Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/6 nk. 12-17
  • Bosengeli kozala bulee

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bosengeli kozala bulee
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe na bulee, basambeli na bulee
  • ‘Mobeko ezali bulee, sembo mpe malamu’
  • Bazali peto kati na mokili ya mbindo
  • Tokokisa ezaleli na bulee kati na nsomo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bapɛtolami mpo na misala ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • ‘Yehova azali mosantu, mosantu, mosantu’
    Pusaná penepene na Yehova
  • “Bosengeli kozala basantu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/6 nk. 12-17

Bosengeli kozala bulee

“Kasi bozala bulee na bizaleli nyonso na bino pelamoko oyo abyangi bino azali mpe bulee. Mpamba te esili kokomama ete: ‘Bokozala bulee mpo ete ngai nazali bulee.’”​—1 PETELO 1:15, 16.

1, 2. (a) Maloba nini ya bokundoli bato bakokaki kotanga na elongi ya nganga monene, mpe ntina na yango ezalaki nini? (b) Mpo na nini ebongi lelo na kokundola lisusu bosantu ya Jéhovah? (c) Toli nini Petelo apesaki na ntina na bosantu?

“BULEE epai na Jéhovah.” Maloba oyo na kolendisa, makomamaki likoló na etando na wolo ya peto etyamaki likoló na eteni ya elamba oyo nganga monene ya Yisraele azalaki kolata na elongi na ye, ezalaki komonana epai na moto nyonso. (Exode 28:36-38) Ezalaki koyebisa na lolenge ya kongenga ete, na kokesena na mabota ya bapakano oyo bazalaki kosambela banzambe ya mbindo, Yisraele azalaki kosambela Nzambe ya peto, ya bulee.

2 Soki yo moko ozali Témoin de Jéhovah, oyebi mpenzampenza ete Nzambe oyo ozali kosambela azali peto, bulee mpe sembo? Kozongela solo oyo ya ebandeli ekoki komonana lokola ezali na ntina moko te mpo na yo. Atako bongo, Jéhovah asili kopambola biso, biso bato tozali basaleli na ye, na kopesaka biso mayele ya “makambo mozindo na Nzambe”: bisakweli ya Biblia oyo ndimbola na yango ezali mpasi, kosalela mitinda na ye bakisa mpe mateya na ye. Boye te? (1 Bakolinti 2:10; tala Danyele 12:4.) Nzokande, ezali komonana ete bamoko bazali koyeba mpenzampenza te bulee ya Jéhovah. Na yango, mbula nyonso, bankoto mingi ya ba Témoins bazali kokwea mpo na mbindo. Bankoto mosusu bazali komibendela mindondo na komikotisaka kati na misala oyo ekoki kopesa nzela na bobuki ya mibeko ya Biblia. Ezali komonana polele ete bamoko bazali koyeba malamu te ndimbola ya maloba oyo mazwami kati na 1 Petelo 1:15, 16: “Kasi bozala bulee na bizaleli nyonso na bino pelamoko oyo abyangi bino azali mpe bulee. Mpo ete esili kokomama ete: ’Bokozala bulee mpo ete ngai nazali bulee.’

Nzambe na bulee, basambeli na bulee

3. Nzembo moko ya Moďse ezali komonisa nini mpo na oyo etali bizaleli ya Jéhovah?

3 Okoki komiloba boye: ‘Ndenge nini moto ya kozanga kokoka akoki kozala bulee? Ekoki kosalema te’. Nzokande, tala epai wapi Petelo azwaki toli na ye. Azali kotanga awa maloba oyo mayebisamaki mpo na mbala ya liboso epai na Bayisraele nsima na kobima na bango na Ezipito. Na kobikisaka bango na lolenge ya kokamwa, Jéhovah amimonisaki Mobikisi, Moto oyo azali kokokisa bilaka na ye, “mobali na etumba”. (Exode 3:14-17; 15:3) Kati na nzembo moko oyo ezalaki kokumisa elonga mpo na kokwea na Ezipito kati na Mai motane, Moďse amonisaki eteni mosusu ya bizaleli ya Jéhovah; alobaki: “E Jéhovah, nani azali lokola yo kati na banzambe? Nani azali lokola yo na lokumu kati na bulee?” (Exode 15:11) Kati na Biblia, ezali mbala ya liboso ete bulee elobama na ntina na Jéhovah.

4. (a) Na ndimbola nini Jéhovah azali na “lokumu kati na bulee”? (b) Na nini Jéhovah akesenaki na banzambe ya Kanana?

4 Maloba na hébreu mpe na greke oyo ebongolami na “bulee” kati na Biblia ezali kolimbola oyo ezali ‘kongenga, ya sika, peto, kozanga litono’. Na bongo Moďse azalaki komonisa Jéhovah lokola Nzambe oyo aleki peto, azangi mbindo, oyo akoki kobebisama te mpe oyo andimaka mbindo ata moke te. (Habakuku 1:13) Jéhovah amonisaki bokeseni monene kati na ye mpe banzambe ya Kanana, mokili oyo Bayisraele basengelaki kofanda nsima na mikolo. Mikanda oyo bakundolaki na Ras Shamra, engumba oyo ezalaki penepene na Syrie, na nord, ezali kopesa biso likanisi mokuse kasi ya solo likoló na banzambe na Kanana. Engebene mokanda Bakanané (Angl.) ya John Gray, bazalaki banzambe “oyo baswanaka, bazali na zuwa, babombaka nkanda na motema mpe ya mbindo.

5, 6. Losambo oyo Bakanané bazalaki kosambela banzambe na bango ya mbindo ezalaki na bopusi nini likoló na bango? (b) Bopusi nini losambo ya Nzambe na bulee ezalaki na yango likoló na Bayisraele?

5 Lokola eyebani, bizaleli ya Bakanané ezalaki elembo ya bizaleli na banzambe ya mbindo oyo bango bazalaki kosambela. Mokanda Lingomba ya Yisraele (Angl.) ezali kolimbola: “Misala oyo misalamaki na kolandaka ndakisa ya banzambe etalelamaki lokola eteni ya losambo oyo epesamaki epai na banzambe yango. . . . Astorete (nzambe-mwasi ya pite) azalaki na mibali mpe basi mingi oyo bapesamaki na ye mpo na kosalela ye. . . . Bazalaki komipesa na ye na kosalaka bondumba to pite.” William Albright abakisi: “Ezaleli ya pite ya nsoni koleka ya losambo na bango ememaki mpenza mbeba mabe koleka.” Losambo ya “makonzi ya bulee” ebongisami mpo na lokumu ya nzoto ya mobali, mbeka ya bana, maji, maloba ya bondoki, kosangisa nzoto kati na bato ya libota moko, pite, kosangisa nzoto kati na mibali mpe banyama wana ezalaki misala oyo ezalaki kosalelama kati na mokili ya Kanana.​—Exode 34:13; Levitike 18:2-25; Deteronome 18:9-12.

6 Na kokesena, Jéhovah azali “bulee koleka”. Akoki kondima mbindo motindo oyo te epai na basambeli na ye. (Nzembo 15) Na bokeseni na banzambe ya Kanana, Jéhovah atombolaki lokumu ya basambeli na ye. Azongelaki mbala mingi toli oyo Petelo ayaki koloba nsima: “Mpo ete ngai nazali Jéhovah Nzambe na bino. Yango wana bomibulisa mpe bozala bulee mpo ete ngai nazali bulee.”​—Levitike 11:44; 19:2; 20:26.

‘Mobeko ezali bulee, sembo mpe malamu’

7, 8. (a) Ndenge nini Bayisraele bakokaki ‘komimonisa bato na bulee’? (b) Monisa bokeseni ezali kati na Mibeko ya Jéhovah mpe buku ya Hammourabi na Babilone.

7 Komimonisa moto na bulee’ elimbolaki kozala moto ya kokoka te to komipesa ezaleli ya bosantu koleka, kasi elimbolaki kotosa buku ya mibeko nyonso oyo Bayisraele bazwaki na nsima ya Moďse. (Exode 19:5, 6) Na kokesena na mibeko ya mikili to mabota mosusu, Mibeko na Nzambe esengelaki kotalelama lokola ezali ‘bulee, sembo mpe malamu’.​—Baloma 7:12.

8 Ezali solo ete buku ya Hammourabi mpo na mibeko ya bato na Babilone, oyo ebimaki liboso na Mibeko ya Moďse, ezali na mwa bokokani kati na makambo mosusu. Mwa bamoko na mibeko na yango, lokola mobeko ya taliona (‘liso mpo na liso’), ekokani na mitinda oyo Moďse alobaki. Bato mosusu bazali koloba ete Moďse adefaki mibeko na ye na buku ya Hammourabi. Mpo na koloba solo, buku oyo ezali kokumisa bobele Hammourabi mpe kobatela matomba na ye ya politike. Nzokande, Nzambe apesaki Mibeko na ye epai na Bayisraele ‘mpo na bolamu na bango ya seko, mpo bazala ntango nyonso na bomoi’. (Deteronome 6:24) Epai mosusu, elembo moko ezali te oyo ezali komonisa ete buku ya Hammourabi ezalaki kati na Babilone lokola mobeko oyo bato basengeli kotosa yango na makasi; ezalaki bobele “motambwisi to mosalisi ya kokata makambo mpo na bato oyo bazalaki koluka toli”. (La Nouvelle Encyclopédie britannique, éd. 1985, t. XXI, p. 921.) Mpo na yango, mobeko ya Moďse esengelaki mpenzampenza kotosama mpe ezali komonisa bitumbu ya sembo oyo bisengelaki kopesama soki moto aboi kotosa yango. Mpo na kosukisa, buku ya Hammourabi ezali kotalela mingi bobele ndenge ya kosala epai na bato oyo babuki mibeko; kati na mibeko 280 oyo ezali kati na yango, ezali bobele na bipekiseli 5 ya sikisiki. Nzokande, Mibeko na Nzambe ezali kokebisa mingimingi mabe na esika ya kopesa etumbu.

9. Bopusi nini Mibeko ya Moďse ekokisaki likoló na bomoi ya Bayuda?

9 Lokola ezalaki ‘bulee, sembo mpe malamu’, Mibeko na Moďse ekotisaki bopusi makasi likoló na bomoi ya Bayuda. Ezalaki kotambwisa losambo na bango mpe ezalaki kokana basabata oyo na boumeli na yango bazalaki kosala ata mosala moko te‘, ezalaki kotya ndelo ya nkita ya ekólo, ezalaki koyebisa mitinda mosusu mpo na oyo etali molato mpe ezalaki kopesa batoli ya ntina kati na makambo lokola bilei, kosangisa nzoto mpe bopeto. Mibeko ya Moďse ezalaki kolobela ata lolenge oyo binama mosusu ya nzoto esalaka mosala na yango.

10. (a) Mpo na nini Mibeko ya Moďse ezalaki kolobela makambo mingi? (b) Ndenge nini Mibeko ezalaki kokolisa bopeto ya nzoto mpe kolongono malamu ya nzoto? (Tala lisusu maloba oyo mazwami na nse.)

10 Malako oyo malimbolamaki polele oyo matali bomoi ya mokolo na mokolo ezalaki na mokano kitoko koleka: kokomisa Yisraele libota ya peto, na mosuni, na elimo, na makanisi mpe na bizaleli. Na ndakisa, mibeko oyo ezalaki kotinda Bayisraele na kosukola nzoto, kokunda bosoto na bango, kolongola bato oyo bazali na maladi mabe kati na bango mpe koboya bilei mosusu ezalaki kopesa nzela na kolongono malamu ya nzoto mpe bopeto ya nzotoa.​—Exode 30:18-20; Levitike mokapo 11; Levitique 13:4, 5, 21; 15:16-18, 21-23; Deteronome 23:12-14.

11. Kozala mbindo na makambo matali losambo elimbolaki nini?

11 Nzokande, bopeto ya elimo ezalaki na ntina monene koleka kolongono ya nzoto mpe bopeto ya nzoto. Yango wana mobali nyonso, to mwasi nyonso, oyo alei bilei bipekisami, oyo asanganaki na mwasi to oyo asimbaki ebembe, azalaki mbindo na miso na Nzambe. (Levitike mikapo 11, 15; Mituya mokapo 19). Moto motindo wana azalaki na ndingisa te ya kosangana na losambo, soko te akoki kokufa. (Levitike 15:31; 22:3-8.) Kasi boyokani nini ezalaki kati na bipekiseli wana mpe bopeto ya elimo?

12. Ndenge nini mibeko mitali bopeto ya losambo mizalaki kopesa nzela na bopeto ya elimo?

12 Losambo ya bapakano etondaki na makambo na pite, kosambela bakufi mpe bilambo ya lokoso. Nzokande, encyclopédie (The lnternational Standard Bible Encyclopedia) ezali koyebisa biso: “Pite ekokaki kotalelama te lokola lolenge moko ya kosambela Yahweh. Likambo nyonso ya motindo wana ezalaki kokomisa mosali na yango mbindo. . . . Kati na Yisraele, bazalaki komemya bakufi, kasi bazalaki kokumisa bango te soki mpe kosambela bango. . . . Epai mosusu, mpo na Moyisraele, bokutani nyonso elongo na bato oyo afandi na bango penepene na ntina na bafeti na bango ya bopakano, na boumeli na yango bazalaki kobongisa limpati monene, epesamelaki nzela te, mpamba te bilei na bango bizalaki mbindo.” Malako ya Mibeko ezalaki bongo “lopango” oyo ezalaki kokabola Moyisraele na makambo nyonso ya losambo na mbindo.​—Baefese 2:14.

13. Ndenge nini Mibeko ya Moďse ezalaki kokolisa bopeto ya makanisi?

13 Mibeko ezalaki mpe kokolisa bopeto ya makanisi ya Bayisraele. Na ndakisa, malako oyo matali bopeto ya binama ya mobali mpe mwasi ezalaki kopesa nzela na kopetola makanisi ya mobali. (Levitike 15:16-33) Bayisraele bayekolaki komipekisa to komikanga mposa kati na likambo etali kosangisa nzoto, na kopesa nzela te na mposa mabe lokola ezalaki kosala yango Bakanané. Mobeko ezalaki koteya ata epai na baoyo bazalaki kobatela yango na kopekisa mayoki na bango mpe bamposa na bango, mpamba te ezalaki kokweisa kolula.​—Exode 20:17.

14. Ndenge nini Mibeko ya Moďse emikesenisaki mpo na oyo etali kolendisa bopeto ya bizaleli malamu?

14 Likambo mosusu ya ntina koleka ezali ete, Mibeko ezalaki kolobela mingi bopeto ya bizaleli. Ya solo, buku ya Hamourabi ezalaki kokweisa mpe misala lokola ekobo. Nzokande, lisolo moko ebimaki kati na zulunalo ya arkeoloji (The Biblical Archaeologist) elobaki boye: “Na kokesena na Bababilonyé mpe Basulya mpo na baoyo ekobo ezalaki bobele koyiba lotomo oyo mobali azali na yango likoló ya mwasi na ye, mobeko ya Kondimana na Kala ezali kotalela ekobo lokola lisumu monene mpo na oyo etali bizaleli malamu.”

15. (a) Monisa na bandakisa ete Bayisraele basengelaki kosala milende minene mpo na kotikala peto. (b) Bolamu nini bazalaki kozwa na milende motindo yango?

15 Na bongo maloba oyo na mokomi na Nzembo mamonani solo: “Malako na Jéhovah mazali peto, ekomonisa miso polele.” (Nzembo 19:8) Ya solo, esengelaki mbala mosusu kosala milende makasi mpo na kotikala peto. Bobele mwa baposo nsima ya kobota mwana, mama asengelaki kokende na Yelusaleme mpo na kokokisa milulu ya kopetolama. (Levitike 12:1-8; Luka 2:22-24.) Nsima na kosangisa nzoto, mpe kati na makambo mosusu oyo etali bomoi ya babalani, basi mpe mibali basengelaki komipetola. (Levitike 15:16, 18; Deteronome 23:9-14; 2 Samwele 11:11-13.) Wana ezalaki bango kobatela na motema moko Mibeko mpe kozala peto, ‘bazalaki kozwela yango litomba’, kati na nzoto na bango, na makanisi, na bizaleli mpe na elimo. (Yisaya 48:17) Epai mosusu, ntina ya kotikala peto efandaki libela kati na makanisi na bango. Mpe na koleka nyonso, milende na bango ya solo mpo na kobatela bopeto na bango ezalaki kopesa bango nzela na kondimama epai na Nzambe.

Bazali peto kati na mokili ya mbindo

16, 17. (a) Kati na meko nini baklisto bazali lelo na mokumba ya kotikala peto? (b) Mpo na nini ezali mpasi mingi mpo na kotikala peto? (c) Mpo na nini bato mosusu bayebani mingi na mokili azali ndakisa te kati na likambo yango?

16 Sikawa tokangi malamu ntina ya maloba oyo Petelo alobaki na baklisto: “Lokola bana na botosi, bandima te ete bizaleli na bino bibila mposa mabe na bino na liboso, wana ezangaki bino mayele. Kasi bozala bulee na bizaleli nyonso na bino pelamoko oyo abyangi bino azali mpe bulee. Mpamba te esili kokomama ete: ‘Bokozala bulee mpo ete ngai nazali bulee.”’​—1 Petelo 1:14-16.

17 Tosengeli koyeba malamu ete ezali petee te. Bipai nyonso, bato bazali kokosa, kosala mabe mpe pite. The New York Times ekomaki: “BaAmerike mingimingi bakomi kofanda lokola mwasi na mobali ata naino babalani te.” Ata bato oyo bayebani mingi bazali kopesa ndakisa ya mabe. Bamoko kati na bato oyo bayebani mingi koleka kati na mokili mpo na masano, makambo etali politike to miziki, bazali komipesa kozanga komibomba na misala ya mbindo. “Molandi moko ya masano azalaki komilela ete ezali mawa mingi, mpo na komekola moto moko lokola ndakisa mpe okoya koyeba na nsima ete azali na etamboli mabe.” Mpo na nini maloba motindo oyo? Basani mingi oyo bayebani koleka bandimaki ete bamelaka drogue. Mbala mingi ezali komonana ete mibali to basi baoyo bakomisa bango banzambe bazali na bomoi moko ya mbindo, ya nsoni, bazali bato na ekobo, bato na pite, bato bazali kosangisa nzoto kati na mibali na mibali, miyibi, babotoli to balangi na makaya makasi. Mbala mosusu bazali komonana peto na nzoto, kasi maloba na bango ezali ya mbindo, ya bosoto. Mbala mosusu basepelaka na kofinga bizaleli malamu na komikumisaka kati na bizaleli na bango ya mbindo.

18. Ndenge nini bato mingi oyo bazali na bomoi na mbindo ‘bazali kobuka oyo balonaki’?

18 Nzokande, tobosana soko moke mpenza te maloba oyo ya Biblia: “Nzambe akokosamaka te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango. Soko akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto; nde ye oyo akokona kati na elimo, akobuka bomoi na seko na nzela na elimo.” (Bagalatia 6:7, 8) Etamboli ya mbindo mbala mingi epesaka maladi to liwa ya mbalakaka mpo na maladi lokola sopisi, kasende to SIDA, totanga bobele oyo eyebani mwa mingi koleka. Bizaleli ya mbindo mbala mingi ebulunganisaka makanisi, epesaka mpasi ya motó mpe ekoki kobenda moto na komiboma. Baoyo bazali komipesa na misala ya mbindo bazali mbala mosusu koseka baoyo bazali kosala milende mpo na komibatela na kozala peto, kasi koseka ezali kosila ntango batioli yango babandi ‘kobuka oyo bango balonaki’.​—Tala Baloma 1:24-27.

19, 20. Ndenge nini bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili bamonisi ete basili komibebisa kati na makambo etali losambo mpe bizaleli?

19 Tozali mpe kobika mpe kati na mokili moko oyo esili kobeba kati na makambo etali losambo. Mbala mosusu bakonzi na mangomba bazali kolata bilamba kitoko mpe ya peto; nzokande mateya na bango mpe misala na bango ezali mbindo ya Babilone, lokola losambo ya bikeko, la Trinité, lifelo, molimo ekufaka te mpe epongelo. Bakokani na bakonzi na mangomba oyo Yesu alobaki na ntina na bango: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, akosi! Mpamba te bozali lokola mayita mapakolami mpembe. Yango emonani kitoko libanda nde katikati etondi na mikwa na bato bakufi mpe na ndenge nyonso na bosoto. Bongo bino bomonani libanda epai na bato ete bozali bayengebene nde katikati botondi na bokosi mpe na yauli.”​—Matai 23:27, 28.

20 TBakonzi na mangomba bazali ata kopesa nzela to kondima ezaleli ya mbindo ya basambeli na bango. Bato oyo bayebani mpo na ezaleli na bango ya mbindo mpe ya bosoto bazali bato na pite, bato na ekobo to bato oyo bazali kosangisa nzoto mibali na mibali​—atako bongo bazali ntango nyonso kobatela lokumu na bango. Tala oyo zulunalo Newsweek elobaki na ntina yango: “Engebene Richard Sipe, pisikologe oyo asalaka na Maryland, mpe sango ya kala, penepene na 20% ya basango 57 000 ya katolike ya Etats-Unis bazali ba homosexuels (bato oyo basangaka mibali na mibali) . . . Minganga mosusu bandimi ete lelo motuya yango ekoki kokoma penepene na 40%.” John McNeill, teolojien ya katolike (oyo andimi ete azali homosexuel) azali kolongisa polele homosexualité to bosangisi nzoto kati na mibali na mibali na maloba oyo: “Bolingo oyo basi mibale to mibali mibale oyo bazali kosangisa nzoto bazali komonisana, ntango yango ezali koyokanisa bango, ezali lisumu te mpe ezali kotangola te baoyo bazali kolingana motindo yango na mokano ya Nzambe, kasi ekoki kozala bolingo ya bulee koleka.”​—The Christian Century.

21. Maloba “Bulee epai na Jéhovah” ekundoli biso nini?

21 Tokundola lisusu maloba oyo makomamaki na elongi ya nganga monene: “Bulee epai na Jéhovah.” (Exode 28:36) Jéhovah azali kosenga biso, alingi ete totikala peto kati na makambo nyonso. Kasi ndenge nini yango ekoki kosalema? Kati na makambo nini ekoki na biso mpenza kokeba? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna oyo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku ya Hammourabi ezalaki na malako motindo oyo te. Bamonaki mpe ata mobeko moko te ya makambo etali bopeto ya motindo boye epai na bato na Ezipito ya kala baoyo bazalaki na minganga ya mayele mingi na eleko wana. Ezali kotangama boye kati na mokanda L’Egypte antique (Angl.): “(Kati na makomi ya minganga ya Ezipito), malako ya mayele elatisami nyonso na maloba ya bondoki mpe bandimbola mosusu ya maji.” Nzokande, Mibeko ya Nzambe, ezalaki ata na liloba moko ya bilimu mabe te; ezalaki na boyokani na sianse. Na ndakisa, ezali bobele na eleko na biso nde minganga bayei koyeba ntina ya kosukola nzoto nsima na kosimba bibembe, likambo oyo Mobeko na Moďse ezalaki kosengisa esili koleka bankoto na mibu.​—Mituya mokapo 19.

Bozongeli

◻ Na ndimbola nini Jéhovah azali na ‘’lokumu kati na bulee”, mpe yango elimboli nini mpo na basambeli na ye?

◻ Na nini Mibeko na Moise ekesenaki na mibeko ya mabota mosusu?

◻ Ndenge nini Mibeko ya Moďse ezalaki kokolisa bopeto ya nzoto, ya elimo, ya makanisi mpe ya bizaleli malamu?

◻ Ndenge nini bato mingi oyo bazali komitambwisa malamu te ‘bazali kobuka oyo balonaki’?

[Elilingi na lokasa 13]

Losambo oyo Bakanané bazalaki kosambela banzambe ya mbindo ebebisaki bizaleli na bango

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Tozwaki ndingisa na British Museum, London

[Elilingi na lokasa 14]

Buku ya mibeko ya Hammourabi epesaki nzela ete makambo nyonso matambola na molongo kati na bokonzi mpe ezalaki kokumisa mokonzi, kasi ekomisaki bato na Babilone bulee te

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Musée ya louvre, Paris

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto