LOYEMBO 81
Bomoi ya mobongisi-nzela
Ya Papye
1. Mokolo ebandi, talá moi ebimi.
Nalamuki,
namibongisi, nsima nabondeli.
N’esengo, nabimi mpo na kosakola.
Basusu bayoki,
basusu baboyi, nakobi.
(MONDIMO)
Ata moi to mbula
Nakoteya kaka
Mpo nalingaka Nzambe na nga’.
Naponi kozala
Mobongisi-nzela.
Mpo nalingi yo mingi mpenza, Yehova.
2. Mokolo esili, talá moi elali.
Nazongi, nalɛmbi,
kasi n’esengo, nabondeli.
Mosala nalingá na motema moko.
Matɔndi Yehova,
mpo na mapamboli opesi.
(MONDIMO)
Ata moi to mbula
Nakoteya kaka
Mpo nalingaka Nzambe na nga’.
Naponi kozala
Mobongisi-nzela.
Mpo nalingi yo mingi mpenza, Yehova.
(Talá mpe Yos. 24:15; Nz. 92:2; Rom. 14:8.)