LOYEMBO 151
Akobenga
Ya Papye
1. Bomoi lelo ezali mokuse,
Lobi esuki mpenza.
Ntango liwa ekómeli biso,
Epesaka nde mawa.
Soki mot’awei, akosekwa nde?
Yoká elak’a Nzambe:
(MONDIMO)
Bakufi; Yo okobenga.
Okosekwisa bango.
Mp’okoyoka mposa ya
Mosal’a mabɔkɔ n’o.
Tókoba kotya elikya,
Yehova akopesa
Biso bomoi libela,
Mpo asalaki biso.
2. Nzambe ayebi baninga na ye,
Ata oyo bakufá.
Oyo baza’ na motema na ye,
Nzambe akosekwisa.
Na nsima, bomoi ya solosolo:
Paradiso ya seko.
(MONDIMO)
Bakufi; Yo okobenga.
Okosekwisa bango.
Mp’okoyoka mposa ya
Mosal’a mabɔkɔ n’o.
Tókoba kotya elikya,
Yehova akopesa
Biso bomoi libela,
Mpo asalaki biso.
(Talá mpe Yoa. 6:40; 11:11, 43; Yak. 4:14.)