Mokapo 32
Ndenge nini nakoki komisepelisa mwa moke?
Tyá elembo soki maloba oyo elandi ezali solo to lokuta.
Biblia elobi ete . . .
kobɛta masano ezalaka ntango nyonso mabe.
□ Solo □ Lokuta
Bafilme ná baemisyo nyonso oyo balakisaka na televizio ezalaka kaka mabe.
□ Solo □ Lokuta
Mabina nyonso epekisami.
□ Solo □ Lokuta
OSALI mosala makasi pɔsɔ mobimba. Bokómi mokolo oyo botángaka te na pɔsɔ. Osilisi misala na yo nyonso ya ndako. Kasi ozali naino na makasi, mpe yango ezali likabo moko ya kitoko oyo bilenge bazalaka na yango. (Masese 20:29) Sikoyo bino nyonso bozali na mposa ya komisepelisa.
Ntango mosusu baninga na yo bakanisaka ete Biblia eteyaka ete moto asengeli te komisepelisa. Kasi likambo yango ezali solo? Tiká tótalela maloba ya solo to ya lokuta oyo ezali na lokasa oyo eleki mpe tómona oyo mpenza Biblia elobi na likambo etali komisepelisa.
● Kobɛta masano ezalaka ntango nyonso mabe.
Lokuta. Biblia elobi ete “ngalasisi ya nzoto ezali na litomba na mwa makambo moke.” (1 Timote 4:8) Lelo oyo masano ya malamu mpe oyo esepelisaka ezali ebele, na ndakisa kotambwisa velo, kokima mbangu, kobɛta bale, tenisi, volleyball.
Yango elingi nde koloba ete esengeli te kokeba? Tótalela ntina oyo Ntoma Paulo alobelaki maloba oyo ezali na vɛrsɛ oyo touti kotánga. Akomelaki elenge Timote ete: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba na mwa makambo moke; kasi ezaleli ya kokangama na Nzambe ezali na litomba na makambo nyonso, mpo yango ezali na elaka ya bomoi ya lelo mpe ya bomoi ya mikolo oyo ezali koya.” Maloba wana ya Ntoma Paulo esalisi biso tóbosana te ete kosepelisa Nzambe esengeli kozala ntango nyonso likambo ya liboso na bomoi na biso. Mpo koyeba mpenza ete kosepelisa Nzambe esengeli kozala likambo ya liboso na bomoi na yo, ata ntango ozali kopona lisano oyo okobɛta, osengeli komituna mituna misato oyo elandi:
1. Makama ebimaka mingi na lisano yango to te? Kotalela kaka te makambo oyo bato balobaka mpo na lisano yango to ndenge oyo bilenge mosusu bakumisaka yango. Luká koyeba malamu lisano yango. Na ndakisa, luká koyeba makambo oyo elandi: Bato boni bazwaka makama na lisano oyo? Bibongiseli nini ezwamá mpo na kobatela bato oyo bazali kobɛta lisano yango? Moto asengeli kozwa formasyo nini mpe bisaleli nini asengeli kozala na yango mpo azwa likama te? Atako likama ekoki kobima na likambo nyonso moto azali kosala, ntina ya libosoliboso ya lisano yango ezali nde kotinda bato bándima ata kotya bomoi na bango na likama?
Bomoi ezali likabo ya Nzambe, mpe na Mobeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele moto asengelaki kozwa bitumbu makasi soki abomi moto mosusu kozanga ete akana yango. (Kobima 21:29; Mitángo 35:22-25) Na yango, Mobeko ezalaki kolendisa libota ya Nzambe bázwaka bibongiseli mpo na komibatela. (Kolimbola Mibeko 22:8) Lelo oyo mpe, bakristo basengeli komonisa limemya mpo na bomoi.
2. Lisano yango ekosala ete nazala ná bato ya malamu? Soki ozali makasi na lisano moko, baninga ná balakisi bakoki kotya yo mbamba mpo okɔta na ekipi moko ya eteyelo na bino. Mbala mosusu okoki koyoka mposa makasi ya kondima kobɛta na ekipi yango. Elenge mokristo moko na nkombo Marc alobi ete: “Nayebaka te mpo na nini baboti na ngai balingaka te nabɛta na ekipi ya eteyelo na biso.” Kasi na esika oluka kondimisa baboti na yo makanisi na yo, talelá naino makambo oyo: Mbala mingi masano mpe baantrenema oyo basalaka mpo na masano yango, ezalaka nsima ya bangonga ya kelasi. Soki obɛtaka malamu mpenza, bakosɛnga yo olekisaka ntango mingi mpo na lisano yango. Kasi soki obɛtaka malamu te, bakotya yo mbamba mpo olekisa ntango mingi koleka na kosala antrenema mpo oyeba lisano yango malamu. Longola yango, mingimingi bato ya ekipi moko bakómaka baninga makasi mpo basepelaka elongo soki bazwi coupe mpe bakabolaka mpasi soki bapoli.
Sikoyo omituna boye: ‘Kolekisa ntango na likambo moko oyo ekoki kosala ete nakóma na boninga makasi ná bilenge mosusu oyo bandimaka te mateya ya Biblia oyo ngai nandimaka, yango ekobebisa bizaleli na ngai to te?’ (1 Bakorinti 15:33) ‘Makambo nini nakondima komipimela kaka mpo nabɛta na ekipi moko boye?’
3. Lisano yango ekosɛnga ngai ntango mpe mbongo boni? Biblia epesi biso toli ete ‘tóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.’ (Bafilipi 1:10) Mpo na kosalisa yo olanda toli yango, omituna boye: ‘Kobɛta lisano oyo ekolya ngai ntango oyo nabongisá mpo na kosala badevuare to makambo etali kosalela Nzambe? Nakobebisa mbongo boni mpo na lisano yango? Mbongo oyo nazali na yango, ekokoka mpo na lisano yango?’ koyanola na mituna oyo ekosalisa yo oyeba kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso.
● Bafilme ná baemisyo nyonso oyo balakisaka na televizyo ezalaka kaka mabe.
Lokuta. Biblia epesi bakristo etinda ete ‘bákangama makasi na oyo ezali malamu’ mpe ‘báboya mabe ya ndenge nyonso.’ (1 Batesaloniki 5:21, 22) Bafilme mpe baemisyo ya televizyo nyonso te nde ebukaka toli oyo ya Biblia.a
Ya solo, kokende na sinema ekoki kopesa yo libaku malamu ya kolekisa ntango ná baninga. Elenge mwasi moko ya Afrika ya Sudi na nkombo Irène alobi ete: “Soki nazali na mposa ya kotala filme moko boye, nabengaka moninga moko na telefone, mpe na nsima tóyebisaka baninga mosusu.” Mingimingi, bilenge yango bakendaka kotala filme yango soki mpokwa ebandi. Na nsima, baboti na bango bayaka kozwa bango, mpe bakendeke kolya na restora.
Atako bafilme mpe televizyo ezali makambo ya mikolo oyo, ezali na yango kaka kolakisa makambo oyo ezalaki kosalema kala, elingi koloba kobɛta masolo. Masolo ya Yesu ezalaki mpenza kosimba mitema ya bato. Na ndakisa, lisolo ya Mosamaria malamu etindaka moto ayokelaka bato mosusu mawa mpe eteyaka ndenge ya kozala na bizaleli mosusu ya malamu.—Luka 10:29-37.
Lelo oyo mpe, bato oyo babimisaka bafilme balukaka koteya bato makambo oyo ekoki kobongola lolenge na bango ya kotalela makambo etali bizaleli ya malamu. Balukaka kotinda bato oyo bazali kotala filme bákóma lokola bato oyo balobelami na filme, ata soki bato yango bazali basali mabe to balingaka konyokola bato mpe balingaka kokonza basusu. Soki okebi te, okoki kobanda kokɔtela moto mabe oyo bazali kolakisa na filme mpe kolinga ete moto yango alonga, kobanda kosepela na misala na ye ya mbindo mpe ya mobulu! Ndenge nini okoki kokima motambo yango?
Ntango ozali kopona filme to emisyo ya televizio oyo olingi kotala, omituna boye: ‘Yango ekosalisa ngai nayokelaka mpenza basusu mawa?’ (Baefese 4:32) ‘To ekotinda ngai nasepelaka ntango likama ekómeli basusu?’ (Masese 17:5) “Yango ekosalisa ngai ‘nayina oyo ezali mabe?’” (Nzembo 97:10) ‘Ekosala nde ete nakóma kokɔtela “basali-mabe”?’—Nzembo 26:4, 5.
Maloba mokuse oyo balobaka liboso filme ebanda mpe bapiblisite oyo basalaka, ekoki kosalisa yo oyeba soki filme yango ezali ndenge nini. Kasi ‘kondima liloba nyonso’ kaka bindimela te. (Masese 14:15) Mpo na nini? Maloba mokuse oyo balobaka na ebandeli ya filme emonisaka kaka makanisi ya moto mosusu. Lisusu, piblisite ekoki kobomba makambo ya mabe oyo ezali na kati ya filme yango. Elenge moko na nkombo Corinne alobi boye: “Namonaka ete koyeba liboso bato oyo filme moko elakisi mingi ekoki kopesa moto mwa likanisi mpo na koyeba soki filme yango ekozala ndenge nini.”
Baninga na yo oyo batosaka toli ya Biblia lokola yo bakoki koyeba soki filme moko ezali malamu to te. Kasi kobosana te ete mbala mingi bato balobelaka kaka makambo oyo esepelisaki bango na filme moko. Mpo na nini te kotuna bango: bongo makambo nini ya mabe ezali na filme yango? Tuná mpenza mituna oyo esengeli. Na ndakisa, luká koyeba soki filme yango ezali na makambo ya mobulu, ya kosangisa nzoto, to ya bademo. Okoki mpe kozwa toli ya malamu epai ya baboti na yo. Elenge moko na nkombo Vanessa alobi ete: “Natunaka baboti na ngai. Soki balobi ete filme moko ebongi mpo natala, nakendaka kotala yango.”
Kozwa na lisɛki te likambo ya kopona filme to emisyo ya televizyo oyo olingi kotala. Mpo na nini? Mpamba te makambo oyo oponaka mpo na komisepelisa, emonisaka ndenge motema na yo ezali, mpe emonisaka makambo nini ozwaka na motuya mingi. (Luka 6:45) Makambo oyo oponaka emonisaka lolenge ya bato oyo olingaka kozala ná bango, elobeli olingaka, mpe makambo nini oyo etali kosangisa nzoto omonaka mabe te. Na yango, yebá kopona!
● Mabina nyonso epekisami.
Lokuta. Ntango Bayisraele bakatisaki Mai Motane mpe babikaki na mabɔkɔ ya mampinga ya Baezipito, Miriame ná basi mosusu babinaki. (Kobima 15:20) Longola yango, ntango mwana ya mobulu oyo Yesu alobelaki na lisese na ye azongaki, bato ‘babɛtaki miziki mpe babinaki’ mpo na komonisa esengo oyo bayokaki.—Luka 15:25.
Ezali mpe bongo lelo oyo. Na mikili mingi, soki mabota to baninga bakutani, mikóló ná bilenge babinaka. Atako bongo, tosengeli kokeba. Biblia epekisi te kokutana ná baninga mpo na komisepelisa, kasi ekebisi mpo na “bafɛti ya lokoso.” (Bagalatia 5:19-21) Mosakoli Yisaya akomaki boye: “Mawa na baoyo bazali kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpo na koluka masanga oyo elangwisaka, baoyo bazali koumela tii na molili ya mpokwa, bongo vinyo ekómi kopela lokola mɔtɔ na kati na bango! Mpe nzɛnzɛ, ebɛtɛlo ya nsinga, mbonda moke ná piololo, ná vinyo ezali ntango nyonso na bafɛti na bango; kasi bazali kotala mosala ya Yehova te.”—Yisaya 5:11, 12.
Na bafɛti ya ndenge wana, bato bazalaki komɛla “masanga oyo elangwisaka” mpe bazalaki kobɛta miziki ya mabe mpenza. Bazalaki kobanda na mpokwa mpe kokende tii ntɔngɔ saa. Talá mpe ezaleli ya bato oyo bazalaki na bafɛti yango: bazalaki kosala lokola Nzambe azali te! Na yango, tokoki kokamwa te ete Nzambe asepelaki te na bafɛti yango.
Soki babengisi yo na fɛti moko oyo mabina ekozala, omituna mituna lokola oyo: ‘Banani bakozala kuna? Bayebani lokola bato ya lolenge nini? Nani akotambwisa makambo na fɛti yango? Ekotambwisama ndenge nini? Baboti na ngai bandimi nakende na fɛti yango? Ekozala na mabina ya ndenge nini?’ Mabina mingi ezali kobongisama kaka mpo na kolamwisa bamposa ya nzoto. Okanisi ete kobina to kaka kotala mabina ya ndenge wana ekosalisa yo ‘okima pite?’—1 Bakorinti 6:18.
Okosala nini soki babengisi yo okende kobina na nganda oyo bato bakendaka na butu makasi mpo na komɛla mpe kobina (boîte de nuit)? Tótalela maloba ya elenge moko na nkombo Patrick, oyo azalaki kokende mingi na banganda yango liboso akóma mokristo. Alobi boye: “Bisika yango ezalaka na miziki ya nsɔni, mabina ya mbindo mpenza, mpe bato mingi bakendaka kuna bazalaka kaka na mokano moko.” Mokano yango ezali ke soki okei kuna, okoki kobima mpamba te, esengeli kaka osangisa nzoto. Kasi, ntango Batatoli ya Yehova bayekolaki na ye Biblia, Patrick abongolaki makanisi na ye. Sikoyo likanisi na ye ezali ete, “Banganda wana ezali bisika ya malamu te mpo na bakristo.”
Mpo na nini osengeli kozalaka ekɛngɛ?
Okanisi ete ntango nini soda akoki kokóma na likama makasi, na ntango ya etumba to ntango azali kozwa mopɛpɛ ná baninga na ye? Na ntembe te, ezali ntango azali kozwa mopɛpɛ, nde azalaka na makasi mingi te mpo na kobunda mpe bakoki koboma ye. Ndenge moko mpe, ntango ozali na eteyelo to na mosala, okebaka mingi na makambo oyo ekoki kobebisa boyokani na yo ná Yehova, mpe ozalaka mpenza ekɛngɛ. Ezali ntango ozali kozwa mopɛpɛ ná baninga, nde ozali na likama ya kosala makambo oyo Yehova aboyaka.
Baninga na yo mosusu bakoki kosɛka yo mpo olandaka oyo Biblia elobi na likambo etali komisepelisa. Ntango mosusu ata bilenge oyo baboti na bango bazali Batatoli ya Yehova bakoki kotya yo mosukusuku. Lisosoli ya bilenge ya ndenge wana eziká. (1 Timote 4:2) Mbala mosusu bakoloba na yo ete omimonaka lokola mosantu. Na esika olanda makanisi mabe ya baninga, batelá nde “lisosoli ya malamu.”—1 Petro 3:16.
Likambo eleki ntina ezali nde ndenge oyo Yehova atalelaka yo, kasi te ndenge oyo baninga na yo batalelaka yo! Soki baninga na yo bakómi kotya yo mpanzi likoló mpo ozali kolanda makambo oyo lisosoli na yo ezali kotinda yo, luká baninga ya malamu. (Masese 13:20) Kobosana te ete kaka yo moko nde osengeli komibatela mpo osala te makambo oyo Yehova aboyi ata ntango ozali komisepelisa.—Masese 4:23.
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 37, NA VOLIMI 1
Pornografi epalangani mingi lelo oyo mpe ezali mpasi te mpo na komona yango. Ndenge nini okoki kokima motambo yango?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Volimi 1, mokapo 36.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Elenge, sepelá na bolenge na yo, . . . mpe tambolá na banzela ya motema na yo mpe na makambo oyo miso na yo emoni. Kasi yebá ete mpo na oyo wana nyonso, Nzambe ya solo akosambisa yo.”—Mosakoli 11:9.
TOLI
Tuná baboti na yo soki bakolinga kopona bantango nini sanza na sanza, oyo bokobanda kofungola televizyo te, mpo bozala na ntango ya kosepela libota mobimba.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Kobina mpe koyemba ezalaki na ntina mingi na losambo ya solo epai ya bana ya Yisraele.—Nzembo 150:4.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Soki babengisi ngai nakɔta na ekipi moko ya lisano nsima ya kelasi, nakoloba boye: ․․․․․
Soki filme oyo nazali kotala ná baninga na ngai ezali malamu te, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
[OKANISI NINI?
● Mpo na nini bakristo basengeli koboya masano oyo etyaka bomoi na likama?
● Ndenge nini okoki koyeba soki filme boye to boye ezali malamu?
● Nini ekosalisa yo oyeba soki mabina boye to boye ebongi?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 269]
‘‘Nalingaka kobina mingi, kasi namoni ntina ya koyokelaka baboti na ngai. Natikaka te kobina ezala na ntina mingi na bomoi na ngai.’’—Tina
[Elilingi na lokasa 268]
Soda akoki kozala na likama makasi ntango atiki kokɛngɛla. Ndenge moko mpe, soki ozali ekɛngɛ te ntango ozali kozwa mopɛpɛ, okoki kosala makambo oyo ebongi te na mokristo