ETENI 11
Komonisa kondima ya solosolo lelo oyo
LELO oyo, bato mingi balobaka ete bazali na kondima. Nzokande, Yesu ateyaki ete kaka bato moke nde bakozala na kondima ya solosolo. Alobaki boye: “Nzela ya monene mpe oyo efungwamá nde oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta kuna bazali mingi; nzokande porte oyo ya moke mpe nzela ya nkaka yango nde ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.”—Matai 7:13, 14.
Makambo nini bato oyo bazali na kondima ya solosolo basalaka lelo oyo? Yesu alobaki boye: “Bokoyeba bango na mbuma na bango. . . . Nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu, kasi nzete nyonso ya mabe ebotaka mbuma ya mabe.” (Matai 7:16, 17) Na yango, kondima ya solosolo ebotaka “mbuma ya malamu.” Etindaka bato bámonisa bizaleli oyo Nzambe asepelaka na yango. Ndenge nini basalaka yango?
Salelá malamu nguya oyo ozali na yango
Bato oyo bazali na kondima ya solosolo basalelaka nguya mpe bokonzi nyonso oyo bazali na yango mpo na kokumisa Nzambe mpe kosalisa basusu. Yesu ateyaki boye: “Moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino.” (Marko 10:43) Ndenge moko mpe, mibali oyo bazali na kondima ya solosolo bazalaka makambo makasi te ezala libándá to na kati ya ndako. Balingaka basi na bango, bapesaka bango lokumu mpe bakokisaka bamposa na bango na bolingo nyonso. Makomami elobi boye: “Bino mibali, bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasi te.” (Bakolose 3:19) “Ndenge moko mpe . . . mibali, bókoba kofanda na bango na boyebi, bópesaka bango lokumu mpo bazali mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi, mpo bozali mpe bazwi-ya-libula ya boboto monene ya bomoi elongo na bango, mpo mabondeli na bino ekangisama nzela te.”—1 Petro 3:7.
Longola yango, mwasi oyo azali na kondima ya solosolo “asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:33) Basi basengeli ‘kolinga mibali na bango’ mpe ‘kolinga bana na bango.’ (Tito 2:4) Batata ná bamama oyo bazali na kondima ya solosolo balekisaka ntango mingi elongo na bana na bango mpe bateyaka bango mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Ezala na ndako, na esika ya mosala to na bisika mosusu, bapesaka basusu lokumu mpe limemya. Balandaka toli oyo ya Makomami: “Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.”—Baroma 12:10.
Basaleli ya Nzambe batosaka etinda oyo ya Makomami: “Osengeli te kondima kanyaka.” (Kobima 23:8) Basalelaka bokonzi na bango te mpo na koluka matomba na bango moko. Balukaka nde mabaku ya kosalisa basusu, mingimingi baoyo bazali na bosɛnga. Balandaka toli oyo: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” (Baebre 13:16) Yango wana, bamonaka ete maloba oyo ya Yesu ezali solo: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
Mekolá bosembo ya Nzambe
Bato oyo bazali na kondima ya solosolo batosaka mibeko ya Nzambe kozanga ete bátinda bango na makasi, mpe bamonaka ete “mibeko na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Bayebi ete “mobeko ya Yehova ezali ya kokoka . . . Bitinda ya Yehova ezali alima, esepelisaka motema; mitindo ya Yehova ezali pɛto, engɛngisaka miso.”—Nzembo 19:7, 8.
Kondima ya solosolo etindaka mpe bango báboya lolenge nyonso ya koponapona. Bamonaka te ete moto moko aleki mosusu kaka mpo azali moto ya mposo boye, ya ekólo boye to azali mozwi; bamekolaka nde Nzambe. “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”—Misala 10:34, 35.
Kondima ya solosolo etindaka bato bázala “sembo na makambo nyonso.” (Baebre 13:18) Moto oyo azali na kondima ya solosolo aboyaka mpe kotɔnga bato mpe kokosela bango makambo. Davidi mokomi ya nzembo akomaki boye mpo na lolenge ya moto oyo Nzambe alingaka: ‘Akoselaka bato makambo na lolemo na ye te. Asalelaka moninga na ye eloko moko ya mabe te.’—Nzembo 15:3.
Monisá bwanya ya Nzambe
Bato oyo bazali na kondima ya solosolo, mateya na bango nyonso eutaka na Makomami Mosantu. Bandimaka ete “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene.” (2 Timote 3:16) Na boyokani na bango na bato mosusu, bamonisaka “bwanya oyo euti na likoló,” oyo ezalaka “pɛto, mpe kimya, na makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe na mbuma ya malamu.” (Yakobo 3:17) Baboyaka mimeseno oyo esepelisaka Nzambe te mpe misala ya bilimo mabe mpe ‘bakebaka na bikeko.’—1 Yoane 5:21.
Monisá bolingo ya solosolo
Mosakoli Moize alobaki boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso ya bomoi.” (Kolimbola Mibeko 6:5) Bato oyo bazali na kondima ya solosolo bamonisaka bolingo ya ndenge wana epai ya Nzambe. Bazalaka na limemya mpo na nkombo ya Nzambe, Yehova. ‘Bapesaka Yehova matɔndi’ mpe ‘babelelaka nkombo na ye’ na kondima. (Nzembo 105:1) Basaleli ya Nzambe batosaka mpe etinda oyo: “Osengeli kolinga moninga na yo lokola yo moko.” (Balevi 19:18) Baboyaka mobulu mpe basalaka makasi ‘bázala na kimya na bato nyonso.’ (Baroma 12:18) ‘Bayekolaka etumba lisusu te,’ na ndenge ya elilingi, ‘batulaka mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango mpo ekóma makwangola ya kokata matiti.’ (Yisaya 2:4) Na ndenge yango, ‘bazali na bolingo na kati na bango.’ (Yoane 13:35) Okoki koyeba bato yango lelo oyo?