Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • bhs nk. 3-7
  • Mokano ya Nzambe mpo na biso ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokano ya Nzambe mpo na biso ezali nini?
  • Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Tángá na Biblia eteyaka
  • Mitó ya makambo mike
  • BIBLIA ETEYAKA ETE NZAMBE AKOSALA MAKAMBO YA MINENE NA MABELE.
  • MAKAMBO OYO BIBLIA ETEYAKA EKOPESA YO MATOMBA
Makambo oyo Biblia eteyaka
bhs nk. 3-7

Mokano ya Nzambe mpo na biso ezali nini?

NTANGO ozali kotánga zulunalo, kotala televizyo to kolanda bansango na radio, okomona mpe okoyoka makambo mingi oyo etali mobulu, kobomana, bitumba mpe terorisme. Ntango mosusu ozali konyokwama mpo ozali kobɛla to mpo ndeko to moninga na yo moko akufi.

Libota moko ezali kolanda bansango na radio

Omituna:

  • Nzambe alingi ete bomoi na ngai mpe ya bato ya libota na ngai ezala nde boye?

  • Epai wapi nakoki kozwa lisalisi mpo na kolonga mikakatano?

  • Mokolo mosusu tokozala mpenza na kimya?

Biblia epesi biyano ya malamu na mituna wana.

BIBLIA ETEYAKA ETE NZAMBE AKOSALA MAKAMBO YA MINENE NA MABELE.

  • Bato bakomona mpasi lisusu te, bakokóma mibange te, mpe bakokufa te.​—Emoniseli 21:4

  • “Motɛngumi akopumbwa lokola serfe.”​—Yisaya 35:6

  • “Miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama.”​—Yisaya 35:5

  • Bato oyo bakufá bakozonga na bomoi.​—Yoane 5:28, 29

  • Moto moko te akobɛla.​—Yisaya 33:24

  • Bato nyonso bakozala na biloko ya kolya ebele.​—Nzembo 72:16

    Mobange azongi elenge, motɛngumi apumbwe, moto oyo akufá azongi na bomoi, moto ya maladi ná oyo akufá miso babiki

MAKAMBO OYO BIBLIA ETEYAKA EKOPESA YO MATOMBA

Motatoli ya Yehova moko azali koyekola Biblia na moto

Okoki kokanisa ete makambo oyo otángi na nkasa ya minei mpe ya mitano ya buku oyo ezali kaka ndɔtɔ mpamba. Kasi, Nzambe alaki ete, etikali moke asala makambo wana awa na mabele, mpe Biblia emonisi ndenge akosala yango.

Kasi, Biblia esuki kaka te na komonisa makambo wana. Eyebisi biso mpe makambo oyo tosengeli koyeba mpo tózala mpenza na esengo mpe na bomoi ya malamu banda sikoyo. Kanisá mwa moke makambo oyo etungisaka yo. Ekoki kozala kozanga mbongo to mikakatano na libota, maladi, to liwa ya moto moko oyo olingaka mingi. Biblia ekoki kosalisa yo olonga mikakatano yango, mpe ekoki kokitisa yo motema na biyano ya mituna oyo:

  • Mpo na nini tonyokwamaka?

  • Ndenge nini tokoki kolonga mikakatano?

  • Libota na biso ekoki kozala na esengo?

  • Soki moto akufi, akendaka wapi?

  • Tokomona lisusu bandeko to baninga na biso oyo bakufá?

  • Mpo na nini tokoki kotyela Nzambe motema ete akokokisa bilaka na ye nyonso?

Ndenge ozali kotánga buku oyo emonisi ete olingi koyeba makambo oyo Biblia eteyaka. Buku oyo ekosalisa yo. Baparagrafe ezali na mituna oyo ekosalisa yo oyeba Biblia malamumalamu. Ebele mpenza ya bato basepelaka kosolola masolo ya Biblia na Batatoli ya Yehova. Tokanisi ete yo mpe okosepela. Tiká ete Nzambe apambola yo ntango ozali koyeba makambo oyo Biblia ezali koteya yo!

NDENGE YA KOYEBA BIBLIA NA YO MALAMU

BIBLIA ezali na mikanda 66. Mokanda na yango mokomoko ezali na mikapo mpe bavɛrsɛ. Ndenge bakaboli yango ekosalisa yo omona vɛrsɛ oyo ozali koluka noki. Soki na buku oyo bapesi vɛrsɛ moko, motángo oyo elandi nkombo ya mokanda ya Biblia ezali mokapo, mpe oyo elandi yango ezali vɛrsɛ. Na ndakisa, soki omoni “2 Timote 3:16,” yango elingi koloba Mokanda ya mibale epai ya Timote, mokapo 3, vɛrsɛ 16.

Soki ozali koluka bavɛrsɛ oyo bakomi, okomesana noki na Biblia. Tosɛngi yo obanda kotánga Biblia mokolo na mokolo. Soki ozali kotánga mikapo misato to mitano mokolo na mokolo, okoki kotánga Biblia mobimba na mbula moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto