Mokapo 31
Nakoki kosala nini mpo nakóma te moombo ya miziki?
Otalelaka miziki ndenge nini?
□ Ekosala ngai eloko te soki ezangi.
□ Nakoki kokufa soki ezangi.
Oyokaka miziki ntango nini?
□ Nzelanzela
□ Ntango nazali koyekola
□ Banda ntɔngɔ tii mpokwa
Miziki ya ndenge nini olingaka mingi koleka, mpe mpo na nini? ․․․․․
EMONANI ete biso nyonso tobotamá na likoki ya kosepela na mindule mpe miziki ya kitoko. Mpe mpo na bilenge mingi, miziki ezali eloko oyo moto asengeli kozanga te. Elenge mwasi moko na nkombo Amber, oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Soki nayoki miziki te, nakoki kokufa. Nayokaka miziki na ngai ntango nyonso—ezala ntango nazali kosala misala ya ndako, kolamba, koyekola, to ntango nakei kosomba biloko.”
Miziki elandaka banɔti, kasi esukaka kaka wana te; esimbaka mpenza motema. Kaka ndenge ‘liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza ezalaka malamu mingi,’ koyoka miziki na ntango oyo ozali na mposa na yango mpenza, ekoki kopesa moto makasi! (Masese 15:23) Jessica, oyo azali na mbula 16, alobi boye: “Na ntango mosusu, okoki komona lokola ete moto moko te azali komitya na esika na yo. Kasi ntango nayokaka miziki oyo nalingaka mingi, namonaka ete ezali kaka ngai moko te nde nanyokwamaka na makanisi.”
Eyokanisaka to eswanisaka yo ná baboti na yo?
Ata soki olingaka miziki moko boye, ntango mosusu baboti na yo basepelaka na yango te. Elenge mobali moko alobi boye: “Papa ayebisaka ngai boye, ‘Katá miziki wana! Ezali kosala ngai matoi mpasi!’” Mbala mosusu olɛmbi baboti na yo mpe ozali komona lokola bazali koluka makambo esika ezali te. Elenge mwasi mosusu atuni boye: “Bongo ntango bango moko bazalaki bilenge? Baboti na bango bakanisaki te ete miziki na bango ezali mabe?” Ingred, oyo azali na mbula 16, alobi boye: “Mikóló bakangamaka kaka na makambo ya kala. Matata ekozala mingi te soki bayebi ete miziki ya ntango na biso ezali kosepelisa biso, ndenge oyo ya bango ezalaki mpe kosepelisa bango!”
Ingred alobi likambo moko ya ntina. Na ntembe te yo mpe oyebi ete banda kala, mikóló mpe bilenge bawelanaka na makambo oyo esepelisaka moto na moto. Kasi yango elingi koloba te ete likambo ya miziki esengeli ntango nyonso kobimisa matata. Mpo matata wana ebima te, osengeli kopona miziki oyo ekosepelisa ná yo ná baboti na yo. Yango ekozala mpasi te soki baboti na yo batosaka mateya ya Biblia. Mpo na nini? Mpamba te Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa yo ná baboti na yo bóyeba miziki oyo ebongi te mpo na bakristo mpe esika nini esengeli kotikela moto na moto apona oyo alingi. Mpo na yango, osengeli kotalela makambo mibale ya ntina: (1) makambo oyo miziki oyo oyokaka elobeli mpe (2) nzembo boni oyokaka. Libosoliboso, tótalela motuna oyo . . .
Miziki oyo nayokaka elobeli makambo nini?
Miziki ezali lokola bilei. Soki ezali ya malamu mpe eleki ndelo te, ekozala malamu mpo na yo; kasi soki ezali ya mabe, ezala mingi to te, ekosala yo mabe. Kasi likambo ya mawa, miziki ya mabe nde esepelisaka bato mingi koleka. Elenge moko na nkombo Steve amileli boye: “Mpo na nini nzembo nyonso ya kitoko ezalaka na maloba ya mabe mpenza?”
Soki osepeli na lokito ya nzembo moko boye, ezali na ntina okipe maloba na yango? Mpo na kosalisa yo ozwa eyano na motuna yango, omituna boye: ‘Soki moto alingi komɛlisa ngai pwazɔ, mayele nini akoki kosalela mpo namɛla yango? Akokómisa yango ngayi to sukali?’ Yobo, moto ya sembo, atunaki boye: “Litoi emekaka nde maloba te ndenge monɔkɔ emekaka bilei?” (Yobo 12:11) Na yango, na esika oyoka loyembo moko kaka mpo osepeli na ndenge bazali kobɛta yango, oyo ezali lokola eloko ya sukali oyo bakómisi ngayi, ekozala malamu ‘omeka naino maloba na yango,’ elingi koloba otalela naino titre mpe maloba ya loyembo yango. Mpo na nini? Mpamba te maloba oyo bakɔtisi na miziki yango ekoki kobongola makanisi mpe bizaleli na yo.
Kasi likambo ya mawa, miziki mingi lelo oyo ezali na maloba oyo etindaka bato na kosangisa nzoto, mobulu, mpe komɛla bangi. Soki okanisi ete koyoka miziki ya ndenge wana ekosala yo mabe moko te, boye miziki yango ebandi kobebisa yo.
Yo moko zwá ekateli
Baninga na yo bakoki kotya yo mbamba mpo oyokaka miziki ya mabe. Mbamba eutaka mpe na bato oyo basalaka mombongo ya kotɛka miziki. Na nzela ya radio, Internet, mpe televizyo, miziki ekómi mombongo moko ya makasi, oyo ezali kokɔtisa bamiliare ya badolare. Bafutaka bato oyo bayebi kosala piblisite ya miziki malamu mpenza mpo na kotinda yo okóma kosepela na miziki oyo bazali kotɛka.
Kasi soki otiki ete baninga na yo, radio to televizyo báponela yo miziki oyo osengeli koyoka, yango ekomonisa ete ozali lisusu te na bonsomi ya kozwa bikateli yo moko. Okokóma mpenza nsuka ya moombo. (Baroma 6:16) Biblia epesi biso toli ete tótɛmɛla makanisi mabe ya mokili na makambo ya ndenge wana. (Baroma 12:2) Yango wana, ekozala malamu osalelaka ‘makoki na yo ya kosolola mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.’ (Baebre 5:14) Ndenge nini okoki kosalela makoki na yo ya kokanisa ntango ozali kopona miziki? Talelá toli oyo:
Talá ezipeli na yango malamu. Mbala mingi soki kaka otali ezipeli ya kasɛti to piblisite oyo bazali kosalela miziki moko boye, okoki koyeba soki miziki yango ezali ya ndenge nini. Soki ezali na maloba to bililingi ya makambo ya mobulu, ya kosangisa nzoto, to ya misala ya bilimo mabe, wana osengeli kokeba. Ekoki kozala ete miziki oyo ezali na kati ezali mpe mabe.
Talelá maloba na yango malamumalamu. Miziki yango ezali kolobela nini? Okosepela mpenza koyoka maloba yango to kozongela yango mbala na mbala? Makanisi oyo ezali na kati ya maloba yango eyokani na makambo oyo ondimaka mpe oyo Biblia eteyaka? Soki nzembo ezali na monɔkɔ ya bapaya, salá mpenza makasi oyeba soki maloba oyo ezali na kati ebongi na mokristo.—Baefese 5:3-5.
Luká koyeba ndenge oyo ezali kosala. Elenge moko na nkombo Philip alobi boye: “Nazalaki komona ete miziki mingi oyo nazalaki koyoka mpe maloba na yango ezalaki kosala ete namiyoka mawamawa.” Ya solo, bato nyonso bamiyokaka ndenge moko te nsima ya koyoka miziki moko boye. Kasi miziki oyo oyokaka esalaka yo ndenge nini? Omituna boye: ‘Nakómaka na makanisi ya mabe nsima ya koyoka miziki yango to maloba na yango? Nakómi nde kosalela elobeli ya balabala oyo ezali na miziki yango?’—1 Bakorinti 15:33.
Talelá mpe ndenge basusu bakoyoka. Ndenge nini baboti na yo batalelaka miziki oyo oyokaka? Tuná bango bápesa makanisi na bango. Kanisá mpe ndenge oyo bandeko mosusu ya lisangá bakoki kotalela miziki yango. Yango ekoki nde kobɛtisa basusu libaku? Kobongola ezaleli na yo mosusu mpo obɛtisa basusu libaku te, ekomonisa ete okɔmɛli.—Baroma 15:1, 2.
Komituna mituna wana, ekosalisa yo oyeba kopona miziki oyo ekosepelisa motema na yo mpe oyo ekobebisa te boyokani na yo na Yehova. Kasi ezali na likambo mosusu oyo osengeli kotalela.
Ndenge nini okoyeba ete olekisi ndelo?
Ndenge kaka bilei ya malamu etongaka nzoto, miziki ya kitoko ekoki mpe kosala ete moto amiyoka malamu. Kasi lisese moko ya Biblia ekebisi ete: “Ozwi nde mafuta ya nzoi? Lyá oyo ekoki na yo, noki olya yango mingi koleka mpe osanza yango.” (Masese 25:16) Eyebani ete mafuta ya nzoi ebikisaka bamaladi mosusu. Kasi ata eloko ya malamu ekoki kosala yo mabe soki olekisi ndelo. Yango eteyi biso nini? Tosengeli kosalela biloko nyonso ya kitoko na ndenge ebongi.
Kasi bilenge mosusu batikaka miziki ekómisa bango baombo. Na ndakisa, Jessica, oyo tolobelaki liboso, alobi ete: “Nayokaka miziki ntango nyonso—ata ntango nazali koyekola Biblia. Nayebisaka baboti na ngai ete esalisaka ngai natya makanisi na makambo oyo nazali koyekola, kasi bandimelaka ngai te.” Yo mpe okanisaka lokola Jessica?
Ndenge nini okoki koyeba soki ntango oyo olekisaka na koyoka miziki ezali mingi to te? Omituna mituna oyo:
Nalekisaka ngonga boni na koyoka miziki mokolo na mokolo? ․․․․․
Nabimisaka mbongo boni sanza nyonso mpo na miziki? ․․․․․
Miziki oyo nayokaka ebebisaka boyokani na ngai ná bato mosusu ya libota? Soki ezali bongo, komá awa na nse ndenge oyo okoki kobongisa likambo yango. ․․․․․
Bongisá lolenge na yo ya koyoka miziki
Soki miziki ezali kolya yo ntango mingi, ekozala malamu omityela bandelo mpe obongisa lisusu lolenge na yo ya koyoka miziki. Na ndakisa, mbala mosusu ekosɛnga otika momeseno ya kotya écouteur na matoi mokolo mobimba to kotya miziki ntango kaka okómi na ndako.
Mpo na nini kutu te kolekisa bangonga mosusu kozanga koyoka miziki? Yango ekoki kosalisa yo ntango ozali koyekola. Steve, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Okozwa matomba mingi koleka na boyekoli na yo soki okangi miziki.” Soki oyekoli kozanga kotya miziki, okomona ndenge okokanga makambo mingi.
Ekozala mpe malamu ozala na programɛ ya kotánga mpe koyekola Biblia ná mikanda oyo elimbolaka Biblia. Na ntango mosusu, Yesu Kristo azalaki kokende na esika moko ya kimya mpo na kobondela mpe kokanisa na mozindo. (Marko 1:35) Esika oyo oyekolaka ezalaka kimya mpe ezangi makɛlɛlɛ? Soki bongo te, boyokani na yo ná Nzambe ekozala makasi te.
Ponáká miziki ya malamu
Miziki ezali mpenza likabo oyo euti epai ya Nzambe, kasi osengeli kokeba ete osalela yango na ndenge ya mabe te. Kozala te lokola elenge mwasi moko na nkombo Marlene, oyo alobi ete: “Nazali na miziki mosusu oyo nayebi ete esengeli nabwaka, kasi nasepelaka na ndenge ebɛtaka.” Kanisá naino ndenge miziki ya mabe oyo elenge yango azali koyoka ezali kobebisa makanisi mpe motema na ye! Kebá na motambo yango. Kotika te ete miziki ebebisa yo to ekómisa yo moombo. Landáká oyo Biblia ezali kosɛnga bakristo ntango ozali kopona miziki. Bondeláká Nzambe mpo atambwisa mpe asalisa yo. Lukáká baninga oyo bandimaka mateya ya Biblia oyo yo ondimaka.
Miziki ekoki kokitisa yo motema. Ekoki kosalisa yo omiyoka yo moko te. Kasi soki miziki ekómi na nsuka, mikakatano na yo ezali kaka. Mpe nzembo ekoki te kozwa esika ya baninga ya solo. Na yango, kokómisa miziki te likambo ya ntina mingi na bomoi na yo. Sepelá na yango, kasi kokómisa yango te eloko ya ntina mingi na bomoi.
Ozalaka na mposa ya komisepelisa na ntango mosusu. Ndenge nini toli ya Biblia ekoki kosalisa yo omisepelisa na ndenge ya malamu?
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Litoi emekaka nde maloba te ndenge monɔkɔ emekaka bilei?”—Yobo 12:11.
TOLI
Soki olingi baboti na yo báyeba ntina oyo olingaka miziki moko to orchestre moko boye, banda naino kosepela na miziki moko oyo bango balingaka.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Soki ozali kolinga te ete baboti na yo báyoka miziki oyo olingaka mingi, yango ekoki komonisa ete eloko moko ya mabe ezali na miziki oyo oyokaka.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Mpo nakóma te moombo ya miziki, nako . . .
Soki baninga na ngai batye ngai mbamba mpo nayoka miziki ya mabe, nakoloba boye:
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye:
OKANISI NINI?
● Mpo na nini koyeba kopona miziki ezali mpenza na ntina?
● Ndenge nini okoki koyeba soki miziki boye to boye ezali malamu to te?
● Okoki kosala nini mpo ókangama kaka na miziki moko te?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 259]
‘‘Ntango mosusu nasutukaka nazolanda nzembo moko ya mabe. Nakataka yango mbala moko. Soki nasali yango te, nalukaka komilongisa mpo kaka nakoba koyoka yango.’’—Cameron
[Etanda/Bililingi na lokasa 258]
Kokangama kaka na miziki moko te
Osepelaka kolya biloko ya ndenge na ndenge koleka ntango ozalaki na mbula mitano? Soki ezali bongo, ezali mpo okómá kosepela na biloko mosusu. Ezali ndenge moko na miziki. Kokangama kaka na lolenge moko ya miziki te. Meká mpe miziki mosusu.
Lolenge moko oyo okoki kosala yango ezali koyekola kobɛta ebɛtɛli miziki moko. Atako ekoki kozala mpasi mpe ekoki kopesa esengo, kasi ekoki mpe kopesa yo libaku ya komesana na lolenge mosusu ya miziki longola oyo esilá kobima. Ndenge nini okoki kozwa ntango ya koyekola? Okoki kozwa ntango oyo olekisaka na kotala televizio to kobɛta masano ya video. Yoká ndenge bilenge oyo balobi.
“Kobɛta ebɛtɛli ya miziki moko esepelisaka mpenza mpe ekoki kozala lolenge malamu ya komonisa lolenge oyo ozali komiyoka. Koyekola kobɛta nzembo ya sika esalisá ngai nakóma kosepela na lolenge mingi ya miziki.”—Brian, mbula 18, abɛtaka gitare, mbonda, mpe piano.
“Osengeli kobɛtaka mbala na mbala ebɛtɛli ya miziki moko soki olingi oyeba kobɛta yango malamu. Kosala yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi, koyeba kobɛta miziki moko malamu esalaka ete omiyoka malamu mpe esengo.”—Jade, mbula 13, abɛtaka viola.
“Soki nalekisi mokolo mabe to soki nalɛmbi na makanisi, nayokaka malamu soki nazali kobɛta gitare na ngai. Kobɛta miziki moko ya malamu mpe oyo ekitisaka motema, esalaka ete moto ayoka elɛngi.”—Vanessa, mbula 20, abɛtaka gitare, piano, mpe clarinette.
“Nazalaki kokanisa ete: ‘Nakokoka te kobɛta malamu lokola moto boye to boye.’ Kasi nakobaki koyekola, mpe sikoyo nazali koyoka esengo mingi ntango nazali kobɛta miziki malamu. Nakómá mpe kokumisa bato mosusu oyo babɛtaka miziki malamu.—Jacob, mbula 20, abɛtaka gitare.
[Elilingi na lokasa 255]
Miziki ezali lokola bilei. Soki ezali ya malamu mpe eleki ndelo te, ekozala malamu mpo na yo; kasi soki ezali ya mabe, ezala mingi to te, ekosala yo mabe