Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rk eteni 2 nk. 4-5
  • Kondima ya solosolo ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima ya solosolo ezali nini?
  • Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki kokóma na kondima ya solosolo?
  • Monisá kondima na bilaka ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Kondima—Ezaleli oyo epesaka makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • “Bakiselá biso kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Komonisa kondima ya solosolo lelo oyo
    Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
Makambo mosusu
Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
rk eteni 2 nk. 4-5

ETENI 2

Kondima ya solosolo ezali nini?

Mobali moko azali kotala lokasa ya mbongo

Lokola mbongo, kondima esengeli kozala ya solo mpo ezala na valɛrɛ

KOZALA na kondima ya solosolo esuki kaka te na kondima ete Nzambe azali. Ezali na bamilio ya bato oyo bandimelaka Nzambe, nzokande basalaka makambo ya mabe na nko. “Kondima” ya ndenge wana ezali lokola mbongo ya monyato, oyo emonanaka lokola mbongo ya malamu, nzokande ezali na valɛrɛ te. Kasi, kondima ya solosolo ezali nini?

Kondima ya solosolo eutaka na boyebi ya sikisiki ya Makomami Mosantu. Makomami wana oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe eyebisaka biso solo na ntina na Nzambe mpe esalisaka biso tóyeba ye. Eyebisaka biso mibeko na ye, mikano na ye, mpe mateya na ye. Na mateya yango, tokoki kotánga:

  • Nzambe azali moko. Akokani na Nzambe mosusu te.

  • Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. Azali mosakoli ya Nzambe.

  • Nzambe ayinaka mitindo nyonso ya losambo ya bikeko.

  • Mokolo ya kosambisama ezali kozela bato.

  • Bamiliare ya bato oyo bakufá bakosekwisama na Paradiso.

Kondima ya solosolo etindaka biso tósala misala ya malamu. Misala ya ndenge wana ekumisaka Nzambe, ememelaka biso moko mpe bato mosusu matomba. Na misala yango ya malamu, tokoki kotánga makambo lokola:

  • kosambela Nzambe.

  • komonisa bizaleli oyo Nzambe asepelaka na yango​—mingimingi bolingo.

  • kobengana makanisi ya mabe mpe bamposa ya mabe.

  • kokoba kondimela Nzambe ata soki tokutani na mikakatano.

  • koteya basusu makambo ya Nzambe.

Libota moko ememeli mobange mwasi moko bilei

Kondima ya solosolo emonanaka na misala ya malamu

Ndenge nini okoki kokóma na kondima ya solosolo?

Moto oyo azali kosala ngalasisi mpo na kokembisa nzoto na ye

Kondima ezali lokola nzoto ya moto; ekembaka soki moto azali kosala ngalasisi

Sɛngá Nzambe asalisa yo. Mosakoli Moize abondelaki Nzambe boye: “Nabondeli yo, salá ete nayeba banzela na yo, mpo nayeba yo, mpo nandimama na miso na yo.”a Nzambe ayokaki libondeli na ye mpe ayanolaki yango. Moize akómaki ndakisa monene ya kondima. Nzambe akosalisa yo mpe okóma na kondima ya solosolo.

Mibombelá ntango ya koyekola Makomami Mosantu. Mikanda oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ezala mpe Torah, Nzembo, mpe Baevanzile, ezali na kati ya Biblia Mosantu, buku oyo ebongolami mingi mpe ekabolami mingi koleka babuku mosusu nyonso na mokili. Ozalaka na Biblia ya yo moko?

Salelá toli ya Makomami Mosantu na bomoi na yo mokolo na mokolo. Kondima ezali lokola nzoto ya moto; ekembaka soki moto azali kosala ngalasisi. Soki ozali kosala makambo oyo emonisaka kondima, kondima na yo mpe ekokóma makasi. Okomona yo moko ete toli ya Nzambe esalisaka. Ya solo, toli ya malamu oyo ezali na Makomami Mosantu esili kobongisa bomoi ya bato ebele. Tángá mpo na koyeba bandakisa mosusu.

a Kobima 33:13.

Okopesa eyano nini?

  • Kondima ya solosolo eutaka na nini?

  • Kondima ya solosolo etindaka moto asala makambo nini ya malamu?

  • Ndenge nini okoki kokóma na kondima ya solosolo?

Nzambe abatelaka Liloba na ye

Tokoki mpenza kondima ete Nzambe abatelaki Makomami Mosantu mpo ebebisama te tii lelo oyo. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali na likoki ya kobatela buku na ye. Liloba na ye elobi ete: “Matiti ya mobesu ekauki, fololo elɛmbilɛmbi; kasi liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko.”​—Yisaya 40:8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto