LOYEMBO 127
Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala
Ya Papye
1. Nafuta yo nini, Yehova Nzambe,
Mpo na kotɔnda yo, mpo na oyo naza’?
Liloba na yo, nde talatala na nga’;
Sungá namimona mpenza ndenge naza’.
(MOLƆNGƆ MOSUSU)
Nakosalela yo, ndenge nalaká,
Mpe nakosala te kaka mpo nasala.
Nakoboma mpenza nzoto mpo na yo;
Mpo nalingi kosepelisa yo.
Nzambe, salisá ngai namona mpenza
Lolenge ya moto olingi nazala.
Bato ya sembo, nde mpenza bato na yo.
Ngai mpe nasepelisa motema na yo.
(Talá mpe Nz. 18:25; 116:12; Mas. 11:20.)