LOYEMBO 128
Tóyika mpiko tii na nsuka
Ya Papye
1. Kanisá bilak’a Nzambe,
Epesa yo mpiko.
Matey’a Nzambe na biso
Ezali mpenza solo.
Kangamá na yango mpenza
Mpo nsuka eza’ koya.
Ata mpasi, zalá sembo,
Yehova aza’ na yo.
2. Kobungisa te bolingo
Na yo ya liboso.
Atako mpasi ezwi yo
Kangá kaka motema.
At’omekami makasi,
Kosila mayele te.
Yehova akotɛlɛma
Pene mpo asunga yo.
3. Baoyo bayiki mpiko,
Bango bakobika.
Nzambe akokoma bango
Na buku n’e ya bomoi.
Yango wana, yiká mpiko;
Kolɛmba na nzela te.
Nzambe akozala na yo
Mpe akopambola yo.
(Talá mpe Ebr. 6:19; Yak. 1:4; 2 Pe. 3:12; Em. 2:4.)