na yango azalaki na litimbo. Motole epesami na ye, mpe abimi kolonga mpe kolonga lisusu.” (Emoniseli 6:2) Nani mofandi na mpunda yango oyo azali molongi? Ezali moto mosusu te bobele Yesu Klisto, oyo atyamaki Mokonzi ya Bokonzi na Nzambe mpe oyo azali likoló na mpunda mpo na kolonga banguna na ye. (Nzembo 45:3-6; 110:2) Kotambola na ye ya bolongi likoló na mpunda ebandaki na 1914, bobele na ebandeli ya mokolo na Nkolo. (Nzembo 2:6) Azwaki bolongi na ye ya liboso na kobwakaka Satana mpe badémo na ye na mabelé. Ebimisaki likambo nini mpo na bato? “Mawa na mokili mpe na mai monene”.​—Emoniseli 12:7-12.

5. Bampunda nini ya mawa balandi mofandi na mpunda ya mpembe, mpe nguya nini moko na moko azali na yango?

5 Kati na emonaneli, bampunda misato ya mawa balandi mpunda oyo ya liboso: mpunda motane, oyo azali elilingi ya etumba, mpunda moindo, azali elilingi ya nzala, mpunda na langi lokola mpondu, oyo mofandi na yango azali na nkombo “Liwa”. Mpo na mpunda oyo ya minei, totangi boye: “Natali, mpe namoni mpunda na langi lokola mpondu. Mpe mofandi na yango, nkombo na ye liwa. Mpe Hadès ebilaki ye penepene. Bokonzi likoló na ndambo na minei na mokili epesami na bango, mpo na koboma na mopanga, na nzala, na mpota na kufa, na banyama na yauli na mokili.​—Emoniseli 6:3-8; Matai 24:3, 7, 8; Luka 21:10, 11.

6. Kotambola na bafandi-na-mpunda yango ya nsomo ebimisi makambo nini na mabelé?

6 Uta 1914, engebene esakweli yango, bato bazali konyokwama makasi mingi mpenza na etumba, na nzala mpe na maladi. Kasi mofandi-na-mpunda ya minei azali mpe koboma na nzela na “banyama na yauli na mokili”. Yango ezali mpenza komonana uta 1914? Na kotalelaka esakweli ekokani na yango oyo ekomamaki na Ezekiele, tokokoka kokanga ntina na eteni yango ya esakweli.

7. (a) Esakweli nini Ezekiele alobaki mpo na Yelusaleme? (b) Esakweli yango ekokisamaki ndenge nini?

7 Ekoki kozala ete mbula mitano liboso na kobomama ya Yelusaleme na mobu 607 liboso na ntango na biso, Ezekiele asakolaki ete etumbu ya mpasi mpenza ekoya likoló na Bayuda mpo na kozanga na bango ya bosembo. Epusamaki ye na elimo na Nzambe akomaki ete: “Ekozala boye, mpe ekoleka boye wana ekotinda ngai makambo minei makasi na ngai likoló na Yelusaleme: mopanga, mpe nzala, mpe banyama mabe, mpe maladi mabe, mpo na kobikela moto mpe ebwele longwa na yango.” (Ezekiele 14:21; 5:17) Maloba oyo makokisamaki mpenza ndenge elobami, na eleko wana? Ntembe ezali te ete Yelusaleme ezalaki na nzala mpe na etumba ntango nsuka na yango ebelemaki. Nzokande nzala ebimisaka mbala mingi bamaladi. (2 Ntango 36:1-3, 6, 13, 17-21; Yilimia 52:4-7; Bileli 4:9, 10) Bongo banyama na yauli? Babomaki mpe bato na eleko wana? Ekoki kozala solo ete na eleko yango banyama babundisaki to mpe babomaki bato, mpamba te Yilimia asakolaki ete yango esengelaki kosalama.​—Levitike 26:22-33; Yilimia 15:2, 3.

8. Makama nini banyama na yauli babimisi na boumeli ya mokolo na Nkolo?

8 Bongo na mikolo na biso? Kati na mikili ya bozwi, banyama na yauli bazali lisusu likama lokola na kala te. Kasi, na mikili misusu, bazali se koboma, mingimingi soki totangi banyoka mpe bangando na molongo ya “banyama ya yauli ya mokili”. Bapanzi-nsango ya mokili mobimba balobelaka mingi te makama yango ya liwa, kasi mazangi te kopalangana mingi. Engebene mokanda Etando Mabele-kozindisama na mai (angl.), na lnde mpe na Pakistan bato mingi “bakufi na mpasi makasi na nsima na koswama na banyoka mabe” wana ezalaki bango kokima kozindisama na mai. Zulunalo lndia Today ekomi ete na Bengale Occidental basi koleka ntuku motoba babungisaki mibali na bango, oyo babomamaki na banyama ya zamba (tigres). Makama yango makoki kosalema lisusu mingi na mikolo mikoya, mpo na kozanga ya litambwisi malamu ya bato mpe kobakisama ya nzala.

9. Lolenge mosusu nini ya “nyama” ebimisi makama makasi mpe bampasi kati na bato na ekeke ya ntuku mibale?

9 Kasi Ezekiele azalaki kolobela lolenge mosusu ya “nyama” wana elobaki ye ete: “Basakoli na ye na kati na ye bazali lokola nkosi na kongala oyo apasoli nyama oyo ye akangi. Ee, bazali kolya bomoi na bato. . . . Mikonzi na ye na kati na ye bazali lokola bambwa na zamba baoyo bapasoli nyama oyo bango bakangi.” (Ezekiele 22:25, 27, M.N.) Na solo, ekomaka ete bato mpe bazali komitambwisa lokola banyama, mpe bato mabe yango babimisi minyoko mingi mpenza likolo na bato ya ekeke ya ntuku mibale. Mingi bakufi na maboko ya babomi na bato mpe na maboko ya bamosusu oyo bazali konyokola bato na ndenge ya banyama. Na ndenge yango, na lolenge ekeseni, liwa ezwi bato mingi na nzela na “banyama na yauli na mokili”.

10. Emonaneli na Yoane esalisi biso na kososola nini wana ezali yango kolobela etumba, nzala, maladi mpe banyama na yauli?

10 Etumba, nzala, maladi mpe banyama na yauli oyo elobelami kati na emonaneli na Yoane, esalisi biso na koyeba ete minyoko ya Yelusaleme na mobu 607 liboso na ntango na biso, esengeli kozala na makambo mingi makokani na yango na eleko na biso. Na bongo, mokolo na Nkolo esili komonisama na minyoko mpo na mokili, mingimingi mpamba te bakonzi na bato baboi kotosa Mofandi-na-mpunda ya liboso, Mokonzi oyo atyami Yesu Klisto. (Nzembo 2:1-3) Kasi mokolo na Nkolo elimboli nini mpo na basaleli na Nzambe?

Yoane ameki bonene na tempelo

11. Engebene Emoniseli 11:1 motinda nini Yoane azwaki, mpe verset yango elobeli tempelo nini?

11 Na Emoniseli 11:1, ntoma Yoane akomi ete: “Mokekele lokola lingenda epesami na ngai mpe elobami na ngai ete: Telema mpe meka monene na Tempelo na Nzambe, mpe etumbelo, mpe basambeli kati na yango”. Emekeli yango ya bonene na tempelo ya emonaneli, ezali na ndimbola monene mpo na libota na Nzambe. Tempelo nini Yoane amekaki? Ezali tempelo ya Bayuda te epai azalaki kosambela liboso ete akoma moklisto. Tempelo wana ebwakamaki na Jéhovah mpe ebomamaki na mobu 70 ya ntango na biso. (Matai 23:37 kino 24:2) Kasi, ezalaki nde tempelo monene ya elimo ya Jéhovah. Baklisto bapakolami bazali kosala lokola banganga-balandi kati na lopango ya tempelo yango ya elilingi, awa na mabelé.​—Baebele 9:11, 12, 24; 10:19-22; Emoniseli 5:10.

12. Tempelo yango ebandaki ntango nini, mpe makambo nini matali yango masalemaki na ekeke ya liboso?

12 Tempelo yango ebandaki na mobu 29 ya eleko na biso, ntango Yesu apakolamaki lokola nganga monene. (Baebele 3:1; 10:5) Banganga-balandi 144 000 basengelaki kosala kuna. Na ekeke ya liboso, mingi kati na bango baponamaki mpe batyamaki elembo, na nsima bakufaki na bosembo. (Emoniseli 7:4; 14:1) Nzokande na liwa na bango, baklisto yango ya liboso basekwisamaki na ntango wana te mpo na kokende na likoló, kasi balalaki kati na nkunda. (1 Batesalonike 4:15) Epai mosusu, botomboki to lipengwi monene ebimaki nsima na ekeke ya liboso, mpe etuluku ya banganga ya baklisto bapakolami etungisamaki na “matiti mabe”, bapengwi. (Matai 13:24-30) Na boumeli ya bikeke oyo bilandaki, ntina ezalaki mpenza ya komituna boye: ‘Mokolo ezali oyo banganga-balandi nyonso 144 000 bakotyama elembo?” ‘Baoyo bakufi na bosembo bakosekwa mokolo mosusu mpo na kosala kati na tempelo na likoló?’ Emekeli ya bonene na tempelo ya emonaneli emonisi ete eyano na mituna yango ezali ee. Ntina na yango ezali nini?

13. Likambo oyo ete Yoane amekaki bonene ya tempelo epesi kondimisama nini, mpe likambo nini esalemaki na ebandeli ya mokolo na Nkolo?

13 Kati na bisakweli ya Biblia, soki bameki bonene ya eloko, yango elakisaka mbala mingi ete mokano na Jéhovah oyo etali eloko yango ekokokana mobimba. (2 Mikonzi 21:13; Yilimia 31:39; Bileli 2:8) Na ndenge yango, lokola Yoane amekaki bonene na Tempelo ya emonaneli, yango ezalaki kondimisa ete mikano nyonso ya Jéhovah oyo mitali tempelo yango ekokokisama na boumeli ya mokolo na Nkolo. Engebene endimiseli yango, mpe engebene bosolo nyonso, uta mobu 1918 baklisto bapakolami oyo basilaki kokufa na bosembo babandaki kosekwisama mpo na kozwa esika oyo epesamelaki bango kati na tempelo ya likoló. (1 Batesalonike 4:16; Emoniseli 6:9-11) Kasi ekozala ndenge nini mpo na batikali ya ba 144 000?

14. Makambo nini mayelaki baklisto bapakolami liboso na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe na boumeli na yango?

14 Liboso ete mokolo na Nkolo ebanda, baklisto bapakolami baoyo babimaki na boklisto ya lipengwi babandaki koyangana kati na lisangá oyo ekabwanaki na yango. Bamizwelaki lokumu malamu ya bosembo na kosakolaka ntina ya mobu 1914, kasi na mbula yango ya kokata likambo, babandaki konyokolama, ‘banyatamaki’, wana Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ezalaki koya makasi koleka. Minyoko na bango mikomaki makasi mingi mpenza na 1918, ntango batambwisi ya la Société Watch Tower batyamaki na boloko mpe mosala na kosakola oyo ebongisamaki ezalaki lisusu mpenza kosalema te. Na eleko yango, tokoki koloba ete ‘babomamaki’. (Emoniseli 11:2-7) Emekeli ya bonene na Tempelo elimbolaki nini mpo na baklisto yango?

15. Na mokolo na Ezekiele, emekeli na mitango ya bonene na tempelo ya emonaneli elimbolaki nini mpo na libota na Nzambe?

15 Na 593 liboso ya ntango na biso, mbula 14 nsima na kobomama ya tempelo na Jéhovah oyo ezalaki na Yelusaleme, Ezekiele azwaki emonaneli ya ndako na Jéhovah. Akambamaki na biteni nyonso ya tempelo mpe atalaki yango, wana bazalaki komeka malamumalamu bonene mokomoko na yango. (Ezekiele mikapo 40 kino 42) Yango elimbolaki nini? Jéhovah ye mpenza alimboli yango ete: Emekeli ya bonene na tempelo ezalaki kotambola elongo na kotyama na komekama ya libota na Ezekiele. Soki bakomikitisa, babongoli mitema na mabunga na bango mpe batosi mibeko na Jéhovah, mitango ya bonene na tempelo ekoyebisamela bango. Emonani ete yango mbele ekolendisa bango na kolikya kosikolama mokolo mosusu na Babilone mpe kosambela lisusu Jéhovah kati na tempelo na ye.​—Ezekiele 43:10, 11.

16. (a) Emekeli ya bonene na tempelo ya emonaneli, oyo Yoane asalaki, epesaki kondimisama nini epai na basaleli na Nzambe na 1918? (b) Ndenge nini elikya yango ekokisamaki?

16 Ndenge moko, na 1918, soki baklisto balembaki bakokaki komikitisa mpe kobongwana na mabe na bango, bakokaki kosikolama kopambolama na Jéhovah mpe kokokisa mikumba na bango mobimba na oyo etali bibongiseli oyo tempelo na ye ezalaki elilingi na yango. Yango esalemaki mpe bongo. Engebene Emoniseli 11:11, “batelemaki na makolo na bango”, to basekwisamaki na elobeli ya elilingi. Emonaneli ya motindo yango oyo elobelami kati na mokanda na Ezekiele, ezalaki elilingi ya bozongi na Bayuda na mabele na bango. (Ezekiele 37:1-14) Na eleko na biso, ‘lisekwa yango’ ekokanaki na bozongi ya basaleli na Nzambe baoyo, wana elongwaki bango na ezaleli ya bolembu mpe ya kozanga kosala mpenza mosala, bazongaki lisusu na bomoi, batondaki na nguya: Bazalaki na likoki ya komipesa mobimba na mosala ya Jéhovah. ‘Lisekwa’ yango esalemaki na mobu 1919.

Mokanda moke

17. (a) Lobela makambo ya emonaneli oyo Yoane ayebisi na Emoniseli 10:1. (b) Mwanze yango azalaki nani, mpe emonaneli yango esengelaki kokokisama na boumeli ya mokolo nini?

17 Na Emoniseli 10:1, Yoane ayebisi ete amonaki “mwanze mosusu makasi kokita na likoló. Alataki lipata, mpe monama ezalaki na motó na ye, mpe elongi na ye lokola moi, mpe makolo na ye lokola makonzi na móto.” Maloba yango mazali kokundolela biso bimonaneli na Jéhovah oyo Ezekiele mpe Yoane basilaki komona. (Ezekiele 8:2; Emoniseli 4:3) Kasi awa, Yoane amoni mwanze nde Jéhovah te. Na bongo esengeli kozala mwanze oyo azali Mwana na lokumu ya Jéhovah, Yesu Klisto, oyo azali elilingi na Nzambe oyo akomonanaka te.” (Bakolose 1:15) Epai mosusu, Emoniseli 10:2 emonisi Yesu alatisami bokonzi monene, atii lokolo na ye ya mobali likoló na mai monene, mpe lokolo na ye ya mwasi likoló na mokili.” Na bongo mwanze yango azali elilingi na Yesu na boumeli ya mokolo na Nkolo.​—Tala Nzembo 8:4-8; Baebele 2:5-9.

18. (a) Yoane azwaki motinda ya kolya nini? (b) Na emonaneli ya motindo moko, Ezekiele azwaki motinda ya kolya nini mpe yango ebotaki nini?

18 Kati na emonaneli yango ya lokumu, Yesu asimbi na loboko mokanda moke oyo esengami na Yoane ete akamata yango mpe alya yango. (Emoniseli 10:8, 9) Na yango Yoane asali se lokola na Ezekiele oyo, ye mpe, azwaki na emonaneli motinda ya kolya mokanda. Mpo na Ezekiele, ezalaki Jéhovah ye moko nde apesaki mokanda. Mosakoli yango amonaki ete “maloba na kolela mpe na mawa mpe na bolozi makomamaki na yango.” (Ezekiele 2:8-10) Alobi: “Nalyaki yango mpe ezalaki na monoko na ngai elengi lokola mafuta na nzoi.” (Ezekiele 3:3) Kolya mokanda yango elimbolaki nini mpo na Ezekiele?

19. (a) Likambo oyo ete Ezekiele alyaki mokanda, ezalaki elilingi ya nini? (b) Bansango ya bololo oyo Ezekiele asengelaki kosakola ezalaki mpo na banani?

19 Ezali polele ete mokanda yango ezalaki na bisakweli oyo bipemamaki na Nzambe na kati na yango. Na kolyaka yango, Ezekiele andimaki etinda ya kosakola bisakweli yango mpe asalaki yango na lolenge ete ekomaki eteni moko ya bomoi na ye mpenza. (Tala Yilimia 15:16) Kasi makambo mazalaki kati na mokanda yango mazalaki elengi mpo na bamosusu te. Mpamba te mokanda yango etondaki na ‘maloba na kolela mpe na mawa mpe na bolozi’. Nsango yango ya bololo ezalaki mpo na nani? Elobamaki epai na Ezekiele libosoliboso ete: “Mwana na moto, kenda na ndako na Yisraele mpe lobela bango maloba na ngai.” (Ezekiele 3:4) Na nsima, nsango na Ezekiele etalaki mpe mabota na bapakano oyo bazingaki bango.​—Ezekiele mikapo 25 kino 32.

20. Likambo nini esalemaki ntango Yoane alyaki mokanda moke yango, mpe yango ebotaki nini?

20 Mpo na Yoane, kolya mokanda ebimisaki makambo makokani na oyo wana. Alobi: “Nakamati mwa mokanda yango na loboko na mwanze, nalei yango mpe na monoko na ngai ezalaki elengi lokola mafuta na nzoi, nde wana esilaki ngai kolya yango, libumu na ngai ekomaki bololo.” (Emoniseli 10:10) Kolya mokanda emonanaki mpe elengi mpo na Yoane. Akamwaki ete liloba na Jéhovah ékoma eteni moko ya bomoi na ye mpenza. Kasi nsango yango ezangaki mpe elengi. Mpo na banani? Eyano epesameli biso na maloba oyo malobamaki epai na Yoane: “Osengeli lisusu kosakola na ntina na bibele mpe mabota mpe minoko mpe bakonzi mingi.”​—Emoniseli 10:11.

21. Na 1919 baklisto bapakolami babandaki mosala nini oyo ekokani na likambo Yoane asalaki na kolyaka mokanda moke wana, mpe yango ebotaki nini? (b) Mosala yango ebotaki nini mpo na boklisto ya lokuta mpe mpo na mokili mobimba?

21 Na motindo nini bisakweli yango bikokanaki na boumeli ya mokolo na Nkolo? Ndenge makambo na lisolo ya bomoi na bato emonisi yango, na mobu 1919 baklisto ya sembo basimbaki mpenza libaku malamu ya kosalela Jéhovah na boye ete mosala yango ekomi eteni moko ya bomoi na bango mpenza, yango ezalaki solo elengi mpo na bango. Kasi libaku malamu na bango oyo epambolami emonanaki bololo mpo na bamosusu, mingimingi mpo na bakonzi na boklisto ya mokili oyo. Mpo na nini? Mpamba te baklisto bapakolami yango ya sembo basakolaki na molende nsango nyonso ya Jéhovah oyo etalaki bato. Basakolaki bobele “nsango malamu ya Bokonzi” te, kasi lisusu ezaleli ya kufa na elimo ya boklisto ya lokuta mpe ya mokili mobimba.​—Matai 24:14; Emoniseli 8:1 kino 9:21; 16:1-21.

22. (a) Kino sikawa, na motindi nini kitoko Jéhovah asalelaki baklisto bapakolami na boumeli ya mokolo na Nkolo? (b) Mokolo na Nkolo emonisami na nini mpo na mokili ya Satana, mpe mpo na basaleli ya Jéhovah?

22 Jéhovah asalelaki baklisto yango ya sembo mpo na koyanganisa basangani ya nsuka ya ba 144 000, mpo na kotya bango elembo mpe bango bazalaki bato na liboso baoyo bayanganisi ebele monene oyo bazali na elikya ya kofanda seko na mabelé. (Emoniseli 7:1-4, 9, 10) Ebele monene yango bazali na mokumba ya ntina kati na kokokisama ya mikano na Jéhovah oyo mitali mabelé, mpe boyei na bango ebimisaki esengo monene, ezala na likoló to na mabelé. (Emoniseli 7:11-17; Ezekiele 9:1-7) Na ndenge yango, “mokolo moleki monene mpenza” esili komonisama na bampasi mpo na mokili ya Satana, kasi na bolamu mingi mpo na basaleli na Jéhovah. Totala sikawa ndenge nini makambo makolanda kozala bongo kino na nsuka ya mokolo na Nkolo.

Bozongeli

◻ Mokolo na Nkolo ezali nini?

◻ Makama nini “banyama na yauli na mokili” babimisi na boumeli na mokolo na Nkolo?

◻ Likambo oyo ete Yoane amekaki bonene ya tempelo epesi kondimisama nini?

◻ Likambo oyo ete Yoane alyaki mokanda moke, ezalaki elilingi ya nini mpo na batikali bapakolami na 1919?

◻ Kino sikawa, mokolo na Nkolo elimbolaki nini mpo na libota na Nzambe mpe mpo na mokili mobimba?

[Elilingi na lokasa 25]

Lokola Yoane amekaki bonene ya tempelo, yango epesi bilikya makasi epai na baklisto bapakolami na boumeli ya mokolo na Nkolo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto