Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • od mok. 2 nk. 12-16
  • Tóndima mokumba oyo Nzambe apesi Kristo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóndima mokumba oyo Nzambe apesi Kristo
  • Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKUMBA YA KRISTO
  • KONDIMA MOKUMBA YA YESU ELIMBOLI NINI?
  • Nsango oyo tosengeli kosakola
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ntina oyo tosengeli “kolanda Klisto”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ndenge oyo Yesu Klisto akoki kosunga biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mokano na Nzambe mozali pene mpo na kokokana
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
Makambo mosusu
Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
od mok. 2 nk. 12-16

MOKAPO 2

Tóndima mokumba oyo Nzambe apesi Kristo

“NA EBANDELI Nzambe azalisaki likoló mpe mabele,” mpe biloko nyonso oyo asalaki ezalaki “malamu mingi.” (Eba. 1:1, 31) Yehova asalaki bato mpo bázala na bomoi ya malamu. Kasi, botomboki oyo ebimaki na Edene ekataki esengo ya bato mpo na mwa ntango. Atako bongo, mokano ya Yehova mpo na mabele mpe bato ebongwanaki te. Nzambe amonisaki ete bakitani ya Adama oyo bakotosa ye bakosikolama. Losambo ya solo ekozongisama, mpe Nzambe akoboma Satana mpe misala mabe na ye nyonso. (Eba. 3:15) Bongo biloko nyonso ekozala lisusu “malamu mingi.” Yehova akokokisa mokano na ye na nzela ya Mwana na ye, Yesu Kristo. (1 Yoa. 3:8) Na yango, esengeli tóndima mokumba oyo Nzambe apesi Kristo.​—Mis. 4:12; Flp. 2:9, 11.

MOKUMBA YA KRISTO

2 Soki tokanisi mokumba oyo Nzambe apesi Kristo, tokomona ete mokumba yango esangisi makambo mingi. Yesu azali Mosikoli ya bato, Nganga-Nzambe Monene, Mokonzi ya lisangá ya bokristo, mpe sikoyo azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Komanyola mikumba yango ebakisaka botɔndi na biso mpo na bibongiseli oyo Nzambe azwá mpe etindaka biso tólinga Kristo Yesu mingi. Biblia elobeli mikumba ndenge na ndenge oyo azali na yango.

Yesu azali na mokumba monene na kokokisama ya mokano ya Yehova mpo na bato

3 Na boumeli ya mosala ya Kristo awa na mabele, emonanaki polele ete na nzela na ye nde boyokani kati na bato ya botosi ná Nzambe ekozonga. (Yoa. 14:6) Lokola azali Mosikoli ya bato, Yesu apesaki bomoi na ye lisiko na esika ya bato mingi. (Mat. 20:28) Na yango, Yesu asukaki kaka te na kozala ndakisa ya moto oyo akangamaki na Nzambe. Azali na mokumba monene na kokokisama ya mokano ya Yehova mpo na bato. Ezali kaka na nzela na ye nde Nzambe akoki kondima biso. (Mis. 5:31; 2 Ko. 5:18, 19) Liwa oyo Yesu akufaki mbeka mpe lisekwa na ye efungoleli bato ya botosi nzela ya kozwa mapamboli ya seko na Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló.

4 Lokola azali Nganga-Nzambe Monene, Yesu azali na likoki ya “koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso” mpe kosala ete masumu ya bayekoli na ye oyo bamipesi na Nzambe, oyo bazali awa na mabele, ezipama. Ntoma Paulo alobaki: “Nganga-nzambe monene oyo tozali na ye, ezali te moto oyo akoki te koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso, kasi ezali nde moto oyo amekamaki na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu.” Na nsima Paulo alendisi baoyo bazali komonisa kondima epai ya Yesu Kristo ete básalela mpenza ebongiseli yango oyo esalisaka bato bázongisa boyokani na Nzambe; alobaki boye: “Yango wana, tópusana na elobeli ya polele mpe na bosembo penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene, mpo Nzambe ayokela biso mawa mpe amonisela biso boboto monene ntango tozali na mposa ya lisalisi.”​—Ebr. 4:14-16; 1 Yoa. 2:2.

5 Yesu azali mpe Mokonzi ya lisangá ya bokristo. Kaka ndenge bayekoli na ye na siɛklɛ ya liboso bazalaki na mposa te ete moto azala mokonzi na bango, ezali mpe bongo mpo na biso lelo. Yesu atambwisaka lisangá na nzela ya elimo santu mpe ya babateli ya mpate-basungi oyo bazali mpenza na makoki, oyo bakozongisa monɔkɔ epai na ye mpe epai na Tata na ye ya likoló mpo na ndenge oyo bazali kobatela etonga ya Nzambe. (Ebr. 13:17; 1 Pe. 5:2, 3) Na esakweli moko oyo elobeli Yesu, Yehova alobaki: “Talá! Napesi ye azala motatoli na bituluku ya bato ya bikólo, azala mokambi mpe komanda ya bituluku ya bato ya bikólo.” (Yis. 55:4) Yesu amonisaki ete esakweli yango ekokisamaki ntango ayebisaki bayekoli na ye: “Bóbengama mpe te ‘bakambi,’ mpo Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo.”​—Mat. 23:10.

6 Libyangi oyo Yesu apesaki emonisaki polele makanisi na ye mpe mposa na ye ya kosalisa biso; alobaki: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Mat. 11:28-30) Lokola Yesu Kristo azali kotambwisa lisangá ya bokristo na boboto mpe na ndenge oyo ezali kopemisa biso, yango emonisi ete azali “mobateli ya bampate oyo aleki malamu” mpo amekolaka Tata na ye ya likoló, Yehova Nzambe.​—Yoa. 10:11; Yis. 40:11.

7 Na mokanda ya liboso oyo ntoma Paulo akomelaki Bakorinti, alimbolaki mpe mokumba ya Yesu Kristo na maloba oyo: “Asengeli koyangela tii ntango Nzambe akotya banguna nyonso na nse ya makolo na ye. Kasi ntango biloko nyonso ekotyama na nse na ye, Mwana ye moko mpe akomitya na nse ya Moto oyo atyaki biloko nyonso na nse na ye, mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.” (1 Ko. 15:25, 28) Liboso aya awa na mabele, Yesu azalaki “mosali ya mayele” ya Nzambe mpe ekelamu na Ye ya liboso. (Mas. 8:22-31) Ntango Nzambe atindaki Yesu awa na mabele, asalaki ntango nyonso mokano ya Nzambe. Ayikaki mpiko na komekama oyo eleki monene mpe atikalaki sembo epai ya Tata na ye tii na liwa. (Yoa. 4:34; 15:10) Lokola Mwana na ye atikalaki sembo tii na liwa, Nzambe asekwisaki ye mpo na bomoi na likoló mpe apesaki ye lotomo ya kozala Mokonzi na Bokonzi ya likoló. (Mis. 2:32-36) Lokola Kristo Yesu azali Mokonzi, Nzambe apesi ye mokumba monene ya kokamba ebele mpenza ya bikelamu ya elimo mpe ya nguya mpo na kolongola boyangeli ya bato mpe kosilisa mabe nyonso awa na mabele. (Mas. 2:21, 22; 2 Tes. 1:6-9; Em. 19:11-21; 20:1-3) Na ntango yango, kaka Bokonzi ya Nzambe na likoló oyo ezali na mabɔkɔ ya Kristo nde ekoyangela mabele mobimba.​—Em. 11:15.

KONDIMA MOKUMBA YA YESU ELIMBOLI NINI?

8 Yesu Kristo, Ndakisa na biso, azali moto ya kokoka. Azwi mokumba ya kobatela biso. Mpo tózwa matomba ya libateli na ye ya bolingo mpe ya malamu, tosengeli kotikala sembo epai ya Yehova mpe kotambola elongo na ebongiseli na ye oyo ezali se kokende liboso.

9 Bayekoli ya Yesu na siɛklɛ ya liboso bandimaki na motema moko mokumba oyo Nzambe apesi Kristo. Bamonisaki yango na ndenge bazalaki kosala na bomoko na nse ya bokonzi ya Kristo mpe kotika ye atambwisa bango, na nzela ya elimo santu. (Mis. 15:12-21) Ntoma Paulo alobelaki bomoko ya lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ntango akomaki: “Wana tozali koloba solo, tókola na bolingo na makambo nyonso na boyokani na moto oyo azali motó, Kristo. Uta na ye nzoto mobimba, lokola esangani liboke moko na boyokani mpenza mpe ebongisami mpo na kosala elongo na nzela ya matonga nyonso oyo epesaka nyonso oyo esengeli, na kolanda mosala ya enama mokomoko na meko oyo ekoki, ezali kosalisa na bokoli ya nzoto mpo emitonga yango moko na bolingo.”​—Ef. 4:15, 16.

10 Soki biso nyonso na kati ya lisangá tozali na boyokani mpe biso nyonso tozali kosala na bomoko na nse ya bokonzi ya Kristo, bokoli ekomonana mpe tokozala na bolingo, oyo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—Yoa. 10:16; Kol. 3:14; 1 Ko. 12:14-26.

11 Makambo oyo ezali kosalema na mokili na kotalela bisakweli ya Biblia emonisi polele ete kobanda 1914, Yesu Kristo asili kotyama na kiti ya Bokonzi. Azali sikoyo koyangela na kati ya banguna na ye. (Nz. 2:1-12; 110:1, 2) Yango elimboli nini mpo na baoyo bazali na bomoi sikoyo awa na mabele? Mosika te, Yesu akomonisa ete azali Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo ntango akopesa banguna na ye etumbu ya Nzambe. (Em. 11:15; 12:10; 19:16) Na nsima, elaka ya kosikola bato, oyo Yehova apesaki na ebandeli ya botomboki ya moto, ekokokisama mpo na baoyo bazali na lobɔkɔ ya mobali ya Kristo, oyo bandimami. (Mat. 25:34) Tozali mpenza na esengo ndenge tondimi mokumba oyo Nzambe apesi Kristo! Tiká ete tókoba kozala na bomoko wana tozali kosala mosala ya kosakola na mokili mobimba na nse ya litambwisi ya Kristo, na mikolo oyo ya nsuka!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto