LOYEMBO 150
Bóluka Nzambe mpo bóbika
Ya Papye
1. Bato basangani
Baboyi Mwana-Nzambe.
Nzambe alobi: “Bokonzi
Ya bikólo esuki.”
Esí bayangeli;
Ngal’a Yesu ekoki.
Alingi aboma bayini.
Azali koya noki.
(MONDIMO)
Bóluka Yah mpo bóbika,
Bótyela ye mpe motema.
Bótika mabe,
Bózala sembo,
Bóndima bokonzi na ye.
Mpe akobikisa bino
Na nguya na ye.
2. Ntango toz’oteya,
Bato baza’ kopona.
Basusu baboyi na bango,
Basusu mpe bandimi.
Mokili se mpasi
Kasi Nzambe azali.
Aboyaka te moto’a sembo,
Ntango aleleli ye.
(MONDIMO)
Bóluka Yah mpo bóbika,
Bótyela ye mpe motema.
Bótika mabe,
Bózala sembo,
Bóndima bokonzi na ye.
Mpe akobikisa bino
Na nguya na ye.
(Talá mpe 1 Sa. 2:9; Nz. 2:2, 3, 9; Mas. 2:8; Mat. 6:33.)