LOYEMBO 141
Bomoi ezali likamwisi
Ya Papye
1. Mwana ya sika, pole ya moi,
Mbum’a nzete mpe mbula, nyonso wana
Eza’ makabo; Misal’a Nzambe.
Apesi biso bomoi mpo tosepela.
(MONDIMO)
Likabo ya bomoi eleki ntalo.
Ez’otinda biso nyonso tólinga Nzambe.
At’osali nini, okosomb’ango te.
Eza’ nde likabo—Eza’ likamwisi.
2. Basusu, lokola mwasi’a Yobo,
Balobi: ‘Fingá Nzambe, kufá na yo.’
Tokolanda te; tókumisa ye,
Toyebi bolamu na ye, tótɔnda ye.
(MONDIMO)
Likabo ya bomoi eleki ntalo,
Ez’otinda biso nyonso tólinga Nzambe.
At’osali nini, okosomb’ango te.
Eza’ nde likabo—Eza’ likamwisi.
(Talá mpe Yobo 2:9; Nz. 34:12; Mos. 8:15; Mat. 22:37-40; Rom. 6:23.)