Biblia elobi mpenza nini mpo na koboma libala?
“OYO Nzambe asili kokangisa, tika te ete moto akokabola yango.” (Matai 19:6) Maloba na Yesu oyo mayebani mingi masalelamaka mbala mingi mpo na kosukisa milulu ya libala.
Kasi Yesu ateyaki ete mabala nyonso masengeli koumela seko mpe ete esengeli kopekisa ete libala ekufa te ata likambo nini oyo ekobima? Ezali yango tokoki kokanisa soko totaleli bobele liloba yango na esika na yango moko. Mpo na nini Yesu alobaki bongo? Abimisaki nde likanisi ya sika?
‘Longwa na ebandeli ezalaki bongo te’
Maloba oyo mabimi na eyano na Yesu epai na Bafalisai oyo batunaki ye: “Ebongi nde kolongola mwasi na ntina nyonso?” (Matai 19:3-6) Lokola basepelaki te na eyano na ye, Bafalisai batunaki ye boye: “Bongo mpo na nini Moïse alakaki mpo na kopesa ye mokanda na koboma libala mpe kolongola ye?” Na yango Yesu ayanolaki: “Moïse atikaki bino kolongola basi na bino mpo na makasi na mitema na bino, nde longwa na ebandeli ezalaki bongo te.” Mpe abakisi: “Nazali koloba na bino ete ye nani akolongola mwasi na ye, soko mpo na pite te, mpe akobala mosusu, azali kosala ekobo.”—Matai 19:7-9.
Ntango Yesu alobaki ete “longwa na ebandeli ezalaki bongo te”, azalaki kolobela mpo na libala oyo ezalaki kokufa na ‘kosalaka mokanda mpo na koboma yango’. Na maloba mosusu, ntango Nzambe abandisaki libala kati na Adam mpe Eva, alobaki na bango te ete bakokaki koboma libala yango ata mpo na “likambo nini”. Lokola bazalaki bato ya kokoka, Adam mpe Eva bakokaki kolonga solo kati na libala na bango. Bomoko na bango elingaki kolonga soko bazalaki ntango nyonso kolanda mobeko mpe mitinda ya Nzambe.
Ntango bato bakweaki na lisumu mpe na kozanga kokoka, libala mpe ebebaki. (Baloma 5:12) Boyokani kati na bato oyo bakomaki na ezaleli ya kozanga kokoka, ebebaki makasi mpe moimi na lokoso ekotaki na kati. Yango wana Yesu abengaki yango “makasi na mitema na bino”, mpo na yango Mibeko na Moïse epesaki nzela na koboma libala. Ata bongo, Yesu akundolaki epai na Bafalisai ete “longwa na ebandeli ezalaki bongo te”. Ata bazangaki kokoka, babalani basengelaki sikawa kotya makasi mpo na kosilisa mikakatano ya lolenge nyonso na esika ete yango epesa bango nzela ya koboma libala. Yesu apesaki ntina moko oyo ekoki koboma libala: pite. Pite ekoki bongo kozala ntina ebongi mpo na koboma libala.
Totala ndenge nini elobeli yango “soko mpo na pite te” esili kobimisa makanisi makeseni oyo mazali kosimba likanisi ya koboma libala. Bakonzi na Katolike baboi ntina yango mpamba te ekomami te na Lisolo ya Malako mpe ya Luka. Encyclopédie (angl.) ya McClintock mpe Strong epesi komantere elandi: “Ezali petee na kokokisa mikapo yango na koyebaka ete likambo oyo ekomami na mokanda elobi makambo se na mokuse, longola bobele soko etemeli yango. Na yango, lokola ntina bobele moko oyo ya koboma libala endimamaki epai na bato nyonso, Malako mpe Luka bamonaki mbala mosusu ete likambo ezalaki polele mpe batikaki kokoma yango.”
Lokola Yesu asalelaki liloba “pite” (gr. pornéia) kasi liloba “ekobo” te (gr. monkhéia), bamoko bazali koloba ete yango elimbolaki likambo ya mabe oyo, soko esalemaki liboso na libala, ekokaki koboma yango. Bato na mayele mingi oyo bayebi malamu makambo matali babalani bandimi ete pornéia elimboli “ezaleli ya mbindo, bondumba, pite” mpe ete na Matai 19:9 “elimboli to esangisi, ekobo”. Bamosusu bazali koloba ete Yesu atangaki bantina mingi ya koboma libala, kati na yango pite. Ata bongo, ndimbola nyonso wana ezali kotya mobulungano na mokapo yango.
Na kotalelaka nyonso wana, ezali polele ete Biblia elobi te ete mabala nyonso masengeli koumela libela to ete epekisami koboma libala ata mpo na ntina nini. Biblia epesi bongo ntina bobele moko ya koboma libala, “mpo na ntina na pite”.
“Tika ete libala ekumisama epai na bato nyonso”
Na kopesaka ntina moko ya koboma libala, Biblia etindi bato na koboma libala? Yango ezali komonisa libala lokola eloko mpamba? Ekitisi lokumu ya libala? To na kopesaka bobele ntina moko mpo na koboma libala, Biblia ezali nde kotya mokumba monene na mapeka ya baoyo bazali kobala?
Biblia emonisi libala lokola moko na bikanganeli eleki makasi oyo bato mibale bakoki kosepela na yango. Tala ndenge lisolo ya Genese elobi na ntina na libala ya liboso: “Yango wana moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye, mpe bango bakozala mosuni moko.” (Genese 2:24) Babalani basengeli bongo kobatela boyokani yango oyo esangisi bango lokola “mosuni moko”. Biblia etindi nde boye: “Tika ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana na mobali na mwasi ezala na mbindo te.”—Baebele 13:4.
Elobamaka mingi ete libala ya esengo mpe oyo ekoumela, ezali libala etongami na bolingo ya bisengo te, kasi na komipesa solo. Ezali yango mpenza Biblia elobi: “Bongo ekoki na babali ete balinga basi na bango lokola nzoto na bango mpenza. Ye oyo alingi mwasi na ye azali komilinga ye moko. Mpamba te moto te akoyina mosuni na ye moko nde akoleisa yango mpe akobatela yango pelamoko Klisto epai na Lingomba . . . ; mpe tika ete mwasi atosa mobali na ye.” (Baefese 5:28-33) Biblia epesi lisusu toli elandi na bosolo nyonso: “Mobali apesa mwasi yango ekoki na ye mpe bongo mwasi apesa mobali yango ekoki na ye. Mwasi azali na bokonzi likolo na nzoto na ye moko te kasi mobali azali na yango. Boye mpe mobali azali na bokonzi likolo na nzoto na ye moko te kasi mwasi azali na yango. Boboyana kati na bino te.”—1 Bakolinti 7:3-5.
Soko babalani bakolinga kotosa toli oyo ya mayele, bango mibale, libala na bango ekobeba te na boye ete moko aluka kosangana na moto mosusu na libanda ya libala, mpe yango ekobakisa boyokani oyo ekomisi bango “mosuni moko. Ata soko mobalani moko azali kotosa mitinda oyo ya Biblia te, mobalani mosusu oyo azali mondimi akoki solo kolikya ete bibongiseli ya Nzambe ebimisaka matomba malamu, ezaleli yango ekopengola mikakatano to ekosalisa mpo na kosilisa mikakatano kati na libala.
Na esika ya koyikisa mpiko na koboma libala lokola mwango oyo ekotya nsuka na libala ya mitungisi, Biblia etindi nde baklisto batya molende mpo ete libala na bango ezala ekanganeli makasi mpe ya esengo. Lisese moko ya Biblia elobi: “Sepela na mwasi na bolenge na yo. . . . yoka esengo na bolingo na ye libela.”—Masese 5:18, 19.
Koboma libala—Ezali nde nzela malamu?
Okosala nini soko mobalani na yo akabi nzoto na moto mosusu? Ekobo ebimisaka mikakatano minene kati na libala. Mobalani oyo asali ekobo ayokisaka moninga na ye mpasi mingi mpenza, na boye ete Makomami mapesi nzela mpo na koboma libala yango mpe kozala na likoki ya kobala lisusu. Kasi esengeli bobele koboma libala? Yango ezali mwango bobele moko?
Ata Jéhovah Nzambe apesi ntina ebongi mpo na koboma libala, tobosana te ete Biblia elobi lisusu ete Nzambe “ayini koboma libala”. (Malaki 2:16) Na yango, na esika ya kozwa ekateli nokinoki ete likambo mosusu ya kosala ezali te bobele koboma libala, mobalani oyo akwei na lisumu te akoki kolimbisa mpe koyokela mawa. Mpo na nini?
Koboma libala ekosilisa mpota te to kobengana mpasi ekomeli moto. Koyokela mawa mpe lilimbisi ezali na nguya yango, mingimingi wana mosumuki ayoki mawa mpo na ezaleli na ye ya mabe. Bolingo oyo emonisami na likambo motindo yango ekoki ata koyeisa lisusu libala makasi. Na kolandaka nyonso oyo touti koloba, mobalani oyo akwei na lisumu te akoki koluka koyeba likambo nini esengeli na ye kosala, na komikundolaka maloba oyo na Yesu: “Esengo na bango bakoyokela bamosusu mawa, mpamba te bakoyokela mpe bango mawa.”—Matai 5:7; tala Hosea 3:1-5.
Esengeli lisusu kokanisa na bampasi oyo ezali kozela bana kati na libota oyo tata mpe mama bakabwana, mpe kokanisa lisusu na ndenge moto oyo abomi libala akomiyoka wana akozala ye moko. Mokakatano yango mozali lisusu makasi mpo na basi oyo, na bisika mingi, bazangi mosolo mpo na kobikela. Ezali likambo ya mpasi mpo na mama ye moko, oyo azalaki na mokumba ya libota na boumeli ya bambula, na kozonga koluka kozwa mosala.
Basi mosusu ya mabala bamoni ete esengeli na bango komibongisa libela mpo ete ntango mosusu libala ekokufa. Mpo na yango, bazali komikomisa nkombo na bakelasi mosusu to mpe bazali kolanda mosala mpo bazanga mosolo te. Yango ezali makambo ya moto na moto. Nzokande, ekoleka malamu te na kopesa ntango wana mpe molende wana mpo na kobongisa libala oyo ekoumela mpe ya esengo na esika ya komibongisa mpo na libala oyo ekokufa mokolo mosusu? Soko akotya makasi mpo na kokolisa mbuma na elimo na Nzambe mpe kobatela etaleli malamu na elimo, mwasi moklisto azali na makoki mingi mpo ete alingama mpe akumisama epai na mobali na ye. Akoki mpe kotya elikya na ye epai na Nzambe oyo alakaki kokokisa bamposa ya baoyo bazali koluka liboso Bokonzi.—Matai 6:33; Masese 31:28-30; Bagalatia 5:22, 23.
Ndenge likambo yango ekosuka libela
Awa ezali naino biso kobika kati na biloko mabe na ntango oyo, tosengeli komizela ete tokutana na mikakatano kati na libala. Likoki ezali mpo na kokitisa yango to kolonga yango na kolandaka mitinda ya Biblia. Na koleka, mibali mpe basi oyo balingi kolanda mitinda ya Biblia kati na libala na bango mpe na makambo mosusu ya bomoi na bango bazali na elikya kitoko ya kokota na ebongiseli ya sika epai kuna “boyengebene ekozala”.—2 Petelo 3:13.
Na ebongiseli yango ya sika, libota na bato ekosikolama na libebi nyonso mpe na makambo nyonso mabe mabimi mpo na lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka. Ntango nyonso oyo libala ekoumela awa na mabelé, ekosengela kozala ‘lokola na ebandeli’; moto moko te akoki lisusu kokabola oyo esili Nzambe kokangisa esika moko.
[Elilingi na lokasa 5]
Yesu ateyaki nini na ntina na koboma libala?
[Elilingi na lokasa 7]
Kati na mokili ya sika, mikakatano ya babalani oyo mizali koboma libala mikolimwa libela