Tozala basali elongo na Jéhovah mpe totyela ye motema
“E moto, asili koyebisa yo oyo ezali malamu! Jéhovah alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopolo esika moko na Nzambe na yo.”—MIKA 6:8.
1. Engebene Biblia, na moboko nini basaleli nyonso ya Jéhovah bakoki lelo kobengama “basali” elongo na ye?
NTOMA Yoane akomaki: “Tala motindo na bolingo bosili Tata kopesa biso ete tobyangama bana na Nzambe; tozali mpe bongo.” (1 Yoane 3:1) Mpo na ntoma Paulo, tala oyo alobaki na ntina na ye moko mpe na ntina na moninga na ye Apolo: “Tozali basali na Nzambe elongo.” (1 Bakolinti 3:9) Maloba oyo mibale, malobamaki na bayekoli na Yesu Klisto bapakolami na elimo, matali bayekoli bapakolami. Nzokande malako na yango matali basaleli nyonso ya sembo ya Nzambe. Tokoki bongo koyeisa yango mokuse na liloba moko ete: ‘Tala motindo na bolingo Tata asili kopesa biso, mpo ete tozala basali elongo na Jéhovah.’
2. Mpo na nini basaleli ya Jéhovah bakoki kozala basali na ye elongo?
2 Ndenge nini bato na bolembu mpe na kozanga kokoka bakoki kozala basali elongo na Mozalisi monene, ye oyo azali na nguya mpe mayele ezangi nsuka, ye oyo akoka na boyengebene mpe azali bolingo? Bato bakoki kozala basali elongo na Nzambe, mpamba te bankoko na bango na liboso bazalisamaki na elilingi mpe na motindo na Mozalisi mpe na moninga na ye ya mosala, Liloba. (Genese 1:26, 27; Yoane 1:1) Ee, Adam na Eva bazwaki ndambo na mayele, na boyengebene, na nguya mpe na bolingo. Yango wana Jéhovah, na nsima na mosakoli na ye, alobaki boye epai ya basaleli na ye na mabelé: “E moto, asili koyebisa yo oyo ezali malamu! Jéhovah alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopolo esika moko na Nzambe na yo.”—Mika 6:8.
3. Mika 6:8 esengi nini, mpe tosengeli kosala nini liboso ya kozala mosali elongo na Jéhovah?
3 “Jéhovah alingi nini epai na yo? Bobele ete . . . ” Mwa eteni oyo ya liloba emonisi lokola ete oyo elandi elakisi nyonso oyo moto azali na yango lokola mikumba liboso ya Jéhovah mpe liboso ya bato mosusu. Boyekoli ya eteni oyo ekomonisa biso na meko nini ezali bongo. Ya solo, kotambola elongo na Jéhovah ezali mpo na moto nyonso te; libaku malamu oyo epesami bobele na bato oyo, na elobeli ya elilingi, ‘basili kokutana na ye nsima na kopesana rendez-vous’. (Amos 3:3) Ndenge nini? Lokola emonisi yango lisolo ya liboso, na komipesa mobimba epai na Ye mpe na komonisa elembo na yango na batisimo. Na bongo, Mika 6:8 elimboli nini mpo na bato yango?
‘Tosala na boyengebene’
4. “Kosala na boyengebene” elimboli nini?
4 Ya liboso, esengeli na biso ‘kosala na boyengebene’. Mpo na kozala basali elongo na Jéhovah, tosengeli kobatela lisosoli na biso mpeto. ‘Kosala na boyengebene’ elimboli kosala makambo na bosembo, oyo Nzambe asengi na biso; na maloba mosusu, tosengeli kokokisa mikumba na biso, ya liboso esengi na biso komipesa epai na Jéhovah mpe kosalela bobele ye. (Nahumu 1:2) Mpamba te Jéhovah aboi bombanda. Tokoki kozala baombo ya bankolo mibale te.—1 Bakolinti 10:22; Matai 6:24.
5. Ndenge nini Yesu Klisto amonisaki ete alingi boyengebene mpe ayini mabe?
5 Epai mosusu, mpo na ‘kosala na boyengebene’, tosengeli lokola esalaki yango Yesu, ‘kolinga boyengebene mpe koyina mabe’. Mpo ete alingaki boyengebene, Yesu azalaki ntango nyonso “bulee, na lofundo te, na litono te, oyo atangolami na bato na masumu” (Nzembo 45:7; Baebele 7:26); mpe lokola ayinaki mabe, asilikaki na bosembo nyonso mpe akweisaki makasi bakonzi na mangomba oyo bazalaki na bokosi mpe na lokoso na ntango na ye.—Matai 23:13-36; Yoane 8:44.
6. Mpo na nini ekoki kaka te na kondima ete likambo boye to likambo boye epekisami?
6 Lokola emonisi yango ndakisa ya Yesu, ekoki te bobele kolinga boyengebene: esengeli na biso lisusu koyina mabe- ee, koboya mabe, kotiola yango, komona yango lokola mbindo makasi, salite. Lokola bamposa na biso ezalaka mabe uta bolenge na biso mpe motema na biso ezali na yauli, ekoki te bobele kosuka na likanisi oyo ete mabe epekisami. (Genese 8:21; Yilimia 17:9) Soki tokopika te mpo na kotelemela makasi bamposa mabe mpe masenginya oyo mazali koyela biso, tokokwea kati na yango. Tosengeli mpenza koyina mabe ndenge Finehase amonisaki yango ntango abomaki na likonga mobali moko mpe mwasi moko oyo bazalaki kosala pite mpe kosambela Baala ya Peolo.—Mituya 25:5-8.
7. Litatoli nini emonisi ete basali na mabe bakoki kozala baninga na mosala na Jéhovah te?
7 Jéhovah alingi bato mabe te na kati ya baninga na ye ya mosala; amonisaki yango polele na Nzembo 50:16-18: “Kasi Nzambe alobeli moto mabe ete, Boni okosakola maloba na ngai mpe okoloba kondimana na ngai na monoko na yo? Yo oboyi toli mpe obwaki maloba na ngai na nsima na yo. Soko yo omoni moyibi, osepeli na ye; mpe bondeko na yo ezali elongo na bato na pite.”
8. Pesa lisolo moko emonisi ete tokoki kobwaka nsoni likoló na nkombo ya Jéhovah soki tokwei na mabe?
8 Mbala mosusu tozali na móto mingi kati na mosala ya Jéhovah, kosakolaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, kasi soki tozali kosenzela te mpe soki toyebi komipekisa te, bolembu na biso ya mosuni ekoki komema biso kino kobuka mibeko ya Jéhovah mpe kobwaka nsoni likoló na nkombo na ye. Na ndakisa, eleki mwa bambula, nkulutu moko asalaki ekobo elongo na ndeko mwasi moko oyo mobali na ye azalaki moklisto te. Na mpokwa oyo bapesaki liyebisi ete nkulutu wana abimi na lisangá, mobali ya ndeko mwasi wana akotaki na Salle du Royaume, azalaki na monduki mpe abetaki masasi epai ya nkulutu wana mpe ndeko mwasi wana oyo basalaki ekobo. Moko te akufaki kati na bango mibale, kasi na mokolo elandaki, nsango yango ekomamaki na lokasa ya liboso na zulunalo eleki monene na Etats-Unis. Ya solo, soki basaleli ya Jéhovah basali mabe, yango ezali koyokisa ye nsoni mingi.—Masese 6:32.
9. Engebene Masese 4:23, eloko nini tosengeli kobatela malamu, mpe mpo na nini?
9 Ntina wana tosengeli kosimba malamu toli oyo: “Batela motema na yo [koleka biloko nyonso] mpo ete makambo na bomoi makoutaka wana.” (Masese 4:23) Na yango, tosengeli komipesa disipline mpe kosenzela likoló na makanisi ya motema na biso. Lelo oyo, télévizió, bazulunalo mpe biloko mosusu, ezali kolakisa lolenge nyonso ya bosoto, kotalisaka bolumbu ya basi mpe mibali. Yango wana, tosengeli kopona malamumalamu biloko tozali kotala, tozali koyoka mpe tozali kotanga. Ezali likambo ya ntina mingi ete toyeba kopekisa makanisi na biso. Na ndakisa, ezali mpasi te na komona ete tobandi kosepela na kotambwisa makanisi ya pite kati na elimo na biso, nzokande toyebi na malamu ete tokoki kosala makambo wana te. (Matai 5:28) Atako bongo, mbala mingi makanisi ya boye ekomemaka moto kino na kosala makambo mabe. Na esika ete totelemisa makanisi na biso na makambo wana, tomonisa nde mbuma ya elimo santu, kati na yango komipekisa mpe totya makanisi na biso likoló na makambo matangami na Bafilipi 4:8.—Bagalatia 5:22, 23.
‘Tolinga boboto’
10, 11. (a) Liloba ya hébreu ebongolami na bosembo ezali na likanisi nini? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Mwana na Nzambe azalaki sembo?
10 Lisengami ya mibale engebene Mika 6:8 ezali boye ete ‘tolinga boboto’. Biblia ya Osty ebongoli liloba yango boye ete ‘tolinga bosembo’. Note moko ya Traduction du monde nouveau oyo ezali na mitindami, na monoko na Anglais, mpe ebimaki na 1984, emonisi ete liloba ya hébreu hèsèdh, oyo ebongolami na “boboto”, ekoki mpe kobongolama na “motema malamu” to “bolingo ya sembo”. Engebene bato oyo bakomaka diksionere, liloba “sembo” ezali na likanisi ya koyeba kotelema ngwi liboso na masenginya nyonso ya kolongwa na molongo to koteka baninga. Moto oyo azali sembo azali motosi na mibeko mpe na bilaka na ye. Kozala sembo elimboli lisusu kobundela moto moko to likambo moko, mpe kokende kino nsuka atako mikakatano nini oyo okoki kokutana na yango. Esengeli toyeba ete ntango liloba “bosembo” esalelami mpo na kobongola liloba hèsèdh, esalelamaka te mpo na kolobela biloko bizangi bomoi. Ya solo, kati na libongoli na biso, liloba “sembo”, okokuta yango ntango mosusu epesami na bankombo oyo ezali kotanga biloko. Na ndakisa, bakolobaka mpo na sanza ete ezali “motatoli na sembo kati na makolo”. (Nzembo 89:37) Kasi awa liloba “sembo” ebongoli liloba mosusu ya hébreu. Elobami mpe mpo na maloba na Nzambe ete mazali sembo, elingi koloba ete ntembe ezali te mpo na yango, mpe tokoki kotyela yango motema. (Emoniseli 21:5; 22:6)a. Nzokande, ezaleli ya bosembo, na ntango liloba yango esalelami mpo na kobongola liloba ya hébreu hèsèdh, ezali bobele mpo na Nzambe mpe mpo na basaleli bandimami epai na ye. Yango wana esili kokomama boye na ntina na Jéhovah ete: “Epai na moto na sembo okomimonisa sembo.”—2 Samwele 22:26.
11 Na likoló, Mwana na Nzambe azalaki sembo epai na Jéhovah. Na mabelé, ekomaki ye moto Yesu Klisto, azwaki mpasi mpe amonisaki na botosi na ye ete azali moto ya sembo; ezali yango emonisi Baebele 5:7-9: “Na mikolo na bomoi na ye, [Klisto] atombolaki mabondeli mpe malombo na konganga makasi mpe na mpisoli epai na ye oyo ayebi kobikisa ye na kufa mpe ayokami mpo na kotosa na ye malamu. Ata azalaki Mwana, ayekoli kotosa mpo na koyoka mpasi, mpe esili ye kobongisama kwa, akomaki eutelo na lobiko na seko mpo na bango nyonso bakotosaka ye.”
Bosembo na biso emekami
12. Ndenge nini bosembo na biso emekamaka mbala mosusu, mpe bamoko basalaka nini liboso ya komekama yango?
12 Mpo na kozala sembo epai na Jéhovah Nzambe, tosengeli mpe kozala sembo epai na basaleli na ye oyo bazali awa na mabelé, na maloba mosusu kozala sembo epai na baninga na biso baklisto. Mpe ntoma Yoane akundoli biso yango na maloba ya polele: “Ye oyo akolingaka ndeko na ye te, awa esili ye komona ye, akolonga kolinga Nzambe te, oyo amoni naino ye te.” (1 Yoane 4:20) Ekoki kozala ete bosembo na biso emekami mpo na mabunga ya bato mosusu. Na ndakisa, baklisto mosusu bazalaka na bolembu soki bazokisami: bamimonisaka sembo te na lisangá ya Jéhovah mpe batiki koyangana na makita ya lisangá. Bosembo na biso epai ya bandeko na biso ekoki mpe komekama ntango bandeko oyo Jéhovah atii liboso na biso basali mabunga kati na bikateli oyo bazali kokamata. Bamosusu bazali kosalela mabunga wana lokola libaku mpo na kotika lisangá ya Jéhovah. Kosala motindo yango ezali malamu? Soko moke te.
13. Mpo na nini bato oyo bazali kotika lisangá ya Jéhovah bazali na elonga te, mpe baoyo bazali kosala bongo kozanga bosembo bakoki kokende bobele wapi?
13 Mpo na nini bato yango bazali na elonga te na kotika lisangá ya Jéhovah? Mpamba te Biblia epesi biso elikya oyo ete: “Kimya mingi ezali na bango balingi mobeko na yo [ya Jéhovah]; libaku ezali liboso na bango te.” (Nzembo 119:165) Tozwaki mpe etinda oyo: “Liboso na makambo nyonso bolingana makasi, mpo ete bolingo ekozipaka ebele na masumu.” (1 Petelo 4:8; Masese 10:12) Soki moto atiki libota ya Jéhovah, akokende wapi? Ekozala lokola mpo na bantoma na Yesu ntango atunaki bango soki balingi kotika ye. Petelo nde ayanolaki ete: “Nkolo, tokende epai na nani? Yo ozali na maloba na bomoi na seko.” (Yoane 6:68) Moto oyo atiki lisangá ya Jéhovah azali na epai mosusu ya kokende te bobele kozonga na “Babilone Monene”, lisangá ya mokili mobimba ya losambo ya lokuta, to na monoko na “nyama na yauli”, lisangá na politike oyo Satana azali nkolo na yango. (Emoniseli 13:1; 18:1-5) Mpo na mingi oyo bazali kotika biso, bazali kosalela matomba ya “Babilone Monene”, lisangá oyo ezali koyokisa Nzambe nsoni.
‘Totambola na bopolo esika moko na Nzambe na biso’
14, 15. (a) Wapi ndimbola ndenge na ndenge ya liloba “bopolo”? (b) Ndimbola nini ya liloba “bopolo” tozali kotalela mpenzampenza awa, mpe mpo na nini? (c) Mpo na nini baklisto basengeli kozala na ‘bokatikati, kozanga lolendo mpe kozanga komikumisa mpo na bizaleli na bango’?
14 Liloba “bopolo” ekoki kozala na ndimbola mingi: ekoki kosalelama mpo na kolobela eloko oyo ezali “petee, ezangi kongenga, ezali na motuya mingi te”; ekoki mpe kolimbola: “bopeto, limemya, ezaleli malamu” (1 Timote 2:9); mpo na kosukisa, mpe yango nde eleki ntina, ezali na ndimbola ya “bokatikati, kozanga lolendo, kozanga komikumisa mpo na bizaleli na yo”, mpe esalelami mpo na moto ayebi bandelo na ye. Tokoki kozala baninga na mosala na Jéhovah te soki tozali na lolendo, soki tozali koluka ete bato bakumisa biso na esika ete bakumisa Jéhovah Nzambe.
15 ‘Bokatikati, kozanga lolendo, kozanga komikumisa mpo na bizaleli na yo’, tala ndimbola epesami na liloba ya hébreu oyo ebongolami na liloba “bopolo” kati na Mika 6:8. Ndimbola yango ezali polele na motindo liloba yango esalelami kati na Masese 11:2, esika mosusu bobele moko kati na Makomami na hébreu epai liloba yango ezwami; na eteni yango, etemisami na pite te kasi na lolendo to njombo, ndenge emonanaka mingi epai na bato bazali komitanga ete bazali bato minene. Tala oyo ekomami na mokapo yango: “Ekoya njembo (lolendo), nsoni ekoya lokola; nde mayele ezali elongo na basokemi (bato ya bopolo).” Bopolo ezali ntango nyonso esika moko na kobanga Jéhovah, mpe kobanga Jéhovah ezali ebandeli na mayele. (Nzembo 111:10) Moto na bopolo akobangaka Jéhovah mpo ayebi ete aleki ye na monene, na boyengebene mpe na nguya, nzokande moto azali ekelamu na bolembu mpe azangi kokoka. Ntina wana moto na bopolo azali kosala mpo na lobiko na ye na nsomo mpe na kolenga.—Bafilipi 2:12.
16. Pesa ndambo na mikapo kati na Makomami, oyo emonisi ete baklisto basengeli kozala ntango nyonso na bopolo.
16 Basali elongo na Jéhovah bazali na bantina mingi na kotambola na bopolo elongo na Nzambe na bango, kasi bazali na ntina moko te ya komikumisa, atako mayele na bango ezali boni, soki mpe makasi, soki mpe bozwi. (Yilimia 9:23) Maloba makomami na 1 Bakolinti 4:7 malakisi biso mpo na nini: “Mpo ete nini ekesenisi yo na bato mosusu? ozali na eloko nini oyo yo opesameli yango te? Soko opesameli yango, mpo na nini ozali komikumisa lokola ete opesameli te?” Bobele bongo, tosengeli komikumisa te mpo na matomba ya mosala na biso, soki tolandi toli oyo epesameli biso na 1 Bakolinti 3:6, 7: “Ngai nakonaki, Apolo amwangisaki mai kasi Nzambe akolisaki; Mokoni azali eloko te, momwangisi na mai eloko mpe te nde bobele Nzambe mokolisi.” Maloba na Yesu makomami na Luka 17:10 masengeli mpe kosalisa biso ete tozala ntango nyonso na bopolo: “Bongo mpe bino, soko bosili kosala makambo nyonso malobameli bino, loba ete, Tozali se baombo mpamba. Tosili kosala bobele yango esengamaki na biso ete tosala.
17. Mpo na nini bopolo ezali solo nzela na mayele?
17 Bopolo ezali solo nzela ya mayele; ezali kosalisa biso ete tosepela ata na libaku malamu nini oyo epesameli biso. Soki tozali na bopolo, tokoluka lokumu te, kasi tokozala na esengo na komitambwisa lokola ‘bana’. (Luka 9:48) Tokozala bongo na makanisi moko na mokomi na nzembo, oyo alobaki ete: “Mpo ete mokolo moko kati na lopango na yo eleki mikolo mosusu nkoto na malamu.” (Nzembo 84:10) Epai mosusu, soki tozali na bopolo, tokozala na bolingo oyo ekopusa biso ete topesa ndakisa malamu mpo na oyo etali kokumisa bazalani na biso.—Baloma 12:10.
Bilenge basengeli kozala na bopolo
18. (a) Mpo na nini ezali likambo na ntina mingi mpo na bilenge ete bazala na bopolo? (b) Tanga makambo mamonisi ete bilenge mbele basengeli kozala na bopolo?
18 Mpo na bilenge, ezali likambo na ntina mingi ete bazala na bopolo; na yango, ezaleli ya Elihu ezali ndakisa malamu mingi mpo na bango! Atako azalaki na maloba na sembo, azelaki na limemya nyonso ete bato na mbula mingi baloba. (Yobo 32:6, 7) Mbala mingi bilenge bamonisaka ete bayebi makambo mingi mpe babosanaka bandelo na bango. Ntango mosusu bakotiolaka mikóló na bango mpo baleki bango na makasi to mpo bayekoli mingi koleka bamikóló na bango. Nzokande, kotanga kelasi mingi elimboli te ete moto akomi na mayele (sagesse); mpamba te mayele to sagesse elimboli koyeba kosalela malamu boyebi (connaissance) oyo osili kozwa yango. Na ndakisa, talela matomba mabe epai ya bilenge ya Etats-Unis: Na kati ya bato bakangami mpo na mabe monene 63% balekisi naino mibu 24 ya mbotama te, mpe 30% na kati na bango bakokisi naino mibu 18 ya mbotama te. Bayebisi lisusu ete “milangwa ya masanga makasi mpe drogue, yango nde ezali koboma bilenge mingi na Amerike, baoyo bazali na mbula kobanda 15 kino 24”. Bobele na Etats-Unis, “mabala mingi na kati na bilenge ezali kosuka na divorce”, nzokande, balobi lisusu ete “mabala mbele makoki koumela soki ba fiancés bazelaki lisusu mwa bambula ete bakoka kokemba na makanisi na bango”.
19. Toli nini ezwami na Biblia esengeli na bilenge ete basimba yango na motema?
19 Toli ya Liloba na Nzambe ezali toli ya mayele mingi. Yango elakisi bilenge ete bakumisaka tata mpe mama mpe batosa bango na makambo nyonso. (Baefese 6:1-3; Bakolose 3:20) Bilenge basengeli mpenza kosimba na motema na bango toli oyo ya mayele mingi: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba mpe ndima bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndima ye mpe ye akotambolisa yo.”—Masese 3:5, 6.
20. Bato oyo bamipesi epai na Jéhovah mpe babatisami bakoki kolikya kozwa mbano nini soki bakosalela Mika 6:8?
20 Soki, nsima na komonisa elikya na biso epai na Jéhovah na komipesa epai na ye mpe na kozwa batisimo, ‘tosali na boyengebene, tomonisi bolingo ya sembo mpe totamboli na bopolo esika moko na Nzambe na biso, mbano nini tokoki kolikya biso banso’? Ya liboso, mpe yango nde eleki ntina, tokondimama epai na Jéhovah mpamba te tozali kotosa mibeko na ye, mpe tokosepelisa motema na ye mpo ete tosangani na kokumisa nkombo na ye monene mpe na nsomo. (Masese 27:11) Mpo na kosukisa, tokomona kati na bomoi na biso bosolo ya liloba oyo ete “bizaleli na moto na Nzambe ekopesaka litomba na nzela nyonso, awa ezali yango na elaka na bomoi mpo na sikawa mpe mpo na ntango ekoya”.—1 Timote 4:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ouest na Etats-Unis, ezali na liziba moko ebwakaka mai libanda (geyser) nsima na minute 65 mbula nyonso; ezali kosala boye uta mbula mingi. Ntina wana babengaka yango Vieux Fidèle, mpo ete ezali sembo na mosala na yango.
Bozongeli
◻ Engebene Mika 6:8, eloko nini esengeli na biso mpo na “kosala na boyengebene”?
◻ Boyokani nini ezali kati na bosembo na biso epai na Jéhovah mpe boyokani na biso elongo na baninga na biso baklisto?
◻ Mpo na nini tosengeli ‘kotambola na bopolo elongo na Nzambe’?
◻ Mpo na nini bopolo ezali litomba mingi mpo na bilenge baklisto?
[Elilingi na lokasa 20]
Obatelaka motema na yo na koponaka malamumalamu makambo oyo okotala, okoyoka mpe oyo okotanga?
[Elilingi na lokasa 21]
Petelo ayebaki malamu ete akokaki kokenda epai mosusu te mpamba te Yesu azalaki na “maloba na bomoi na seko”. Yo mpe ozali na ekateli ya kotikala sembo na lisangá na Jéhovah?