Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/6 nk. 10-15
  • Basaleli ya Nzambe oyo bazali minzemba bazangi eloko te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basaleli ya Nzambe oyo bazali minzemba bazangi eloko te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala eleki ntina mpo na moklisto
  • Ba ministres ya Nzambe bazangi eloko te
  • Baklisto oyo babali ‘bakabwani’
  • Moklisto oyo abali akoki kozala mosaleli na Nzambe oyo akoki te?
  • Minzemba mpo na Bokonzi
  • Baklisto minzemba basengeli kokumisama
  • Kotikala monzemba: lolenge moko ya bomoi epambolami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Bonzemba​—⁠libaku mpo na mosala mosalemi na likebi nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Minzemba oyo bazali kosepela na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • ‘Okotikala na bomoi’ lokola Yirimia?
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/6 nk. 10-15

Basaleli ya Nzambe oyo bazali minzemba bazangi eloko te

“Ye oyo akobala akosala malamu, kasi ye oyo akobala te akosala malamu koleka.”​—1 Bakolinti 7:38.

1. Na makambo nini tokoki koloba ete libala ezali lipamboli?

MOKANO ya Jéhovah ezalaki te ete mobali ya liboso afanda monzemba. Azalisaki mwasi mpe apesaki ye epai na Adame, tata ya libota mobimba ya bato, mpo ete azala mobalani na ye. (Genese 2:20-24; Misala 17:26) Libala ezali mpenza lipamboli! Ezali kopesa nzela na bato mibale ete bafanda elongo mpe basalisana, ezali ebongiseli ya lokumu na nzela na yango bana bakoki kobotama, mpe ezali mpenza kopesa bato bolamu. Ata babola mpe banyokwami bakoki kozwa esengo oyo ebimisami na bolingo ya libala, bolingo oyo ekoki kosombama te.​—Loy. 8:6, 7.

2, 3. (a) Mokanda moko ya lingomba elobi nini na ntina ya libala mpe bomoi ya monzemba? (b) Engebene Makomami, ndenge nini tokoki kotalela libala?

2 Nzokande, bamoko bazali na likanisi mosusu mpo na libala. Tala makambo oyo tokoki kotanga kati na mokanda moko ya lingomba: “Mobeko ya lingomba esengi na makasi ete bakonzi na Lingomba (Eglise latine) batikala banzemba; epekisi kotalela lokola ministres bato oyo basili kobala mpe epekisi libala epai na baoyo basili komipesa na mosala ya Nzambe. Elimboli ete basengeli kobatela na likebi nyonso elaka na bango ya kotikala baseka. Yango ezali bongo mpo na kokokisa mikano milandi: mpo ete baoyo bakomi ba ministres bamipesa bobele na mosala ya Nzambe, (1 Bakol. 7:32) mpe na kozalaka na bomoi ya motindo yango bamibatela baseka, ezalela oyo eleki mosantu mpe lokumu koleka ezalela ya libala. Kati na Kondimana na sika, kozala monzemba etyami na molongo moko oyo eleki libala.”​—Encyclopédie Catholique (Angl.) ekomamaki na litambwisi ya Robert Broderick.

3 Ekoki kozala ete kotikala monzemba na makasi ezala mpenza likambo ‘eleki mosantu mpe malamu koleka libala’? Ezali yango te emonisami kati na “Kondimana na Sika”, epai tozali kokuta maloba malandi, oyo ebongolami na motindo elandi kati na Biblia ya Yelusaleme, libongoli moko ya katolike: “Elimo elobi mpenza ete, na ntango na nsuka, bamoko bakoangana kondima mpo na komipesa na bilimu ya bokosi mpe bindimeli ya Satana, bakobendama na bakosi oyo lisosoli na bango ebebisami na ebende ya motane: bato yango bazali kopekisa libala mpe bilei oyo Nzambe azalisaki mpo elyama nsima na matondi epai na bandimi mpe baoyo bazali na boyebi na solo.” (1 Timoté 4:1-3) Ee, libala ezali likabo ya Nzambe, likabo oyo eleki kitoko.​—Luta 1:9.

4. Wana ezali biso kotonga 1 Bakolinti 7:38, mituna nini tokoki komituna?

4 Nzokande, ata libala ezali likabo ya Nzambe, ntoma Paulo akomaki: “Ye oyo akobala akosala malamu, kasi ye oyo akobala te akosala malamu koleka.” (1 Bakolinti 7:38) Mpo na nini ntoma alobi ete eleki malamu kotikala monzemba? Moklisto oyo abali te akoki komiyoka lokola ete azali mosaleli na Nzambe oyo akoki te? Bolamu nini ekoki kozwama na kotikala monzemba?

Mosala eleki ntina mpo na moklisto

5. Mosala eleki ntina mpo na moklisto esengeli kozala mosala nini?

5 Tozala baklisto minzemba to baklisto oyo babali, mosala ya Jéhovah esengeli kozala mosala na biso oyo eleki ntina. Mosala ya bosantu oyo tozali kosalela Jéhovah na esengo nyonso, ye Nkolo Moyangeli na molongo mobimba, ezali komonisa ete tozali na bokangami epai na ye. Tokoki komonisa bokangami yango na kotosaka ye na motema mobimba mpe na kosanganaka na molende nyonso na mosala ya boklisto. (1 Yoane 5:2, 3; 1 Bakolinti 9:16) Nzokande, minzemba bakoki komipesa mobimba na mosala ya Nzambe mpe na misala misusu oyo elongobani na mokano ya Nzambe.

6. Tozala tosili kobala to minzemba, ndenge nini tokoki komipesa na molende nyonso na mosala ya Nzambe?

6 Sikawa, basakoli ya nsango malamu bazali kokokisa na ndenge malamu mosala ya kosakola Bokonzi, mosala oyo ezali kosanzola Jéhovah. Ata tosili kobala to tozali naino minzemba, tokoki kolekisa eteni monene ya makoki na biso mpe bozwi na biso na mosala ya Nzambe na komipesaka na molende nyonso kati na mosala ya kosakola. Tosengeli koyeba kotambwisa misala na biso mpo ete mosala na biso mpo na Nzambe etyama na esika ya nsima te kati na bomoi na biso. Na yango, tosengeli “naino koluka bokonzi.” (Matai 6:33) Ekozala esengo monene mpo na biso soko tozali komibanzabanza liboso mpo na matomba ya Nzambe, kasi bobele mpo na matomba na biso moko te.

Ba ministres ya Nzambe bazangi eloko te

7. Ndakisa nini emonisi ete moklisto monzemba akoki kozala ministre ya Nzambe oyo akoki?

7 Baklisto bakoki kozala ba ministres bakoki ata soko bazali minzemba to basili kobala. Na yango, elingi koloba te ete moto nyonso oyo azali monzemba asengeli kobala. (Tala 1 Bakolinti 7:24, 27). Liloba na Nzambe elobi te ete mobali akokoma moto solo, bobele soko abali, lokola bikolo mosusu elobaka yango. Yesu Klisto akufaki monzemba, mpe mwasi bobele moko oyo Jéhovah apesaki ye nzela ete abala ezali bongo mwasi ya elimo mpe ya makolo. (Emoniseli 21:2, 9) Kasi ata abalaki te wana ezalaki ye awa na mabelé, Yesu azalaki ndakisa eleki malamu ya ministre ya Nzambe oyo akoki.

8. Lokola Paulo amonisi yango, kotikala monzemba ekopesa nzela na nini?

8 Na kozanga ntembe, moto azali monzemba azali na bonsomi mingi mpe azali na makoki mingi mpo na komipesa na mosala ya Nzambe. Kolendisaka bomoi ya monzemba, Paulo akomaki: “Nalingi ete bokangwa na mikakatano. Moto oyo abali te akotyaka motema na makambo na Nkolo ete asepelisa Nkolo boni. . . . Mwasi to moseka oyo abalani te, akotyaka motema na makambo na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:32-34) Maloba oyo matali baklisto minzemba mpe baklisto oyo basili kobala.​—Matai 19:9; Baloma 7:2, 3.

9. Ndenge nini ndakisa na Yesu emonisi ete ata moklisto oyo azali monzemba akoki kozala ministre na Nzambe oyo akoki?

9 Ezali bokoli ya nzoto, ya makanisi mpe ya elimo, yango nde ekopesa nzela epai na moklisto mpo azala mosaleli na Nzambe oyo azangi eloko te. Na yango, Yesu azalaki na mposa ya kobala te mpo na kokokisa mokumba eleki monene ya ministre ya Nzambe mpe kozala ye oyo na nzela na ye lisiko esengelaki kopesama (Matai 20:28) Nkutu, lokola azalaki monzemba, azalaki na bonsomi ya komipesa mobimba na mosala ya Nzambe. Ezalela na ye ekesenaki makasi na mobeko na boyuda, oyo ezalaki kokumisa libala mpe botata. Kasi, azalaki mpenza na likoki ya kosilisa nyee mosala oyo Nzambe apesaki ye. (Luka 3:23; Yoane 17:3, 4) Na yango, kozala monzemba epekisi te baklisto ete bazala ba ministres oyo bakoki.

Baklisto oyo babali ‘bakabwani’

10. Na ntina na ekanganeli oyo ekomisi babalani mibale “nzoto moko”, bokokani nini Paulo asali kati na baklisto oyo babali mpe baoyo babali te?

10 Na bokeseni ya baklisto minzemba, baklisto oyo babali basengeli kokokisa mosala na bango mpo na Nzambe kozanga ete batala na bopotu ekanganeli oyo etye bango lokola “nzoto moko”, elongo na mobalani na bango. (Matai 19:5, 6) Na ntina na ekanganelo yango mpe mikumba mingi oyo yango ezali kobimisa, Paulo alobi ete baklisto oyo babali ‘bakabwani’. Tala oyo ye akomi: “Nalingi ete bokangwa na mikakatano. Moto oyo abali te akotyaka motema na makambo na Nkolo ete asepelisa Nkolo boni. Nde moto oyo abali akotyaka motema na makambo na mokili ete asepelisa mwasi na ye boni, mpe motema na ye ekabwani. Mwasi to moseka oyo abalani te, akotyaka motema na makambo na Nkolo ete azala bulee na nzoto mpe na elimo. Kasi mwasi oyo abalani akotyaka motema na makambo na mokili ete asepelisa mobali na ye boni. Nazali koloba oyo epai na bino bobele mpo na malamu na bino; ezali mpo na kokanga bino na nkamba te, kasi na ntina ete botambolaka na ngolu mpe ete bosalelaka Nkolo na motema mobimba.”​—1 Bakolinti 7:32-35.

11. Paulo amonisi likambo nini kati na 1 Bakolinti 7:32-35?

11 Ezali polele ete soko Paulo azali koyikisa baklisto mpiko mpo batikala minzemba ezali mpo bakoka komipesa mobimba na mosala na Nzambe. Ye moko, mbala mosusu azalaki mokufeli-mwasi, kasi azwaki ekateli ya kobala lisusu te. (1 Bakolinti 9:5) Ata ndenge nini, koyebaka ete bomoi ya moto oyo abali ezali na mitungisi kati na mokili oyo, amonisi ete baklisto minzemba bazali na bonsomi koleka baklisto oyo babali, mpo ete bakabwani mpenza kati na mikumba na bango ya mosuni mpe oyo ya elimo. Na yango, moto oyo abali azali na bokonzi likolo na nzoto na ye te, mpamba te mobalani na ye azali nzoto moko elongo na ye mpe azali na mwa bokonzi na nzoto na ye. (1 Bakolinti 7:3-5) Na yango, Paulo alobi mpenza na ntina ete moklisto monzemba akoki kozala peto, elingi koloba, amipesi mobimba mpo na mosala ya Jéhovah Nzambe, ezala na mosuni to na elimo.

12. Likoki nini epesameli basali na Nzambe oyo babali te?

12 Elimo to makanisi ya mosaleli na Nzambe oyo azali monzemba ekopusa ye ete asalela Bokonzi kozanga kotya likebi na makambo mosusu. Mpo ete azangi mobalani oyo azali na bokonzi likolo na nzoto na ye, akoki kolanda mposa ya elimo na ye mpe ya motema na ye. Akoki kosalela makoki na ye nyonso ya nzoto mpe mayele na ye mpo na mosala ya Jéhovah. Na yango, mosaleli na Nzambe oyo abali te azali na bonsomi nyonso ya koluka kosepelisa Nkolo. Tokoki mpenza te kotemela maloba na Paulo, mpamba te Jéhovah amonaki malamu ete akomisa yango mpo biso toteyama.

Moklisto oyo abali akoki kozala mosaleli na Nzambe oyo akoki te?

13, 14. Likanisi nini ya libunga ekoki komema babalani baklisto ete bazongisa nsima ekanganeli oyo esangisi bango na “nzoto moko” mpe, na ndenge yango bakozala ba ministres ya Nzambe oyo bakoki te?

13 Kokanisaka na libunga nyonso ete bakoki kosala mingi kati na mosala ya Nzambe, baklisto mosusu oyo babali bakoki kobanda kopesa na libala na bango bobele ntina moke kati na bomoi na bango. Tokanisa ete, mpo na ntina yango, mwasi abandi kozwa meko kozanga kotalela mobali na ye mpo na makambo ya ntina mpenza mpe mobali amipesi mobimba na misala ya lisangá. Bango mibale bakokanisa ete bazali kokokisa mosala kitoko mpo na Jéhovah. Kasi, na solo mpenza, bazali na bopotu mpo na ekanganelo oyo esangisi bango lokola “nzoto moko”, mpe yango ekosepelisa Jéhovah te.

14 Ya solo, soko babalani baklisto bazali na bopotu mpo na ekanganeli oyo esangisi bango lokola “nzoto moko”, bakozala ba ministres bakoki te. Libala, ezali yango te ezali kokomisa baklisto ba ministres oyo bazali na makoki koleka, kasi ezali kokitisa likebi oyo bakoki kopesa na mosala ya Nzambe. (Tala Luka 14:16, 17, 20). Nzokande, mpo na kosepelisa Nzambe mpe kozala ba ministres bakoki, baklisto oyo babali basengeli te komona mpamba mikumba na bango ya libala.

Minzemba mpo na Bokonzi

15. (a) Ezalela nini baklisto babali te basengeli kokolisa? (b) Likanisi nini ya moboko etali bomoi ya monzemba mpe libala, Paulo abimisi yango kati na 1 Bakolinti 7:36, 37?

15 Soko basaleli na Jéhovah oyo babali basengeli kokokisa mikumba na bango ya libala, baklisto minzemba basengeli, (mpo na bango), kolona to kokolisa bosepeli na ezalela na bango ya ba ministres oyo bakoki ata bazali minzemba. Mpo na yango, Paulo alobi: “Nazali koloba epai na bango babali naino te mpe na basi-bakufeli-mibali ete malamu na bango batikala lokola ngai (elingi koloba minzemba). Okangami na mwasi? Omeka kokangwa te. Okangwi na mwasi? Oluka mwasi te.” (1 Bakolinti 7:8, 27) Na lisalisi ya Jéhovah, moklisto monzemba akoki na ekateli nyonso kotikala monzemba. Asengeli te kotalela libala lokola likambo oyo akoki kopengola te, na ntina na bokoko na bango to mpo na bopusi ya bato bazali zongazonga na ye. Te, soki abali, esengeli kozala mpo na bantina epesami na Biblia oyo Paulo alobeli na maloba malandi: “Soko moto akanisi ete azali kosala mabe na ndenge atikali monzemba, soko asili kokola, mpe alingi kobala, tika ete abala; asali lisumu te. Tika babalana. Nzokande, soko moto azwi ekateli na motema na ye, amoni ntina ya kobala te, kasi azali na nguya likolo na mokano na ye mpe azwi na motema na ye ekateli yango: ya kotikala monzemba, akosala malamu.”​—1 Bakolinti 7:36, 37.

16. (a) Elobeli “moto akoli” elimboli nini? (b) Moklisto oyo atikali monzemba asengeli kondimisama na likambo nini?

16 Na maloba yango, Paulo amonisi ete soko moto amoni ete ezali mabe atikala monzemba-awa ntoma alingi kolobela lisumu ya monene te -akosala mabe moko te soko abali. Lokola Paulo alobi yango mwa likolo kati na mokanda na ye, “kobalana eleki malamu na kozika na mposa.” (1 Bakolinti 7:9) Kozanga ntembe, alobeli mpo na moto oyo “asili kokola”, oyo akokisi mbula oyo mposa ya kosangana na mwasi ebandi koya makasi. Kasi soko moto oyo ateli “akangi mposa na ye ngwi” mpe azwi kati na motema na ye ekateli ya kotikala monzemba, asali malamu. Moklisto oyo akolonga na bomoi na ye ya monzemba, ezali te ye oyo akobengana mbala na mbala mposa na ye, mposa makasi ya kobala mpe ya kobota. Te, asengeli nde kondimisama makasi ete kotikala monzemba ezali nzela eleki malamu mpo na ye, mpe kotya milende nyonso misengeli mpo na kotikala bongo, elingi koloba monzemba na bopeto nyonso. Moklisto oyo akosala ndenge yango akobendama na makambo mosusu te mpe akozala na bonsomi mingi mpo na kosalela Nkolo.

17. Na kolandaka maloba na Yesu, mpo na nini bamoko bazali kotikala minzemba?

17 Baklisto oyo babali te bakotikala minzemba soko baloni ezalela ya elimo motindo moko na Yesu Klisto. Ata azalaki monzemba kati na bato oyo bazalaki kokumisa libala, Yesu asalelaki ntango na ye mpe makoki na ye bobele mpo na mosala ya Nzambe. Lokola ye, moklisto oyo abali te akoki kosepela na ndenge Nzambe azali kopesa likabo ya monzemba epai na baoyo bazali kotikela yango nzela. Na ntina yango, Yesu alobaki: “Bato nyonso bayebi koyamba liloba oyo te, bobele bango bapesameli yango. Bamosusu bazali mikube longwa na libumu na mama na bango, mpe bamosusu bazalisami mikube na bato; mpe bamosusu bamizalisi mikube mpo na Bokonzi na likolo. Tika ete oyo ayebi koyamba oyo, ayamba yango.”​—Matai 19:11, 12.

18. Eloko nini ezali kopekisa baoyo bamizalisi “mikube” mpo na Bokonzi ete babala te?

18 Yesu alobaki te ete bato oyo bazali minzemba baleki bato babali. Alendisaki bayekoli na ye te ete batikala minzemba bobele mpo na kozala na bomoi ezangi mitungisi, mpe ya solo ezalaki te mpo bazala na basi mingimingi. Te, baklisto oyo bazalaki komizalisa “mikube” bango moko mpo na Bokonzi bazali peto na etamboli mpe bapesi esika na bomoi ya monzemba kati na motema na bango. Eloko nini ezali kokanga bango ete babala te? Ezali te mpo ete bazali na bokono moko na nzoto na bango, kasi ezali mpo ete bamipesa mobimba na mosala ya Nzambe. Mosala yango ezali na ntina monene lelo oyo, mpamba te Bokonzi esilaki kozalisama na makolo na 1914 mpe “nsango malamu oyo ya bokonzi” esengeli kosakolama lokola litatoli na mabelé mobimba liboso ete nsuka eyela biloko mabe ya ntango oyo ekweisami, nsuka oyo ezali kobelema nokinoki.​—Matai 24:14.

Baklisto minzemba basengeli kokumisama

19. Ezaleli nini baklisto nyonso basengeli kozala na yango epai na minzemba mpo na Bokonzi?

19 Baklisto nyonso basengeli kokumisa mpe kolendisa baoyo bazali kotikala minzemba mpo na Bokonzi. Kotikala monzemba ezali “mpo na komipesa mobimba na mosala ya Nkolo”. (1 Bakolinti 7:35) Baboti bakosala malamu soko bazali koteya epai na bana na bango makambo oyo Biblia elobi na ntina na bomoi ya monzemba mpe mabaku malamu oyo yango ezali kobimisa mpo na mosala ya Jéhovah. Tosengeli biso banso kolendisa baninga na biso ya mosala oyo bazali kobala te. Tolembisa soko moke te ekateli na bango ya kotikala minzemba mpo na Bokonzi.

20. Soko ozali mosaleli na Nzambe mpe ozali monzemba, osengeli kosala nini?

20 Baklisto oyo babali te bakoki mpenza kosepela na ndenge bazali ba ministres ya Nzambe oyo bakoki. Na mikolo oyo ya nsuka, bazali kosangana na esengo na mosala ya kosakola Bokonzi oyo ezali kosalema nokinoki. Mpo na yango, bino bato bozali minzemba, bosepela na ndenge bozali ba ministres bakoki oyo Jéhovah azali kosalela na mosala na ye. ‘Boluka nzela na kobika na bino na nsomo mpe na kolenga, wana ezali bino kongenga lokola miinda na mokili, esimbi bino liloba na bomoi.’ (Bafilipi 2:12-16) Na bongo, omipesa mobimba na matomba ya Bokonzi na kotikalaka bongo na bomoko elongo na libota ya ba Témoins de Jéhovah kati na mokili mobimba mpe na kokokisaka na ndenge esengeli mosala na yo ya boklisto. Lokola tokomona yango, minzemba oyo bazali kosala bongo bazali na bomoi etondi na mapamboli.

Bozongeli

◻ Wapi mosala eleki monene mpo na moklisto?

◻ Mpo na nini basaleli na Jéhovah oyo babali te bakoki kozala ba ministres baklisto bakoki?

◻ Na ndenge nini moklisto oyo abali akozala lisusu ministre oyo akoki te?

◻ Kozala “mokube” mpo na Bokonzi elimboli nini?

◻ Mpo na nini esengeli kolendisa baklisto oyo babali te?

[Elilingi na lokasa 10]

Ata azalaki monzemba, ntoma Paulo azalaki ministre moklisto akoki

[Elilingi na lokasa 12]

Yesu azalaki ndakisa eleki malamu ya ministre ya Nzambe oyo akoki

[Elilingi na lokasa 15]

Okumisaka baoyo bazali kotikala minzemba mpo na Bokonzi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto