Sanza ya 9
Mwamibale, 1 sanza ya 9
Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima.—2 Ko. 13:5.
Tosengeli kosala makasi kaka te mpo na kokóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo, kasi mpe mpo na kotikala bongo. Mpo na yango, tosengeli koboya komityela motema koleka ndelo. (1 Ko. 10:12) Tosengeli ‘kokoba komimeka’ mpo tótala soki tozali kokoba kokende liboso na elimo. Na mokanda na ye epai ya Bakolose, ntoma Paulo amonisaki lisusu ntina ya kokoba kozala moto oyo akɔmɛli na elimo. Atako bakristo yango bakómaki mikóló na elimo, Paulo ayebisaki bango ete bákeba ete bákóma te baombo ya makanisi ya mokili. (Kol. 2:6-10) Mpe Epafrasi, oyo emonani ete ayebaki bandeko ya lisangá yango malamu, abondelaki mingi mpo ‘nsukansuka bázala bato oyo bakoki na nyonso,’ elingi koloba bato oyo bakɔmɛli na elimo. (Kol. 4:12) Liteya ezali nini? Paulo ná Epafrasi bakangaki ntina ete kotikala moto oyo akɔmɛli na elimo esɛngi milende mingi mpe lisalisi ya Nzambe. Balingaki ete Bakolose bákoba kozala bakristo oyo bazali mikóló, to oyo bakɔmɛli na elimo atako mikakatano oyo bazalaki na yango. w24.04 6-7 par. 16-17
Mwamisato, 2 sanza ya 9
Yehova azali elongo na biso. Bóbanga bango te.—Mit. 14:9.
Soki toyekoli kobanga Yehova na ndenge oyo ebongi, tokolinga ye mingi mpe tokosala ata eloko moko te mpo na kopesa ye mpasi. Tolingaka mpenza koyeba kokesenisa mabe na malamu, mpe solo na lokuta, mpo Yehova andima biso. (Mas. 2:3-6; Ebr. 5:14) Soki tokómi kobanga bato koleka Nzambe, tokoki kotika nzela ya solo. Tótalela ndakisa ya bankumu 12 oyo bakendaki konɔnga mokili oyo Yehova alakaki kopesa Bayisraele. Banɔngi zomi babangaki Bakanana mingi koleka ndenge oyo bazalaki kolinga Yehova. Bayebisaki lisangá ya Yisraele ete: “Tokokoka te komata mpo na kobunda na bato yango, mpo baleki biso na makasi.” (Mit. 13:27-31) Na miso ya bomoto, Bakanana balekaki makasi. Likambo wana ezalaki solo. Kasi, koloba ete Bayisraele bakokoka te kolonga banguna na bango, wana ezalaki kotya Yehova mopanzi. w24.07 9 par. 5-6
Mwaminei, 3 sanza ya 9
Mosambisi ya mabele mobimba akosala nde oyo ezali sembo te?—Eba. 18:25.
Tozali mpenza na ntina ya kondima ete lisambisi nyonso ya Yehova ezalaka kaka sembo? Ɛɛ! Kaka ndenge Abrahama akangaki malamu ntina ya likambo yango, Yehova azali “Mosambisi ya mabele mobimba”; azali ya kokoka, aleki na bwanya, mpe atondi na motema mawa. Apesaki Mwana na ye formasyo mpe apesi mokumba nyonso ya kosambisa epai na ye. (Yoa. 5:22) Tata ná Mwana bakoki kotánga makambo oyo ezali na motema ya moto mokomoko. (Mat. 9:4) Ezala ndenge nini, bakosala “oyo ezali sembo”! Tózala na ekateli ya kotyela Yehova mpe bikateli na ye motema. Tondimaka ete tozali na makoki ya kosambisa te, kasi ye azali na yango! (Yis. 55:8, 9) Na yango, na motema mobimba, totiki mokumba nyonso ya kosambisa epai na ye mpe Mwana na ye, Mokonzi oyo amonisaka na ndenge ya kokoka bosembo mpe motema mawa ya Tata na ye.—Yis. 11:3, 4. w24.05 7 par. 18-19
Mwamitano, 4 sanza ya 9
Yehova ayinaka moto ya mbilingambilinga, kasi azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.—Mas. 3:32.
Ezali na ntina mingi kozala moto ya sembo na kati ya motema na biso. Likambo oyo esalemaki ntango Filipe amemaki moninga na ye Natanaele epai ya Yesu emonisi yango. Yesu akutanaki ata mbala moko te na Natanaele liboso, kasi alobaki: “Oyo mpenza Moyisraele ya solo, azali na bokosi te kati na ye.” (Yoa. 1:47) Yesu amonaki epai ya Natanaele bosembo moko ya kokamwa. Ndenge moko na biso, Natanaele azalaki moto ya kozanga kokoka. Kasi azalaki nyamunyamu te to na ezaleli ya liso na nse ya lokasa. Yesu asepelaki na ezaleli yango mpe apesaki Natanaele longonya. Masɛngami mingi mpo na kosepelisa Yehova oyo ezali na Nzembo 15 elobeli ndenge oyo tosalelaka basusu makambo. Nzembo 15:3 elobi ete mopaya na hema ya Yehova “akoselaka bato makambo te, asalelaka mozalani na ye eloko moko te ya mabe, mpe abebisaka lokumu ya baninga na ye te.” Kosalela lolemo na biso na ndenge wana ya mabe ekoki kosala basusu mpasi mingi.—Yak. 1:26. w24.06 10 par. 7, 9; 11 par. 10
Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 9
Nkolo, ata bademo bazali kotosa biso ntango tozali kosalela nkombo na yo.—Luka 10:17.
Soki omibongisi malamu mpo na mosala ya kosakola, okobanga mpenza te mpo na kosolola na bato. Yesu asalisaki bayekoli na ye bámibongisa liboso atinda bango na mosala ya kosakola. (Luka 10:1-11) Lokola basalelaki makambo oyo Yesu ateyaki bango, bayekoli basalaki makambo mingi ya malamu na mosala ya kosakola mpe yango epesaki bango esengo mingi. Ndenge nini tokoki komibongisa? Tosengeli kokanisa ndenge oyo tokoki koyebisa basusu mateya ya solo na maloba na biso moko. Ezali mpe malamu kokanisa makambo mibale to misato oyo bato ya teritware balobaka mingi mpe kobongisa eyano oyo tokopesa na mokomoko na yango. Bongo ntango tokosolola na bato, tósala makasi tózala motema ya kokita, tósɛka mwa moke, mpe tózala na boboto. w24.04 16 par. 6-7
Mwalomingo, 6 sanza ya 9
Yehova, Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso.—Em. 4:11.
Tosakolaka nsango malamu libosoliboso mpo tolingaka Yehova Nzambe mpe nkombo na ye mosantu. Tomonaka ete mosala ya kosakola ezali lolenge ya kosanzola Nzambe oyo tolingaka. Tondimaka na motema mobimba ete Yehova Nzambe abongi kozwa nkembo, lokumu, mpe nguya epai ya basaleli na ye ya sembo. Topesaka Yehova nkembo mpe lokumu ntango tolakisaka basusu bilembeteli ya polele oyo emonisi ete ‘azalisaki biloko nyonso’ mpe ete tozali na bomoi mpo ye nde apesaki biso yango. Topesaka ye nguya—nguya na biso—ntango tosalelaka ntango, makasi, mpe biloko na biso mpo na kosakola na molende na kotalela makambo ya bomoi na biso. (Mat. 6:33; Luka 13:24; Kol. 3:23) Na mokuse, tolingaka kolobela makambo ya Nzambe oyo tolingaka. Etindaka biso mpe tóyebisa basusu nkombo na ye mpe oyo yango elimboli. w24.05 17 par. 11
Mwayambo, 7 sanza ya 9
Akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.—Ebr. 11:6.
Yehova apesaka biso kimya mpe esengo sikoyo mpe akopesa biso bomoi ya seko na mikolo ezali koya. Tokoki kotya elikya na biso epai ya Yehova, mpe kondima ete azali na mposa mpe na nguya ya kopesa biso mbano. Mpe kondima yango ekotinda biso tókoba komipesa na makambo na biso ya losambo, kaka ndenge basaleli ya Nzambe ya sembo ya kala basalaki. Ezalaki bongo mpo na Timote na siɛklɛ ya liboso. (Ebr. 6:10-12) Timote atyaki elikya na ye epai ya Nzambe ya bomoi. (1 Tim. 4:10) Yango etindaki ye amipesa na mosala ya Nzambe mpe na kosalisa basusu. Ndenge nini asalaki yango? Ntoma Paulo alendisaki ye akolisa makoki ya koteya mpe ya koloba liboso ya bato. Timote asengelaki mpe kozala ndakisa malamu mpo na bandeko na ye bakristo, ezala bilenge to mibange. Azwaki mpe mikumba mosusu ya mpasi, na ndakisa kopesa toli ya makasi, kasi na boboto epai ya baoyo basengelaki na yango. (1 Tim. 4:11-16; 2 Tim. 4:1-5) Timote akokaki kotya motema ete Yehova akopesa ye mbano.—Rom. 2:6, 7. w24.06 22-23 par. 10-11
Mwamibale, 8 sanza ya 9
Yehova azalaki se kokebisa Yisraele mpe Yuda na nzela ya basakoli na ye nyonso.—2 Bak. 17:13.
Mbala mingi, Yehova asalelaki basakoli na ye mpo na kokebisa mpe kosembola bato na ye. Na ndakisa, na nzela ya Yirimia, Nzambe alobaki: “Zongá, Ee Yisraele mopɛngwi . . . Nakotala bino na nkanda te, mpo nazali sembo . . . Nakokanga nkanda mpo na libela te. Ndimá ete omemi ngambo, mpo otombokeli Yehova Nzambe na yo.” (Yir. 3:12, 13) Na nzela ya Yoele, Yehova alobaki: “Bózongela ngai na motema mobimba.” (Yoe. 2:12, 13) Atindaki Yisaya aloba ete: “Bómipɛtola; bólongola liboso ya miso na ngai misala na bino ya mabe; bótika kosala mabe.” (Yis. 1:16-19) Mpe na nzela ya Ezekiele, Yehova atunaki: “Nasepelaka nde na liwa ya moto mabe? Nasepelaka te ete atika etamboli na ye ya mabe mpe akoba kozala na bomoi? . . . Nasepelaka ata moke te na liwa ya moto. Na yango, bóbongwana mpe bózala na bomoi.” (Ezk. 18:23, 32) Yehova asepelaka ete bato bábongola motema mpo alingi bákoba kozala na bomoi, libela na libela! w24.08 9 par. 5-6
Mwamisato, 9 sanza ya 9
Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Ezali na litomba.—2 Tim. 3:16.
Basaleli nyonso ya Nzambe bazwaka bilei ya elimo, litambwisi, mpe libateli oyo esengeli. Ndakisa moko oyo emonisi ete Yehova aponaka bilongi te ezali ndenge asali ete bato na mokili mobimba bákoka kozala na Biblia lelo oyo. Makomami mosantu ekomamaki libosoliboso na minɔkɔ misato: Ebre, Aramɛyɛ, mpe Grɛki. Baoyo bayebi kotánga minɔkɔ ya libosoliboso oyo Biblia ekomamaki bazali nde na boyokani makasi na Yehova koleka baoyo bayebi minɔkɔ yango te? Te, ezali bongo te. (Mat. 11:25) Kondimama na biso epai ya Yehova etaleli te bakelasi oyo totángi to minɔkɔ oyo toyebi. Yehova apesi libaku ya kozwa bwanya na ye kaka te na baoyo batángi, apesi libaku yango na moto nyonso na mabele, ezala baoyo batángi mingi to te. Liloba na ye Biblia ebongolami na bankóto ya minɔkɔ; na yango, bato na mokili mobimba bakoki koyeba mateya na yango mpe koyekola ndenge oyo bakoki kokóma baninga ya Nzambe.—2 Tim. 3:16, 17. w24.06 6-7 par. 13-15
Mwaminei, 10 sanza ya 9
Libebi ya [Yerusaleme] ekómi pene.—Luka 21:20.
Kobebisama ya ebongiseli ya Bayuda, ndenge Yesu asakolaki, ezalaki koya. Bakristo yango basengelaki kosalela ntango oyo etikalaki mpo na komibongisa; kokómisa makasi bizaleli lokola kondima mpe koyika mpiko. (Ebr. 10:25; 12:1, 2) Mosika te, tokokutana na bolɔzi monene koleka oyo bakristo Baebre bakutanaki na yango. (Mat. 24:21; Em. 16:14, 16) Tótalela mwa batoli ya sikisiki oyo Yehova apesaki bakristo yango, oyo ekoki kosalisa biso mpe. Na mokanda na ye epai ya Baebre, ntoma Paulo alendisaki bakristo báyekolaka Liloba ya Nzambe na mozindo. (Ebr. 5:14–6:1) Paulo asalelaki Makomami ya Ebre mpo na komonisa bandeko ete losambo ya bakristo eleki losambo ya Bayuda. Paulo ayebaki ete soki bakristo yango bakómi na boyebi mingi mpe bakangi ntina ya solo malamu mpenza, ekosalisa bango báyeba makanisi ya lokuta oyo ekoki kobungisa bango nzela mpe bábwaka yango. w24.09 8-9 par. 2-3; 10 par. 6
Mwamitano, 11 sanza ya 9
Ya solo mpenza Nkolo asekwaki.—Luka 24:34.
Bayekoli ya Yesu bazalaki na mposa ya kolendisama. Mpo na nini? Basusu kati na bango batikaki bandako na bango, mabota na bango, mpe misala na bango mpo na kolanda Yesu ntango nyonso. (Mat. 19:27) Basusu bazalaki lisusu na esika te na kati ya bana-mboka mpo bakómaki bayekoli ya Yesu. (Yoa. 9:22) Basalaki makambo wana nyonso mpo bandimaki ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki. (Mat. 16:16) Kasi ntango babomaki Yesu, bilikya nyonso oyo bazalaki na yango ekendaki na mai mpe balɛmbaki nzoto. Na ntembe te, Yesu amonaki ete mawa ya bayekoli na ye ezalaki bolɛmbu ya elimo te; ezalaki nde mpasi ya kobungisa Nkolo na bango. Na yango, kaka na mokolo oyo asekwaki, abandaki kolendisa baninga na ye. Na ndakisa, abimelaki Maria Magadalene ntango azalaki kolela na lilita na ye. (Yoa. 20:11, 16) Abimelaki mpe bayekoli mosusu mibale oyo atikaki na mboka Emause. Na nsima abimelaki mpe ntoma Petro. w24.10 13 par. 5-6
Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 9
Bózalaka ntango nyonso pene mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo bozali na yango.—1 Pe. 3:15.
Baboti, bóbongisa mwana na bino mpo ayeba kolimbola ntina oyo andimaka ete Mozalisi azali. Bokoki kotalela masolo ya jw.org oyo elobi “Mituna oyo bilenge batunaka—Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?” Na nsima, mwana na yo akoki kolobela makanisi nini akoki kosalela, oyo amoni ete ekoki mpenza kosalisa basusu bándima ete Mozalisi azali. Lendisá ye nde abimisa kaka makanisi na ye na molɔngɔ mpe na ndenge ya polele soki bana mosusu bandimi asolola na bango. Na ndakisa, mwana-kelasi moko akoki koloba: “Nandimaka kaka eloko oyo nakoki komona, mpe Nzambe namoná ye te.” Elenge mokristo akoki koloba: “Kanisá ete ozali kotambola na zamba oyo ezali mpenza mosika mpe kuna okuti libulu ya mai oyo batongá malamu. Okoloba nini? Soki olobi ete na ntembe te moto moko nde asalaki yango, bongo tokoloba nini mpo na ebele ya biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́?” w24.12 18 par. 16
Mwalomingo, 13 sanza ya 9
Bwanya ezalaka nde epai ya mibange te mpe mayele eyaka te na koumela na bomoi?—Yobo 12:12.
Biso nyonso tozalaka na mposa ya litambwisi mpo tózwa bikateli ya malamu na bomoi. Tokoki kozwa litambwisi yango mingimingi epai ya bankulutu mpe bakristo mosusu oyo bakɔmɛli na elimo. Soki bazali mikóló na biso, tosengeli te komona mbala moko ete toli na bango esilá ngala. Yehova alingi tóyekola epai ya mikóló. Balekisi ntango mingi koleka biso mpo na koyekola makambo, kozwa mayele, mpe bwanya. Na ntango ya kala, Yehova asalelaki mibange ya sembo mpo na kolendisa mpe kotambwisa bato na ye. Tótalela ndakisa ya Moize, Davidi mpe ntoma Yoane. Bazalaki na bomoi na bileko ekeseni, mpe bomoi na bango ezalaki ndenge moko te. Pene na nsuka ya bomoi na bango, bapesaki baoyo bazalaki naino bilenge toli ya bwanya. Mobali mokomoko ya sembo amonisaki ntina ya kotosa Nzambe. Ozala elenge to mokóló, okoki kozwa matomba na toli oyo bapesaki.—Rom. 15:4; 2 Tim. 3:16. w24.11 8 par. 1-2
Mwayambo, 14 sanza ya 9
Soki bolei mosuni ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila na ye te, bozali na bomoi te na kati na bino.—Yoa. 6:53.
Banda na ntango ya Noa, Nzambe apekisaki bato kolya makila. (Eba. 9:3, 4) Yehova azongelaki epekiseli yango na Mobeko oyo apesaki Yisraele. Moto nyonso oyo alei makila asengelaki “kobomama.” (Lev. 7:27) Yesu azalaki koteya bato bátosa Mobeko. (Mat. 5:17-19) Na yango, tokoki kokanisa ata moke te ete akokaki kosɛnga ebele ya Bayuda wana bálya mpenza mosuni ya nzoto na ye to bámɛla makila oyo euti na misisa na ye. Yesu azalaki koloba na ndenge ya elilingi, ndenge kaka asalaki yango ntango alobaki na mwasi moko Mosamaria ete: ‘Mai oyo ngai nakopesa ekopesa bomoi ya seko.’ (Yoa. 4:7, 14) Yesu alingaki te koloba na mwasi Mosamaria ete akozwa bomoi ya seko kaka soki amɛli mai moko boye. Ndenge moko mpe, alingaki koloba te ete ebele ya bato oyo bazalaki na ye na Kapernaume bakozala na bomoi libela na libela soki balei mosuni ya nzoto na ye mpe bamɛli makila na ye. w24.12 9 par. 4-6
Mwamibale, 15 sanza ya 9
Bókaba nzoto na bino lokola mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima. Mpe bósalela makoki na bino ya kokanisa wana bozali kosalela ye mosala mosantu.—Rom. 12:1.
Mibali bakristo basengli kokeba ete lolenge ya mabe oyo mokili etalelaka basi ekɔtela bango te. Mpo na nini? Moko ya bantina ezali ete mbala mingi makanisi etindaka moto na misala. Ntoma Paulo akebisaki bakristo oyo batyami mafuta na Roma ete ‘bátika kolanda makambo ya mokili oyo.’ (Rom. 12:1, 2) Ntango Paulo akomaki mokanda epai ya Baroma, emonani ete lisangá ezalaki kuna banda mwa ntango. Kasi, maloba ya Paulo emonisi ete bato mosusu na kati ya lisangá yango bazalaki kaka kolanda mimeseno mpe makanisi ya mokili. Yango wana alendisaki bango bábongola makanisi mpe bizaleli na bango. Na ntembe te toli yango etali mpe mibali bakristo lelo oyo. Likambo ya mawa, bakristo mosusu lelo oyo bazali kolanda makanisi ya mokili mpe konyokola kutu basi na bango. w25.01 9 par. 4
Mwamisato, 16 sanza ya 9
Bóbatela etonga ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ na bino, bósala lokola bakɛngɛli.—1 Pe. 5:2.
Bankulutu lelo oyo mpe bazalaka na makambo mingi ya kosala. Bazali bapalanganisi ya nsango malamu. (2 Tim. 4:5) Bamipesaka na molende na mosala ya kosakola, babongisaka mosala ya kosakola na teritware na bango, mpe bapesaka biso formasyo na oyo etali kosakola mpe koteya malamu. Basalaka mpe mosala ya kosambisa na motema mawa mpe kozanga kopona bilongi. Ntango mokristo moko asali lisumu ya monene, bankulutu basalaka makasi mpo na kosalisa ye abongisa boyokani na ye na Yehova. Nzokande, balukaka mpe kobatela bopɛto ya lisangá. (1 Ko. 5:12, 13; Gal. 6:1) Bankulutu bazalaka libosoliboso babateli ya mpate. (1 Pe. 5:1-3) Babongisaka malamu badiskur oyo euti na Biblia, basalaka makasi báyeba ndeko mokomoko na lisangá, mpe bakendaka kotala bandeko mpo na kolendisa bango. Longola mikumba na bango, bankulutu mosusu bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga mpe kobatela Bandako ya Bokonzi, kobongisa mayangani ya etúká, basusu basalaka na Komite ya boyokani na minganga mpe na bituluku ya bandeko mpo na kotala bato ya maladi. Bankulutu basalaka mosala makasi mpo na biso! w24.10 20 par. 9
Mwaminei, 17 sanza ya 9
Kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa mpo na Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na nzela ya Kristo.—1 Ko. 15:22.
Na Biblia, liloba “kosikolama” emonisaka kolongwa na bokangami, to kolongwa na ngambo mpo lisiko efutamaki. Ntoma Petro alobelaki yango boye: “Boyebi mpenza ete ezalaki te na biloko oyo ekoki kobeba, na palata to na wolo, nde bosikolamaki [to, “bozwaki bonsomi”] na lolenge ya bomoi ya mpambampamba oyo bankɔkɔ na bino batikelaki bino. Kasi ezalaki nde na makila moko ya motuya, lokola oyo ya mwana-mpate ezangi mbeba mpe ezangi litɔnɔ, makila ya Kristo.” (1 Pe. 1:18, 19, msl.) Na nzela ya mbeka ya lisiko, tokoki kolongwa na boyangeli mabe ya lisumu mpe ya liwa. (Rom. 5:21) Ya solo, tozali na ntina ya kozala na botɔndi mingi epai ya Yehova mpe Yesu mpo na kosikolama oyo tozwi na nzela ya makila to bomoi ya motuya ya Yesu. w25.02 5 par. 15-16
Mwamitano, 18 sanza ya 9
Esengo na moto oyo abangaka Nzambe ntango nyonso.—Mas. 28:14.
Ndenge nini tokoki komibatela mpo tókwea na komekama te? Tótala mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya elenge mobali oyo Masese mokapo 7 elobeli. Elenge yango asalaki pite na mwasi moko ya ndumba. Vɛrsɛ 22 emonisi ete elenge yango abandaki kolanda mwasi yango “na mbala moko.” Kasi ndenge bavɛrsɛ oyo ezali liboso emonisi, elenge yango asilaki kosala makambo ebele oyo ememaki ye mokemoke na lisumu. Makambo yango nini? Ya liboso, na mpokwa, elenge yango “azalaki koleka pene [na nzela ya mwasi yango ya ndumba] na esika babalabala ekutani.” Na nsima, akendaki na nzela oyo ememi na ndako ya mwasi yango. (Mas. 7:8, 9) Nsima na yango, ntango amonaki mwasi yango, akimaki ye te. Kutu, andimaki kopesa ye lipwɛpwɛ mpe koyoka ye ntango azalaki kolobela bambeka ya kimya oyo apesaki, mbala mosusu mpo na kotinda elenge yango akanisa ete azali moto mabe te. (Mas. 7:13, 14, 21) Soki elenge mobali wana asalaka makambo wana te, alingaki komibatela mpo akwea na komekama te mpe alingaki kosala lisumu te. w24.07 16 par. 8-9; 19 par. 19
Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 9
Bosengeli nde kolimbisa ye na boboto mpe kobɔndisa ye.—2 Ko. 2:7.
Yehova atikelaka masumu ya minene nzela te na kati ya basaleli na ye. Aboyaka komonisa “motema mawa” epai ya basumuki oyo babongoli motema te mpe atikaka te ete bákoba kosangana na basaleli na ye ya sembo. Yehova azali Nzambe ya motema mawa, kasi akangaka miso na mabe te; akakolaka mpe mibeko na ye te. (Yuda 4) Kutu, soki asali bongo, akomonisa motema mawa te mpo lisangá mobimba ekobeba. (Mas. 13:20; 1 Ko. 15:33) Nzokande, tomoni ete Yehova alingi ata moto moko te abomama. Alingi nde kobikisa bato soki esengeli. Amonisaka motema mawa epai ya bato oyo babongoli motema mpe balingi kobongisa boyokani na bango na ye. (Ezk. 33:11; 2 Pe. 3:9) Yango wana, ntango mobali ya Korinti abongolaki motema mpe atikaki kosala lisumu, Yehova asalelaki ntoma Paulo mpo na kolimbwela lisangá ya Korinti ete basengeli kolimbisa mobali yango mpe koyamba ye lisusu na lisangá. w24.08 17 par. 7; 18-19 par. 14-15
Mwalomingo, 20 sanza ya 9
Ntango nyonso oyo bosalaki yango epai ya moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai oyo, bosalaki yango epai na ngai.—Mat. 25:40.
Na ndakisa ya bampate ná bantaba, Yesu alobelaki lisambisi ya bato oyo bazwi libaku ya kopesa bandeko na ye oyo batyami mafuta mabɔkɔ. (Mat. 25:31-46) Na ntango ya ‘bolɔzi monene,’ akosambisa bato mwa moke liboso Armagedone ebanda. (Mat. 24:21) Ndenge kaka mobateli ya mpate akabolaka bampate na bantaba, Yesu akokabola baoyo bapesaki bakristo oyo batyami mafuta mabɔkɔ na baoyo basalaki yango te. Biblia emonisi ete Yesu, Mosambisi oyo Yehova atyá, akosambisa na bosembo. (Yis. 11:3, 4) Atalaka bizaleli, makanisi, mpe maloba oyo bato balobaka, ata mpe ndenge oyo basalelaka bakristo oyo batyami mafuta makambo. (Mat. 12:36, 37) Yesu akoyeba banani basungaki bandeko na ye oyo batyami mafuta mpe bapesaki bango mabɔkɔ na mosala na bango. Lolenge moko ya libosoliboso oyo bato oyo bazali lokola bampate bapesaka bandeko ya Kristo mabɔkɔ ezali ya kosalisa bango na mosala ya kosakola. w24.09 20-21 par. 3-4
Mwayambo, 21 sanza ya 9
Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo.—1 Tes. 5:21.
Tokoyeba soki makambo oyo tondimaka ezali solo ntango tokokanisi yango na makambo oyo Biblia elobi. Na ndakisa, tótalela likambo ya elenge oyo azali komituna soki azali na motuya na miso ya Nzambe. Asengeli kondima likanisi yango kaka boye? Te, asengeli ‘koluka koyeba soki likambo yango ezali solo’; asengeli koyekola Biblia mpo na komona soki makanisi ya Yehova ezali nini. Ntango totángaka Liloba ya Nzambe, “toyokaka” Yehova azali koloba na biso. Kasi, mpo na koyeba eyano na ye na motuna oyo ezali kotungisa biso, tosengeli kosala milende mingi. Tosengeli mpenza koyekola na Biblia likambo ya sikisiki oyo tozali na yango. Tokoki kosala bolukiluki na likambo yango na kati ya ebele ya bisaleli oyo ebongiseli ya Yehova epesi biso. (Mas. 2:3-6) Na bolukiluki yango, tokoki kobondela Yehova atambwisa biso mpe asalisa biso tómona likanisi na ye na motuna na biso. Na nsima, tokoki koluka mitinda ya Biblia mpe makambo ya sikisiki oyo eyokani na likambo na biso. w24.10 25 par. 4-5
Mwamibale, 22 sanza ya 9
[Bolingo] elukaka matomba na yango moko te.—1 Ko. 13:5.
Yehova akopambola te milende ya moto oyo asalaka makambo na lolendo to mpo na koluka matomba na ye moko. (1 Ko. 10:24, 33; 13:4) Na bantango mosusu, ata baninga ya Yesu ya penepene balukaki mikumba na makanisi ya mabe. Talá likambo oyo bantoma mibale ya Yesu, Yakobo ná Yoane, basalaki. Basɛngaki Yesu atya bango na esika ya lokumu na Bokonzi na ye. Yesu apesaki bango longonya te mpo na ezaleli wana ya koluka lokumu. Kasi, alobaki na bantoma nyonso 12 ete: “Moto oyo alingi kokóma moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino, mpe moto oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo ya bato nyonso.” (Mrk. 10:35-37, 43, 44) Bandeko mibali oyo bazali koluka kokóma basaleli na misala na makanisi ya malamu, elingi koloba mpo na kosalela basusu, bakozala lipamboli mpo na lisangá.—1 Tes. 2:8. w24.11 15-16 par. 7-8
Mwamisato, 23 sanza ya 9
Makambo . . . elongaka soki bapesi-toli bazali ebele.—Mas. 15:22.
Ntango tozali kozwa bikateli, bolingo ekotinda biso tóluka litomba ya “moto mosusu” mpe tózala na bopɔlɔ. (1 Ko. 10:23, 24, 32; 1 Tim. 2:9, 10) Soki tosali bongo, tokozwa ekateli oyo ekomonisa ete tolingaka mpe tomemyaka basusu. Soki olingi kozwa ekateli moko ya monene, kanisá oyo ekosɛnga mpo na kokokisa yango. Yesu ateyaki biso ete esengeli koyeba liboso oyo likambo oyo tolingi kosala ekosɛnga. (Luka 14:28) Na yango, kanisá ntango boni, mosolo boni, mpe milende nini ekosɛnga mpo ekateli oyo ozwi elonga. Na makambo mosusu, okoki kosolola na bato ya libota na yo mpo na kotala oyo moto na moto asengeli kosala mpo na kopesa mabɔkɔ na ekateli yango. Mpo na nini komibongisa bongo ezali na ntina mingi? Yango ekoki kosalisa yo omona soki esengeli kobongola makambo mosusu to kopona likambo mosusu oyo ekozala malamu koleka. Mpe ntango okɔtisi moto mokomoko ya libota na likambo yango mpe oyoki makanisi oyo bapesi, bakozala na esengo ya kopesa yo mabɔkɔ mpo ekateli yango elonga. w25.01 18-19 par. 14-15
Mwaminei, 24 sanza ya 9
Bósepela, mpe bózala na esengo.—Yis. 65:18.
Yisaya amonisi ntina oyo tosengeli ‘kosepela mpe kozala na esengo’ na paradiso ya elimo. Yehova nde asali paradiso yango ya elilingi. (Yis. 65:18, 19) Yango wana ezali likambo ya kokamwa te ndenge azali kosalela biso mpo na kosalisa bato bálongwa na bibongiseli ya mokili oyo, oyo eteyaka bango solo te mpo na Nzambe, mpe kosalisa bango bákɔta na paradiso na biso kitoko ya elimo! Tosepelaka na mapamboli ya kozala na kati ya solo, mpe yango etindaka biso tóyebisa basusu makambo yango. (Yir. 31:12) Tozali mpe na botɔndi mpe na esengo mpo na elikya oyo tozwi lokola tozali na kati ya paradiso ya elimo. Biblia elaki ete ‘tokotonga bandako mpe tokofanda kuna, tokolona bilanga ya vinyo mpe tokolya mbuma na yango.’ ‘Tokoboma nzoto mpamba te’ mpo tokozala “bato oyo Yehova apamboli.” Yehova alaki ete tokozala na bomoi ya kimya mpe oyo ezali na ntina mpenza. Ayebi mposa ya mokomoko mpe ‘akokokisa mposa ya ekelamu nyonso ya bomoi.’—Yis. 65:20-24; Nz. 145:16. w24.04 22-23 par. 11-12
Mwamitano, 25 sanza ya 9
Libanga na ngai ya makasi, esika na ngai ya kokima, ezali Nzambe.—Nz. 62:7.
Tokokómisa Yehova Libanga na biso ntango tozali kotyela ye motema mobimba. Totyaka motema ete soki totosi ye ata na ntango ya mpasi, ekozala mpo na bolamu na biso. (Yis. 48:17, 18) Ntango tomoni ndenge asalisi biso, tokotyela ye motema lisusu mingi. Yango ekosalisa biso tóndima ete kaka Yehova nde akoki kosalisa biso tólonga ata mokakatano ya ndenge nini. Ndenge moko na libanga monene, Yehova apikamá makasi mpe azali bongolabongola te. Bomoto ya Yehova mpe mokano na ye ebongwanaka te. (Mal. 3:6) Ntango botomboki ebimaki na Edene, Yehova abongolaki te mokano na ye mpo na bato. Ndenge ntoma Paulo akomaki yango, Yehova “akoki komiwangana te.” (2 Tim. 2:13) Yango elingi koloba ete ata soki likambo nini esalemi, to soki bato basali nini, Yehova akobongola te bizaleli na ye, mokano na ye, to mibeko na ye. Lokola Nzambe na biso azali bongolabongola te, toyebi ete akopesa biso lobiko mpe akosalisa biso na bantango ya mpasi.—Nz. 62:6, 7. w24.06 27-28 par. 7-8
Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 9
Bomoto ya motema oyo ebombaná . . . ezali na motuya monene.—1 Pe. 3:4.
Soki olingani na moto, nini ekosalisa bino bóyeba soki bokoki kobalana to te? Bóyekola koyebana malamu. Mbala mosusu oyebaki makambo mosusu ya moto yango liboso bólingana. Kasi, sikoyo lokola bolingani, ozwi libaku ya koyekola koyeba “bomoto ya motema oyo ebombaná.” Yango elimboli koyeba malamu elimo na ye, bomoto na ye, mpe ndenge na ye ya kokanisa. Nsima ya mikolo, osengeli kozala na likoki ya kopesa biyano na mituna lokola oyo: ‘Moto yango akozala molongani ya malamu mpo na ngai?’ (Mas. 31:26, 27, 30; Ef. 5:33; 1 Tim. 5:8) ‘Tokokoka komoniselana bolingo mpe kotyelana likebi na ndenge oyo esengeli? Tokokoka kofanda elongo atako bolɛmbu na biso?’ (Rom. 3:23) Wana bozali koyebana, kobosana likambo oyo te: Mpo na koyeba soki ekosimba, etaleli mpenza te soki bokokani na makambo mingi, kasi nde likoki na bino ya komesana na makambo oyo ekesenisi bino. w24.05 27 par. 5
Mwalomingo, 27 sanza ya 9
Nasaleli Yehova lisumu.—2 Sa. 12:13.
Mokonzi Davidi asalaki mabunga minene. Kasi ntango mosakoli Natane amonisaki ye lisumu na ye polele, Davidi amikitisaki mpe abongolaki motema. (Nz. 51:3, 4, 17, maloba oyo ezali likoló) Mokonzi Ezekiasi mpe asalelaki Yehova lisumu. (2 Nt. 32:25) Kasi, ndenge moko na Davidi, Ezekiasi amikitisaki mpe abongolaki motema. (2 Nt. 32:26) Nsima ya kotalela bomoi ya Ezekiasi, Yehova atalelaki ye lokola mokonzi ya sembo oyo “azalaki kosala makambo oyo ezali malamu.” (2 Bak. 18:3) Yango eteyi biso nini? Soki tosali masumu, tosengeli kobongola motema mpe kosala nyonso mpo na kozongela yango te. Bongo soki bankulutu bapesi biso toli, ata na likambo oyo ezali komonana moke? Tosengeli te kokanisa ete Yehova to bankulutu balingi biso te. Ata bakonzi ya Yisraele oyo bazalaki malamu bazalaki kozwa toli mpe mpamela. (Ebr. 12:6) Ntango bapesi biso toli, tosengeli (1) kondima yango na komikitisa, (2) kosala mbongwana oyo esengeli, mpe (3) kokoba kosalela Yehova na motema mobimba. Soki tobongoli motema na masumu na biso, Yehova akolimbisa biso.—2 Ko. 7:9, 11. w24.07 21 par. 8; 22 par. 9, 11
Mwayambo, 28 sanza ya 9
Bólongola moto mabe na kati na bino.—1 Ko. 5:13.
Mosumuki alongolamaka na lisangá ntango aboyi kondima lisalisi oyo bankulutu bapesi ye mbala na mbala mpo na komema ye abongola motema. (2 Bak. 17:12-15) Misala na ye emonisi ete aponi koboya kotosa mibeko ya Yehova. (Mib. 30:19, 20) Liyebisi ekopesama na lisangá ete azali lisusu Motatoli ya Yehova te. Ntina ya liyebisi yango ezali te mpo na koyokisa mosumuki nsɔni. Kasi, ezali nde mpo lisangá elanda etinda ya Biblia ya ‘kotika kosala boninga’ na moto yango, mpe koboya ‘kolya kutu esika moko na ye.’ (1 Ko. 5:9-11) Yehova apesaki etinda yango mpamba te. Ntoma Paulo akomaki: “Mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini.” (1 Ko. 5:6) Basumuki oyo baboyi kobongola motema bakoki kolɛmbisa ekateli ya baoyo basalaka makasi mpo na kotosa mibeko ya sembo ya Yehova na bomoi na bango.—Mas. 13:20; 1 Ko. 15:33. w24.08 27 par. 3-4
Mwamibale, 29 sanza ya 9
Na makambo nyonso, nazwaka makasi na lisalisi ya Nzambe, moto oyo apesaka ngai nguya.—Flp. 4:13.
Tokoki mpenza te kopesa basusu makasi to nguya na ndenge ya solo. Kasi, tokoki kosalela nguya oyo tozali na yango mpo na bolamu na bango. Na ndakisa, tokoki kokende kosala wenze mpo na ndeko moko ya mobange to oyo azali ebɔsɔnɔ, to tokoki kosalela ye misala ya ndako. Tokoki mpe kosalisa na kotya bopɛto to kobongisa Ndako ya Bokonzi. Kobosana mpe te ete maloba ezalaka na nguya. Oyebi ndeko moko oyo akolendisama soki moto apesi ye longonya? Oyebi ndeko oyo azali na mposa ya kozwa libɔndisi? Soki oyebi, okoki koluka ndenge ya koyebisa moto yango ete otyelaka ye likebi? Okoki kokende kotala ye, kobenga ye na telefone, to mbala mosusu kotindela ye karte, to mpe kokomela ye mesaje. Esɛngi kaka te ete oloba makambo ya mindɔndɔ. Mwa maloba moke oyo euti na motema nde ekoki kozala mpenza eloko oyo ndeko azali na mposa na yango mpo atikala sembo lelo to mpo abatela makanisi malamu na likambo oyo azali na yango.—Mas. 12:25; Ef. 4:29. w24.09 28 par. 8-10
Mwamisato, 30 sanza ya 9
Soki moto azali koluka kozala mokɛngɛli, azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi.—1 Tim. 3:1.
Soki ozali mosaleli na misala banda mwa ntango, mbala mosusu ozali kosala makasi mpo na kokokisa masɛngami mpo okóma nkulutu. Okoki koluka kosala ‘mosala yango ya malamu mingi’? Mosala ya nkulutu esangisi makambo nini? Nkulutu apesaka ndakisa na mosala ya kosakola, asalaka mosala makasi mpo na kobatela bampate mpe koteya, mpe alendisaka bandeko ya lisangá na maloba mpe misala. Yango wana, Biblia ebengi bankulutu oyo basalaka mosala makasi “makabo oyo ezali bato.” (Ef. 4:8) Masɛngami nini osengeli kokokisa mpo okóma nkulutu? Kokokisa masɛngami mpo na kokóma nkulutu ekeseni na koluka mosala ya mosuni. Mbala mingi na mokili, soki ozali na boyebi na likambo oyo patrɔ azali koluka, okoki kozwa mosala. Kasi, soki olingi kokóma nkulutu, osengeli kosuka kaka te na koyeba kosakola mpe koteya. Osengeli kokokisa masɛngami ya Biblia mpo na bankulutu ndenge ezali na 1 Timote 3:1-7 mpe Tito 1:5-9. w24.11 20 par. 1-3